Baoyo bazwi mapɔlɔ́mi na Galadi bamoni ete “Esengo ya kopesa eleki”
MOKOLO ya Eyenga, Marsí 6, 1994, libota ya Betele na biro monene ya Batatoli ya Yehova mpe babyangami mosusu bayanganaki na libaku ya elambo moko ya malamu—kopesa mapɔlɔ́mi ya kelasi ya 96 ya Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower. Kati na maloba na ye ya ebandeli, mokambi ya likita Karl F. Klein, oyo azali moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova uta mibu pene na ntuku mibale, alobaki na bayekoli 46 ete: “Yesu alobaki ete esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa. Ekozala bongo na esika ya mosala na bino ya misionere—soki bokopesa mingi, bokozala mpe na esengo monene.”—Misala 20:35.
Batoli ya kolendisa
Masoló mingi ya kolendisa bayekoli mapesamaki. Leon Weaver, mosangani ya Komité oyo etalaka mosala, alobelaki motó ya lisoló “Koyika mpiko ezali kokumisa Yehova.” Biso banso tokutanaka na komekama. (2 Bakolinti 6:3-5) Ndeko Weaver amonisaki ete “Wana tozali kati na komekama, ezalaka mpasi te mpo na komityela biso moko motema.” Nzokande, akundwelaki bayekoli ete: “Ata mikakatano nini bokoki kokutana na yango lokola bato mosusu nyonso, Yehova azali kotyela yango likebi. Akopesa nzela te ete bómekama koleka oyo bokoki koyikela yango mpiko.”—1 Bakolinti 10:13.
“Bósepelaka ntango nyonso mingi na mosala na bino” ezalaki lisoló mosusu oyo elandaki, oyo Lyman Swingle, moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki. Bayisraele bazalaki ntango nyonso na makoki te ya kopona esika nini bakokaki kofanda to eloko nini basengelaki kosala. Libota nyonso ezalaki na eteni ya mabelé oyo epesamaki na bango, mpe Balevi bapesamelaki mikumba ya sikisiki oyo basengelaki kokokisa. Bobele bongo, bandeko mingi oyo bazali lelo kati na mosala ya ntango nyonso—lokola bamisionere mpe basangani ya libota ya Betele—bazwaka bango moko ekateli te na ntina na esika bakofanda mpe na mosala oyo bakosala. Ezali boni soki moto moko azali kokakatana na ntina na esika na ye ya mosala? Ndeko Swingle alobaki ete: “Soki otaleli na likebi nyonso Esaleli ya Ntina ya kondima na biso, Yesu, mpe otaleli ndakisa na ye malamumalamu, okotika mosala na yo te.”—Baebele 12:2, 3.
Leonard Pearson, mosangani ya Komité ya Ebokwelo ya la Société Watchtower, alandaki na lisoló “Tóbatela elimo oyo ebongisami malamu.” Alobaki ete: “Okoki kozala na masíni kitoko ya kokanga fɔtɔ́, okoki komona makambo kitoko ya kokanga, mpe esika moko kitoko mpenza, nzokande okozwa fɔtɔ́ ya malonga te—soki masíni na yo ebongisami malamu te.” Lokola masíni ya fɔtɔ́ oyo ezali komonisa etando monene, lolenge na biso ya kotalela makambo esengeli te kobosana mosala ya kosakola oyo mozali kosalema na mokili mobimba. Tosengeli te kobosana elilingi monene wana. Ndeko Pearson alobaki ete: “Baoyo bazali komibongisa mpo na komitalela bango moko bakozala na esengo te na bisika na bango ya mosala. Baoyo bazali kotalela Yehova mpe mosala oyo apesaki bango bakozala na esengo.”
John E. Barr, mosangani mosusu ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki lisoló oyo lilandaki, na motó ya likambo “Ebele na makambo oyo tosengeli kozala na botɔ́ndi mpo na yango.” Ndeko Barr apesaki bayekoli elendiseli oyo ete, “Bozanga botɔ́ndi te epai na Yehova. Ezali moko na biuteli bileki monene ya bosepeli, ata soki batindi yo epai wapi.” Ezaleli ya komonisa botɔ́ndi epusaki Davidi na kokoma ete: “Bipimeli ikweli ngai na bisika na kitɔkɔ; ɛɛ libula esepelisi ngai.” (Njembo 16:6) Ndeko Barr alobaki ete: “Liyoki ya kozala pene na Yehova mokolo na mokolo kati na bomoi na biso ezali libaku lileki monene. Yehova akopimela bino boyokani wana te soki bokotalela yango lokola eloko ya motuya mingi oyo bosengeli kozala na botɔ́ndi mpo na yango.”
Jack Redford, molakisi ya Galadi asalaki lisoló oyo lilandaki ete, “Lolenge nini bokosalela lolemo na bino?” Oyo nde libebi maloba ya bolema makoki kobimisa! (Masese 18:21) Lolenge nini lolemo ekoki kopekisama? Ndeko Redford ayanolaki ete, “Osengeli liboso kolakisa elimo na yo, mpo ete lolemo ezali komonisa makambo oyo mazali na makanisi mpe na motema.” (Matai 12:34-37) Yesu atikaki ndakisa eleki kitoko; asalelaki lolemo na ye mpo na kokumisa nkombo ya Yehova. Ndeko Redford ayebisaki na bayekoli ete, “Lelo oyo bato bazali na nzala ya koyoka maloba ya Yehova. Bino boyebi maloba wana. Bozali na ‘lolemo ya bato balakisami.’ Na yango, tiká ete lolemo na bino lotambwisama ntango nyonso na elimo mpe na motema oyo emipesi mobimba epai na Yehova.”—Yisaya 50:4.
Ntina ya libondeli emonisamaki makasi kati na lisoló “Ozali kotambola lokola nde ozali liboso na Yehova?” Ulysses Glass, mokomeli ya eteyelo, amonisaki ete: “Soki tata moko azali kosala mosala makasi mpo na kosunga libota na ye, kasi asololaka na bango soko moke te mpe ayebisaka bango maloba na ye ya komonisa bolingo te, libota na ye likokanisa ete azali kokokisa mokumba oyo esepelisaka ye te mpe ete azali kosala na bolingo te. Ezali mpe bongo mpo na biso. Tokoki kosala mingi kati na mosala ya Nzambe. Kasi soki tozali kobondela ye te, boye tomipesaki bobele na mosala moko na esika ete tómipesa epai na Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló.”
Theodore Jaracz, moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobelaki motó na likambo “Bibele bazali kosangana elongo na libota ya Nzambe.” Mbula na mbula bankóto mingi bazali koya epai na ebongiseli ya Yehova. (Zakaria 8:23) Nini ezali komonisa Batatoli ya Yehova ete bazali libota ya Nzambe? Ya liboso, bazali kondima Biblia mobimba ete ezali Liloba ya Nzambe. (2 Timoté 3:16) Ya mibale, bamikɔtisaka na makambo ya politiki te. (Yoane 17:16) Ya misato, bazali kotatola mpo na nkombo ya Nzambe. (Yoane 17:26) Ya minei, bazali komonisa bolingo bozangi moimi. (Yoane 13:35; 15:13) Na nzela ya bilembeteli oyo, tokoki na molende nyonso ‘koyebisa bizaleli malamu ya ye oyo abyangaki biso longwa na molili kino na pole ya kokamwa.’—1 Petelo 2:9, NW.
Nsima ya masukúlu wana ya kosimba motema, bayekoli nyonso 46 bazwaki mapɔlɔ́mi na bango. Batindamaki na mboka 16 kati na mokili mobimba.
Bibongiseli ndenge na ndenge nsima ya nzánga
Nsima ya nzanga boyekoli mokuse ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli etambwisamaki na Donald Krebs ya Komité ya Betele. Na nsima baoyo bazwi mapɔlɔ́mi ya Galadi basololaki kati na ebongiseli moko oyo ezalaki na motó na likambo oyo ete “Bwanya bozali ntango nyonso konganga makasi na balabála” (Masese 1:20) Balobelaki makambo kitoko oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na balabála mpe na bamagazini. Ya solo, Yehova azali kopambola baoyo bazali komonisa mpiko mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu. Ndeko moko kati na baoyo bazwaki mapɔlɔ́mi na Galadi alobaki ete, “Nalingaka mingi kokanisa ete tozali lokola bikateli ya matiti na mabɔkɔ ya baanzelu, babuki na mbuma. Soki tozali na molende mingi, baanzelu bakosalela biso mpo na kosala mingi.” (Kokanisá na Emoniseli 14:6.) Ebongiseli ya banakelasi ezalaki mpe na kolakisama ya bililingi ya diapositives oyo ememaki bayoki na komona Bolivie, esanga Malte, mpe Taiwan—mboka misato kati na bamboka epai kuna basusu kati na baoyo bazwi mapɔlɔ́mi basengelaki kotindama.
Na nsima, Wallace mpe Jane Liverance—baoyo basalaki mibu 17 lokola bamisionere—batunamaki mituna. Na Ɔkɔtɔ́bɛ 1993 babyangamaki na Ebokwelo ya la Société Watchtower, epai ndeko mobali Liverance azali sikawa kosala lokola molakisi ya Galadi.
Lisano-liteya ya biteni minei elandaki, na motó ya likambo “Tókumisa baoyo babongi na lokumu na mikolo ya bobangé na bango.” Wana bato bazali konuna, bobangi ya kokóma mpamba mpe kotikama ezali kolembisa maoki na bango ya komityela motema. (Nzembo 71:9) Lisano-liteya wana ya kosimba motema emonisaki lolenge basangani nyonso ya lisangá basengeli kosunga mibangé oyo bazali sembo.
Nsima ya loyembo mpe libondeli ya nsuka, bayangani nyonso 6 220 oyo bazalaki na Ndako ya mayangani na Jersey City mpe na biteni mosusu ya zinganzinga baokaki ete balendisami. Tozali kobondela mpo na baoyo bazwi mapɔlɔ́mi na bateritware na bango ya sika. Tiká ete bálanda kozala na esengo monene oyo ezali kouta na kopesa.
[Etanda na lokasa 26]
Makambo matali banakelasi
Motuya ya bikólo epai bauti: 9
Motuya ya bikólo epai batindami: 16
Motuya ya bayekoli: 46
Mwayene ya mbula ya kobotama: 33,85
Mwayene ya mbula balekisi kati na solo: 16,6
Mwayene ya mbula balekisi kati na mosala ya ntango nyonso: 12,2
[Etanda na lokasa 27]
Likebi monene lityami likoló na esanga Malte
NA BOUMELI ya mibu mingi boklisto ya nkombo mpamba epekisaki solo na Malte. Bamisionere ya Galadi oyo batindamaki kuna na mbala ya nsuka, ezalaki Frederick Smedley mpe Peter Bridle, bazwaki mapɔlɔ́mi na kelasi ya mbala ya mwambe, kala na mobu 1947. Nzokande, bakangamaki mpe babénganaki bango na Malte mwa moke nsima na kokóma na bango. Annuaire des Témoins de Jéhovah 1948 elobi ete: “Bamisionere wana mibale balekisaki ntango mingi na kosambisama mpe liboso ya bakonzi ya mboka ndenge moko na oyo balekisaki na kokokisa mikumba na bango ya kosakola, nyonso oyo likoló na bakonzi ya Lingomba ya Katolike ya Loma. Basángó bazali koloba ete Malte ezali mpo na Bakatolike mpe mangomba mosusu nyonso masengeli kolongwa.” Sikawa, mibu soko 45 na nsima, bamisionere minei ya kelasi ya mbala ya 96 ya Galadi basili kotindama na Malte.
[Elilingi na lokasa 26]
Kelasi ya mbala ya 96 ya Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower
Kati na bankombo oyo ezali awa na nsé, milɔngɔ́ mitángami kobanda na liboso kino na nsima mpe bankombo etángami kobanda na lobɔkɔ ya mwasi kino na lobɔkɔ ya mobali.
(1) Ehlers, P.; Giese, M.; Sellman, S.; Zusperregui, J.; Rowe, S.; Jackson, K.; Scott, T. (2) Liehr, T.; Garcia, I.; Garcia, J.; Fernández, A.; Davidson, L.; Liidemann, P.; Gibson, L.; Juárez, C. (3) Fouts, C.; Pastrana, G.; Claeson, D.; Fernández, L.; Walls, M.; Dressen, M.; Pastrana, F.; Burks, J. (4) Burks, D.; Scott, S.; Jackson, M.; Mauray, H.; Juárez, L.; Zusperregui, A.; Brorsson, C.; Rowe, C. (5) Sellman, K.; Liidemann, P.; Davidson, C.; Mauray, S.; Walls, D.; Dressen, D.; Schaafsma, G.; Liehr, S. (6) Claeson, T.; Gibson, T.; Giese, C.; Ehlers, D.; Fouts, R.; Schaafsma, S.; Brorsson, L.