“Solo ezali eloko nini?”
MIBALI yango mibale oyo bazalaki kotalana bakokanaki soko moke te. Moko azalaki mokonzi ya politiki oyo azalaki motyoli, moto ya mposa ya bokonzi, mozwi, moto oyo azalaki pɛnɛ ya kosala nyonso mpo na kotombola mosala na ye. Mosusu azalaki moteyi oyo aboyaki bozwi mpe lokumu mpe asepelaki mpo na kopesa bomoi na ye lokola mbeka mpo na kobikisa bomoi ya bato mosusu. Ntina ya koloba ezali te, ete mibali yango bakesanaki mpenza na makanisi! Ezalaki na likambo moko, oyo makanisi na bango makesanaki mpenza—likambo litali solo.
Mibali yango bazalaki bongo Ponti Pilato mpe Yesu Klisto. Yesu atɛlɛmaki liboso na Pilato lokola moto oyo akweisami na ntina na misala mabe. Mpo na nini? Yesu alimbolaki ete ntina na yango—ee, ntina mpenzampenza mpo na yango ye ayaki na mabelé mpe abandaki mosala na ye—ezalaki mpo na likambo moko: solo. Alobaki ete: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo.”—Yoane 18:37.
Eyano ya Pilato ezali motuna moko ya ntina mingi: “Solo ezali eloko nini?” (Yoane 18:38, NW) Alukaki solo kozwa eyano? Mpenzampenza te. Yesu azalaki lolenge ya moto oyo akokaki koyanola na mituna nyonso oyo bazalaki kotuna na bosembo nyonso na ntina na ye, kasi ayanolaki na motuna ya Pilato te. Mpe Biblia elobi ete nsima ya kotuna motuna yango, Pilato abimaki na esambiselo. Ekoki mpenza kozala ete moyangeli wana Moloma atunaki motuna yango na makanisi ya kotyola, lokola soki alingaki koloba ete: “Solo? Yango ezali bongo nini? Eloko motindo wana ezali te!”a
Likanisi ya ntembe oyo Pilato azalaki na yango na ntina na solo ezali komonana mingi lelo oyo. Bato mingi bakanisaka ete solo etali moto na moto—na maloba mosusu, oyo ezali solo mpo na moto moko ekoki kozala solo te mpo na mosusu, na boye ete bango nyonso mibale bakoki kozala na “elónga.” Likanisi wana epalangani mpenza mingi na boye ete ezwi nkombo—“relativisme.” Ezali yango lolenge oyo otalelaka likambo litali solo? Soki ezali bongo, ekoki kozala ete ondimaki likanisi wana kozanga kotalela yango na mozindo? Atako ondimi yango te, oyebi motindo nini filozofi wana ezali na bopusi likoló na bomoi na yo?
Solo ebundisami
Ponti Pilato azalaki te moto ya liboso oyo azalaki kobɛta ntembe na likambo oyo ete solo ezali bobɛlɛ moko. Bafilozofe mosusu ya Bagreke ya kala bakómisaki mosala ya koteya ntembe motindo wana mosala mpenza ya bomoi na bango! Bikeke mitano liboso na Pilato, Pamenides (oyo atalelami lokola mobandisi ya métaphysique na Mpótó) alobaki ete boyebi ya solosolo ekoki kozwama te. Démocrite, oyo akumisami lokola “ye oyo aleki bafilozofe nyonso ya ntango ya kala,” alobaki ete: “Solo ekundami mozindo. . . . Toyebi mpenza eloko moko ya sikisiki te.” Ekoki kozala ete, Socrate, oyo apesameli limemya mingi koleka bango banso, alobaki ete, nyonso oyo ye ayebaki mpenza ezalaki ete ye ayebaki eloko moko te.
Kobundisama ya likanisi oyo ete bato bakoki koyeba solo elandanaki kino na mikolo na biso. Na ndakisa, bafilozofe mosusu balobi ete lokola boyebi ekómelaka biso na nzela ya biyokeli na biso, oyo ekoki kozimbisama, boyebi moko te ekoki kondimisama ete ezali ya solo. René Descartes, filozofe mpe nganga-matematiki ya France azwaki ekateli ya kotalela na bozindo makambo nyonso oyo ye akanisaki ete ayebi malamu. Abwakaki makambo mosusu nyonso, kasi andimaki solo moko oyo ye akanisaki ete ekoki kotyamela ntembe te: “Cogito ergo sum,” to, “Lokola ezali ngai kokanisa, boye nazali na bomoi.”
Kolakisama ya Relativisme
Liteya ya relativisme esuki bobɛlɛ epai na bafilozofe te. Yango eteyamaka na bakonzi ya mangomba, ekɔtisamaka na makanisi ya bana na biteyelo, mpe epalanganisamaka na bipanzeli nsango. Esili koleka mwa bambula, John S. Spong, epískɔ́pɔ ya ba épiscopaliens alobaki ete: “Tosengeli . . . kotika kokanisa ete tozali na solo mpe basusu basengeli kokóma na likanisi lolenge moko na biso; mpe koyeba ete moto moko te akoki komona solo ya sikisiki.” Likanisi ya relativisme oyo Spong azali na yango, lolenge moko na oyo bakonzi ya mangomba mingi bazali na yango lelo, ebwakaka nokinoki mateya ya Biblia matali bizaleli malamu mpo na kondima filozofi oyo ete “moto na moto na oyo ebongi na ye.” Na ndakisa, kati na milende oyo asalaki mpo ete mibali oyo basangisaka nzoto na mibali bámioka “malamu” kati na Église épiscopalienne, Spong akomaki búku moko oyo kati na yango alobaki ete ntoma Paulo azalaki moko na baoyo bazalaki kosangisa nzoto mibali na mibali!
Na bamboka mingi emonani lokola ete biteyelo bizali kokólisa lolenge ya kokanisa motindo moko. Allan Bloom akomaki kati na búku na ye The Closing of the American Mind (Kokufa ya bwanya ya Baamériké): “Molakisi asengeli mpenza komindimisa na likambo moko oyo: bayekoli pɛnɛpɛnɛ nyonso oyo bazali kokɔta na eteyelo monene bakanisaka, to balobaka ete, solo ezali likambo litali moto na moto.” Bloom amonaki ete soki atɛmɛli endimiseli ya bayekoli na ye na likambo yango, bazali kokamwa, “lokola nde ye azalaki kotya ntembe ete 2 + 2 = 4 ezali solo te.”
Likanisi motindo yango elendisami na ebele ya myango misusu. Na ndakisa, mbala mingi emonani lokola ete na TV mpe na bazulunalo bapanzi nsango basepelaka mingi kopengola makanisi ya bato na esika ya kolakisa solo ya likambo. Bansango mosusu ebongwamaki to babakisaki makambo na filime mpo na kokómisa yango nsɔ́mɔ mingi. Mpe kati na masano solo ezali mpenza kobundisama makasi. Mitindá mpe makambo ya solo oyo baboti mpe bankɔ́kɔ balandaki ezali mpenza kotalelama lokola esilá ngala mpe ezali kotyolama polele.
Ya solo, basusu bakoki koloba ete ndambo monene ya liteya ya relativisme ezali elembo ya kofungola makanisi mpe na yango ezali na bopusi malamu likoló na bato. Kasi, ezali mpenza bongo? Mpe ezali boni mpo na oyo etali bopusi na yango likoló na yo? Okanisaka ete solo ezali likambo litali moto na moto to ezali te? Soki ezali bongo, bolukiluki na yango ekoki komonana epai na yo lokola kolekisa ntango mpamba. Likanisi motindo yango ekoki kobebisa bomoi na yo na mikolo mizali koya.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Engebene nganga-mayele ya Biblia R. C. H. Lenski, “elobeli ya [Pilato] ezalaki ya moto amipesi mingi na makambo ya mokili, oyo na nzela ya motuna na ye alingi koloba ete makambo nyonso matali solo ya lingomba mazali bobɛlɛ makanisi mpamba.”