Ezaleli ya kobebisa biloko: Eutaka wapi?
“NAZALI na likambo ya koloba te.” Moto moko akomaki maloba oyo na balɛtre minene na efelo moko bapakolaki langi ya sika na kartye moko kitoko ya mboka São Paulo. Mbala mosusu okokanisa ete ezali se mosala ya bato oyo babebisaka biloko. Mpe kokoma na bifelo ezali kaka lolenge moko ya ezaleli ya kobebisa biloko.
Kanisá naino soki bato ya mobulu babebisi motuka na yo ya sika. Tomonaka ndenge bato ya mobulu babebisi to mpe babuki bandako to biloko mosusu ya Leta oyo ezali na ntina mpo na bato mingi. Okoki komituna mpo na nini bongo? Osilá komituna mpo na nini bato mingi bakómi na ezaleli ya kobebisa biloko? Na bisika mingi, tozali komona lokola nde bato ya mobulu bayokaka esengo na kobebisa to kobuka bandako ya telefone. Mingimingi babebisaka babisi to bingbunduka ya Leta. Tozali komona lokola nde bato yango bazalaka mafumafu. Kasi, ezaleli oyo bato mingi bakómi na yango ya kobebisa biloko, ezala ete tozali komona yango to bazali nde kosalela biso yango, ezali komonisa likambo nini?
Marco,a elenge moko ya mboka Rio de Janeiro, ayokaki nkanda ntango ekipi na bango ya ndembo epolaki, yango wana abandaki kobamba mabanga na bisi moko etondaki na bato oyo bakumisaka ekipi oyo elongaki. Tózwa lisusu ndakisa ya Claus. Ye soki alongi te na kelasi, azalaki kosilika makasi mpe kobamba mabanga mpe kobuka batalatala ya ba maninisa. Kasi, “loyenge” na ye esilaki ntango bafutisaki tata na ye biloko oyo ye abebisaki. Elenge mosusu, nkombo na ye Erwin, azalaki kotánga mpe kosala. Ye na baninga na ye bayebanaki lokola bana malamu. Nzokande, lisano na bango ezalaki nde kobebisa biloko na kartye. Baboti ya Erwin bayebaki likambo yango ata moke te. Valter azalaki mwana etike mpe azalaki kolala na babalabala ya São Paulo. Baninga na ye ya motema bazalaki bato ya mobulu oyo bazalaki kobebisa biloko; ye mpe alandaki makambo na bango. Ayekolaki mpe karate. Bandakisa oyo elakisi ete ezali bato nde babebisaka biloko, mpe moto na moto azali na bantina oyo epusaka ye mpe esengo oyo ayokaka na kosala bongo.
Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete: “Kobebisa biloko ekoki kozala ndenge ya kozongisa mabe na mabe to ndenge ya komonisa makanisi na makambo ya politiki. Ntango mosusu bato, ezala bilenge to mikóló, basalaka mabe kaka na ‘loyenge.’” Kasi, na esika ezala se loyenge ya bomwana, kobebisa biloko ekoki kobimisa makama minene, ekoki ata koboma. Etuluku moko ya bilenge balukaki “kotya mwa loyenge,” bongo ntango bamonaki moto moko alali, basopelaki ye esansi mpe bapelisaki mɔ́tɔ. Na nsima, moto yango, oyo azalaki Indien, akendaki kokufa na lopitalo. Zulunalo moko eyebisaki ete “bilenge yango balobaki ete bakanisaki te ete moto moko akolandela bango mpo bato mingi oyo basɛngaka mbongo batumbamaki na balabala, mpe Leta asambisaki moto te.” Ata soki emonani ete bato ya mobulu oyo babebisaka biloko babomi moto te, esɛngaka mbongo mingi mpo na kobongisa biloko oyo babebisaka mpe makambo yango etungisaka bato mingi. Boye, nini ekoki kopekisa to kosukisa ezaleli ya kobebisa biloko?
Nani akoki kosukisa ezaleli ya kobebisa biloko?
Bapolisi na biteyelo bakoki kosilisa ezaleli ya kobebisa biloko? Mokakatano moko ezali ete mbala mosusu bakonzi batii naino makanisi na bango na koluka kosilisa mabe ya minene lokola kotɛka bangi to koboma bato, na esika ya kolandela mabe ya “mikemike.” Polisi moko alobaki ete soki bakangi elenge moko mpo asali mobulu, mbala mingi baboti “bapesaka foti na baninga oyo batambolaka na ye, to na eteyelo, to na bapolisi mpo bakangi ye.” Koteya bato bizaleli malamu mpe kotya mibeko ya makasi ekoki kokitisa ezaleli ya kobebisa biloko; kasi, ekoki mpenza kosalema soki baboti babongoli makanisi na bango te? Moto moko oyo asalaka mosala ya kosembola bilenge ya mobulu alobi boye: “Mokakatano nyonso wana eyaka soki eloko ya kosala ezali te to soki bazwi libaku ya kosala mabe. [Bana bazali] kotikala libándá tii na kati ya butu, eloko ya kosala ezali te. Ekoki mpe kozala ete bakɛngɛlaka bango te, soki boye te bakoki kozala libándá te.”
Atako kobebisa biloko ezali mokakatano monene na bisika ebele, kasi tótalela ndenge likambo yango ekoki kosila. Bilenge oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo, oyo bazalaki kobebisa biloko, babongwanaki. Lelo oyo baboyi bizaleli nyonso oyo eyokisaka bato mosusu mpasi na motema. Likambo nini esalaki ete bilenge wana ya mobulu bátika bizaleli wana? Ekokamwisa yo soki tolobi ete ezaleli ya kobebisa biloko ekokita kaka te kasi ekosila? Tosɛngi na yo otánga lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.