Noele na mikili ya Azia
• ELEKI SIKOYO MBULA 200,moto moko ya mayele na ekólo Corée asalaki mobembo na Pékin, na ekólo Chine. Mokolo mosusu, atɛlɛmaki mpo na kotala elilingi oyo ezalaki na plafɔ ya ndakonzambe moko; ezalaki elilingi ya Malia amemi Yesu na mabɔkɔ. Likambo yango ekamwisaki ye mpe alobaki boye:
“Mwasi moko afandi mpe amemi mwana ya mbula mitano to motoba; elongi ya mwana yango ezalaki lokola nde azali na maladi. Nkingo ya mwasi yango etɛngamaki moke, okokanisa ete azali koyoka mawa ntango azali kotala mwana na ye. Nsima na bango, ezalaki na bilima mpe bana mikemike ebele oyo bazali na mapapu mpe bazali kopumbwa pembenipembeni. Ntango natombolaki motó mpo na kotala, namonaki lokola balingi kokwela ngai. Mbala moko, natyaki lobɔkɔ mpo na kosimba bango.”
LIKAMBO yango esalemaki wana Lingomba ya Protesta esila kobima kala na Mpoto mpe nsima mpenza ya eleko ya Moyen Âge. Kasi na ntango wana, bato ya Azia bayebaki mateya ya boklisto te, se ndenge elilingi wana ezalaki eloko ya sika mpo na moto wana ya mayele. Lelo oyo makambo ebongwani mpenza! Mbula na mbula soki tokómi na mikolo ya Noele, bato basalaka bililingi ya mwana Yesu. Bato ya Azia bameseni mingi na bililingi yango, mpe babalabala mingi na mikili yango ekómaka lokola kaka babalabala ya Mpoto.
Na mokolo ya 25 Novɛmbɛ 1998 na mpokwa, sanza moko liboso ya Noele, batyaki miinda koleka 100 000 na banzete 300 oyo ezali pembenipembeni ya balabala Champs Élysées na Paris mpe ebandaki kongɛngisa balabala monene yango, balabala yango eyebani mingi. Ndenge moko mpe, na balabala moko ya engumba Séoul, na ekólo Corée, batyaki nzete moko molai ya Noele na magazini moko monene mpe ebandaki kongɛnga na butu. Mbala moko babalabala ya Séoul etondaki na biloko kitoko mpo na feti ya Noele.
Na mikolo wana nyonso, televizyo, radio, mpe bazulunalo elobelaka mingi makambo ya Noele. Na ntango yango bato nyonso bamibongisaka mpo na kosepela nsuka ya mbula. Bapaya mingi bakamwaka na komona ebele ya bandakonzambe oyo ezali na Séoul; na Noele, babongisaka yango malamu mpe nokinoki mpo na feti ya Noele. Yango wana, na nsuka ya sanza ya Novɛmbɛ, ntango bato na États-Unis basalaka feti ya Thanksgiving Day (Eyenga ya kozongisa matɔndi), na Corée mpe na bikólo mosusu ya Azia, makanisi ya bato ezalaka kaka na feti ya Noele.
Mikili mingi ya Azia ezali mpenza mikili ya boklisto te. Na ndakisa, na Corée, bato 26,3 % mpamba bazali baklisto. Na Hong Kong, baklisto bazali 7,9 %, na Taïwan bazali 7,4 %, mpe na Japon bazali kaka 1,2 %. Elakisi mpenza ete bato ya Azia mingi bazali baklisto te; kasi bamonaka mabe moko te na kosala feti ya Noele. Kutu, emonanaka ete basepelaka na feti yango mingi koleka bato ya Mpoto. Na ndakisa, eyebani malamu ete na Hong Kong, feti ya Noele ezalaka ‘mputulu emata, makala etikala,’ nzokande na mboka yango bato mingi bazali na Lingomba ya Bouddha mpe na Lingomba ya Tao. Ezala na Chine, atako bato oyo balobaka ete bazali baklisto bazali kaka 0,1 %, bato mingi bakómi kosepela feti ya Noele.
Mpo na nini na mikili ya Azia bato mingi basalaka feti ya Noele? Mpo na nini bato oyo bandimaka te ete Yesu azali Masiya basepelaka Noele, feti oyo baklisto mingi balobaka ete ezali mokolo oyo Yesu abotamaki? Ebongi ete baklisto ya solo bálanda makanisi ya bato wana mpo na Noele? Tokozwa biyano na mituna oyo soki totaleli ndenge oyo bakómaki kosepela feti ya Noele na Corée, ekólo moko ya kala na Azia.