Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/7 lok. 7
  • Tózwa liteya na mabunga ya kala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózwa liteya na mabunga ya kala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Koyambola oyo ezongisaka moto makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Motema mawa ya Jéhovah ezali kobikisa biso na kozanga elikya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Okoki kozala ntango nyonso na etamboli malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/7 lok. 7

Tózwa liteya na mabunga ya kala

MIBEKO oyo Mozalisi na biso atii mpo na etamboli malamu mizali mpo na libela mpe mikobongwana te. Mpo na yango, etinda oyo ezwami na Bagalatia 6:7 ebongi kosalelama lelo oyo: “Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango.” Ya solo, moto akoki koboya kondima ete akozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe, kasi, mobeko ya Nzambe ekobongwana te. Nsukansuka, moto moko te akoki kopɛngola mbuma ya misala na ye.

Ezali boni mpo na moto oyo azalaki liboso na bomoi ya kilikili, bongo na nsima abongwani, akómi mosaleli ya Nzambe? Akoki kokoba kobuka mbuma mabe ya etamboli na ye ya kala. Kasi, yango elimboli te ete Nzambe alimbisi ye te. Mokonzi Davidi azwaki mikakatano mingi na bomoi na ye mpo na ekobo oyo asalaki na Bata-seba. Akokaki kopɛngola yango te. Kasi abongolaki motema, mpe Nzambe alimbisaki ye.​—2 Samwele 12:13-19; 13:1-31.

Osilá koyoka ete olɛmbi nzoto mpo ete ozali kobuka mbuma mabe ya mabunga oyo osalaká? Soki totaleli yango na lolenge malamu, koyoka mawa ekoki kokundwela biso ete ‘tókeba, tótala masumu te.’ (Yobo 36:21) Ɛɛ, koyoka mawa ekoki kosalisa biso ete tózongela lisusu mabe te. Kasi, likambo oyo eleki malamu, Davidi asalelaki liteya oyo azwaki nsima ya kosala lisumu bobele mpo na litomba na ye moko te kasi mpo na bato mosusu lokola. Alobaki ete: “Nakoteya nzela na yo epai na baoyo bakopɛngwaka yango, mpe bato na masumu bakobutwa epai na yo.”​—Nzembo 51:13.

[Bililingi na lokasa 7]

Davidi azwaki liteya na lisumu na ye na Bata-seba

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto