Batatoli mpo na kotɛmɛla banzambe ya lokuta
“[Yehova] alobi ete, Bino bozali batatoli na ngai mpe moombo na ngai, oyo nasili kopona yo.”—YISAYA 43:10.
1. Nani azali Nzambe ya solo, mpe na makambo nini ye azali monene koleka ebele ya banzambe oyo bato bazali kosambela lelo oyo?
NANI azali Nzambe ya solo? Na mikolo na biso, motuna oyo ya ntina monene mozali liboso na bato banso. Atako bato bazali kosambela ebele na banzambe, bobele Moko nde akoki kopesa biso bomoi mpe esengo na mikolo mizali koya. Bobele Moko nde tokoki koloba na ntina na ye ete: “Kati na ye tozali na bomoi mpe tokotambolaka mpe tokozalaka.” (Misala 17:28) Ya solo, bobele Nzambe moko nde azali na lotómo ya kopesamela losambo. Lokola eyebisami na bayembi oyo bazali na likoló engebene búku ya Emoniseli: “[Yehova] . . . Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo, na lokumu, na nguya, mpo ete yo ozalisaki biloko nyonso; mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama.”—Emoniseli 4:11.
2, 3. (a) Lolenge nini na kosaleláká lokuta, Satana atɛmɛlaki lotómo ya Yehova ya kopesamela losambo? (b) Lisumu ya Eva ebimisaki mbuma nini mpo na Eva mpe mpo na bana na ye, mpe yango ememelaki Satana nini?
2 Kati na elanga ya Edene, na kosaleláká lokuta, Satana atɛmɛlaki lotómo ya Yehova ya kopesamela losambo. Kosaleláká nyoka, ayebisaki Eva ete soki atombokeli mibeko ya Yehova mpe alei mbuma ya nzeté oyo Yehova apekisaki, ye akokaki kokóma lokola Nzambe. Alobaki ete: “Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya yango, miso na bino makofungwa, mpe bino bokozala pelamoko na Nzambe, koyeba malamu mpe mabe.” (Genese 3:5) Eva andimelaki nyoka mpe alyaki mbuma oyo epekisamaki.
3 Na ntembe te, Satana abukaki lokuta. (Yoane 8:44) Lolenge bobele moko oyo Eva akómaki “lokola Nzambe” ntango asalaki lisumu ezalaki ete amipesaki mokumba ya kokata ye moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, likambo oyo bobele Yehova nde asengelaki kosala. Mpe atako lokuta wana oyo Satana abukaki, Eva asukaki na kokufa. Na yango, moto bobele moko oyo azwaki litomba ya lisumu ya Eva ezalaki bongo Satana. Ya solo, mokano ya Satana oyo amonisaki polele te wana ezalaki ye kolengola Eva ete asala lisumu, ezalaki ya komikómisa nzambe. Ntango Eva asalaki lisumu, akómaki moto ya liboso oyo alandaki Satana, mpe nokinoki Adama alandaki mpe ye. Ebele na bana na bango babotamaki bobele “kati na lisumu” te kasi lisusu bakweaki na nsé ya bopusi ya Satana, mpe ezali motindo wana nde bobele nsima na mwa ntango moke, mokili mobimba oyo motangolami na Nzambe mobandaki.—Genese 6:5; Nzembo 51:5.
4. (a) Nani azali nzambe ya mokili oyo? (b) Mosala nini mozali mpenza ya nokinoki?
4 Mokili wana mobomamaki na Mpela. (2 Petelo 3:6) Nsima ya Mpela, mokili mosusu oyo motangolami na Yehova mobandaki, mpe yango ezali kokóba kino lelo. Na ntina na yango Biblia elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Na kotyoláká elimo mpe maloba ya mobeko ya Yehova, mokili oyo mozali mpenza kokokisa mokano ya Satana. Ye azali nzambe na yango. (2 Bakolinti 4:4) Nzokande, azali mpenza nzambe oyo azangi nguya. Akoki te kopesa bato esengo to kopesa bango bomoi; bobele Yehova nde akoki kosala yango. Na bongo, baye balingi bomoi oyo ezali na ntina mpe mokili moko malamu basengeli liboso koyeba ete Yehova azali Nzambe ya solo mpe koyekola kosala mokano na ye. (Nzembo 37:18, 27, 28; Mosakoli 12:13) Na yango, mibali mpe basi ya kondima basengeli mpenza kotatola nokinoki, to kosakola solo, na ntina na Yehova.
5. “Lipata na batatoli” nini Paulo alobelaki? Tángá bankombo mosusu oyo ezali na molɔngɔ́ oyo ye atángaki.
5 Uta ebandeli mpenza, bato ya bosembo motindo wana bamonanaki na mokili. Na mokanda ya Baebele mokapo 11, ntoma Paulo atángi molɔngɔ́ molai ya bato yango mpe abéngi bango “lipata monene na batatoli.” (Baebele 12:1) Abele, mwana mobali ya mibale ya Adama mpe Eva, azalaki moto ya liboso na molɔngɔ́ ya bankombo oyo Paulo atángaki. Alobeli lisusu Enoka mpe Noa bato oyo bazalaki na bomoi liboso ya Mpela. (Baebele 11:4, 5, 7) Abalayama, nkɔ́kɔ ya libota ya Bayuda ayebani malamu. Abalayama, oyo abyangami “moninga ya Yehova,” akómaki nkɔ́kɔ ya Yesu, “Motatoli na sembo mpe na solo.”—Yakobo 2:23; Emoniseli 3:14.
Litatoli ya Abalayama mpo na solo
6, 7. Lolenge nini bomoi mpe misala ya Abalayama epesaki litatoli ete Yehova azali Nzambe ya solo?
6 Lolenge nini Abalayama asalaki lokola Motatoli? Na nzela ya kondima na ye makasi mpe na botosi ya sembo oyo amonisaki epai na Yehova. Ntango abyangamaki ete atika engumba ya Ulu mpe alekisa ntango oyo etikalaki na ye na bomoi kati na mokili moko mosika, Abalayama atosaki. (Genese 15:7; Misala 7:2-4) Bato oyo bazalaka na bomoi ya kolekaleka na mabelé makauki mbala mingi basukaka na kotika kotambolatambola mpo na kofanda na esika moko oyo ezali na libateli mingi kati na engumba moko. Na bongo, ntango Abalayama atikaki engumba mpo na kofanda kati na hema, apesaki elembeteli monene ya elikya oyo azalaki na yango epai na Yehova Nzambe. Botosi na ye ezalaki litatoli epai na baoyo bazalaki komona yango. Yehova apambolaki Abalayama mingi mpo na kondima na ye. Atako azalaki kofanda kati na hema, Abalayama akómaki na bozwi mingi ya mosuni. Ntango Lota mpe libota na ye bamemamaki lokola bakangami, Yehova apesaki Abalayama elónga wana elandaki ye bango, na boye ete azalaki na makoki ya kobikisa bango. Mwasi ya Abalayama abotelaki ye mwana mobali na bonunu na ye, mpe na yango elaka ya Yehova oyo ete Abalayama asengelaki kokóma tata ya mombóto ekokisamaki. Na nzela ya Abalayama, bato bamonaki ete Yehova azali Nzambe ya bomoi oyo akokisaka bilaka na ye.—Genese 12:1-3; 14:14-16; 21:1-7.
7 Na nzela ya bozongi, wana autaki kobikisa Lota, Abalayama akutanaki na Melekisedeke, mokonzi ya Saleme (na nsima ekómaki kobéngama Yelusaleme), oyo ayambaki Abalayama, na kolobáká ete “Tiká ete Abalama ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló apambolama.” Mokonzi ya Sodomo mpe akutanaki na ye mpe alingaki kopesa ye makabo. Abalayama aboyaki. Mpo na nini? Alingaki te ete ntembe ezala mpo na oyo etali Eutelo ya mapamboli na ye. Alobaki ete: “Nasili kosimba ndai epai na [Yehova], Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, Mozalisi na likoló mpe na [mabelé], ete nakokamata eloko te na yango ezali na yo, ata ndambo na busi te, soko nsinga na sapato te, na ntina ete yo oloba te ete, Ngai nayeisi Abalama mozwi.” (Genese 14:17-24) Abalayama azalaki mpenza motatoli moko malamu mingi!
Libota ya Batatoli
8. Lolenge nini Mose amonisaki kondima monene epai na Yehova?
8 Mose, moko na bakitani ya Abalayama, azali mpe na molɔngɔ́ ya batatoli oyo Paulo atángaki nkombo na bango. Mose aboyaki bozwi ya Ezipito mpe na nsima atɛmɛlaki na mpiko nyonso mokonzi ya nguya wana ya mokili mobimba mpo ete akoka kokamba bana na Yisalaele na bonsomi. Azwaki mpiko wana epai wapi? Kati na kondima na ye. Paulo alobi ete: “[Mose] ayikaki mpiko lokola ete azali komona ye oyo akomonanaka te.” (Baebele 11:27) Banzambe ya Ezipito bazalaki komonana, mpe bato bakokaki kosimba bango. Ata lelo oyo, bikeko na bango biyebani lolenge na yango. Kasi Yehova, ye oyo akomonanaka te, azalaki mpenza solo na miso ya Mose koleka banzambe nyonso wana ya lokuta. Mose azalaki na ntembe soko moke te ete Yehova azali mpe ete akopesaka mbano epai na basambeli na Ye. (Baebele 11:6) Mose akómaki motatoli monene.
9. Lolenge nini libota ya Yisalaele lisengelaki kosalela Yehova?
9 Nsima ya kokamba Bayisalaele na bonsomi, Mose akómaki moyokanisi ya kondimana kati na Yehova mpe bakitani ya Abalayama oyo bautaki na Yakobo. Na nzela yango, libota ya Yisalaele libotamaki lokola libota mpenza ya Yehova. (Exode 19:5, 6) Mpo na mbala ya liboso, libota mobimba likamatamaki lokola motatoli. Maloba ya Yehova oyo mosakoli Yisaya akomaki, mibu soko 800 na nsima, masalelamaki mpenza uta ntango libota yango libotamaki: “[Yehova] alobi ete, Bino bozali batatoli na ngai mpe moombo na ngai, oyo nasili kopona yo, ete bóyeba mpe bóndima ngai mpe bósosola ete ngai nazali Ye.” (Yisaya 43:10) Lolenge nini libota wana ya sika likokaki kosalela Yehova lokola batatoli? Na nzela ya kondima mpe botosi na bango mpe na nzela na misala ya Yehova mpo na bolamu na bango.
10. Lolenge nini misala ya nguya oyo Yehova asalaki mpo na Yisalaele epesaki litatoli, mpe yango epesaki litomba nini?
10 Mibu soko 40 nsima ya kobotama na yango, libota ya Yisalaele ezalaki pene na kokamata Mokili na ndaká. Banɔ́ngi bakendaki konɔ́nga engumba ya Yeliko, mpe Lahaba, mofándi moko ya Yeliko, abombaki bango. Mpo na nini? Alobaki ete: “Mpo ete biso toyoki motindo [Yehova] akaokisaki mai na Mai Motane liboso na bino wana ebimaki bino na Ezipito, mpe yango esalelaki bino mikonzi mibale na Baamola baoyo bazalaki na ngámbo na Yaladene, Sihona mpe Ogu, baoyo bino bobebisaki nyɛ. Noki eyokaki biso yango, tolɛmbaki mpe mpiko etikalaki na moto te na ntina na bino, mpo ete [Yehova] Nzambe na bino azali Nzambe na lola na likoló mpe na mokili na nsé.” (Yosua 2:10, 11) Nsango ya misala ya nguya ya Yehova epusaki Lahaba mpe libota na ye na kotika Yeliko mpe banzambe na yango ya lokuta mpe na kosambela Yehova elongo na Yisalaele. Ezali polele ete, Yehova asilaki kopesa litatoli ya nguya na nzela ya Yisalaele.—Yosua 6:25.
11. Mikumba nini Bayisalaele nyonso oyo bazalaki baboti bazalaki na yango mpo na oyo etali kopesa litatoli?
11 Na ntango Bayisalaele bazalaki naino na Ezipito, Yehova atindaki Mose epai na Falo mpe alobaki ete: “Kɔtá epai na Falo, mpo ete ngai nayeisi motema na ye makasi mpe mitema na basáli na ye, ete namonisa bilembo oyo na ngai kati na bango, mpe ete yo okoka koloba na matoi na mwana mobali na yo mpe na mwana na mwana na yo motindo moseki ngai Baezipito mpe bilembo nini bisali ngai kati na bango, ete bino bóyeba ete ngai nazali [Yehova].” (Exode 10:1, 2) Bayisalaele ya botosi basengelaki koyebisa bana na bango misala ya nguya ya Yehova. Bana na bango mpe basengelaki koyebisa na bana na bango, mpe esengelaki kosalema bongo libota na libota. Na yango, misala ya nguya ya Yehova misengelaki kokanisama ntango nyonso. Bobele bongo lelo oyo, baboti bazali na mokumba ya kopesa litatoli epai na bana na bango.—Deteronome 6:4-7; Masese 22:6.
12. Lolenge nini lipamboli ya Yehova likoló na Salomo mpe Yisalaele lizalaki litatoli?
12 Ebele ya mapamboli ya Yehova oyo apesaki na Yisalaele wana batikalaki sembo ezalaki bongo litatoli epai na mabota ya zingazinga. Ezalaki lokola Mose alobaki yango nsima ya koyebisa mapamboli oyo Yehova alakaki ete: “Mabota nyonso na nsé bakotala ete yo obyangami na nkombo na [Yehova], mpe bango bakobanga yo.” (Deteronome 28:10) Salomo apesamelaki bwanya mpe bozwi mingi na ntina na kondima na ye. Na nsé ya boyangeli na ye ekólo ezalaki na bozwi mingi mpe esepelaki na eleko molai ya kimya. Na ntina na eleko yango tozali kotánga ete: “Bato bayaki longwa na mabota nyonso mpo na koyoka mayele na Salomo, longwa na mikonzi nyonso na mokili, baoyo bayoki mpo na mayele na ye.” (1 Mikonzi 4:25, 29, 30, 34) Mokonzi mwasi ya Seba azalaki kati na bato minene oyo bakendeki kotala Salomo. Nsima ya komona ye moko mapamboli ya Yehova likoló na libota wana mpe mokonzi na yango, alobaki ete: “[Yehova] Nzambe na yo akumisama, ye oyo asepeli na yo mpe atii yo na kiti na bokonzi na ye ete ozala mokonzi mpo na [Yehova] Nzambe na yo. Mpo ete [Yehova], Nzambe na yo, alingaki bana na Yisalaele.”—2 Ntango 9:8.
13. Nini ekokaki mbala mosusu kozala litatoli lileki malamu oyo Yisalaele epesaki, mpe lolenge nini tozali naino kozwa matomba na yango?
13 Ntoma Paulo alobelaki eloko oyo mbala mosusu ezalaki litatoli lileki malamu ya Yisalaele. Wana ezalaki ye kolobela Yisalaele ya mosuni epai na lisangá ya boklisto oyo ezalaki na Loma, alobaki ete: “Nzambe apesi bango maloba na ye.” (Baloma 3:1, 2) Kobanda na Mose, Bayisalaele mosusu ya sembo bapemamaki mpo na kokoma misala ya Yehova epai na Yisalaele, bakisá mpe batoli, mibeko mpe bisakweli na ye. Na nzela ya makomi yango, bakomeli wana ya ntango ya kala bapesaki litatoli epai na mabota nyonso oyo masengelaki koya nsima—bakisá bato ya libota na biso—ete ezali bobele na Nzambe moko, mpe nkombo na ye ezali Yehova.—Danyele 12:9; 1 Petelo 1:10-12.
14. Mpo na nini bato mosusu oyo batatolaki mpo na Yehova banyokwamaki?
14 Na mawa nyonso, mbala na mbala Yisalaele azangaki komonisa kondima, mpe bongo Yehova asengelaki kotinda batatoli epai na libota na ye moko. Mingi kati na bango banyokwamaki. Paulo alobaki ete basusu “batukami mpe babɛtami na mpimbo, ee bakangami mpe batyami na bolɔ́kɔ.” (Baebele 11:36) Batatoli ya sembo mpenza! Ezali solo likambo ya mawa ete minyoko na bango mbala mingi miutaki na baninga na bango basangani ya libota liponami ya Yehova! (Matai 23:31, 37) Ya solo, lisumu ya libota yango likómaki mpenza monene na boye ete na mobu 607 L.T.B., Yehova atindaki bato ya Babilone ete bábebisa Yelusaleme mpe tempelo na yango mpe bámema na boombo ebele ya Bayisalaele oyo batikalaki naino na bomoi. (Yilimia 20:4; 21:10) Ezalaki wana nsuka ya litatoli oyo libota mobimba lizalaki kopesa mpo na nkombo ya Yehova? Te.
Kosambisama ya banzambe
15. Lolenge nini litatoli lipesamaki ata kati na boombo na Babilone?
15 Ata kati na boombo na Babilone, basangani ya sembo ya libota wana bakakatanaki te mpo na kopesa litatoli na ntina na Bonzambe mpe nguya ya Yehova. Na ndakisa, Danyele alimbolaki na mpiko nyonso ndɔ́tɔ ya mokonzi Nebukadenesala, alimbolaki epai na Belesasala makomi oyo mabimaki likoló ya efelo, mpe aboyaki kobebisa bosembo na ye liboso na Dariuse kati na likambo litalaki libondeli. Baebele misato mpe, wana eboyaki bango kofukama liboso na ekeko, bapesaki bongo litatoli moko kitoko epai na Nebukadenesala.—Danyele 3:13-18; 5:13-29; 6:4-27.
16. Lolenge nini Yehova asakolaki bozongi ya Yisalaele na mokili na bango, mpe mokano na bozongi yango mosengelaki kozala nini?
16 Nzokande, Yehova akanaki ete litatoli ya libota mobimba lisengelaki lisusu kopesama na mabelé ya Yisalaele. Ezekiele, oyo asakolaki kati na Bayuda oyo bazalaki na boombo na Babilone, akomaki na ntina na ekateli makasi ya Yehova likoló na mokili oyo motikalaki mpamba ete: “Mpe nakofulisa bato na likoló na bino, ndako na Yisalaele mobimba, bango nyonso; bato bakofanda na mboka lisusu, mpe bisika bibebi bikotongama lisusu.” (Ezekiele 36:10) Mpo na nini Yehova alingaki kosala likambo wana? Libosoliboso lokola litatoli mpo na nkombo na ye moko. Na nzela ya Ezekiele ye alobaki ete: “Ɛ ndako na Yisalaele, nasali oyo na ntina na bino te, nde na ntina na nkombo na ngai na bulɛɛ, oyo esili bino kotyola na kati na mabota kuna ekómi bino.”—Ezekiele 36:22; Yilimia 50:28.
17. Makambo nini mazali zingazinga ya maloba oyo mazwami na Yisaya 43:10?
17 Ezalaki na ntango oyo asakolaki bobimi ya Yisalaele na boombo ya Babilone nde mosakoli Yisaya apemamaki mpo na kokoma maloba oyo mazwami kati na Yisaya 43:10, oyo elobi ete Yisalaele ezalaki motatoli ya Yehova, mosaleli na ye. Kati na Yisaya 43 mpe 44, Yehova alobelami lokola Mozalisi, Mokeli, Nzambe, Oyo Mosantu, Mobikisi, Mosikoli, Mokonzi mpe Motongi ya Yisalaele. (Yisaya 43:3, 14, 15; 44:2) Yisalaele etikamaki ete ekende na boombo mpamba te libota yango lizangaki mbala na mbala kopesa ye nkembo na lolenge wana. Nzokande, bazalaki bobele bato na ye. Yehova alobaki na bango ete: “Bangá te mpo ete ngai nasikoli yo, nabyangi yo na nkombo na yo, ozali na ngai.” (Yisaya 43:1) Boombo ya Yisalaele na Babilone esengelaki kosila.
18. Lolenge nini kosikolama ya Yisalaele na boombo ya Babilone emonisaki ete Yehova azalaki Nzambe ya solo?
18 Ya solo, Yehova akómisaki kosikolama ya Yisalaele na Babilone lisambisi ya banzambe. Atɛmɛlaki banzambe ya lokuta ya mabota ete bábimisa batatoli na bango, mpe atángaki Yisalaele ete ezali motatoli na ye. (Yisaya 43:9, 12) Ntango asikolaki Yisalaele na boombo, amonisaki ete banzambe ya Babilone bazalaki solo banzambe te mpe ete ye azali Nzambe ya solosolo bobele moko. (Yisaya 43:14, 15) Mibu soko 200 liboso na yango, ntango atángaki Siruse moto na Palasa ete azalaki mosaleli na ye mpo na kosikola Bayuda, apesaki bilembeteli mosusu ya Bonzambe na ye. (Yisaya 44:28) Yisalaele esengelaki kosikolama. Mpo na nini? Yehova alimboli ntina na yango: “Ete [Yisalaele] bámonisa kosanzola na ngai.” (Yisaya 43:21) Yango esengelaki kozala libaku mosusu ya kopesa litatoli.
19. Litatoli nini lipesamaki na libyangi oyo Siruse apesaki na Bayisalaele ete bázonga na Yelusaleme mpe na misala ya Bayuda ya sembo nsima ya bozongi na bango?
19 Wana ntango ekokaki, Siruse moto na Palasa alóngaki Babilone bobele lokola emonisamaki kati na esakweli. Siruse, atako azalaki mopakano, asakolaki Bonzambe ya Yehova ntango abimisaki esakola epai na Bayuda oyo bazalaki na Babilone ete: “Ye nani azali kati na bino na bato na ye nyonso, Nzambe na ye azala na ye; tiká ete abuta na Yelusaleme oyo ezali na Yuda mpe atonga ndako na [Yehova].” (Ezela 1:3) Bayuda mingi bandimaki. Basalaki mobémbo kino Mokili na ndaká mpe batongaki etumbelo na esika ezalaki tempelo ya kala. Atako bakutanaki na makambo mingi ya kolɛmbisa mpe na botɛmɛli ya makasi, basilisaki botongi ya tempelo mpe ya engumba ya Yelusaleme. Nyonso wana esalemaki lokola Yehova ye moko alobaki yango, “na nzela na makasi te, na nzela na nguya mpe te nde na [elimo, NW] na [ye].” (Zekalia 4:6) Misala wana nyonso mipesaki bilembeteli mosusu ete Yehova azali Nzambe ya solo.
20. Atako Yisalaele ezalaki na bolembu mingi, tokoki koloba nini na ntina na litatoli oyo bapesaki mpo na nkombo ya Yehova kati na mokili ya kala?
20 Na yango, Yehova akóbaki kosalela Yisalaele lokola motatoli na ye, atako bazalaki libota ya kozanga kokoka mpe na bantango mosusu bato na yango bazalaki batomboki. Kati na mokili na eleko oyo ezalaki liboso ya ntango ya boklisto, libota yango, elongo na tempelo mpe bonganga na yango, ezalaki ntéi ya losambo ya solo kati na mokili mobimba. Moto nyonso oyo azali kotánga lisoló ya misala oyo Yehova asalaki mpo na Yisalaele kati na Makomami ya Liebele akoki kozala na ntembe soko moke te ete Nzambe ya solo azali bobele moko, oyo nkombo na ye ezali Yehova. (Deteronome 6:4; Zekalia 14:9) Nzokande, litatoli moko lileki monene lisengelaki kopesama mpo na nkombo ya Yehova, mpe tokolobela yango kati na lisoló lilandi.
Ozali komikundola?
◻ Lolenge nini Abalayama apesaki litatoli ete Yehova azali Nzambe ya solo?
◻ Ezaleli nini monene ya Mose epesaki ye nzela ya kozala motatoli ya sembo?
◻ Na lolenge nini Yisalaele epesaki litatoli ya libota mobimba na ntina na Yehova?
◻ Lolenge nini kosikolama ya Yisalaele na Babilone ezalaki endimiseli oyo emonisi ete Yehova azali Nzambe bobele moko ya solo?
[Elilingi na lokasa 10]
Na nzela ya kondima mpe ya botosi na ye, Abalayama apesaki litatoli monene na Bonzambe ya Yehova