Babengi yo na likita moko ya ntina mingi!
ELEKI sikoyo mbula 3 500, Yehova Nzambe asɛngaki na libota mokomoko ya Bayisalaele ntango bazalaki na boombo na Ezipito ete báboma mwana ya mpate to mwana na ntaba mpe bápakola makila na yango na likoló mpe mipanzi ya bikuke ya bandako na bango. Na butu ya mokolo yango, anzelu ya Nzambe alekaki likoló ya bandako oyo ezalaki na elembo wana kasi na bandako ya Baezipito nyonso, abomaki bana ya liboso. Na nsima Bayisalaele balongwaki na boombo. Mbula na mbula, na mokolo oyo likambo yango esalemaki, Bayisalaele bazalaki kosala feti ya Elekeli.
Nsima ya kolya Elekeli ya nsuka na bantoma na ye, Yesu Klisto abandisaki elambo mpo na kokanisa liwa na ye oyo akufaki lokola mbeka. Apesaki bantoma na ye limpa oyo evimbaki na mfulu te mpe alobaki boye: “Bókamata, bólya. Oyo ezali komonisa nzoto na ngai.” Na nsima apesaki bango kɔpɔ ya vinyo mpe alobaki ete: “Bómela yango, bino nyonso. Mpo ete oyo ezali komonisa ‘makila na ngai ya kondimana,’ oyo makosopama mpo na kolimbisa masumu ya bato ebele.” Yesu alobaki lisusu ete: “Bósalaka boye mpo na kokanisa ngai.” (Matai 26:26-28, NW; Luka 22:19, 20, NW ) Yango elingi koloba ete Yesu atindaki bayekoli na ye bákanisaka liwa na ye.
Na mbula oyo Ekaniseli ya liwa ya Yesu ekosalema mokolo ya misato, mwa 19 Aprili, nsima ya kolala ya moi. Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bakoyangana na mpokwa yango mpo na Ekaniseli yango mpe bakosala ndenge oyo Yesu atindaki. Tozali na esengo ya kobenga yo oya kosangana na biso mpo otala ndenge oyo tokosala yango. Tuná Batatoli ya Yehova na mboka ofandi mpo báyebisa yo ngonga mpe esika oyo likita yango ekosalema.