Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/9 nk. 13-18
  • Batatoli Baklisto mpo na Bokonzi monene ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli Baklisto mpo na Bokonzi monene ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Batatoli ya lokuta
  • Kozala na bomoi engebene mitindá ya Nzambe
  • Batatoli bazali bayekoli ya Biblia
  • Misala ya nguya ya Yehova
  • Nsango malamu esengeli kosakolama
  • Batatoli mpo na kotɛmɛla banzambe ya lokuta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • “Litatoli na bikólo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Baklisto bazwaka formasyo mpo na kopesa litatoli malamumalamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • ‘Ekoki ete nsango malamu esakolama liboso’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/9 nk. 13-18

Batatoli Baklisto mpo na Bokonzi monene ya Nzambe

“Bóyebisa malamu na oyo abyangi bino kobima na molili kokɔta na moi na ye na kokamwisa.”​—1 PETELO 2:9.

1. Litatoli nini ya kobota mbuma lipesamaki na ntina na Yehova na eleko ya liboso ya ntango ya boklisto?

NA ELEKO oyo ezalaki liboso ya ntango ya boklisto, molɔngɔ́ molai ya batatoli bandimisaki na mpiko nyonso ete Yehova azali Nzambe bobele moko ya solo. (Baebele 11:4–12:1) Lokola bazalaki makasi kati na kondima na bango, batosaki mibeko ya Yehova kozanga kobanga mpe baboyaki kobebisa bosembo na bango na likambo ya losambo. Bapesaki litatoli ya nguya mpo na boyangeli monene ya Yehova.​—Nzembo 18:21-23; 47:1, 2.

2. (a) Nani azali Motatoli ya Yehova oyo aleki monene? (b) Nani nde akitanaki libota ya Yisalaele lokola motatoli ya Yehova? Lolenge nini toyebi yango?

2 Motatoli ya nsuka mpe oyo aleki monene ya eleko oyo ezalaki liboso ya ntango ya boklisto ezalaki bongo Yoane Mobatisi. (Matai 11:11) Azwaki libaku kitoko ya kosakola koya ya Moponami, mpe alakisaki Yesu lokola Masiya oyo alakamaki. (Yoane 1:29-34) Yesu azali Motatoli ya Yehova oyo aleki monene, “Motatoli na sembo mpe na solo.” (Emoniseli 3:14) Mpo ete Yisalaele ya mosuni ebwakaki Yesu, Yehova abwakaki bango mpe aponaki libota ya sika, Yisalaele ya elimo ya Nzambe, mpo na kozala motatoli na ye. (Yisaya 42:8-12; Yoane 1:11, 12; Bagalatia 6:16) Petelo atángaki esakweli moko oyo etali Yisalaele mpe amonisaki ete yango ezalaki kosalelama epai na “Yisalaele na Nzambe,” lisangá ya boklisto, ntango alobaki ete: “Nde bino bozali libota liponami, banganga na bokonzi, libota na bulɛɛ, bato baponami, ete bóyebisa malamu na oyo abyangi bino kobima na molili kokɔta na moi na ye na kokamwisa.”​—1 Petelo 2:9; Exode 19:5, 6; Yisaya 43:21; 60:2.

3. Mokumba ya liboso ya Yisalaele na Nzambe mpe ya “ebele monene” mozali nini?

3 Maloba ya Petelo mazali komonisa ete mokumba ya liboso ya Yisalaele ya Nzambe mozali ya kopesa litatoli ya polele na ntina na nkembo ya Yehova. Na mikolo na biso libota wana ya elimo lisili koyamba “ebele monene” ya batatoli oyo bazali mpe kopesa Nzambe nkembo liboso na bato banso. Bazali konganga na mongongo makasi oyo bato banso bakoki koyoka yango ete: “Lobiko na Nzambe na biso oyo afandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate.” (Emoniseli 7:9, 10; Yisaya 60:8-10) Lolenge nini Yisalaele ya Nzambe mpe baninga na yango bakoki kokokisa mosala na bango ya kopesa litatoli? Na nzela ya kondima mpe ya botosi na bango.

Batatoli ya lokuta

4. Mpo na nini Bayuda ya eleko ya Yesu bazalaki batatoli ya lokuta?

4 Kondima mpe botosi ezali kosɛnga komitambwisa engebene mitindá ya Nzambe. Ntina na yango ezali komonana kati na makambo oyo Yesu alobaki na ntina na bakonzi ya lingomba ya Bayuda ya mikolo na ye. Bango bazalaki “kofanda na kiti na Mose” lokola bateyi ya Mibeko. Bazalaki nkutu kotinda bamisionɛre mpo ete bákende kobongola bato oyo bazalaki bandimi te. Nzokande, Yesu alobaki na bango ete: “Bokoleka mai-monene mpe lisobe mpo na kobongola moto motema nde wana akobongwana, bokokómisa ye mwana na Geena koleka bino mbala mibale!” Bato wana ya lingomba bazalaki batatoli ya lokuta​—bato na lofundo, bakosi mpe bato bazangi bolingo. (Matai 23:1-12, 15) Na libaku moko Yesu alobaki na Bayuda mosusu ete: “Bino bouti na tata na bino, Satana, mpe mokano na bino ezali ete bósala mposa na tata na bino.” Mpo na nini akokaki koloba likambo motindo yango epai na basangani ya libota liponami ya Nzambe? Mpamba te balingaki te kolanda maloba ya Motatoli ya Yehova oyo aleki monene.​—Yoane 8:41, 44, 47.

5. Lolenge nini toyebi ete boklisto ya nkombo mpamba esili kopesa litatoli ya lokuta na ntina na Nzambe?

5 Bobele bongo, na boumeli ya bikeke mingi uta eleko ya Yesu, ebele ya bamilió ya basangani ya boklisto ya nkombo mpamba bazali komitánga bayekoli na ye. Nzokande, bazali kosala mokano ya Nzambe te mpe bongo Yesu ayebi bango te. (Matai 7:21-23; 1 Bakolinti 13:1-3) Boklisto ya nkombo mpamba esili kotinda bamisionɛre mingi, oyo mingi kati na bango bazalaki mpenza na motema sembo. Nzokande, bateyaki bato kosambela nzambe moko ya Bosato oyo azikisaka basumuki kati na lifelo ya mɔ́tɔ, mpe ntálo monene na bato oyo babongwanaki bamonisaka mpenza te ete bazali baklisto. Na ndakisa, mokili ya Rwanda, na Afrika ezalaki mpenza elanga ya kobota mbuma mingi mpo na bamisionɛre ya Katolike ya Loma. Nzokande, Bakatolike ya Rwanda basanganaki na motema mobimba kati na etumba ya koyinana ya bikólo oyo euti kosalema na mboka wana. Mbuma oyo ebimi na elanga wana ya misionɛre emonisi ete boklisto ya nkombo mpamba epesaki yango litatoli ya solo ya boklisto te.​—Matai 7:15-20.

Kozala na bomoi engebene mitindá ya Nzambe

6. Lolenge nini etamboli ya malamu ezali eteni ya ntina mingi kati na mosala ya kopesa litatoli?

6 Etamboli mabe ya baoyo bazali komitánga baklisto ezali kofingisa “nzela na solo.” (2 Petelo 2:2) Moklisto ya solo amitambwisaka engebene mitindá ya Nzambe. Akoyibaka te, akokosaka te, akobubaka bato te mpe asalaka pite te. (Baloma 2:22) Akoboma mpenza bazalani na ye te. Mibali baklisto bakɛngɛlaka mabota na bango na bolingo nyonso. Basi baklisto basimbaka mosala wana ya bokɛngɛli. Bana bateyamaka na baboti na bango mpe na yango babongisami mpo na kozala mikóló oyo bakokisaka malamu mikumba na bango ya boklisto. (Baefese 5:21–6:4) Ezali solo ete, biso banso tozangi kokoka mpe tosalaka mabungá. Kasi moklisto ya solo amemyaka mitindá ya Biblia mpe asalaka solo milende mpo na kotosa yango. Yango emonanaka polele na miso na bato mosusu mpe epesaka litatoli moko kitoko. Na bantango mosusu, baoyo kala bazalaki kotɛmɛla solo bamonaki etamboli malamu ya moklisto moko mpe balóngamaki.​—1 Petelo 2:12, 15; 3:1.

7. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete baklisto bázala na bolingo kati na bango?

7 Yesu amonisaki lolenge moko ya ntina monene ya etamboli ya boklisto ntango alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Mokili ya Satana etondi na makambo “na bokesene, na mabe, na bilulela, na nkó; batondi na zúwa, na mposa na koboma bato, na kowelana, na kozimbisa bamosusu, na kokana mabe, na kopalanganisa nsango mabe; na kotukatuka, na koyina Nzambe, na lolɛ́ndɔ, na ngambo, na maloba mpamba, na koluka ndenge na sika na mabe, na kotyola baboti.” (Baloma 1:29, 30) Katikati na ezingelo ya motindo oyo, lisangá ya mokili mobimba oyo etondi na bolingo ekopesa mpenza bilembeteli ya elimo ya Nzambe oyo ezali kosala mosala​—litatoli ya malamu. Batatoli ya Yehova nde bazali basangani ya lisangá motindo yango.​—1 Petelo 2:17.

Batatoli bazali bayekoli ya Biblia

8, 9. (a) Lolenge nini mokomi ya Nzembo alendisamaki na boyekoli mpe bomanyoli na ye ya Mibeko ya Nzambe? (b) Lolenge nini boyekoli mpe bomanyoli ya Biblia ekolendisa biso na kolanda kopesa litatoli?

8 Mpo na kolónga kopesa litatoli moko ya kitoko, moklisto asengeli koyeba mpe kolinga mitindá ya sembo ya Yehova mpe koyina mpenza libebi oyo lizali kati na mokili. (Nzembo 97:10) Mokili ezali kolengola bato na kokumisáká mingi lolenge na yango ya kokanisa, mpe ezalaka mpenza mpasi kotɛmɛla elimo na yango. (Baefese 2:1-3; 1 Yoane 2:15, 16) Nini ekoki kosalisa biso na kobatela elimo moko malamu? Koyekola Biblia mokolo na mokolo mpe na mozindo. Mokomi ya Nzembo 119 alobelaki mbala mingi bolingo na ye mpo na mibeko ya Yehova. Azalaki kotánga yango mpe komanyola yango ntango nyonso, “mokolo mobimba.” (Nzembo 119:92, 93, 97-105) Lokola litomba oyo azwaki, akomaki ete: “Nakoyina mpe nakoboya lokuta; nalingi nde Mobeko na yo.” Lisusu, bolingo mozindo oyo azalaki na yango etindaki ye na kosala likambo. Alobi ete: “Mbala nsambo na mokolo moko nakosanzola yo, ntina na bikateli na yo na sembo.”​—Nzembo 119:163, 164.

9 Bobele bongo, boyekoli na biso ya Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe komanyola yango ekosimba mitema na biso mpe ekopusa biso na ‘kosanzola ye’​—kopesa litatoli na ntina na Yehova​—ntango nyonso, ata “mbala nsambo na mokolo moko.” (Baloma 10:10) Na boyokani na likambo oyo, mokomi na Nzembo ya liboso alobi ete ye oyo akomanyolaka ntango nyonso maloba ya Yehova “azali lokola nzeté oyo ekónami penepene na bitima na mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ikokauka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.” (Nzembo 1:3) Ntoma Paulo mpe amonisaki nguya ya Liloba ya Nzambe ntango akomaki ete: “Makomi nyonso mapemami na [elimo, NW] na Nzambe, makoki kopesa litomba na mateyo, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobɔkɔla, kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.”​—2 Timoté 3:16, 17.

10. Nini emonisami polele na ntina na libota ya Yehova na mikolo oyo ya nsuka?

10 Bokóli ya nokinoki ya motángo ya basambeli ya solo na ekeke oyo ya ntuku mibale ezali komonisa mapamboli ya Yehova. Kozanga ntembe, lokola etuluku, batatoli wana ya bokonzi monene ya Nzambe ya mikolo na biso basili kokólisa kati na mitema na bango bolingo mpo na mibeko ya Nzambe. Lokola mokomi ya Nzembo, bapusami na kotosa mibeko na Ye mpe bazali kopesa litatoli ya sembo “butu na moi” na ntina na nkembo ya Yehova.​—Emoniseli 7:15.

Misala ya nguya ya Yehova

11, 12. Mokano nini mokokisamaki na makamwisi oyo Yesu mpe bayekoli na ye basalaki?

11 Na ekeke ya liboso, elimo santu epesaki na batatoli baklisto ya sembo nguya ya kosala makamwisi, oyo ezalaki elembeteli ya nguya ete litatoli na bango lizalaki ya solo. Ntango Yoane Mobatisi azalaki na bolɔ́kɔ, atindaki bayekoli na ye bátuna Yesu ete: “Yo ozali ye oyo akoya soko totalela mosusu?” Yesu ayanolaki te ete, ezali ye to ezali ye te. Nzokande, alobaki: “Bókenda komonisa Yoane makambo mayoki bino mpe mamoni bino. Bakufi miso bazali komona lisusu mpe mikatatali bazali kotambola, bato na mbala bazali kopɛtwa mpe bakufi matoi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe babólá bazali koyoka Nsango Malamu. Lipamboli epai na ye oyo akoyoka nsɔ́ni mpo na ngai te.” (Matai 11:3-6) Misala wana ya nguya mizalaki litatoli epai na Yoane ete Yesu azalaki mpenza “Ye oyo akoya.”​—Misala 2:22.

12 Bobele bongo, bayekoli mosusu ya Yesu babikisaki babɛ́li mpe basekwisaki ata bakufi. (Misala 5:15, 16; 20:9-12) Makamwisi wana mazalaki lokola litatoli ya Nzambe mpo na kondima bango. (Baebele 2:4) Mpe misala motindo yango mimonisaki nguya eleki monene ya Yehova. Na ndakisa, ezali solo ete Satana “mokóló na mokili,” azali na nguya ya koboma. (Yoane 14:30; Baebele 2:14) Kasi ntango Petelo asekwisaki mwasi ya sembo Dolɔka, akokaki kosala yango bobele na nguya ya Yehova, mpamba te bobele Ye nde akoki kozongisa bato na bomoi.​—Nzembo 16:10; 36:9; Misala 2:25-27; 9:36-43.

13. (a) Lolenge nini makamwisi malobelami kati na Biblia mazali naino kondimisa nguya ya Yehova? (b) Lolenge nini kokokisama ya bisakweli ezali na ntina monene mpo na oyo etali kopesa elembeteli ya Bonzambe ya Yehova?

13 Lelo oyo, makamwisi yango mazali lisusu kosalema te. Mokano na yango mosilaki kokokisama. (1 Bakolinti 13:8) Nzokande, tozali naino na masoló na yango kati na Biblia, masoló yango mandimisami na bato mingi oyo bamonaki makambo yango. Lelo oyo, ntango baklisto bazali kotya likebi na masoló wana ya makambo oyo masalemaki, misala yango mizali kino lelo kopesa litatoli malamu mpo na nguya ya Yehova. (1 Bakolinti 15:3-6) Lisusu, kala na mikolo ya Yisaya, Yehova amonisaki esakweli ya solo lokola elembeteli ya monene ete Ye azali Nzambe ya solo. (Yisaya 46:8-11) Bisakweli mingi ya Biblia oyo bipemami na Nzambe bizali kokokisama na mikolo na biso​—mosusu na yango ezali kokokana likoló na lisangá ya boklisto. (Yisaya 60:8-10; Danyele 12:6-12; Malaki 3:17, 18; Matai 24:9; Emoniseli 11:1-13) Motindo moko lokola kokokisama ya bisakweli ezali komonisa ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka,” yango ezali mpe kolóngisa Yehova ete azali Nzambe bobele moko ya solo.​—2 Timoté 3:1.

14. Lolenge nini lisoló ya Batatoli ya Yehova ya ntango na biso lizali litatoli ya nguya ete Yehova azali Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba?

14 Yehova azali kino lelo kokokisa makambo minene ya kokamwa mpo na bato na ye. Kongɛnga monene oyo ezali kopesama likoló na solo ya Biblia etambwisami na elimo ya Yehova. (Nzembo 86:10; Emoniseli 4:5, 6) Bokóli ya kokamwa oyo ezali kosalema na mokili mobimba ezali elembeteli oyo emonisi ete Yehova azali ‘koyeisa yango mbangu, na ntango na yango.’ (Yisaya 60:22) Ntango monyoko ya makasi ebandaki na mboka moko nsima na mosusu na mikolo oyo ya nsuka, libota ya Yehova ekokaki koyika mpiko bobele na lisungi ya nguya ya elimo santu. (Nzembo 18:1, 2, 17, 18; 2 Bakolinti 1:8-10) Ee, lisoló ya Batatoli ya Yehova ya ntango na biso lizali yango moko litatoli ya nguya ete Yehova azali Nkolo ya molɔ́ngɔ́ mobimba.​—Zekalia 4:6.

Nsango malamu esengeli kosakolama

15. Litatoli nini monene lisangá ya boklisto lisengelaki kopesa?

15 Yehova aponaki Yisalaele lokola motatoli na ye liboso na mabota. (Yisaya 43:10) Nzokande, bobele Bayisalaele moke nde bazwaki etindá ya Nzambe ya kokende kosakwela bato oyo bazalaki Bayisalaele te, mpe yango ezalaki mbala mingi mpo na kosakola bikateli ya Yehova. (Yilimia 1:5; Yona 1:1, 2) Nzokande, bisakweli kati na Makomami ya Liebele bizali komonisa ete mokolo mosusu Yehova asengelaki kotya likebi na ye epai na mabota na motindo moleki bonene, mpe asili kosala yango na nzela ya Yisalaele ya elimo ya Nzambe. (Yisaya 2:2-4; 62:2) Liboso ete amata na likoló, Yesu apesaki bayekoli na ye etindá oyo: “Bókenda kozalisa bayekoli bato na mabota nyonso.” (Matai 28:19) Atako Yesu atyaki likebi mingi likoló na “bampate na ndako na Yisalaele baoyo babungani,” bayekoli na ye batindamaki epai na “mabota nyonso,” ata “kino nsuka na mokili.” (Matai 15:24; Misala 1:8) Bato banso basengelaki koyoka litatoli ya baklisto.

16. Mokumba nini lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso ekokisaki, mpe kino epai wapi?

16 Paulo amonisaki ete asosolaki likambo yango malamu. Na mobu 61 T.B., alobaki ete nsango malamu esilaki “kobota mbuma mpe kopalangana na mokili mobimba.” Nsango malamu esukaki te bobele epai na libota moko to lingomba moko ya moke, lokola oyo emipesaki na “kosambela baanzelu.” Nzokande, esilaki na polele “kosakolama epai na bato nyonso na nsé na Likoló.” (Bakolose 1:6, 23; 2:13, 14, 16-18) Na yango, Yisalaele na Nzambe na ekeke ya liboso ekokisaki mokumba na yango ya “koyebisa malamu na ye oyo abyangi [bango] kobima na molili kokɔta na moi na ye na kokamwa.”

17. Lolenge nini Matai 24:14 ezali kokóba kokokisama na etando monene?

17 Nzokande, mosala ya kosakola wana ya ekeke ya liboso ezalaki bobele ndakisa na oyo esengelaki kosalema na mikolo ya nsuka. Kokanisáká na esengo nyonso mpo na ntango na biso, Yesu alobaki ete: “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14; Malako 13:10) Esakweli wana esili kokokisama? Ya solo, esili kokokisama. Longwa na ebandeli ya moke na 1919, kosakolama ya nsango malamu esili kopalangana kati na bamboka koleka 230. Litatoli lisili koyokama na mikili ya mpiɔ makasi ya Nɔ́rdi mpe na bamboka ya molungé mingi. Mikili minene misili kozwa litatoli, mpe bolukiluki bozali kosalema kino na bisanga ya mosika mpo ete bafándi na yango bákoka kopesamela litatoli. Ata kati na yikiyiki monene, lokola etumba na Bosnie mpe Herzegovine, nsango malamu ezali kokóba kosakolama. Lokola na ekeke ya liboso, litatoli lizali kobota mbuma “na mokili mobimba.” Nsango malamu esili kosakolama polele “epai na bato nyonso na nsé na Likoló.” Epesi mbano nini? Ya liboso, batikali ya Yisalaele na Nzambe basili koyanganisama “na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso, na [bikólo, NW] nyonso mpe na mabota nyonso.” Ya mibale, bamilió oyo bazali kati na “ebele monene” babandaki koyanganisama longwa na “mabota nyonso, na mikili nyonso, na [bikólo, NW] nyonso, na minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 5:9; 7:9) Matai 24:14 ezali kolanda kokokisama na etando monene mpenza.

18. Makambo nini mazali kokokisama na nzela ya kosakolama ya nsango malamu kati na mokili mobimba?

18 Mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba ezali kopesa nzela mpo na kondimisa ete kozala ya Yesu lokola Mokonzi esili kobanda. (Matai 24:3) Lisusu, yango ezali mwango monene oyo na nzela na yango “biloko na kobuka na mokili” bizali kobukama, mpe ezali kokamba bato epai na elikya ya solo bobele moko, Bokonzi ya Yehova. (Emoniseli 14:15, 16) Lokola ezali bobele baklisto ya solo nde bazali kosangana na mosala ya kosakola nsango malamu, mosala wana ya ntina mingi mozali kopesa nzela na kokesenisa baklisto ya solo na baklisto ya lokuta. (Malaki 3:18) Na lolenge yango, ezali kobikisa baoyo bazali kosakola mpe baoyo bazali koyoka. (1 Timoté 4:16) Likambo lileki ntina, kosakolama ya nsango malamu ezali komema masanzoli mpe lokumu epai na Yehova Nzambe, ye oyo apesaki etindá ete mosala yango mosalema, ye oyo azali kosimba baoyo bazali kokokisa yango, mpe ye oyo azali kobotisa yango mbuma.​—2 Bakolinti 4:7.

19. Ekateli nini baklisto nyonso balendisami na kokamata lokola esili bango kokɔta na mobu ya sika ya mosala?

19 Ezali likambo ya kokamwa te ete ntoma Paulo apusamaki na koloba: “Mawa na ngai soko nakosakola Nsango Malamu te!” (1 Bakolinti 9:16) Lelo oyo baklisto bazali na mayoki motindo moko. Ezali libaku moko kitoko mpe mokumba monene kozala “basalani na Nzambe elongo,” kopalanganisa pole ya solo kati na mokili oyo ezipami na molili. (1 Bakolinti 3:9; Yisaya 60:2, 3) Mosala oyo ebandaki moke na 1919 esili sikawa kokóla na lolenge ya kokamwa. Pene na baklisto milió mitano bazali kopesa litatoli mpo na bokonzi monene ya Nzambe wana ezali bango kopesa bangonga koleka miliare moko mpo na komema nsango ya lobiko epai na basusu. Oyo nde esengo kosangana kati na mosala wana ya kobulisa nkombo ya Yehova! Lokola tokɔti na mobu ya mosala 1996, tiká ete tózala na ekateli ya kolɛmbisa mabɔ́kɔ te. Nzokande, tokolanda mpenza na motema moko maloba oyo ya Paulo epai na Timoté ete: “Osakola liloba, ozala na etingya.” (2 Timoté 4:2) Wana ezali biso kosala bongo, tokobondelaka na motema mobimba ete Yehova alanda kopambola milende na biso.

Ozali komikundola?

◻ Nani akitanaki Yisalaele lokola “motatoli” ya Yehova liboso na mabota?

◻ Lolenge nini etamboli ya boklisto ezali kosunga mosala ya kopesa litatoli?

◻ Mpo na nini boyekoli mpe bomanyoli Biblia ezali na ntina mingi mpo na Motatoli moklisto?

◻ Lolenge nini lisoló ya Batatoli ya Yehova ya ntango na biso lizali elembeteli ete Yehova azali Nzambe ya solo?

◻ Nini ezali kokokisama na nzela ya kosakolama ya nsango malamu?

[Bililingi na lokasa 15]

Na esika ete epekisama, nsango malamu ezali sikawa kosakolama “kati na bato nyonso na nsé na Likoló”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto