Ezaleli ya kobebisa biloko ekoki kosila
NA BUKU moko oyo bakomaki, Jane Norman na Myron Harris bayebisi ete, “Bato batalelaka bilenge oyo babebisaka biloko lokola ete bazangi limemya mpo na mikóló mpe baboyi makambo na bango.” Atako bilenge mingi bazali kokanisa ete makambo ekobonga na yango te, bakomi oyo touti kolobela bayebisaki ete, “Soki okamati bilenge misato, ata moko kati na bango akoloba ete soki baboti bátyelaka bana na bango likebi mingi mpe soki bilenge bazalaki na misala ya kosala, ezaleli ya kobebisa biloko ekokaki kokita.” Ata soki elimo ya kobebisa biloko ekoki kokita soki bapesi bilenge misala ya kosala mpe soki baboti bazali kokɛngɛla bango malamu, yango nde ekosilisa ntina oyo bato babebisaka biloko?
Soki bazali elongo na baninga na bango te, bilenge mingi basalaka mobulu te. Kasi soki bakómi mibale to basali etuluku, bakoki koluka ete bango mpe báyebana, bakobanda kosala makambo ya bozoba mpe ya nsɔni. Likambo yango ekómelaki Nelson. Mbala mingi soki ameli bangi to masanga, azalaki kobebisa biloko mpo na kolakisa ete azali na nkanda mpe azali kosepela na bomoi na ye te. Elenge mosusu, nkombo na ye José; ntango azalaki koyoka makambo oyo bazalaki koteya na ndakonzambe ya Katolike na ntina etali kobongola mibeko na ndenge ya kokabolela basali-bilanga mabelé mpe kopesa bato ya misala oyo ebongi na bango, epesaki mposa ete ye mpe asalaka greve mpe babebisaka biloko mpo na kolakisa ete bazali kosepela te na ndenge bakonzi bazali kotambwisa makambo. Kasi, Nelson na José bamonaki likambo moko ya malamu koleka kosala mobulu to kobebisa biloko.
Mwa bantina oyo epusaka mpenza bato
Tótalela naino malamumalamu ntina oyo bilenge mosusu basalaka mobulu ya kobebisa biloko. Bilenge mingi bazali na mobulungano mpe “bazali koyeba te epai wapi bátya motó na mokili oyo ezali lokola esika oyo bato nyonso bazali na magboma.” Atako bongo, mpe ata soki bato mosusu bazali kokanisa ndenge nini, lapolo moko elobaki boye: “Bilenge bakanisaka mpenza ndenge oyo basengeli kotambwisa bomoi na bango. Bilenge bamitungisaka mpenza mpo na mokili koleka ndenge oyo mikóló bakanisaka.” Ata asali yango na kozanga koyeba to te, ntango elenge moko abebisi biloko, ekoki kozala mpo na komonisa ete azali na makambo oyo ezali mpenza kotungisa ye, to azali na mikakatano oyo ezali kosila te, to bamposa oyo ezali kokokisama te. Ankɛtɛ oyo tolobelaki na ebandeli eyebisi ete, “ata elenge moko te na kati ya bilenge nyonso oyo batunaki, ezala baoyo babebisaki biloko, akɔtelaki to andimaki ete ezaleli ya kobebisa biloko ezali malamu.”
Lokola kotánga kelasi ekómi na ntina mingi mpe misala mingi ezali kosɛnga moto akɔta kelasi milai mpo asala yango malamu, elenge oyo bandimaka to balendisaka ye mpenza te, akoki kozala na kobanga. Mpe lisusu, baboti, balakisi, to baninga bakoki kozala na maloba ya kolɛmbisa to kosɛnga elenge makambo oyo akokoka te, to kolobela kaka makambo asalaka mpe kobosana ete azali mpe moto. Bilenge mingi bakómaka batomboki to bakómaka kosala mobulu ya kobebisa biloko mpo makambo oyo bazali kokana ezali kosalema te. Okanisi te ete soki baboti bazali kolakisa ete balingi ye mpe soki bazali kotyela ye likebi, ekokitisa mpasi na ye?
Mbala mosusu ozali komona ete atako bakonzi mosusu basali lokola balɛmbi kopekisa kokoma na bifelo mpe balɛmbi kopekisa balolenge mosusu ya mobulu oyo bilenge basalaka, bato mosusu oyo bamitungisaka bazali kaka kotya motema ete balakisi mpe bakonzi ya biteyelo bakokanga mabɔkɔ te mpo na kolonga elimo ya kobebisa biloko. Na likambo ya kotya mibeko ya makasi, buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Soki moto abebisi biloko na balabala ya Leta, bafutisaka ye amande to akɔtaka bolɔkɔ. Na bamboka mosusu, Leta atya mibeko ete soki bana babebisi biloko, baboti nde bakofuta. Kasi, mbala mingi bato oyo babebisaka biloko bazwaka etumbu te. Soki totaleli makambo ya ndenge oyo, tokomona ete kotya mibeko ya makasi ezali mpasi, mpe mbala mingi eloko oyo moto moko abebisi, ntalo na yango ezalaka na nse ya mbongo oyo ekozwa mpo na kosamba likambo yango na tribinale.” Lapolo moko emonisaki ete soki okamati bato nkama oyo babebisaki biloko, bato misato mpamba nde bakangamaki.
Na ntembe te yo mpe okondima ete soki baboti bazali koteya mpenza bana na bango, yango ekoki kozala lolenge oyo eleki malamu mpo na kosilisa mobulu. Kasi, soki na kati ya mabota makambo ezali kotambola malamu te, mboka mobimba enyokwamaka. Ana Luisa Vieira de Mattos, profesere na Iniversite ya São Paulo na ekólo Brésil, alobi ete makambo oyo ebimisaka mikakatano epai ya bilenge ezali oyo: “baboti babatelaka bana malamu te, batyelaka bango mibeko te, basololaka na bango te, bazali na bopɔtu, batalaka makambo na bango te.”
Na mikolo na biso, tozali mpenza komona ete maloba oyo ya Yesu mazali kokokisama: “Mpo ete mobulu ekoyikana mingi, bolingo na mingi ekozwa mpiɔ.” (Matai 24:12) Biso nyonso tozali mpenza komona ete maloba ya 2 Timote 3:1-4 mazali kokokisama. Ntoma Paulo akomaki boye: “Ososola likambo oyo ete, na mokolo na nsuka, ntango na mpasi ekoya. Zambi bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolendo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matɔndi, bato bazangi bulɛɛ, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, batɔngi, batomboki, bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nko, bato bavimbi na lolendo, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe.” Kofanda na bato oyo bazali na bizaleli motindo yango, epusaka bilenge mingi bákóma bato ya mobulu. Kasi, yango esengeli kolɛmbisa biso te. Atako bakonzi balongi te kosilisa ezaleli ya kobebisa biloko, ezali na bato oyo babongoli bomoi na bango, batiki bizaleli mabe to kosala makambo lipwalipwa. Mpo na bato yango, ezaleli ya kobebisa biloko esilaki.
Mateya ya malamu mpo na bilenge
Eloko nini esalisaki baoyo bazalaki bato ya mobulu bakisa mpe bato mosusu bábongwana? Atako balakisi mpe baboti mosusu bakoki kotyela yango ntembe, Biblia ezali na mateya ya malamu mpenza, mpe mateya yango ebongi na mikolo na biso. Ntango balandaki mateya yango, bato mosusu oyo bazalaki kobebisa biloko bandimaki kotosa mobeko oyo ya Nzambe: “[Okolanda] ebele mpo na kosala mabe te.” (Exode 23:2) Mingi basepelaki na makambo oyo Liloba ya Nzambe ezali koteya mpo na bindimeli mpe mateya oyo liboso bazalaki koyeba yango malamu te. Mpe makambo oyo bayekoli epusaki bango bábanda kosala makambo malamu. Tózwa ndakisa ya José, elenge moko afandi na mboka São Paulo. Banda bomwana na ye, bateyaki ye kosalela bikeko mpo na kosambela. Ntango ayebaki ete Yehova ezali nkombo ya Nzambe, mpe ete Nzambe andimaka losambo ya bikeko te, José abongolaki bizaleli na ye mpo abanda kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe.—Exode 20:4, 5; Nzembo 83:18; 1 Yoane 5:21; Emoniseli 4:11.
Nelson azalaki se kokutana na mikakatano wana azalaki kokɔta na bituluku ya bato ya mobulu mpe mosala na ye ezalaki kaka kobunda bitumba. Nzokande, akomaki na elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya mpe likambo yango esungaki ye mingi. Alobi boye: “Na esika ete baboti na ngai básundola ngai mpo nazalaki kotambola na baninga ya mabe mpe nazalaki komela bangi, sikoyo bato nyonso na ndako bapesaka ngai limemya mingi. Mbala mingi tata atindaka ngai napesa bayaya na ngai toli. Banda nabandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, nayebi sikoyo eloko oyo babéngi esengo, mpamba te bomoi na ngai ekómi na ntina.” Mpo na elenge lokola Marco oyo afandi na mboka monene mpe ameseni komona makambo ya mobulu, asepelaki mingi mpenza ntango ayekolaki ete Bokonzi ya Nzambe ekokómisa mabelé paladiso.—Emoniseli 21:3, 4.
Tóyoka lisusu lisolo ya Valter. Ye azalaki bandi, azalaki kobunda na balabala, mpe azalaki kobebisa biloko. Lokola azalaki mwana etike mpe akutanaki na makambo mingi ya mpasi na bomwana na ye, Valter akamwaki na komona ete na mokili mabe oyo, ezali mpe na bato oyo basalelaka mpenza Nzambe. Bato yango bazali kosala makasi ya kotosa mibeko ya Biblia na bomoi na bango, bazali na motema mawa, bapesaka bato lokumu, mpe bazali na boboto. Valter alobi: “Ndenge mpenza Yesu alakaki, sikoyo nazali na kati ya libota moko monene, nazali na ‘bandeko mibali na bandeko basi, bamama na batata.’ Nazali kozela na mposa mingi ntango oyo bato bakofanda na esengo mpe na bomoko na Bokonzi ya sembo ya Nzambe.”—Malako 10:29, 30; Nzembo 37:10, 11, 29.
Eloko oyo eleki kotomboka na malamu
Longola kozala na boboto mpe na bolingo epai ya bazalani na bango, bato oyo bazalaki babebisi biloko bayekolaki mpe ‘koyina mabe.’ (Nzembo 97:10; Matai 7:12) Ezali boni mpo na yo? Ata soki ozali moko na baoyo bazali kotungisama na makambo ya kobebisa biloko oyo epalangani mingi lelo oyo, soki oyekoli Liloba ya Nzambe ekosalisa yo omona ete Yehova azali solo mpe azali Tata na yo ya bolingo oyo alingi bolamu na yo. (1 Petelo 5:6, 7) Nzambe akoki kosalisa yo okola na elimo, ata soki ozali na bolɛmbu to ozali mobola. Kaka likambo yango, epesaka moto esengo mingi!
Yehova na mwana na ye Yesu Klisto balingi mpenza ete bato ya mitindo nyonso báyekola mateya ya Biblia. Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa bato bátika ezaleli ya kobebisa biloko, kasi ekoki mpe kosalisa bango na ndenge mosusu. Ekoki kopusa bango básala lisusu milende na kotosa mibeko ya Nzambe. Nsuka na yango, bakokóma Batatoli ya Yehova, oyo bazali libota monene ya bandeko oyo bafandi na mokili mobimba mpe bayebani ete bazali bato ya pɛto mpe bazali na bizaleli malamu. Na kolanda Baefese 4:24, baklisto yango ya sembo ‘balati bomoto ya sika oyo ezali na motindo ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo.’ Etikali moke mokili mobimba ekotonda na bato ya ndenge yango mpamba te kaka bango nde bakobika mpe bakozwa bomoi ya seko.—Talá Luka 23:43.
Mokili ya sika epai ezaleli ya kobebisa biloko ekozala te
Okanisi mpenza ete ezaleli ya kobebisa biloko ekoki kosila? Soki ezali bongo, ndenge nini mbongwana monene wana ekosalema? Etikali moke Bokonzi ya Nzambe ekolongola makambo mabe oyo tozali komona na mokili na baoyo bazali kosala yango. Nzambe akosambisa bafandi ya mokili soki bazali kobuka mibeko na ye ya sembo na nko. (Talá Yisaya 24:5, 6.) Atako “bato na bokesene bakobeba nyɛɛ,” bato oyo balingaka bosembo bakobika. ‘Yehova akosunga bango mpe akobikisa bango; akobikisa bango liboso na bato mabe mpe akosikola bango; mpo ete balukaki ekimelo epai na ye.’—Nzembo 37:38-40.
Ɛɛ, makambo oyo ebimisaka ezaleli ya kobebisa biloko ekosila. Mobulu, konyokola bato, bampasi, mpe mabe ekozala lisusu mpe te. Nde mokili ya sika ekozala mokili ya kimya, ya bosembo ya solosolo mpe moto akobanga eloko moko te. Yisaya 32:18 elobeli makambo oyo ekosalema mpenza: “Bato na ngai bakofanda na efandelo ya kimya na bifandelo na solo mpe na ndako na bolɔzi te.” Bato bakofanda na paladiso kitoko oyo ekozala na mokili mobimba; bato yango bakolingana mpe bakozala na boboto moko epai mosusu.
Elongo na bamilio mosusu ya bato, baoyo bazalaki kobebisa biloko bazali sikoyo na boyokani malamu na Yehova Nzambe. Batiki ezaleli ya kobebisa biloko. Yo mpe okolinga ete Liloba ya Nzambe etambwisa yo tii okozwa bomoi na mokili ya sika? Boye ekozala malamu olanda ndakisa ya mokomi ya nzembo oyo akomaki makambo oyo Yehova alobaki ete: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.”—Nzembo 32:8.
[Elilingi na lokasa 7]
Bilenge babatelamaka soki baboti bazali kotyela bango likebi mpe bazali kolakisa bango bolingo