Mpo na nini ata na Azia bazali kosepela Noele?
NA NTANGO ya kala, bato ya Azia bazalaki kondima likambo moko oyo ekokani na lisapo ya Père Noël. Ezali lisapo ya bato ya Corée etali moto moko oyo nkombo na ye ezalaki Chowangshin; tokoki mpe kokuta lisapo ya ndenge yango na bisika mosusu na Chine mpe na Japon.
Bazalaki koloba ete Chowangshin azali nzambe ya kuku, nzambe ya mɔ́tɔ oyo bato ya Corée bazalaki kosambela na losambo ya mɔ́tɔ. (Na ntango ya kala, bato ya Corée bazalaki komema makala ya mɔ́tɔ na ekɛngɛ mpo ekufa te.) Bazalaki kondima ete nzambe yango nde azalaki kotala makambo nyonso oyo moto na moto na kati ya libota azalaki kosala na boumeli ya mbula mobimba, na nsima azalaki koleka na lituka ya mɔ́tɔ mpe akoleka na mombonda oyo ebimisaka milinga ya kuku mpo na kobuta na likoló.
Bazalaki koloba ete Chowangshin azalaki kokóma epai ya mokonzi ya likoló na mokolo ya 23 Desɛmbɛ. Bazalaki koloba ete azalaki kozonga na nsuka ya mbula mpe, mpo akɔta na ndako, azalaki koleka na mombonda oyo ebimisaka milinga mpe na lituka. Soki azongi, azalaki koya na mabonza mpe na bitumbu ya moto na moto na kolanda makambo oyo asalaki. Mokolo oyo azalaki kozonga, bato nyonso na kati ya libota bazalaki kopelisa babuji na kuku mpe na bisika mosusu na kati ya ndako. Bililingi ya nzambe yango ya kuku ekokani mpe na Père Noël: azalaki kolata bilamba ya motane! Basi bazalaki kosala sapato ya modɛlɛ ya bato ya Corée mpe, na mokolo oyo eleko ya malili ebandaka, bazalaki kopesa bamama-bokilo na bango sapato yango lokola likabo. Ezalaki ndenge ya kotombela babokilo na bango bomoi molai, mpamba te nsima ya mokolo yango, moi eumelaka mingi koleka butu.
Omoni te ete makambo mosusu ekokani na oyo touti kolobela na feti ya Noele? Tomoni ete ezali na masapo mpe mimeseno oyo ekokani: mombonda ya milinga, babuji, kokaba biloko, sapato, mobange alati bilamba motane, mpe badati ya bafeti yango. Kasi, tondimi te ete kaka mpo mwa makambo wana ekokani nde bato ya Corée bakómaki kosala feti ya Noele. Kutu, lisapo wana ebungaki na Corée liboso bato bákóma kosala feti ya Noele. Bato mingi na Corée bayebi te ete likambo wana ezalaki kosalema na mboka na bango.
Kasi, yango emonisi ete mimeseno ya bato mpo na mokolo oyo eleko ya mpiɔ ebandaka mpe mpo na nsuka ya mbula epalangani na mokili mobimba na banzela ndenge na ndenge. Na ekeke ya minei T.B., lingomba oyo elekaki monene na mikili oyo Bokonzi ya Loma ezalaki koyangela elongolaki nkombo ya Saturnales na feti ya Baloma oyo bazalaki kokumisa kobotama na nzambe-moi, mpe bakómisaki yango feti ya Noele. Na feti ya Noele bazalaki kozongela makambo ya bonkɔkɔ ya Baloma, kasi bapesaki yango nkombo mosusu. Ndenge nini ekokaki kosalema bongo?
Likambo ya kopesa makabo
Atako makambo mosusu ebungaki, kasi momeseno ya kopesana makabo esilaki te. Banda kala, bato ya Corée balingaka kopesana makabo. Yango ezali moko ya makambo oyo esalaki ete bato ya Corée bákóma kosepela feti ya Noele.
Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, basoda ya États-Unis oyo bazalaki na Corée balingaki básala boninga makasi na bato ya Corée; bamonaki ete bandakonzambe ezali bisika malamu mpo na kokutana mpe kopesa bango makabo mpe biloko mosusu mpo na kosunga bango. Bazalaki kosala yango mingimingi mokolo ya Noele. Bana mike mingi bazalaki kokende na bandakonzambe mpo na kotala makambo oyo ezalaki koleka kuna mpe bazalaki kokabela bango shokola. Yango wana, lokola boyebi ndenge bana mike bazalaka, mingi bakómaki kozela Noele mosusu mpo bákende lisusu.
Bana yango bazalaki kokanisa ete Père Noël ezali soda moko ya États-Unis mpe alataka nzambala ya motane. Masese 19:6 elobi ete: “Bato nyonso bazali baninga ya moto na makabo.” Basoda bakómaki na baninga mingi mpo bazalaki kopesa bango makabo. Kasi, ndenge kaka vɛrsɛ oyo touti kotánga emonisi yango, makabo yango esalaki boninga oyo eumelaka te. Kutu bato mingi na Corée, ntango bazalaki bana mike bazalaki kokende na ndakonzambe kaka mpo na shokola. Atako bongo, babosaná Noele te. Lokola mpe nkita ya Corée ekolaki nokinoki, mosala ya mombongo ekolaki, mpe na Noele, bato bakómaki kosomba biloko mingi mpo na kopesana makabo. Bakomelesa bazalaki kosalela Noele mpo na kotɛka biloko mingi.
Makambo nyonso oyo esalisi na koyeba ndenge oyo Noele ekɔti na mikili ya Azia lelo oyo. Bakomelesa bakómi kobimisa biloko ya sika mpo bayebi ete bato basombaka biloko mingi na Noele. Babandaka kobongisa bapiblisite soki tokómi na katikati ya eleko ya molunge. Na nsuka ya mbula, mombongo etambolaka malamu mpenza mpamba te bato mingi basombaka makabo, bakalati, mpe bakasɛti ya miziki mpo na kotindela baninga na bango mokolo ya Noele. Ndenge oyo basalaka piblisite, soki elenge moko afandi na ndako mpe bapesi ye makabo na Noele te, akoki kosepela ata moke te!
Soki mokolo ya Noele ekómi pene, bamagazini mpe bazando ya Séoul etondaka mɛkɛ na bato oyo bakendaka kosomba makabo mpo na baninga na bango; mpe ezalaka se bongo na bamboka mosusu na Azia. Mituka ekangaka banzela. Bato bazalaka ebele na baotɛlɛ, na bakartye oyo ezali na bamagazini, na barestora, mpe na banganda. Okoyoka makɛlɛlɛ: bato bazali koyemba na mingongo makasi. Na Noele, okomona bato balangwi masanga bazali kolekaleka na babalabala oyo etondi na bosɔtɔ.
Makambo ezalaka nde ndenge yango na Noele. Na Azia, Noele ezali lisusu feti ya baklisto te. Soki totali malamu, ezala na Corée to na bikólo mosusu, bakomelesa nde basalaka ete bato básepela na feti yango ya mangomba ya boklisto. Kasi, tokoki mpenza koloba boye, soki bazali lisusu kokanisa Klisto te na Noele, foti nyonso ezali ya bakomelesa? Baklisto ya solo basengeli kotalela likambo yango malamumalamu.
Ndenge oyo Noele ebandaki
Ata soki bakangi nyama ya yauli na ndako ya banyama, ezali kaka nyama. Yango wana, ekozala libunga monene soki moto akanisi ete ekómi na boboto mpo eumeli mwa mingi na ndako mpe ezali kosakana na bana na yango. Mbala mosusu osilá koyoka masolo ete banyama etombokelaki bato oyo basalaka na bisika oyo babɔkɔlaka banyama ya zamba.
Na makambo mosusu, tokoki mpe koloba bongo mpo na feti ya Noele. Ezalaki liboso “nyama” oyo ezalaki na losambo ya boklisto te. Mokanda moko (The Christian Encyclopedia) oyo ezali na lokota ya Coréen,a na motó ya likambo moke oyo elobi: “Boyokani na yango na feti ya Saturnales ya Loma,” elobi boye:
“Bato bamipesaki mingi na bafeti ya bapakano oyo babengi Saturnales na Brumalia na boye ete ezalaki mpasi bátika yango ata ntango bakómaki baklisto. Ekoki kozala ete lokola Amperere Constantin andimaki mokolo ya lomingo (mokolo ya Phébus na Mithra mpe lisusu Mokolo ya Nkolo) . . . baklisto ya ekeke ya minei bakanisaki ete ezali malamu bátya mokolo oyo moi ebotamaki lokola mokolo oyo Mwana ya Nzambe abotamaki. Bato balingaki feti wana ya bapakano mingi mpe loyenge mpe bisengo na yango na boye ete baklisto basepelaki ete bazwi mwaye ya kobatela yango mpe kobongola kaka mwa moke ntina mpe ndenge ya kosala yango.”
Okanisi ete bato nyonso basepelaki na likambo yango? Mokanda yango elobi lisusu boye: “Na Mpoto mpe na Moyen-Orient, baklisto oyo bazalaki bateyi bamonisaki ete basepelaki te na ndenge mabe wana ya kokumisa mokolo ya kobotama ya Klisto, mpe baklisto ya Mesopotamia balobaki ete bandeko na bango ya Mpoto bakómi kosambela bikeko mpe bakómi kosambela moi lokola bakómisi feti ya bapakano wana feti ya baklisto.” Tomoni mpenza ete makambo mabe emonanaki na feti yango banda na ebandeli na yango. Mokanda yango elobi lisusu boye: “Kasi bato mingi bakómaki kosepela na feti yango mpe nsukansuka endimamaki na boye ete bakokaki lisusu kolongola yango te ata ntango Lingomba ya Protesta esalemaki na ekeke ya zomi na motoba.”
Tomoni ete feti ya nzambe-moi, oyo ezalaki mpo na boklisto ya solo te, ekɔtaki na lingomba monene ya ntango wana. Atako bapesaki yango nkombo mosusu, makambo na yango ya bopakano etikalaki. Na nzela na yango, mateya ya bapakano ekɔtaki na mangomba ya boklisto mpe ebebisaki bato na elimo. Masolo ya kala ezali komonisa ete ntango mangomba ya boklisto ezalaki kopalangana, makanisi ya liboso oyo elobaki ete “bólinga banguna na bino” elongwaki mpe na esika na yango ekómaki nde makambo ya bosɔtɔ mpe bitumba ya nsɔmɔ.
Na nsima, emonanaki polele ete atako bapesaki yango nkombo mosusu, Noele ezalaki kaka na makambo ya bapakano lokola loyenge, komela masanga mingi, kosepela, kobina, kopesana makabo, mpe kobongisa banzete lokola nzete ya sapin na ndako. Bakomelesa bayekoli mayele ndenge na ndenge ya kosalela Noele mpo na kokokisa mokano na bango ya libosoliboso: kotɛka mingi. Batelevizyo, baradio mpe bazulunalo ezali kokumisa Noele; mpe bato batalelaka yango lokola libaku ya kosepela. Na televizyo, balobaki mpo na magazini moko oyo batɛkaka bakalɛsɔ na Séoul ete batyaki nzete ya Noele mpe batondisaki yango na bakalɛsɔ. Bato bakokaki komona bilembo ya Noele, kasi ezalaki ata na elembo moko te ya koyamba Klisto.
Biblia elobi nini mpo na Noele
Nsima ya kolobela makambo oyo nyonso mpo na Noele, liteya nini tozwi? Soki moto akangi babutɔ ya elamba na ye malamu te banda na butɔ ya liboso, mpo na kobongisa yango asengeli kofungola babutɔ nyonso mpe kobandela, boye te? Atako ezali mpenza bongo, bato mosusu balobaka ete ezali solo ete Noele euta na losambo ya moi, kasi sikoyo endimama na mangomba ya boklisto. Yango wana, bamonaka ete feti yango ekóma malamu lokola bakumisaka mokolo oyo Klisto abotamaki mpe yango ekómi feti ya sika.
Tokoki kozwa liteya moko ya ntina mingi na likambo moko oyo esalemaki na Yuda. Na mobu 612 L.T.B., Bayuda bakɔtisaki losambo ya moi na tempelo na Yelusaleme. Tokanisi ete losambo yango ekómaki malamu mpo bazalaki kosala yango na esika ya pɛto oyo babongisaki mpo na losambo ya Yehova Nzambe? Ezekiele, moko na bato oyo bakomaki Biblia akomaki boye mpo na losambo ya moi oyo bato bakómaki kosala na Yelusaleme: “Talá, babali soko ntuku mibale na mitano batɛlɛmaki epai na ekuke na Tempelo na [Yehova], na kati na balasani mpe etumbelo . . . batyaki bilongi epai na ebimelo na ntango mpe basambelaki moi epai na ebimelo na ntango. Bongo alobelaki ngai ete, Otali oyo, mwana na moto: Ezali likambo mpamba na miso na ndako na Yuda ete bango bakosalaka makambo na mbindo makosalaka bango awa wana ekotondisa bango mokili na yauli mpe ekotungisa bango ngai lisusu naino? Talá, bakotyaka etape na zolo na [ngai, NW].”—Ezekiele 8:16, 17.
Atako bongo, losambo ya bapakano ekómaki mosantu te, kutu, tempelo mobimba nde ekómaki na likama. Misala ya ndenge wana epalanganaki na Yuda yango wana mboka mobimba etondaki na mobulu mpe makambo ya bosɔtɔ. Ezali se ndenge yango na kati ya mangomba ya boklisto epai makambo oyo euti na Saturnales, losambo ya moi, ezali komonana mingi na feti ya Noele. Kutu, ntango Ezekiele amonaki makambo wana na emonaneli, nsima ya mwa bambula Yehova apesaki Yelusaleme etumbu: bato ya Babilone bayaki kobebisa yango nyɛɛ.—2 Ntango 36:15-20.
Mbala mosusu osɛkaki mwa moke ntango otángaki maloba ya moto ya mayele ya ekólo Corée na ntina na elilingi ya mwana Yesu. Kasi, lokola moto yango ayebaki te soki Klisto azali mpenza nani, alobaki likambo oyo elongobani mpenza. Bato oyo basepelaka feti ya Noele basengeli kokanisa malamumalamu maloba na ye. Mpo na nini? Mpamba te Noele emonisaka mpenza te ndenge oyo Klisto azali. Kutu, emonisaka te soki azali nani lelo oyo. Yesu azali lisusu mwana moke na kati ya elyelo te.
Biblia ezali komonisa mbala na mbala ete Yesu azali sikoyo Masiya, Mokonzi monene na Bokonzi ya Nzambe kuna na likoló. (Emoniseli 11:15) Etikali moke asilisa bobola mpe bwale oyo bato mosusu babosanaka te na Noele, atako bibongiseli oyo esungaka babola epesaka makabo.
Ya solo mpenza, Noele epesi bato litomba moko te, ezala bato oyo bafandi na mikili ya boklisto to baoyo bafandi na mikili mosusu, ata na Azia. Ezali nde kosala ete bato bábosana nsango ya solosolo ya boklisto, nsango oyo elobeli Bokonzi ya Nzambe mpe nsuka ya ebongiseli mabe oyo. (Matai 24:14) Tosɛngi na yo otuna Batatoli ya Yehova báyebisa yo ndenge nsuka yango ekoya. Bakoki mpe koyebisa yo makambo malamu oyo ekoya awa na mabelé ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mpe Mokonzi Yesu Klisto akotambwisa makambo ya mokili.—Emoniseli 21:3, 4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Euti na The New Schaff-Herzog Encyclopedia of Religious Knowledge.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Noele ekɔtisaki misala ya bapakano na mangomba ya boklisto
[Elilingi na lokasa 5]
Bana mingi bazalaki kokende na bandakonzambe mpo na kotala mpamba mpe mpo bákabela bango shokola. Yango wana bazalaki kozela Noele eya lisusu
[Elilingi na lokasa 7]
Feti ya Noele na Séoul, Corée
[Elilingi na lokasa 8]
Klisto azali lisusu mwana moke te, kasi azali Mokonzi monene na Bokonzi ya Nzambe