‘Ekoki ete nsango malamu esakolama liboso’
“Ekoki ete nsango malamu esakolama kati na mabota nyonso liboso”.—MALAKO 13:10.
1. Nini ezali kokesenisa lisangá ya ba Témoins de Jéhovah na mangomba nyonso mosusu ya boklisto ya mokili, mpe mpo na nini?
KATI NA bato nyonso oyo basambelaka losambo ya boklisto, ba Témoins de Jéhovah bazali bobele bango nde bazali kokamata mosala ya kosakola lokola eloko ya ntina mingi. Bazali kati na lisangá se moko oyo basangani na yango bazali komiyoka ete moto na moto azali na mokumba ya koloba ntango nyonso epai na baninga na ye mpo na mikano ya Nzambe. Mpo na nini ezali bongo? Mpamba te Temwe nyonso azali kotalela ete lokola azali moklisto, asengeli kolanda matambe na Klisto. (1 Petelo 2:21) Yango esengi nini?
2. Ndenge nini bato mingi batalelaka Yesu Klisto? Nzokande mosala na ye ya liboso awa na mokili ezalaki nini?
2 Kati na makanisi ya bato mingi, Yesu Klisto azali bobele moto moko oyo asalaki misala malamu: abikisaki bato ya maladi, aleisaki baoyo bazalaki na nzala, mpe amonisaki bolingo mpe boboto epai na bato bazalaki na mposa na yango. Nzokande, Yesu asalaki makambo mingi koleka. Libosoliboso azalaki mosakoli ya molende ya nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe. Mwa basanza nsima ya kozwa batisimo kati na mai ya Yordani, abandaki kosakola epai na bato banso mpe kolobaka ete: “Bobongola mitema! Mpamba te Bokonzi na likolo esili kobelema.” (Matai 4:17) Engebene lisolo ya Malako, “Yesu akomaki na Galilai kosakolaka nsango malamu na Nzambe. Alobi ete, ‘Elaka esili kokoka mpe Bokonzi na Nzambe ebelemi. Bongola mitema mpe bandima nsango malamu.’”—Malako 1:14, 15.
3, 4. (a) Atako Yesu abikisaki maladi ya motindo nyonso, likambo nini azalaki kolobela mingi kati na mosala na ye mpo na Nzambe? (b) Mpo na nini Yesu atindamaki? (c) Yesu akokanisaki mosala na ye ya kosakola na eloko nini, mpe bayekoli na ye basengelaki kosala nini?
3 Yesu abyangaki Petelo, André, Yakobo mpe Yoane na kolanda ye. “Bongo, atamboli na Galilai mobimba, alakisi na biyanganelo na bango mpe asakoli nsango malamu na Bokonzi mpe abikisi maladi nyonso mpe ndenge nyonso na bolembu kati na bato.” Lokola bibele na bato balingaki kotika ye te, Yesu alobaki na bango ete: “Ekoki na ngai kosakola nsango malamu na Bokonzi na Nzambe na mboka mosusu lokola, mpo ete natindami na likambo yango.” Mpe asakolaki na biyanganelo na Yuda.—Matai 4:18-23; Luka 4:43, 44.
4 Na nsima, Yesu azongaki na Galilai mpe “abandaki kotambola kati na mboka minene mpe mboka mike. Asakolaki mpe alakisaki nsango malamu na Bokonzi na Nzambe”. (Luka 8:1) Kokokanisaka mosala na ye ya kosakola na mosala ya kobuka mbuma, alobaki: “Mbuma na elanga eteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Bobondela Nkolo na elanga ete atinda basali kati na elanga na mbuma na ye.” (Matai 9:35-38) Kati na makambo mosusu, bibele bazalaki kotikela ye ata ntango ya kopema te, kasi “ayambaki bango mpe asololaki bango likambo na Bokonzi na Nzambe, mpe abikisaki bango bazalaki na bosenga na kobika.”—Luka 9:11.
5. Malako nini Yesu apesaki epai na bantoma na ye ntango atindaki bango kati na mosala ya kosakola?
5 Ya solo Yesu abikisaki mpenza bato na maladi mpe aleisaki baoyo bazalaki na nzala. Nzokande, amipesaki mingi liboso mpo na koloba na bato na ntina na Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosenzela ete bayekoli na ye basala mpe mosala oyo. Nsima na kobongisa bantoma na ye, atindaki bango kosakola mibale na mibale mpe apesaki bango etinda oyo: “Wana ekokenda bino, bosakola ete, Bokonzi na likolo ezali kobelema.’” (Matai 10:7) Luka alobi: “Mpe atindaki bango kosakola bokonzi na Nzambe mpe kobikisa babeli.” (Luka 9:2) Epai mosusu, Yesu apesaki epai na bayekoli 70 etinda ya ‘kobikisa babeli mpe koyebisa bango ete bokonzi na Nzambe ebelemi’.—Luka 10:9.
6. Liboso ya kobuta na likolo, malako nini etali mosala na bango Yesu apesaki epai na bayekoli na ye?
6 Liboso ete abuta na likolo, Yesu apesaki epai na bayekoli na ye mokumba ya kokoba mpe kopalanganisa mosala ya kosakola. Apesaki bango etinda oyo: “Boye bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso . . . , kolakisa mpe bango ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino.” (Matai 28:19, 20) Alobaki na bango lisusu: “Kasi wana ekosila elimo santu koya likolo na bino, bokozwa nguya, mpe bokozala batatoli na ngai kati na Yelusaleme, na Yuda mobimba, na Samalia, mpe kino nsuka na mokili.” (Misala 1:8) Mpo na yango, ezali kosakolama ya nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe nde Yesu mpe bayekoli na ye, batyaki na esika ya liboso.
Bokonzi oyo esakolami na eleko na biso
7. Yesu alobaki nini na ntina na mosala ya kosakola oyo esengelaki kosalema na “nsuka ya bileko mabe oyo”?
7 Kati na esakweli na ye oyo etali makambo malingaki kobima na “nsuka ya biloko na ntango oyo”, Yesu alobaki: “Mpe nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:3, 14) To, engebene Malako 13:10: “Ekoki ete nsango malamu elakisama kati na mabota nyonso liboso.”—Tala Emoniseli 14:6, 7.
8. (a) Nsango malamu na eleko ya bantoma ezalaki kolobela likambo nini? (b) Makambo nini nsango malamu ezali koyebisa na eleko na biso?
8 Na “mikolo ya nsuka”, nsango malamu ya Bokonzi epalangani mingi koleka na ntango na Yesu. Yesu asakolaki ete Bokonzi ebelemi, na boye ete ye, Yesu, azalaki katikati na bato lokola Masiya mpe Mokonzi. (2 Timote 3:1; Matai 4:17; Luka 17:21) Nsango malamu oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosakola ezalaki kolobela lisekwa na Yesu mpe kobuta na ye na likolo, mpe ezalaki koyikisa basokemi mpiko na kondima Bokonzi oyo esengelaki koya. (Misala 2:22-24, 32; 8:19-21; 17:2, 3; 26:23; 28:23, 31) Sikawa, na “nsuka ya biloko na ntango oyo”, kosakolama ya nsango malamu ya Bokonzi ezali mpenza kotalela nsango ya ntina engebene yango Bokonzi esili kotyama kati na makolo.”—Emoniseli 11:15-18; 12:10.
Nani asengeli kosakola nsango malamu?
9. (a) Ndenge nini bamosusu bazali komeka komonisa ete na mikolo na biso, kosakolama ya nsango malamu ezali likambo etali baklisto nyonso te? (b) Nani Jéhovah asalelaki na kala mpo na kosakola liloba na ye, mpe yango emonisi nini mpo na biso lelo?
9 Na mikolo na biso nani asengeli kosangana kati na mosala ya kosakola? Boklisto ya mokili ezali kotya likebi te mpo na koyeba ete moto nyonso asengeli kosala yango, mpe ezali solo ete ntango Yesu alobaki ete nsango malamu ekosakolama, ayebisaki sikisiki te nani akokokisa mosala yango. Nzokande, nani Jéhovah asengelaki kosalela mpo na kokokisa mokumba yango, soki bobele te bato oyo bazali na kondima kati na Liloba na ye mpe baoyo basili kobanda kosalela yango kati na bomoi na bango? Ntango Jéhovah azwaki ekateli ya kokebisa bato ete mokili mabe esengeli kobomama, na mikolo ya Noa, asalelaki moto oyo azalaki “kotambola elongo na Nzambe ya solo”. (Genese 6:9, 13, 14; 2 Petelo 2:5) Mpo na koyebisa nsango ya bisakweli na Yisraele, atindaki ‘basaleli na ye, basakoli’. (Yilimia 7:25; Amosa 3:7, 8) Bana ya Yisraele bamipesaki na Jéhovah, bazalaki libota ya batatoli (Exode 19:5, 6; Yisaya 43:10-12) Ee, Jéhovah azali kosalela lokola batatoli, bato oyo bazali komipesa epai na ye.
10. Engebene lolenge oyo Matai 28:19, 20 ekomami, ndenge nini tokoki komona ete etinda ya kozalisa bayekoli ezali kotalela baklisto nyonso?
10 Bamosusu bazali koloba ete kati na Matai 28:19, 20 etinda ya kozalisa bayekoli epesamaki bobele na bantoma, mpe na ntina yango ezali kotalela baklisto nyonso te. Nzokande, tala oyo Yesu alobaki: “Boye bokenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso . . . kolakisa mpe bango ete batosa nyonso esili ngai kolaka bino.” Baklisto basengelaki koteya bayekoli ya sika na kotosa malako nyonso oyo Yesu atindaki bango; nzokande, moko na makambo oyo Yesu atindaki ezalaki ya ‘kokenda kozalisa bayekoli’. Na ntembe te, bayekoli nyonso ya sika basengelaki koteyama na kotosa mpe etinda yango.
11. (a) Mokumba nini ezalaki mpo na lisangá mobimba ya boklisto na ekeke ya liboso? (b) Mpo na kobika likambo nini tosengeli kosala, mpe yango ezali kotalela nini?
11 Lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso ebengamaki ‘libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulee, bato baponami, ete boyebisa malamu na oyo abyangi bino kobima na molili kokota na moi na ye na kokamwisa’. (1 Petelo 2:9) Basangani na yango, batatolaki na molende nyonso na ntina na Bokonzi na Nzambe. (Misala 8:4, 12) Paulo alobaki epai na “babulami” nyonso, baklisto bapakolami, baoyo bazalaki na Rome ete “eyambweli ekokomisa moto na lobiko ezali na bibebu” mpe “moto na moto oyo akobelela nkombo na Jéhovah akobika”. (Baloma 1:7; 10:9, 10, 13) Eyambweli wana mpo na lobiko, oyo esalami na ntango ya batisimo, esangisi mpe mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Jéhovah liboso na bato nyonso.
12, 13. (a) “Eyambweli mpo na elikya na biso” oyo Baebele 10:23 ezali koloba ezali kosalama ndenge nini? (b) Ndenge nini Nzembo 96 ezali komonisa ntina ya kosala eyambweli na libanda ya lisanga, mpe ndenge nini Emoniseli 7:9, 10 ezali kondima mokumba yango?
12 Ntoma Paulo akomaki epai na Baebele oyo bakomaki baklisto: “Tosimba ngwi eyambweli na elikya na biso, mpo ete ye oyo apesaki elikya azali sembo.” (Baebele 10:23) Eyambweli yango esengeli kosalema bobele na makita ya lisangá te. (Nzembo 40:9, 10) Ezali polele ete etinda ya esakweli oyo eyebisami kati na Nzembo 96:2, 3, 10 ezali libyangi mpo na kosakola na libanda ya lisangá, epai na mabota. Tozali kotanga: “Boyembela Jéhovah, bokumisa nkombo na ye, bosakola kobikisa na ye mokolo na mokolo. Bosolola lokumu na ye kati na mabota na bato: ‘Jéhovah azali Mokonzi.’” Na yango, kati na Matai 28:19, 20 mpe na Misala 1:8 Yesu azali kotinda baklisto na kosakola epai na mabota.
13 Mwa mosika kati na mokanda na ye epai na Baebele, Paulo azali koloba epai na baklisto bapakolami na elimo mpo na mosala yango ya kosakola liboso na bato banso: “Bongo mpo na ye, totombwela Nzambe mbeka na masanzoli ntango nyonso, yango mbuma na bibebu bizali koyambola nkombo na ye.” (Baebele 13:15) Kati na mokanda ya Emoniseli, tozali komona lisusu “ebele monene”, oyo bauti na mabota nyonso, bazali konganga: “Lobiko [euti] na Nzambe na biso oyo afandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate.” (Emoniseli 7:9, 10) Na yango, na eleko oyo ya nsuka ya biloko mabe ya ntango oyo, kosakolama ya nsango malamu esalami na ba Témoins de Jéhovah, batikali na bandeko na elimo na Klisto mpe baninga na bango ya mosala, baoyo bakokani na bampate, “ebele monene”. Kasi ndenge nini ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisaka mosala yango?
“Liboso ya bato banso mpe ndako na ndako”
14. Yesu asakolaki epai wapi, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye?
14 Yesu azalaki koteya liboso na bato mpo na koloba na bango polele. Na ndakisa, tozali kotanga ete azalaki koteya kati na biyanganelo. Mpo na nini bongo? Mpamba te bato bazalaki koyangana kuna mokolo ya sabata mpo na koyoka botangi mpe kosolola na ntina na Makomami. (Matai 4:23; Luka 4:15-21) Yesu ateyaki mpe bato na banzela, penepene na mai, likolo na ngomba, penepene na libulu ya mai na libanda ya engumba moko mpe kati na bandako. Yesu azalaki koteya bisika binso oyo azalaki kokuta bato.—Matai 5:1, 2; Malako 1:29-34; 2:1-4, 13; 3:19; 4:1, 2; Luka 5:1-3; 9:57-60; Yoane 4:4-26.
15. (a) Malako nini Yesu apesaki epai na bayekoki na ye ntango atindaki bango kokende kosakola? (b) Ndenge nini balimboli mosusu ya Biblia bazali kolimbola Matai 10:11?
15 Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye kokende kosakola, atindaki mpe bango epai na bato; ezali yango malako apesaki bango kati na Matai 10:1-15, 40-42: “Ekokoma bino na mboka monene nini to na mboka moke nini, boluka soko nani azali moto malamu kati na yango. Boumela wana kino ekolongwa bino.” Biblia ya Yelusaleme ezali kobongola yango boye: “Botuna soki moto ya lokumu azali”; lokola ete bayekoli basengelaki koluka moto moko monene na mboka yango, to moto oyo ayebi bato mingi, mpo ayebisa bango nani azali na lokumu malamu mpe abongi koyamba nsango. (Tala Osty mpe Traduction oecuménique de la Bible.) Wana ezali nde ndimbola oyo balimboli mosusu ya Biblia bazali kopesa mpo na Matai 10:11.
16. Na kotalela malamu mpenza malako na Yesu mazwami kati na Matai 10:11, ndenge nini bantoma basengelaki koluka bato oyo bazalaki na motema malamu mpo na kondima nsango na bango?
16 Nzokande, tobosana te ete mingi kati na bateolojié ya boklisto na mokili oyo bakendaka ndako na ndako te, mpe mingi kati na bato oyo bazali kolimbola Biblia bazali kosalela yango mpo na kolongisa lolenge na bango ya kosala. Na kokesena, soki totaleli malako na Yesu na lolenge ya kolongobana, tokomona ete azalaki kotinda bayekoli na ye koluka moto mokomoko, ezala ndako na ndako, to na esika ya bato mingi mpe kosakwela bango nsango ya Bokonzi. (Matai 10:7) Eyambeli ya bato yango mpo na nsango malamu nde ekomonisa soki babongi na yango to te.—Matai 10:12-15.
17. Nini ezali komonisa ete bayekoli na Yesu bazalaki bobele kokende kotala bato oyo bayebisaki bango te to baoyo bapesanaki na bango elaka te?
17 Maloba na Yesu makomami kati na Matai 10:14 mazali kosalisa biso na koyeba malamu likambo yango: “Mpe soko moto nani akoyamba bino te, soko nde akoyoka maloba na bino te, wana ekobima bino na ndako yango to na mboka yango, bobwaka putulu na matambe na bino.” Yesu amonisi awa ete bayekoli na ye basengeli kokende kotala bato epai na bango, kozanga ete babyangama liboso, mpe ete bakosakwela bango nsango malamu. Ezali solo ete bakondima kofanda na moko kati na mabota oyo ekondima na esengo nyonso nsango, (Matai 10:11) kasi likambo oyo elekaki ntina, ezalaki mosala ya kosakola. Kati na Luka 9:6, tozali kotanga: “Balongwaki wana mpe balekaki kati na mboka mike mpe basakolaki nsango malamu mpe babikisaki epai na epai.” (Tala Luka 10:8, 9.) Bato oyo bandimaki nsango mpe baoyo bayambaki epai na bango bayekoli mpamba te bazalaki basakoli, mbala mosusu kopesaka bango “kopo ya mai ya mpio” to koyamba bango na esengo, bakobungisa mbano na bango te: bakoyoka nsango etali Bokonzi.—Matai 10:40-42.
18, 19. (a) Engebene Misala 5:42, ndenge nini baklisto ya liboso bazalaki kosakola? (b) Nini ezali komonisa biso ete na Misala 20:20, 21 Paulo azali kolobela mosala oyo akokisaki epai na bato bazalaki bandimi te, kasi mpo na visites pastorales oyo asalaki na ndako ya bandimi te?
18 Tala oyo tokoki kotanga na ntina na bantoma nsima na kobotama ya lisangá ya boklisto: “Nde batiki te kolakisa mikolo nyonso kati na tempelo mpe na ndako na ndako mpe kosakolaka nsango malamu ete Yesu azali Klisto.” (Misala 5:42, MN; tala Bible а références, éd. angl. de 1984, note.) Liloba na greke oyo ebongolami na “ndako na ndako” ezali kat’oikon. Awa, kat[a] ezali na ndimbola ya kokabola. Na ntina yango, tokoki koloba ete mosala na kosakola oyo bayekoli basalaki ezalaki kokabolama ndako na ndako. Bango bazalaki kokende kotala bato na bandako na bango na bangonga oyo ekoki mpo na kosolola bobele masolo na bango moko te lokola baninga. Kati na Luka 8:1, tozali kokuta esaleli ya motindo moko ya liloba kata, kati na liloba “mboka minene mpe mboka mike”.
19 Kati na Misala 20:20, ntoma Paulo azali kosalela liloba oyo moko, kasi mbala oyo na pluriel: kat’oikous. Alobi: “Nabangaki te . . . kolakisa bino na kati na koyangana mpe na ndako na ndako.” Liloba oyo ebongolami awa na “ndako na ndako”, ebongolami boye kati na mabongoli mosusu ete “kati na bandako na bino”. Na bongo, engebene balimboli mosusu na Biblia ya boklisto na mokili oyo, Paulo azalaki kolobela kati na mokapo oyo ba visites pastorales esalemi na bandako ya baklisto. Nzokande, mokapo elandi emonisi ete Paulo azalaki kolobela mosala ya kosakola oyo akokisaki epai na bato oyo bazalaki bandimi te. Mpo na yango alobi boye: “Natatoli na Bayuda mpe na Baela, likambo na kobongola mitema epai na Nzambe, mpe na kondimela Nkolo na biso Yesu.”—Misala 20:21.
20. (a) Na eleko na biso bonene ya mosala ya kosakola oyo esalami na ba Témoins de Jéhovah ezali nini? (b) Motuna nini bato mosusu bazali komituna mpo na likambo etali kolanda kosakola?
20 Na bongo ebongi kosalela mwango oyo mpo na kokutana na bato na eleko na biso epai oyo “nsango malamu” esengeli “kosakolama, na mokili mobimba, lokola litatoli mpo na mabota nyonso.” (Matai 24:24) Uta koleka mibu 65, ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola na molende nsango malamu engebene yango Bokonzi na Nzambe esili kotyama, bazali kosala yango liboso na bato nyonso mpe ndako na ndako, mpe lelo kati na mikili 210. Oyo nde litatoli ya nguya! Lisusu, mosala yango ekokisami nzokande mingi kati na bato ya eleko na biso bazali koyoka nsango na “mitema mibale”, bamosusu bazali kosilikela yango. (Matai 13:15) Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola ntango nyonso kati na bisika oyo bato bazali koboya koyoka bango, to mpe bazali kotemela bango? Motuna oyo elimbolami kati na lisolo elandi.
Bozongeli
◻ Engebene Makomami, Yesu ayebanaki mingi mpo na mosala nini?
◻ Malako nini etali mosala na bango bantoma bazwaki?
◻ Mosala nini esengeli kosalema na eleko na biso, mpe mpo na nini?
◻ Nani Jéhovah azali kosalela mpo na kosakola nsango malamu na eleko na biso?
◻ Epai wapi mpe ndenge nini mosala ya kosakola esengeli kosalema?