Bolingo epai na ‘bandeko na biso bandimi’
BAKLISTO ya solo bayokanaka lokola bana ya libota moko. Kutu, kobanda na ekeke ya liboso T.B. babénganaka “ndeko mwasi” mpe “ndeko mobali.” (Malako 3:31-35; Filemona 1, 2) Yango ezali kaka maloba mpamba te; kasi ezali kolakisa ndenge oyo basambeli ya Nzambe batalelanaka bamoko na bamosusu. (Talá 1 Yoane 4:7, 8.) Yesu alobaki boye: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.”—Yoane 13:35.
Na sanza ya Yuli 1997, bolingo yango emonanaki na ekólo Chili, ntango bambula makasi ebɛtaki mpe mai etondaki nsima ya eleko molai oyo mbula ezalaki konoka te. Mbala moko, bato mingi bazangaki bilei, bilamba mpe biloko mosusu. Na ntango ya mpasi, Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpo na kolanda toli ntoma Paulo apesaki na Bagalatia ete: “Soko tozwi nzela, tósalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai na bango bazali bandimi.”—Bagalatia 6:10.
Na bongo, Batatoli ya Yehova bamibongisaki nokinoki mpo na kopesa lisungi. Bapesaki bilei, bilamba mpe biloko mosusu. Bakabolaki yango boye: ya bana, ya mikóló, ya basi mpe ya mibali. Batyaki yango na bakartɔ mpe batindaki yango na bisika likama esalemaki. Ata banamike bapesaki banapopi! Ndeko mwasi moko akamwaki mingi ntango amonaki Ndako ya Bokonzi etondi na biloko oyo batindelaki bango. Alobi boye: “Natikalaki monɔkɔ polele, nazalaki koyeba te soki nasɛka to nalela. Ezalaki mpenza biloko oyo tozalaki na mposa na yango.”
Na nsima, koningana ya mabelé esalemaki na mbalakaka na eteni moko ya bisika yango oyo ezindaki na mai. Bandako mingi ekweaki. Mpo na kosalisa bandeko, basalaki bakomite mingi mpo na lisungi. Bakomite ya botongi na etúká yango, oyo etalaka botongi bandako ya makita ya Batatoli ya Yehova, esanganaki mpo na kopesa mabɔkɔ mpe lisungi. Esalaki nini? Bandeko batongaki mwa bandako mosusu mpo na bandeko oyo bandako na bango ebebaki. Atako bandako yango etongamaki malamumalamu te, elekaki mpenza bandako oyo bibongiseli ya mokili ezalaki kopesa bato báfutela. Bandako yango ezalaki na pavema te, maninisa te, mpe bapakolá mpe langi te.
Bandeko mosusu bakendaki mosika mpo na kopesa lisungi. Atako atambolaka na velo ya bibɔsɔnɔ, prezida ya komite ya botongi na etúká moko, atambolaki mikolo mibale mobimba kotala bisika makama esalemaki. Ndeko moko akufá miso asalaki mosala makasi ya komema mabaya tii epai ya mosali na mabaya oyo azalaki kokata yango. Ndeko mosusu akufá matoi azalaki kokɔngɔla mabaya mpe kokende kotika yango na bisika oyo mosala ezalaki kosalema.
Bato mingi oyo bamonaki, bakamwaki na lisungi oyo bandeko bazalaki kopesa. Na mboka moko, ntango bazalaki kobongisa ndako ya ndeko mwasi moko, motuka ya bapolisi eyaki kotɛlɛma na pembeni. Bapolisi balingaki koyeba soki nini ezalaki kosalema wana. Moko na bango atunaki ndeko moko boye: “Basali oyo bazali na esengo boye bazali banani, mpe bafutaka bango ntalo boni?” Ndeko yango ayebisaki bango ete bango nyonso bazali kosala na bolingo malamu, bakofuta bango te. Mokonzi moko ya bapolisi alobaki ete afutaka ndambo na zomi sanza na sanza na ndakonzambe na bango, kasi pastere na bango ayaki ata kotala ye te banda koningana ya mabelé esalemaki! Na mokolo oyo elandaki, mokonzi moko ya bapolisi abéngaki ndeko mwasi na telefone. Ye mpe amonaki ndenge mosala ezalaki kosalema. Alobaki ete akamwaki na esengo oyo basali bazalaki na yango mpe epesaki ye mposa ya kosangana na mosala yango!
Ya solo, mosala ya kopesa lisungi na ekólo Chili ezalaki likambo ya esengo mpo na basali ya bolingo malamu mpe lisusu litatoli mpo na bato oyo bamonaki yango.