Ntango kokanisa mabe likoló na basusu ekozala lisusu te!
EYEBISAMAKI ete, mokolo mosusu mosavá Albert Einstein alobaki ete kati na mokili oyo ya mabe, kosilisa momeseno ya kokanisa mabe likoló na basusu ezali mpasi koleka kopasola atɔ́mi. Bobele bongo, Edward R. Murrow, mopanzi-nsango oyo ayebanaki mingi na eleko ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe na nsima akómaki mokambi ya lisangá moko ya kopesa nsango na États-Unis, alobaki ete “moto moko te akoki kosilisa ezaleli ya kokanisa mabe likoló na bato mosusu—tokoki bobele koyeba likambo yango.”
Maloba yango mamonani ete mazali solo? Koponapona mpe kokabola mposo ekoki kosila soko moke te? Nzambe azali kokanisa nini na ntina na ezaleli ya kokanisa mabe likoló na bato mosusu?
Nzambe azali na koponapona te
Biblia ezali kokweisa ezaleli ya koponapona. (Masese 24:23; 28:21) Ezali koloba ete “mayele mauti na Likoló ezali liboso na pɛtɔ, na nsima ezali na kimya na boboto, na kotosa noki, matondi na mawa mpe na mbuma malamu, na ntembe te [“na koponapona te,” NW], na bokosi mpe te.” (Yakobo 3:17) Mayele lolenge oyo masɛngisamaki epai na basambisi ya Yisalaele na ntango ya kala. Bazwaki etindá ete: “Bokokata makambo na nkanza te. Okoyokela mobólá mawa te mpe okobanga moto na lokumu te.”—Levitike 19:15.
Yesu Klisto mpe bantoma na ye Petelo na Paulo bamonisaki polele etɛlɛmɛlo makasi ya Biblia oyo ezali kokweisa ezaleli ya koponapona. Yesu azalaki na koponapona te epai na baoyo “balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te.” (Matai 9:36) Ateyaki ete: “Bókata kobila miso te kasi bókata na ekateli na sembo.”—Yoane 7:24.
Petelo mpe Paulo bazali kondimisa biso ete Yehova Nzambe ye moko azalaka na koponapona te. Petelo alobaki ete: “Na solo namoni ete Nzambe akokabolaka bato [“azali na koponapona,” NW]te ; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” (Misala 10:34, 35) Ntoma Paulo ayebisi biso ete: “Mpo ete Nzambe akotalaka bilongi te.”—Baloma 2:11.
Bopusi ya Biblia
Biblia ezali na nguya ya kobongola bomoto ya baoyo bamitambwisi na yango. Baebele 4:12 eyebisi ete: “Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya.” Na lisungi ya Yehova bato oyo bakanisaka mabe likoló na baninga bakoki kútu kobongola lolenge na bango ya kokanisa mpe kokóma bato oyo bazalaka na koponapona te kati na boyokani na bango elongo na basusu.
Tókamata ndakisa ya Saulo moto na Talasia. Engebene lisoló ya Biblia, azalaki liboso motɛmɛli monene ya lisangá ya boklisto mpamba te azalaki kolanda makasi mibeko ya bonkɔ́kɔ ya lingomba. (Misala 8:1-3) Na ntembe te, bonkɔ́kɔ ya Bayuda endimisaki ye mpenza ete baoyo nyonso bakómaki baklisto bazalaki bapɛngwi mpe banguna ya losambo ya solo. Ezaleli ya kokanisa mabe likoló na basusu oyo azalaki na yango ememaki ye na kondima kobomama ya baklisto. Biblia elobi ete azalaki “naino kokanela bayekoli na Nkolo makaneli na kufa.” (Misala 9:1) Wana ezalaki ye kosala bongo, akanisaki ete azalaki kosalela Nzambe mosala na bulɛɛ.—Kokanisá na Yoane 16:2.
Nzokande, Saulo moto na Talasia azalaki na makoki ya kolónga ezaleli ya kokanisa mabe likoló na basusu oyo esilaki kokɔtela ye makasi. Kútu ye moko akómaki moklisto! Na nsima, lokola ntoma na Yesu Klisto, Paulo akomaki ete: “Liboso nazalaki motuki na Nzambe mpe monyokoli mpe motyoli. Kasi, ayokeli ngai mawa, zambi nasalaki yango wana eyebaki ngai ntina te mpe wana ezangaki ngai kondima.”—1 Timoté 1:13.
Ezalaki te bobele Paulo nde asalaki mbongwana monene kati na lolenge na ye ya kokanisa. Kati na mokanda na ye epai na Tito, moninga na ye mopalanganisi nsango malamu, Paulo alendisaki baklisto ete “bátuka te, báboya kowelana, bázala na boboto, bámonisa bopɔlɔ epai na bato nyonso. Zambi biso mpenza tozalaki bato na mobulu, na nkanza, topɛngolami nzela, baombo na mposa mabe mpe bisengo na mpamba, totambolaki na mabe mpe na bilulela, toyinami na bato mpe toyinani kati na biso mpenza.”—Tito 3:2, 3.
Tólongola bipekiseli biuti na kokanisa mabe likoló na basusu
Lelo oyo, baklisto ya solo bazali kosala milende mpo na kolanda toli wana. Baboyaka kosambisa bato bobele likoló na mayoki oyo mazangi moboko. Yango ezali kopekisa bango ete ‘bátuka’ basusu te. Bazali kosepela na libota ya bandeko oyo eleki bandelo ya bikólo mpe ya mposo kati na mokili mobimba.
Tókamata ndakisa ya Henrique, moto moindo ya mboka Brésil. Lokola ye moko atungisamaki na ezaleli ya bokaboli mposo, akólisaki koyina makasi epai na mindɛlɛ. Alobi ete: “Batatoli mibale mindɛlɛ bayaki na ndako na ngai kosolola na ngai na ntina na nkombo ya Nzambe. Na ebandeli nalingaki mpenza koyoka bango te mpamba te nazalaki kosepela na mindɛlɛ te. Kasi nokinoki namonaki ete nsango na bango ezalaki na makambo ya solo. Nandimaki boyekoli ya Biblia. Motuna ya liboso oyo natunaki mozalaki ete, ‘Ezali mpe na Baindo mingi kati na lingomba na bino?’ Bayanolaki ete, ‘Ee.’ Na nsima balakisaki ngai elilingi ya nsuka kati na búku Mokanda mpo na Masolo ya Biblia,a oyo ezali komonisa bilenge ya mposo ndenge na ndenge. Kati na bango mpe mwana mobali moko ya moke ya moindo, mpe yango elendisaki ngai. Na nsima nakendaki na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, epai kuna namonaki bato ya mposo ndenge na ndenge bazali kopesana limemya. Yango ezalaki na bopusi monene mpo na ngai.”
Sikawa, lokola Motatoli ya Yehova, Henrique azali na esengo monene ya kozala kati na libota ya solo ya bandeko. Asosoli ete yango euti na bato te. Alobi ete: “Sikawa nazali na botɔ́ndi epai na Yehova mpe Yesu mpo na nyonso oyo basili kosala mpo na ngai. Nazali kosala elongo na bamilió ya basaleli ya sembo ya Yehova ya bikólo nyonso, ya mposo nyonso, mpe baoyo bauti na bizalela bikeseni, basangani kati na mokano sé moko.”
Wana ezalaki ye naino kokóla, Dario azalaki mpe moko na baoyo bakaniselamaki mabe. Wana azalaki na mbula 16, abandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Amonisi ete: “Kati na Batatoli, namonaki ete mayoki ya kokanisa ete mposo boye to boye ezali liboso ezalaki te.” Akamwaki mingi na bolingo ya solosolo oyo ezalaki kati na bango. Likebi na ye libendamaki mingi mpenza likoló na likambo oyo ete bato ya mposo ekeseni bazalaki kokokisa mikumba minene kati na lisangá. Ntango nyonso oyo atungisamaka na makanisi mabe to na koponapona euti na bato ya libándá, Dario amikundolaka ete Yehova azali kolinga bato ya mabota nyonso, ya bikólo nyonso mpe ya nkótá nyonso.
Lolenge nini koyikela yango mpiko
Biso nyonso tolingaka ete bápesa biso lokumu mpe limemya. Yango wana motungisi oyo euti na kokanisa mabe likoló na yo ezalaka komekama ya makasi. Kozala na lisangá ya boklisto elongoli te liboso na biso motungisi nyonso oyo mouti na ezaleli ya kokanisa mabe ya mokili oyo mabe. Ntango nyonso oyo Satana Zábolo akozala na boyangeli likoló na makambo ya mokili oyo, bokesene bokozanga te. (1 Yoane 5:19) Emoniseli 12:12 ekebisi biso ete: “Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.” Mposa na ye esuki te bobele na kotungisa. Akokanisami na nyama oyo alyaka nyama mosusu. Ntoma Petelo ayebisi biso polele ete: “Motɛmɛli na bino, oyo mabe [“Zábolo,” NW], azali kotambola lokola nkɔsi konguluma, kolukáká soko akolya nani.”—1 Petelo 5:8.
Biblia ezali mpe koyebisa biso ete: “Bótosaka Nzambe. Bótɛmɛlaka oyo na mabe [“Zábolo,” NW] mpe akokima longwa na bino.” (Yakobo 4:7) Lisalisi ya malamu mingi mpo na koyika mpiko wana bazali kokanisa mabe likoló na yo ezali bongo ya komibalola epai na Nzambe mpo na kozwa libateli, lokola Mokonzi Davidi asɛngaki ete: “Ɛ Nzambe, bikisá ngai na mabɔkɔ na bato mabe, na mabɔkɔ na bato na masumu mpe na yauli.” (Nzembo 71:4) Tokoki kútu kobondela lokola mokomi na Nzembo ete: “Ɛ Nzambe, yokelá ngai mawa, mpo ete bato bazali kotungisa ngai; mokolo mobimba bakobunana konyokola ngai.”—Nzembo 56:1.
Nzambe akosala nini mpo na koyanola na mabondeli motindo yango? Biblia eyebisi ete: “Zambi ye akobikisa mobólá oyo akonganga mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto na bolɔ́zi mpe mobólá mawa; akobikisa milimo na babólá.” (Nzembo 72:12, 13) Ezali esengo na koyeba ete na ntango oyo elakami Yehova akobɔndisa baoyo nyonso bazali kotungisama na bokesene!
“Bakoyokisana mpasi te”
Biyangeli ya mokili oyo bikolanda kobundisa ezaleli ya kokanisa mabe likoló na basusu na nzela ya mibeko mpe bibongiseli na yango. Bakokóba kolaka bokokani mpe bosembo kati na bato. Kasi bakoki kolónga te. (Nzembo 146:3) Bobele Nzambe nde akoki kosala yango mpe akosilisa ezaleli nyonso ya kokanisa mabe likoló na basusu. Akosala ete bato nyonso bakóma libota moko ya bomoko. “Ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na [“bikólo,” NW] nyonso, na minɔkɔ nyonso” bakobika na nsuka ya ebongiseli oyo mabe mpe bakosepela kofanda na kimya.—Emoniseli 7:9, 10.
Yehova akolongola mabe nyonso oyo masalemaki na ntina na kokanisa mabe likoló na bato mpo na mposo ya nzoto mpe mpo na ezalela ya bomoi na bango. Kanisá naino, moto moko te akonyokwama mpo na bokesene! “Bakofanda mpe na nsé, moto na moto na nsé na miwiti na ye mpe na nzeté na ye na mosuke, moto moko akobangisa bango te.” (Mika 4:4) Mpe Yisaya 11:9 elobi ete: “Bakoyokisana mpasi te.”
Soki sikawa bato bazali na makanisi mabe likoló na yo, elikya kitoko mpo na mikolo mizali koya ekolendisa boyokani na yo elongo na Yehova. Ekosunga yo ete oyikela bokesene ya ebongiseli oyo mabe mpiko. Wana ezali yo koyika mpiko mpo ete bazali na makanisi mabe likoló na yo mpe wana ezali yo kotala liboso, landá toli ya mayele oyo ezwami na Biblia, ete: “Bózala na nguya, lendisaká motema na mpiko, bino nyonso baoyo bakotalela [Yehova].”—Nzembo 31:24.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]
U.S. National Archives photo