Bato bazali kokanisa mabe likoló na yo?
BOYOKANI nini ezali kati na mobulu na ntina na bokabwani ya bikólo, koyina bato ya mposo mosusu, koponapona, bokabwani, mpe kobomama ya bato ya ekólo boye to boye? Yango nyonso euti na ezaleli oyo epalangani mingi kati na bato—kokanisa mabe likoló na baninga!
Kokanisa mabe likoló na basusu elimboli nini? Búku moko monene elimboli yango lokola “likanisi oyo moto azwi yango kozanga komipesa ntango to kotyela yango likebi mpo na kotalela yango na bosembo nyonso.” Lokola tozali bato bazangi kokoka, na meko mosusu tokólisaka nokinoki makanisi mabe likoló na bato mosusu. Okoki mbala mosusu komikundola ntango okanisaki boye na likambo moko kozanga koyeba makambo nyonso oyo matalelami. Biblia emonisi bokeseni kati na momeseno wana ya kokanisa mabe likoló na bato mosusu mpe lolenge ya Yehova ya kotalela makambo. Elobi ete: “[Yehova] akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge na libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.”—1 Samwele 16:7.
Kokanisa mabe likoló na basusu ekoki koyokisa bango mpasi
Na ntembe te, moto nyonso asilá kokaniselama mabe na eleko moko to mosusu. (Kokanisá na Mosakoli 7:21, 22.) Tokoki koloba ete, basilá kokanisa mabe likoló na biso banso. Nzokande, soki elongolami nokinoki, makanisi mabe likoló na basusu ekoyokisa bobele mpasi moke to ekoyokisa mpasi te. Ezali bongo likambo ya kokólisa makanisi motindo yango nde ekoki kobimisa likámá. Ekoki kozimbisa biso ete tóndima makambo oyo mazali solo te. Na ndakisa, na ntina na bopusi ya makanisi mabe likoló na baninga, bato mosusu bakanisaka mpenza ete moto moko akoki kozala moto ya lokoso, goigoi, zóba to moto ya lolɛ́ndɔ bobele mpo ete azali moto ya lingomba, ya ekólo to ya mboka boye to boye.
Mbala mingi likanisi mabe motindo yango etindaka na kotungisa, to na konyokola basusu kozanga ntina. Bamilió ya bato babungisaki bomoi na bango kati na kobomama ya bato mingi, kobomama ya bato ya ekólo moko oyo ekanelami, kobomama kati na bikólo bikeseni, mpe mitindo misusu ya makambo mabe mpenza miuti na kokanisa mabe likoló na basusu.
Kati na mokili mobimba, biyangeli bizali kobundisa ezaleli ya kokanisa mabe likoló na basusu na kopesáká mibeko mitali ntómo ya bonsomi, ya kobatelama, ya bokokani mpo na bato banso. Soki otángi mibeko to liboke ya mibeko ya mboka na bino, na ntembe te okomona molɔngɔ́ moko to likanisi moko oyo etyami mpo na kobatela ntómo ya banamboka, ata bazali bato ya mposo nini, mibali to basi, to bato ya lingomba boye to boye. Atako bongo, kokanisa mabe likoló na baninga mpe koponapona epalangani mingi na mokili mobimba.
Bato bazali kokanisa mabe likoló na yo? Babéngaki yo moto na lokoso, goigoi, zóba, to moto ya lolɛ́ndɔ na ntina na mposo na yo, mbula na yo, mpo ozali mwasi to mobali, na ntina na ekólo na yo, to na bindimeli ya lingomba na yo? Bazali kopimela yo mabaku ya kokɔta kelasi ya malamu, ya kozwa mosala, ndako mpe lisungi mpo bato bazali kokanisa mabe likoló na yo? Soki ezali bongo, lolenge nini okoki koyikela yango mpiko?
[Elilingi na lokasa 3]
Kokólisa makanisi mabe likoló na basusu na ntina na mposo ebimisaka koyinana
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Nina Berman/Sipa Press