Lotómo ya kondima bobele likambo oyo oyebi malamu endimisami lisusu
EUTI koleka kala mingi te, likatami oyo ebimisamaki na zuzi oyo asalaka ankɛtɛ liboso ete makambo másambisama na esambiselo monene ya engumba Messina, na Italie, endimisaki lisusu ete bamposa ya moto ya maladi oyo azali mokóló, na ntina na lolenge ya mwango oyo alingi kosalisama na yango, ezali kotya ndelo na lotómo ya minganga. Likatami yango ebimisamaki na likambo oyo etalelaki Motatoli ya Yehova moko.
Na Yanuáli 1994, Antonino Stellario Lentini, Motatoli moko ya mibu 64 azalaki na maladi oyo ebéngami hémophilie, amemamaki nokinoki na lopitalo moko na Taormina, na Messina. Catena, mwasi ya Antonino, ayebisaki epai na basáli na lopitalo ete, lokola ye na mobali na ye bazali Batatoli ya Yehova, bakoki soko moke te kondima ete bázongisama makila. (Misala 15:20, 28, 29) Mposa na bango etosamaki.
Nzokande, wana bazalaki komema ye na lopitalo mosusu, mpema ya Antonino ekatanaki mpe na ntango bakómaki kuna mpasi na ye ekómaki makasi mingi koleka. Mwa moke na nsima, akufaki. Catena abulunganisamaki, kasi azwaki libɔndisi monene kati na elaka ya lisekwa oyo elobelami kati na Biblia. (Misala 24:15) Na nsima, kozanga ete amizela na yango, bamazistrá—ekoki kozala ete bakosamaki na nsango ya lokuta oyo epalanganisamaki na bipanzelo ya nsango—bafundaki mwasi wana ete abomaki mobali na ye mpamba te aboyaki básala mobali na ye lipaso, atako minganga bamonaki lokola ete yango esengelaki mpenza.
Na nsima ya koleka mbula moko, na mokolo mwa 11 Yulí 1995, eyebisamaki ete Catena azali na ngambo te, mpo ete asalaki mabe te. Ya solo, litatoli ya minganga emonisaki ete, na kotalela ezalela oyo moto ya maladi azalaki kati na yango, ata lipaso ekokaki kobikisa ye te.
Kasi maloba ya zuzi mamonisaki likambo ya ntina mpenza. Alobaki ete, ezali mpasi mpo na kondima likanisi oyo ete basáli na lopitalo basengeli kosunga moto ya maladi na lisali ya mwango oyo ye moko aboyi yango to oyo bato na ye baboyi yango. Abakisaki ete na Italie, mibeko mitali mosala ya monganga “misilaki kolobela ntina oyo monganga asengeli kozwa ndingisa ya kosalisa moto ya maladi na mwango oyo ye moko mobɛli to bato na ye bayebi yango malamu.” Na yango, alobaki ete Catena “abukaki mobeko te na lolenge aboyaki ete mwango motindo wana esalelama na nzoto ya mobali na ye.”
Likatami wana endimisi lisusu lotómo oyo moto ya maladi oyo azali mokóló azali na yango ya koboya mwango ya monganga oyo eyokani te na mposa na ye.