Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/5 lok. 32
  • Epai wapi bazwaka nguya na bango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Epai wapi bazwaka nguya na bango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/5 lok. 32

Epai wapi bazwaka nguya na bango?

SOKI otali na likebi mpenza lipekapeka oyo ezali awa na fɔtɔ́, okomona ete moko na mapapu na yango minei ekoki mpenza kosala mosala moko te. Nzokande, lipekapeka yango litiki komileisa mpe kopumbwa te. Oyo ezali ndakisa bobele moko te ya likambo yango. Mapekapeka mosusu mamonanaki ete mazali kolanda kosala misala na yango ya mokolo na mokolo atako 70 % ya etando ya mapapu na bango ezali kosala lisusu te.

Bobele bongo, bato mingi bamonisaka nguya makasi lolenge yango. Atako bazali konyokwama na mpasi makasi ya nzoto to ya mayoki, bazali kotika te.​—Kokanisá na 2 Bakolinti 4:16.

Ntoma Paulo ye mpenza ayikaki mpiko na mikakatano na boumeli ya mibémbo na ye lokola misionere. Babɛtaki ye fimbo, babɛtaki ye mbata, babambaki ye mabángá mpe bakangaki ye na bolɔ́kɔ. Lisusu, anyokwamaki na mitungisi ya bokɔnɔ moko, mbala mosusu mikakatano mitali miso, oyo ezalaki ntango nyonso “monzube kati na nzoto” na ye.​—2 Bakolinti 12:7-9; Bagalatia 4:15.

Nkulutu moko moklisto, na nkombo David, oyo anyokwamaki na mpasi ya makanisi na boumeli ya bambula mingi, andimi ete nguya ya Yehova ezalaki na ntina mingi mpo na kobika na ye. Alobi ete: “Mbala na mbala, milende makasi mpo na kobika mizalaki kokwea mpamba. Kati na kolɛmba lolenge yango, nazalaki komikitisa epai na Yehova, mpe azalaki mpenza kosunga ngai. Ezalaki na bantango oyo nazalaki kobondela na boumeli ya bangonga mingi kozanga kokata. Ntango nazalaki kosolola na Yehova, mayoki na ngai ya kozala ngai moko mpe ya kozanga ntina mazalaki kolimwa. Nabundanaki na boumeli ya ntango molai ya bolɛmbu makasi, kasi na lisalisi ya Yehova, nguya esili kopesamela ngai kati na bolɛmbu wana​—kútu nguya oyo esengeli mpo na kosunga basusu.”

Yehova Nzambe alendisaki Paulo. Mpo na yango, akokaki koloba ete: “Mpo wana ezali ngai na bolɛmbu, bongo nazali na nguya.” (2 Bakolinti 12:10) Ee, bolɛmbu ya Paulo eteyaki ye ete esengeli na ye kotya motema ntango nyonso na nguya oyo Nzambe apesaka. Ntoma yango alobaki ete: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Bafilipi 4:13) Na ntembe te, Yehova apesaka basaleli na ye nguya.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto