Mpo na nini koluka solo?
MANGOMBA mingi mazali koloba ete mazali na solo, mpe mazali na mposa makasi ya koyebisa yango epai na bato mosusu. Nzokande, kati na mangomba yango ezali na ebele ya “solo” ekeseni. Oyo ezali bongo elembeteli mosusu oyo emonisi ete solo nyonso wana ezali likambo litali moto na moto, ete solo ezali moko te? Te.
Kati na búku na ye, The Art of Thinking, Professeur V. R. Ruggiero amonisi kokamwa na ye na komona ete mbala mosusu ata bato na mayele mingi balobaka ete solo ezali likambo litali moto na moto. Apesi likanisi oyo: “Soki moto na moto akokata oyo ezali solo mpo na ye, bongo likanisi ya moto moko te ekoki kozala malamu koleka oyo na moto mosusu. Nyonso esengeli kozala lolenge moko. Mpe soki makanisi nyonso mazali lolenge moko, wapi ntina ya kolukaluka mpo na koyeba makambo? Mpo na nini kotimola mabelé mpo na koluka biyano na mituna ya arkeoloji? Mpo na nini koluka koyeba bantina ya matáta oyo mazali na Moyen-Orient? Mpo na nini koluka nkísi ya kanser? Mpo na nini kosala bolukiluki ya bagalaksi? Makambo wana mazali na ntina bobɛlɛ soki ezali na biyano oyo bizali malamu koleka mosusu, soki solo ezali eloko ekeseni, mpe epusami te, na makanisi ya moto na moto.”
Ezali na moto moko te oyo andimaka mpenza ete solo ezali te. Na ntina etali zébi ya biloko oyo bizali komonana, lokola makambo ya monganga, matematiki, to mibeko ya physique, ata bato oyo bakangamaka makasi na likanisi oyo ete solo ezali likambo litali moto na moto bakondima ete makambo mosusu mazali solo. Nani kati na biso akondima kosala mobémbo na mpepo soki tokanisaka ete mibeko oyo mitali kopumbwa ya mpepo na likoló mizali mpenza solo te? Ezali na makambo ya solo oyo tokoki komona bilembeteli na yango; yango ezingi biso, mpe totyaka bomoi na biso likoló na yango.
Motuya mofutisami na relativisme
Ezali kati na likambo litali bizaleli nde, mabungá ya relativisme mazali mpenza polele, mpamba te ezali wana nde motindo yango ya kokanisa esili kopesa mpasi mingi koleka. Búku The Encyclopedia Americana emonisi likambo oyo: “Ntembe monene etyamaki mpo na koyeba soki bato bakoki kozwa boyebi, to solo oyo eyebani . . . Nzokande, ezali solo ete ntango nyonso oyo mikano mibale ya solo mpe ya boyebi mibwakami lokola emonaneli ya mpamba to lokola eloko mabe, libota ya bato lizali kobeba.”
Mbala mosusu osili komona kobeba motindo yango. Na ndakisa, mateya ya Biblia matali bizaleli, oyo mamonisi polele ete pite ezali mabe, matalelamaka lisusu mingi te ete mazali solo. Liponi ya moto na moto na ntina etali malamu mpe mabe—“katá yo moko oyo ezali sembo mpo na yo”—epalangani mingi. Ezali na moto oyo akoki koloba ete kobeba ya libota ya bato euti te na likanisi oyo ete solo ezali likambo litali moto na moto? Ya solo bopalangani ya bokɔnɔ oyo bokozwamaka na kosangisa nzoto, kokabwama ya mabota mpe kokóla ya motuya ya bilenge oyo bazali kozwa zemi ezali elembeteli ya polele.
Solo ezali nini?
Na yango tótika mai ya pɔtɔpɔ́tɔ ya relativisme mpe tótalela na mokuse oyo Biblia ezali koloba ete ezali mai ya pɛtɔ ya solo. (Yoane 4:14; Emoniseli 22:17) Kati na Biblia, “solo” ezali soko moke te likanisi ya mpamba, ya mpasi mpo na koyeba, oyo bafilozofe bazali kotyanela ntembe.
Wana Yesu alobaki ete mokano mobimba ya bomoi na ye mozalaki ya kosolola na ntina na solo, azalaki kolobela eloko moko oyo Bayuda ya sembo batalelaki na motuya mpenza na boumeli ya bikeke mingi. Kati na Makomami na bango ya bulɛɛ, kobanda kala Bayuda bazalaki kotánga na ntina na “solo” ete yango ezali eloko oyo ekoki komonana mpenza, kasi likanisi mpamba te. Kati na Biblia, “solo” ebongolami na liloba ya Liebele “ʼemethʹ,” elimboli ete oyo ezali ngwi, makasi mpe mbala mosusu oyo eleki nyonso, ya kotyela motema.
Bayuda bazalaki na bantina ya kotalela solo na lolenge yango. Bazalaki kobénga Yehova, Nzambe na bango “Nzambe ya solo.” (Nzembo 31:5) Ezalaki bongo mpamba te makambo nyonso oyo Yehova azalaki koloba ete akosala, azalaki kosala yango. Ntango nyonso oyo azalaki kopesa bilaka, azalaki kokokisa yango. Ntango nyonso oyo azalaki kopemisa bisakweli, yango ezalaki kokokana. Ntango nyonso oyo azalaki kobimisa bikateli ya nsuka, yango ezalaki kokokisama. Bamilió ya Bayisraele bamonaki makambo na miso na bango mpenza. Bakomi ya Biblia oyo bapemamaki bakomaki yango lokola makambo masalemaki na lisoló ya bato, oyo makoki kotyelama ntembe te. Na kokesana na babúku mosusu oyo etalelami lokola bulɛɛ, Biblia ekomamaki te na kolanda masapo mpamba. Yango ezali na moboko makasi likoló na makambo makoki koyebana—ya lisoló ya bato, ya arkeoloji, ya siansi mpe ya bomoi ya bato. Ezali likambo ya kokamwa te ete mokomi ya Nzembo aloba na ntina na Yehova ete: “Mobeko na yo ezali solo. . . . Malako nyonso na yo izali solo. . . . Liloba na yo mobimba ezali sembo”!—Nzembo 119:142, 151, 160.
Yesu Klisto azongelaki maloba wana ya mokomi ya Nzembo ntango alobaki epai na Yehova kati na libondeli ete: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Yesu ayebaki ete makambo nyonso oyo Tata na ye alobaki mazalaki mpenza solo mpe mabongi na kotyela motema. Bobɛlɛ bongo, Yesu “atondaki na . . . solo.” (Yoane 1:14) Bayekoli na ye bayebaki yango wana emonaki bango yango na miso na bango mpenza, mpe bakomaki yango kati na búku mpo na mabota nyonso oyo masengelaki koya nsima, ete makambo nyonso oyo alobaki mazalaki lokola libangá makasi, solo.a
Nzokande, ntango Yesu alobelaki Pilato ete ayaki na mabelé mpo na kosolola na ntina na solo, azalaki kokanisa solo moko ya sikisiki. Yesu abimisaki maloba yango wana ayanolaki na motuna oyo Pilato atunaki ye: “Boye yo mokonzi te?” (Yoane 18:37) Bokonzi ya Nzambe mpe mokumba ya Yesu ye moko lokola Mokonzi na yango, ezalaki motó ya likambo mpenza, moboko, ya mateya ya Yesu ntango azalaki awa na mabelé. (Luka 4:43) Koteya ete Bokonzi wana ekobulisa nkombo ya Yehova, ekolóngisa bokonzi na ye na molɔ́ngɔ́ mobimba mpe ekozongisa bato ya sembo na bomoi ya seko mpe ya esengo ezali “solo” oyo kati na yango baklisto nyonso ya solo bazali kolikya. Lokola Yesu azali na mokumba ya ntina mingi kati na kokokisama ya bilaka ya Nzambe, mpe lokola na ntina na ye, bisakweli nyonso ya Nzambe bizali kokóma “Amen,” to solo, Yesu azalaki na ntina ya koloba ete: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi.”—Yoane 14:6; 2 Bakolinti 1:20; Emoniseli 3:14.
Kondima ete solo wana ebongi mpenza na kotyela motema ezali na ntina monene mpo na baklisto na mikolo na biso. Yango elimboli ete kondima oyo bazali na yango epai na Nzambe mpe elikya oyo batye kati na bilaka na ye ezwi moboko makasi likoló na makambo oyo masalemaki, likoló na makambo ya solo.
Solo ezali kosala mosala
Ezali likambo ya kokamwa te ete, Biblia ezali kokangisa solo esika moko na misala. (1 Samwele 12:24; 1 Yoane 3:18) Mpo na Bayuda oyo bazalaki kobanga Nzambe, solo ezalaki te likambo mpo na kosala filozofi; yango ezalaki lolenge ya bomoi. Liloba ya Liebele mpo na “solo” likoki lisusu kolimbola “bosembo” mpe lizalaki kosalelama mpo na kolobela moto oyo akokaki kotyelama motema ete akosala engebene maloba na ye. Yesu ateyaki bayekoli na ye bátalela solo na lolenge wana. Atɔndɔlaki na nguya nyonso bokosi ya Bafalisai, bokeseni monene oyo ezalaki kati na maloba na bango ya bato oyo bazali sembo na miso na bango moko mpe misala na bango oyo mizalaki sembo te. Mpe apesaki ndakisa kati na lolenge na ye ya komitambwisa engebene makambo ya solo oyo ye azalaki koteya.
Esengeli mpe kozala bongo mpo na bayekoli nyonso ya Klisto. Mpo na bango, nsango ya kolendisa etali Bokonzi ya Nzambe oyo ekoyangelama na Yesu Klisto, eleki, ezali na ndimbola mozindo, kasi ezali bobɛlɛ nsango ya mpamba te. Solo yango etindaki bango na kosala misala, epusaka bango na komitambwisa engebene yango mpe na koyebisa yango epai na bato mosusu. (Kokanisa na Yilimia 20:9.) Mpo na lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso, lolenge ya bomoi oyo baponaki lokola bayekoli ya Klisto eyebanaki mbala mosusu lokola “solo” to “nzela ya solo.”—2 Yoane 4; 3 Yoane 4, 8; 2 Petelo 2:2.
Eloko ya motuya oyo tosengeli kosala nyonso mpo na kozwa
Ezali solo ete, kondima solo ya Liloba ya Nzambe esɛngaka kofuta motuya moko. Ya liboso, bobɛlɛ koyekola solo ezalaka likambo ya kobulunganisa. Búku monene The Encyclopedia Americana emonisi ete: “Mbala mingi solo esepelisaka te, mpamba te yango elóngisaka te kokanisela baninga mabe to lisapo.” Komona lolenge bindimeli na biso etɔndɔlami ete ezali ya solo te ekoki kobulunganisa, mingimingi soki toteyamaki na bakonzi ya mangomba oyo tozalaki kotyela motema. Bato mosusu bakokokanisa yango na likambo ya koyeba ete baboti oyo otyelaka motema bazalaka, mpenza, basáli ya mabe na nkúku. Kasi komona solo na makambo ya losambo ezali malamu koleka kofanda kati na libúngá, boye te? Koyeba lolenge makambo mazali eleki malamu koumela kati na nkuta, boye te?b—Kokanisá na Yoane 8:32; Baloma 3:4.
Ya mibale, komitambwisa engebene solo na makambo ya losambo ekoki kosɛnga tóboyama na bato mosusu oyo kala bazalaki baninga na biso. Kati na mokili epai mingi “basɛnzi solo na Nzambe mpo na lokuta,” baoyo bazali kokangama makasi na solo ya Liloba ya Nzambe bamonanaka ete bakeseni na bato mosusu mpe mbala mosusu bato bakimaka bango mpe basosolaka bango te.—Baloma 1:25; 1 Petelo 4:4.
Kasi solo ebongi ete tófutela yango makambo oyo mibale. Koyeba solo ekosikola biso na nkuta, na mabungá mpe na biyambayamba. Mpe wana tozali komitambwisa engebene yango, solo ekolendisa biso ete tóyika mpiko kati na mikakatano. Solo ya Nzambe ebongi mpenza kotyelama motema mpe ezali na moboko makasi, mpe ezali mpenza kopesa biso elikya, na boye ete ezali kopesa biso nzela ya koyika mpiko kati na komekama ya motindo nyonso. Ezali likambo ya kokamwa te soki ntoma Paulo akokanisaki solo na mokaba, to nkamba monene ya makasi, oyo basodá bazalaki kolata na etumba!—Baefese 6:13, 14.
Lisese ya Biblia elobi ete: “Somba [solo, NW] mpe tekisa [yango, NW] te; Mayele mpe Kolakisama lokola bososoli.” (Masese 23:23) Koloba na ntina na solo ete ezali likambo litali moto na moto to ezali te elimboli kozanga kokokisa mposa eleki kitoko mpe ya kosepelisa oyo bomoi ekoki kopesa. Komona yango ezali kozwa elikya; koyeba mpe kolinga yango ezali koyeba mpe kolinga Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mpe Mwana-sé-moko na ye; komitambwisa engebene yango elimboli kozala na mokano mpe kimya ya elimo, sikawa mpe libela na libela.—Masese 2:1-5; Zakari 8:19; Yoane 17:3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezali na bisika koleka 70 kati na masoló ya Baevanzile epai bamonisi Yesu wana asaleli liloba moko oyo ekeseni mpenza mpo na komonisa bosolo ya maloba na ye. Azalaki mbala mingi kobanda fraze na liloba “Amen” (“Solo,” NW). Liloba ya Liebele oyo likokani na yango lizalaki kolimbola “ya solo, solo.” Búku The New International Dictionary of New Testament Theology emonisi ete: “Na kobandáká maloba na ye na amen Yesu azalaki komonisa yango lokola ya solo mpe ya kotyela motema. Atɛlɛmaki ngwi mpo na yango mpe akómisaki yango elikya na ye moko mpe ya bayoki na ye. Yango ezali elilingi ya bonene mpe ya bokonzi na ye.”
b Liloba ya Greke mpo na “solo,” a·leʹthei·a, euti na liloba moko oyo elimboli “ebombami te,” yango wana mbala mingi solo ezalaka komonisama ya likambo oyo liboso ebombamaki.—Kokanisá na Luka 12:2.
[Etanda na lokasa 6]
Solo ebongwanaka?
MOTUNA wana mobimisamaki na V. R. Ruggiero kati na búku na ye The Art of Thinking (Motindo ya kokanisa). Eyano na ye ezali ete te. Alimboli ete: “Mbala mosusu ekoki komonana bongo, kasi na botaleli ya pɛnɛpɛnɛ ekomonana ete ebongwanaka te.”
Alobaki ete: “Kamatá ndakisa ya koyeba mokomi ya búku ya liboso ya Biblia, búku ya Genese. Na boumeli ya bikeke mingi baklisto mpe Bayuda bazalaki kondima ete búku wana ezalaki bobɛlɛ na mokomi moko mpamba. Na nsima likanisi wana lityamelamaki ntembe, mpe na esika na yango bakómaki kondima likanisi oyo ete bakomeli soko mitano basanganaki na bokomi ya Genese. Bongo, na 1981, bosukisi ya mibu 5 ya botaleli ya mozindo ya maloba na mokanda ya Genese ebimisamaki, kolobáká ete endimiseli monene ya 82% emonisi ete mokomi azali bobɛlɛ moko, lokola ekanisamaki na ebandeli.
“Solo likoló na mokomi ya Genese ebongwanaki? Te. Bobɛlɛ likanisi na biso nde ebongwanaki. . . . Solo ekobongwana te na ntina na boyebi to ya kozanga boyebi na biso.”
[Etanda na lokasa 7]
Limemya mpo na solo
“LIMEMYA mpo na solo ezali soko moke te ezaleli ya botyoli ya ntango na biso oyo ezali koluka ‘kotɔndɔla’ likambo nyonso, na likanisi oyo ete moto moko te to eloko moko te ekoki koloba ete azali to ezali mpenza na solo. Ezali elimo oyo esangisi kondimisama na esengo nyonso ete solo ekoki mpenza komonana, mpe kotosa solo ntango nyonso mpe epai nyonso oyo yango emonisami. Kofungola makanisi lolenge yango mpo na solo esɛngami na baoyo bazali kosambela Nzambe na solo; nzokande limemya oyo ebongi mpo na solo ekólisaka kolongobana kati na boyokani ya moto elongo na moninga na ye, ezala na maloba to na misala. Wana ezali elimo oyo, tosili komona, mpo na yango K[ondimana] ya K[ala] mpe K[ondimana] ya S[ika] ezali kotatola.”—The New International Dictionary of New Testament Theology, Volimi 3, lokasa 901.
[Elilingi na lokasa 7]
Bokóli ya siansi etalaka bokundoli ya solo na makambo ya siansi
[Elilingi na lokasa 8]
Solo esangisi Bokonzi mpe mapamboli na yango