Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/11 nk. 21-23
  • Kolekisa te libaku bobele moko oyo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolekisa te libaku bobele moko oyo!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tókamata ekateli ya mayele
  • Ntango na biso ezali ya ntina mingi
  • ‘Ekoki ete nsango malamu esakolama liboso’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • “Bókoba koluka liboso bokonzi”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Mosala oyo mobongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/11 nk. 21-23

Kolekisa te libaku bobele moko oyo!

PETER akómaki pene ya kosilisa kelasi na ye mpo na kokóma monganga, na ntango yango, nsango ya lobiko oyo ezwami na Biblia esimbaki likebi na ye. Na ntango azwaki lipɔlɔ́mi mpe abandaki kosala lokola monganga kati na lopitalo moko, bakonzi na ye bazalaki ntango nyonso kolendisa ye ete azwa kobongisama mosusu mpo na kokóma monganga-mopasoli na maladi ya motó. Wana ezali libaku oyo minganga mingi oyo bauti kosilisa kelasi balingaka soko moke te kolekisa yango.

Nzokande, Petera azwaki ekateli ya kolekisa libaku yango. Mpo na nini? Ezalaki bobele mpo ete azalaki na mposa na yango te mpe ete ntina oyo ekokaki kopusa ye na kondima yango ezalaki te? Ezalaki bongo te, mpamba te Peter akanisaki malamu na ntina na libaku yango. Nsima ya kokóma Motatoli ya Yehova oyo amipesi mpe azwi batisimo, ayokaki mposa ya kolekisa ntango mingi, engebene makoki na ye, kati na makambo ndenge na ndenge ya mosala ya boklisto. Asosolaki ete, soki akokóma monganga-mopasoli na maladi ya motó, mokemoke, mosala na ye ekobanda kozwa ntango mpe makasi na ye mingi koleka. Asalaki bozoba mpo ete aboyaki libaku wana kitoko, to asalaki nde mayele?

Mpo na bamoko, ekoki komonana lokola ete ekateli ya Peter ezalaki ya bozoba. Nzokande, atalelaki makomi ya Biblia, lokola Baefese 5:15, 16. Kati yango, ntoma Paulo alendisaki baninga na ye baklisto ete: “Bókeba mpo na etambweli na bino, bózalaka bazoba te kasi bato na mayele mpenza. Bósalisa ntango na bino misala malamu [“komisombeláká ntango ebongi,” NW], zambi mikolo izali mabe.”

Tiká tótalela liloba “ntango ebongi.” Ebongolami uta na liloba ya Greke oyo esalelami mingimingi mpo na kolobela ntango to eleko oyo na boumeli na yango makambo ndenge na ndenge masalemi to ntango oyo ebongi mpo na kosala likambo moko ya sikisiki. Awa Paulo alobelaki makasi ete baklisto basengeli kosala makambo ya ntina kozanga kolekisa ntango. Ya solo, basengeli “kotalela malamu makambo oyo mazali mpenza na ntina.” (Bafilipi 1:10, NW) Ezali kosɛnga kotya makambo ya ntina na esika ya liboso.

Na bongo, mokano ya Nzambe ezali nini mpo na ntango na biso? Mokano ya Nzambe ezali nini mpo na bato oyo balingaka ye? Bisakweli ya Biblia bimonisi polele ete eleko na biso ezali bongo “ntango ya nsuka,” to “mikolo ya nsuka.” (Danyele 12:4; 2 Timoté 3:1, NW) Yesu Klisto alobelaki polele likambo oyo esengelaki kozala na ntina mingi koleka mpo na mikolo na biso. Alobaki sikisiki ete liboso ya nsuka ya ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo, ‘Nsango Malamu oyo na Bokonzi esengeli kosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso.’ Bobele na nsima na yango nde nsuka esengeli koya.​—Matai 24:3, 14.

Na yango, tosengeli kosimba libaku nyonso oyo emonani mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe ya kozalisa bayekoli. (Matai 28:19, 20) Lokola mosala yango ekozongelama lisusu te, ezali libaku ya nsuka oyo mpo na yango tosengeli komipesa mobimba kati na mosala oyo ya kobikisa bomoi. Ya solo, “ntango ebongi ezali sasaipi, talá mokolo na kobika ezali sasaipi.”​—2 Bakolinti 6:2.

Tókamata ekateli ya mayele

Peter​—elenge mobali oyo tolobelaki na ebandeli​—akanisaki mozindo na ntina na ekateli na ye mpe atalelaki malamu motuya ya maponi oyo alingaki kosala. Amonaki ete elingaki kozala mabe te mpo na ye ete akɔta kelasi mpo na kokóma monganga-mopasoli na maladi ya motó. Kasi likambo nini ezalaki na ntina mingi koleka mpo na ye? Ezalaki bongo mosala na ye ya boklisto, na kotaleláká ete ezali mosala oyo mosengeli kosalema nokinoki. Bobele na ntango yango, azalaki na mikumba oyo asengelaki kokokisa. Asilaki kobala mpe asengelaki kokokisa bamposa ya mwasi na ye, oyo azalaki kati na mosala ya kosakola ya ntango nyonso. (1 Timoté 5:8) Peter asengelaki mpe kofuta nyongo ya mosolo oyo epesaki ye nzela ya kotánga kelasi. Na bongo, akanaki kosala nini?

Peter azwaki ekateli ya koyekola radiologie mpe échographie. Yango esɛngaki na ye ete alekisa ngonga lolenge moko na oyo alekisaka mokolo na mokolo kati na mosala na ye. Asengelaki mpe kolanda kobongisama yango na ngonga na ye ya mosala. Ɛɛ, bamoko bakoki kotalela yango lokola mosala oyo ezali na lokumu mingi te, kasi yango epesaki ye likoki ya kolekisa ntango mingi na makambo ya elimo.

Ezali na likambo mosusu oyo epusaki Peter ete akamata ekateli motindo wana. Atako akokaki te koloba mabe mpo na moto mosusu oyo akokaki mbala mosusu kozwa ekateli ekeseni na oyo ya ye, ayebaki ete komikɔtisa mingi na makambo ya mosuni ezali mpenza likámá mpo na moklisto. Ekoki kopusa ye ete atalela mikumba na ye ya elimo na bopɔtu. Yango emonisami kati na ndakisa mosusu oyo etaleli mosala ya mosuni.

Mosakoli moko ya ntango nyonso ya Bokonzi azalaki mosáli ya ntɔ́ki. Azalaki na likoki ya komisalisa mpo na oyo etali mosolo, na kotekisáká bitánda oyo azalaki koyema. Wana azalaki kolekisa ntango na ye mingi kati na mosala ya boklisto oyo eleki mpenza misala nyonso na ntina, na bongo akokaki komisalisa malamu. Nzokande, mposa ya kokólisa mosala na ye ya ntɔ́ki ebandaki koyikana. Amipesaki mingi na mosala ya koyema mpe na makambo oyo mazali na boyokani na mosala ya ntɔ́ki, atikaki mosala ya ntango nyonso, mpe na nsima atikaki mosala ya kosakola Bokonzi na boumeli ya ntango molai. Na nsima, akómaki na etamboli oyo eyokani te na Makomami, yango esalaki ete abimisama na lisangá ya boklisto.​—1 Bakolinti 5:11-13.

Ntango na biso ezali ya ntina mingi

Lokola tozali kosalela Yehova sikawa, na ntembe te, mposa na biso ezali ya kozala ntango nyonso sembo epai na ye. Toyebi ete tozali kobika na ntango oyo ekeseni mpenza na ntango nyonso mosusu kati na lisoló ya bato. Mpo ete tólanda ntango nyonso kosalela Nzambe mpe kolónga mikakatano ya mikolo oyo, ekoki mbala mosusu kosɛnga na biso ete tósala mbongwana na makambo mingi. Tokoki kokokanisa yango na ntango oyo mosáli bilanga abukaka mbuma ya milona na ye. Ezalaka eleko ya ntina mingi, oyo na boumeli na yango basáli na bilanga basengeli kosala makasi mingi koleka lolenge basalaka na momeseno mpe basalaka na boumeli ya ngonga mingi na mokolo. Mpo na nini? Mpamba te mbuma esengeli koyanganisama na boumeli ya eleko moko ya mokuse.

Ntango oyo etikali liboso ete nsuka ya biloko mabe ya ntango oyo eya ezali mpenza mokuse. Sikawa, koleka na mikolo mizalaki liboso, moklisto ya solo asengeli kosala makasi ete alanda ndakisa ya Yesu mpe atambola na matambé na ye. Lolenge ya bomoi oyo azalaki na yango awa na mabelé emonisaki eloko nini ezalaki na ntina mingi koleka biloko nyonso na miso na ye. Alobaki ete: “Ebongi na biso kosalaka misala na Motindi na ngai naino ezali moi. Butu ekoya wana moto moko akoki kosala mosala te.” (Yoane 9:4) Na kolobáká ete butu ezalaki koya, Yesu azalaki kolobela ntango ya komekama na ye, ya kobakisama na ye likoló na nzeté, mpe ya liwa na ye, wana mosala na ye awa na mabelé elingaki kosuka mpe wana alingaki kozala na likoki te ya kosala misala ya Tata na ye ya likoló.

Ya solo, na boumeli ya mosala na ye oyo eumelaki mbula misato na ndambo, Yesu alekisaki mwa ntango na ye mosusu na kosaláká makamwisi mpe na kobikisáká bato ya maladi. Nzokande, asalelaki ntango na ye mingi na kosakoláká nsango ya Bokonzi mpe na ‘kosakoláká lisiko mpo na baoyo bakangami’ na mangomba ya lokuta. (Luka 4:18; Matai 4:17) Yesu asalaki na molende mingi mpenza kati na mosala na ye, mpe azwaki ntango mpo na kolakisa bayekoli na boye ete bákoka kotonga likoló na moboko oyo ye asilaki kotya mpe ete bákoka kokóba mosala ya kosakola na lolenge oyo ekoki mpenza kobota mbuma. Yesu alekisaki ata libaku moko te mpo na kokólisa matomba ya bokonzi mpe alingaki ete bayekoli na ye básala bobele bongo.​—Matai 5:14-16; Yoane 8:12.

Na ndakisa ya Yesu, biso baoyo tozali bayekoli na ye na mikolo oyo tosengeli kotalela ezalela oyo bato bazali kati na yango na lolenge Yehova Nzambe azali kotalela yango. Ntango etikali moke mpo na ebongiseli ya biloko oyo, mpe na motema mawa nyonso, Nzambe alingi ete bato nyonso bázwa libaku ya kobikisama. (2 Petelo 3:9) Na yango, ekozala likambo ya mayele kotya mokano ya Yehova na esika ya liboso, mpe mikano mosusu na esika ya mibale, boye te? (Matai 6:25-33) Mingi mpenza na ntango oyo ya ntina mingi, eloko oyo ekokaki kotalelama na motuya mingi ekoki kokóma na motuya moke kati na bomoi na biso lokola baklisto.

Moko kati na biso akoyoka mawa mokolo mosusu mpo ete totye mokano ya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na biso? Soko moke te, mpamba te bomoi ya komipesa ya moklisto ezali mpenza na mbano monene. Na ndakisa, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nazali koloba na bino solo ete, soko moto nani atiki ndako soko bandeko mibali soko bandeko basi soko mama soko tata soko bana soko bilanga mpo na ngai mpe mpo na Nsango Malamu, moto yango akozwa na ntango oyo ndako mpe bandeko mibali mpe bandeko basi mpe bamama mpe bana mpe bilanga mbala monkámá na minyoko lokola, mpe na ekeke ekoya akozwa bomoi na seko.”​—Malako 10:29, 30.

Mosolo ekoki soko moke te kosomba mbano oyo ezali kozwama epai na baoyo bazali kosalela ntango na bango mpo na kosanzola Yehova mpe kosakola nsango ya Bokonzi. Bazali kozwa mapamboli mingi! Bazali bongo kozwa baninga ya solosolo, esengo ya kosala mokano ya Nzambe, kondimama na Nzambe, mpe elikya ya bomoi ezangi nsuka. (Emoniseli 21:3, 4) Mpe, kosalisa bato na elimo mpe kopesa lokumu na nkombo mosantu ya Yehova lokola Batatoli na ye ezali mpenza lipamboli monene! Na ntembe te, ‘kosomba ntango ebongi’ ezali solo likambo ya mayele mpe ezali kopesa litomba. Sikawa, koleka na mikolo mizalaki liboso, ezali ntango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Okotika ete libaku bobele moko wana eleka te mpe okosimba yango makasi?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Nkombo oyo ebongolamaki.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto