Noel Mpo na nini ezali na lokumu mingi na mboka Japon?
Bana mike na mboka japon bazali na kondima makasi mpo na tata Noel, atako bafandi na mboka oyo ezali na mbala moko kosambela Buda mpe Shinto. Na 1989, batindaki mikanda 160 000 na Suède, “Mboka ya tata Noel.” Ekólo mosusu te etindaki mikanda mingi koleka Japon. Batindaki mikanda wana na elikya ete epesa bango likoki ya kozwa biloko ya kosakana oyo bazalaki na yango mposa, ekoki kozala mbala mosusu “ordinateur” oyo ezali na ntalo ya 18 000 yens (soko 6 478 000 zaires) to video moke ebongi na komema na mabɔkɔ, oyo ezali na ntalo ya 12 500 yens (soko 4 100 000 zaires).
Mpo na bilenge basi ya Japon, kokutana na molingami na ye na mpokwa ya Noel ezali na ntina mingi. Zulunalo Mainichi Daily News elimboli ete: “Ankete moko esalemaki epai na bilenge basi emonisaki ete 38% kati na bango basilaki kosala ebongiseli, sanza moko liboso, mpo na elambo wana.” Ezali mpo na makanisi na bango mabe nde bilenge mibali balingaka kokutana elongo na balingami na bango ya basi, na mpokwa ya Noel. Totangi kati na zulunalo oyo elobeli makambo na mibali ete: “Tala likanisi malamu: bondela na mongongo ya nsé elongo na molingami na yo ya mwasi. Bosala yango na esika moko malamu. Nokinoki, boyokani na bino ekokóma mpenza makasi.”
Bajaponé ya mibali oyo basili kobala bandimaka mpe ete momeseno motali kosomba “mokaté monene motyami bilembo mingi” na ntango bautaka na mosala na mokolo oyo mozali liboso na mokolo ya Noel, ezali na nguya ya mazi. Na komityáká na esika ya tata Noel, bazali kolikya na motindo yango ete bakozipa bopotu oyo bamonisaki epai na mabota na bango na mbula mobimba oyo eleki.
Ya solo mpenza, feti ya Noel esili mpenza kozwa misisa makasi epai na Bajaponé, baoyo bazali baklisto te. Na yango, 78% ya bato oyo batunamaki na lolaká ya zando monene ya bilei, basalaki bibongiseli minene mpo na Noel. Rapport oyo ezali mpenza kokamwisa mpamba te mboka ezali bobele na 1% ya bato baoyo bakomilobaka ete bazali baklisto. Bazali kokakatana te na koloba ete bazali kosalela Buda to Shinto, mpe bazali lisusu kokumisa feti moko “ya boklisto.” Na etánda oyo bakomi bafeti ya Bajaponé, ndakonzambe na lokumu mingi ya Shinto etii mpe mokolo ya 25 décembre na kolimboláká ete yango ezali “mokolo ya bokundoli na Klisto.” Kasi, likambo ya komona ete bato oyo bazali baklisto te bazali kosala feti na mokolo ya Noel, ebimisi motuna oyo: kosala feti na mokolo ya Noel, ebimisi motuna oyo:
Feti ya Noel esalemi mpo na nani?
Le Grand Robert, dictionnaire alphabétigue et analogique de la langue française, epesi ndimbola oyo mpo na Noel ete: “Ezali fɛti na boklisto oyo ekokumisamaka na mokolo ya 25 décembre, mpo na kokanisa kobotama na Klisto.” Bazali kotalela ete “baklisto” bakoki bongo “kosepela esika moko na mokolo ya bokundoli na klisto.”
Bato oyo bakotalelaka Noel lokola feti ya lingomba bakoki kosilika na ntina na baoyo bazali kosala yango bobele mpo na kosepela na kopesanáká mabonza, mpe bakoki nkutu koloba ete bazali kotuka Nzambe. Moameriké moko oyo afandi na mboka Japon akomaki ete: “Na Japon, tosili kokóma na nsuka na bozwi: kasi ata elembo moko ya Klisto ezali te.” Moto mosusu akomaki na ntina na Noel ya Bajaponé ete: “Bato na mikili ya Mpótó bazangi bilei ya ntalo te, kasi bazangi eloko moko eleki ntina: lolenge ya kosalela.”
Lolenge ya kosalela Noel ezali nini? Ezali nde kosepela na misa na lingomba elongo na nzembo, na kosalela bafololo mpe babuji na yango oyo bato mingi basalelaka bobele mbala moko na mbula mpo na losambo na bango ya mbula na mbula na ndakonzambe? Ezali bolingo soko kosepela soko mpe kopesana mabonza nde ekopusa bato mingi na kozala na bokabi? Ezali nde kimya lokola oyo ekozalaka epai na basodá na ntango bamoni mwa mikolo ya “kimya na mokili”?
Likambo na kokamwa ete, ezalela ya Noel ekoki komema ata kimya kati na libota te. Engebene ankete moko esalemaki na Angleterre na 1987, ekanisamaki ete 70% ya mabota ya mboka wana baswanaki na boumeli ya Noel na mbula yango. Koswana wana ebimaki mpo na makambo matali mbongo. Matáta mazali mpe kobima mpo ete bamoko na basangani ya libota bazali kolekisa ndelo mpo na komela masanga ya makasi to mpe bazali lisusu kokokisa mikumba na bango te.
Moto moko na mokili ya Mpótó, ye oyo afandi na mboka Japon nde auti kala mingi te na mboka na ye mpo na kokumisa bafɛti na mbula oyo eleki, alobaki ete: “Nazali komituna soko topɛngwi te longwa na ndimbola na solo ya Noel.’’ “Na mokolo nyonso ya 25 décembre, nazalaka bobele na mposa ete tokumisa ba Noels lokola na ntango na kala: feti oyo Bapakano bazalaki kokumisa kobima na moi na eleko ya mpiɔ elongo na losambo ya banzeté mpe na bilambo ya lokoso. Tosili kobatela bisalela nyonso ya Bapakano—banzeté lokola oyo babéngi ete gui, houx, sapin mpe bongo na bongo—kasi, uta baklisto bazwaki likanisi ya kosala ete Noel ekóma feti ya lingomba, na motindo moko to mosusu, feti ya Noel ezali kokumisama lisusu te lokola na liboso.’’
Emonani mpenza ete Noel ezali fɛti ya Bapakano. Encyclopédie moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete baklisto ya liboso bakumisaki yango te, “mpo ete bazalaki kotalela kokumisama ya mokolo na kobotama lokola momeseno ya Bapakano.” Kosepela mpe kopesana mabonza euti na bafɛti ya Bapakano oyo ete Saturne mpo na nzambe Saturne mpe Mbula ya Sika.
Soki Noel euti na fɛti ya Bapakano, baklisto ya motema sembo basengeli komituna motuna oyo: fɛti ya Noel ezali mpo na baklisto? Totala oyo Biblia elobi na ntina na kokumisa mokolo ya bokundoli na Klisto.
[Etanda na lokasa 4]
Ebandeli na feti ya Noel
Atako toyebi mpenza makambo ya sikisiki te, kasi makambo nyonso momonisi ete uta mobu 336 ya ntango na biso, Lingomba ya Loma lizalaki kokumisa feti oyo ekokanaki na Noel. Mokanda La Nouvelle Encyclopédie britannique elimboli ete: ‘Feti ya Noel etyamaki mpenza na mokolo ya 25 décembre mpo na kokitana feti monene ya nzambe moi.’ Yango ezalaki kosalema no eleko oyo Bapakano bazalaki kosala bilambo ya lokoso na ntango na feti na loma mpo na kobima na nzambe Saturne mpe na feti mpo na Kobima na moi na eleko ya mpiɔ, oyo ezalaki kokumisama na ba celtes mpe ba Germains. Mokanda mosusu (The New caxton Encyclopedia) elobi ete: “Lingomba lisimbaki libaku wana mpo na kobongola baleli yango ete ekóma ya boklisto.”