Masolo ya Basakoli ya Bokonzi
“Boyebi Biblia mingi.”
NTANGO Yesu azalaki na mbula 12, abangaki te kosolola na bakonzi ya mangomba na Yelusaleme, “bango nyonso bayokaki ye bakamwaki na bososoli na ye mpe na [biyano] na ye.” (Luka 2:47) Lelo oyo mpe, bilenge mingi oyo bazali basaleli ya Yehova babangaka te mpo na koteya balakisi mpe baninga na bango ya kelasi makambo ya Nzambe mpe ya Biblia. Mbala mingi basepelaka na mbuma malamu oyo babukaka.
Tiffany, elenge mwasi moko ya mbula 14, azalaki kolanda ntango molakisi na bango azalaki kolobela esakweli ya bapɔsɔ ya mbula 70, esakweli oyo ezali na Biblia na mokanda ya Danyele 9:24-27. Molakisi alobaki mwa makambo oyo ayebaki mpo na bavɛrsɛ yango mpe atikaki lisolo yango mbala moko mpo na koleka na lisolo mosusu.
Liboso, Tiffany azalaki kokakatana mwa moke mpo na kotombola mosapi. Kasi, ye moko alobi ete: “Nayebi mpenza te soki ebandaki boni, namitungisaki mpenza lokola molakisi na biso alimbolaki bavɛrsɛ yango malamu te. Mpe mbala moko, natombolaki mosapi.” Molakisi akamwaki na komona ete mwanakelasi moko azali na likambo ya koloba na lisolo yango, mpamba te banakelasi mingi bazalaki kokanga ntina na yango te.
Ntango molakisi na bango apesaki ye maloba mpo alimbola esakweli yango, Tiffany atɛlɛmaki mpe alimbolaki yango na motó. Ntango asilisaki, kelasi mobimba bafandaki nyɛɛ. Likambo yango epesaki Tiffany lokola mwa nsɔni. Mbala moko, bana nyonso babɛtelaki ye mabɔkɔ ntango molai.
Molakisi alobaki ete: “Nakamwe mpenza Tiffany, nakamwe mpenza” mpe azalaki koloba yango mbala na mbala. Alobaki ete azalaki mpenza kokanisa ete bavɛrsɛ yango esengeli kozala na ndimbola koleka oyo ye ayebaki, kasi Tiffany nde moto ya liboso oyo alimbolelaki ye bavɛrsɛ yango malamumalamu. Ntango kelasi esilaki, molakisi atunaki Tiffany ndenge nini ayebi makambo mingi ya Biblia.
Tiffany alobaki na ye ete: “Mpo nazali Motatoli ya Yehova. Baboti na ngai balimbwelaki ngai esakweli yango mbala na mbala liboso nayeba yango.”
Makambo oyo ayebi na Biblia ekamwisaki mpe baninga na ye ya kelasi. Mwanakelasi moko alobaki na Tiffany ete: “Nayebi sikoyo mpo na nini bino Batatoli ya Yehova bokendaka koteya ndako na ndako; mpo boyebi Biblia mingi.” Bana mosusu balakaki ete bakosɛka ye lisusu te mpo na lingomba na ye.
Ntango Tiffany abɛtelaki baboti na ye lisolo yango, bapesaki ye likanisi ete amemela molakisi na bango mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Ntango amemelaki molakisi na bango mokanda yango mpe alakisaki ye esika oyo balimboli esakweli ya Danyele, molakisi andimaki kozwa mokanda yango mpe apesaki ye matɔndi.
Ya solo, ntango bilenge baklisto bazali koloba na molende nyonso makambo ya Nzambe mpe ya Biblia oyo baboti na bango bateyaka bango, bakumisaka Yehova mpe bango moko bazwaka mapamboli.—Matai 21:15, 16.