Baoyo bazwi mapɔlɔ́mi na Galadi bazali “bamisionɛrɛ ya solo!”
“MISIONƐRƐ azali nani?” Mokomi moko ya zulunalo atunaki motuna oyo esili koleka mibu soko ntuku minei. Mokomi yango alobaki ete bamisionɛrɛ ya solo bazali bisaleli mpo na kokɔtisa mbongwana kati na makambo ya bato mpe kati na makambo ya nkita. Nzokande, na mokolo ya lomingo, na 5 Mársi 1995, kati na Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova na Jersey City, eyano ya lolenge mosusu epesamaki na polele mpenza. Na libaku nini? Na kopesama ya mapɔlɔ́mi ya kelasi ya 98 ya Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower—eteyelo oyo esili kotinda bamisionɛrɛ bipai binso na mokili!
Nsima ya loyembo mpe libondeli ya ebandeli, Albert D. Schroeder, moko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi atombelaki na esengo nyonso boyei malamu epai na bayangani 6430 nyonso oyo bazalaki kuna. Kati na maloba na ye ya ebandeli, ndeko Schroeder amonisaki polele mpo na nini baoyo bazwi mapɔlɔ́mi na Galadi bakeseni mpenza na bato mosusu oyo bamibéngaka bamisionɛrɛ. Alobaki ete: “Biblia ezali moboko ya mateya oyo mapesami na Galadi.” Bato oyo bazwi mapɔlɔ́mi na Galadi babongisami, mpo na kozala basáli mpo na kosunga babólá te, kasi mpo na kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe. Na yango, bobele bango nde babongi mpenza mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya bato kati na bateritware na mboka ya bopaya.
Balobi oyo balandanaki nsima balobelaki makambo mosusu oyo mazali kopesa bilembeteli ete baoyo bazwi mapɔlɔ́mi na Galadi bazali bamisionɛrɛ “ya solo.” Charles Molohan asololaki na bango kati na lisukúlu oyo ezalaki na motó ya likambo: “Bólanda kobota mbuma kitoko lokola bamisionɛrɛ.” Na nzela na maloba ya ntoma Paulo oyo mazwami na Bakolose 1:9, 10 (NW), ndeko Molohan akundwelaki baoyo bazwi mapɔlɔ́mi ete sanza mitano oyo balekisaki na Galadi esalisaki bango ete bákóla “na boyebi ya sikisiski ya Nzambe.” Yango esengeli kosunga bango na kobota mbuma na lolenge mibale: na komonisáká mbuma ya elimo ya Nzambe mpe na koyebisáká solo ya Biblia epai na basusu.
Daniel Sydlik, moko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi apesaki lisukúlu oyo lilandaki na motó ya likambo oyo ezali kotinda na kokanisa, ete: “Bósombitinya bomoi na bino te.” Abimisaki motuna oyo Yesu atunaki: “Moto akosɛnza bomɔi na ye na nini?” (Matai 16:26) Ndeko Sydlik amonisaki ete: “Bato basili koteka milimo na bango mpo na kozala na bomoi ya pɛtɛɛ, motindo ya bomoi oyo ezangi mpasi.” Nzokande, baoyo bazali na kondima ya makasi bakoki te kotika bosembo na bango liboso na komekama. Maloba ya Yesu mazali komonisa ete tosengeli kozala pene ya “kopesa,” elingi koloba, komipimela, mpo ete tokoka kozwa milimo, to bomoi na biso. Bamisionɛrɛ wana ya sika balendisamaki ete bápesa mobimba na bango mpo na Yehova, bápesa eloko eleki malamu oyo bazali na yango, kati na mosala na ye!
Na nsima, William Van de Wall ya Komité mpo na kotalela mosala apesaki lisukúlu oyo ezalaki na motó ya likambo “Ntoma Paulo—ndakisa oyo ebongi komekola.” Ndeko Van de Wall alimbolaki ete: “Paulo afungolaki nzela mpo na mosala ya misionɛrɛ na ekeke ya liboso.” Na nsima, na motindo oyo mobongi, makambo minei oyo kati na yango ntoma Paulo atikaki ndakisa malamu mpo na bamisionɛrɛ ya mikolo na biso mamonisamaki polele: (1) komibanzabanza mpe bolingo ya mozindo oyo Paulo azalaki na yango mpo na bato, (2) bolóngi na ye kati na mosala ya kosakola, (3) na bopɔlɔ nyonso aboyaki komitya liboso, (4) elikya ya makasi oyo azalaki na yango epai na Yehova.
Lyman A. Swingle, moko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi asalaki lisukúlu “Tiká ete Yehova ameka bino kati na mosala na bino ya sika.” Kosaleláká mokapo ya mokolo yango, Nzembo 139:16, ndeko Swingle andimaki ete, lokola bazali bamisionɛrɛ ya sika, bakokutana na mikakatano kati na mosala na bango ya sika mpe ete Yehova ayebi lolenge ya kosilisa yango. Alendisaki ete, “Kende epai na ye, sololá na ye wana okutani na mikakatano. Luká kososola nini oyo ezali mokano na ye.”
Na nsima, John E. Barr, moko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi asalaki lisukúlu oyo ezalaki na motó ya likambo: “Kondima na bino ezali kokóla mingi mpenza.” (2 Batesaloniki 1:3) Na Luka 17:1, tozali kotánga ete Yesu alobaki: “Mabaku mayebi kozanga tɛ.” Basusu babɛtaki mabaku na ntina na bomoto ya baninga na bango misionɛrɛ. Kasi ndeko Barr alendisaki bamisionɛrɛ ete bázala na kondima oyo ebongi mpo na kolimbisa. Ya solo, ezalaki mpo na yango nde bayekoli na Yesu basɛngaki ete: “Bakisela biso kondima.” (Luka 17:2-5) Kondima ya bamisionɛrɛ ekoki lisusu komekama na mbongwana ndenge na ndenge etali lisangá. Ndeko Barr atunaki ete: “Tozali na kondima oyo ekoki koyika mpiko na makambo wana, to yango ekokóma bipekiseli oyo bikokani na ngomba?”
Na nsima, balakisi mibale ya Galadi bapesaki mwa batoli. Jack Redford alendisaki baoyo bazwaki mapɔlɔ́mi ete bábatela elimo ya kokende liboso. Alobelaki ndakisa ya ndeko mwasi moko misionɛrɛ oyo atikaki mosala na ye mpo na matumoli ya baninga na ye bamisionɛrɛ. Nzokande, Makomami mazali kokebisa biso na kozala na nkanda mpambampamba te. (Mosakoli 7:9) Apesaki elendiseli oyo ete: “Bózala na likanisi oyo libongi. Bólimbisaka mabungá mpe kozanga kokoka ya baoyo bazali elongo na bino.”
Bongo, U. V. Glass, sɛkrɛtɛre ya Galadi, atunaki ete: “Obongisami malamu mpo na koyika mpiko liboso na ‘ntango mpe makambo makanelami te’”? (Mosakoli 9:11, NW) Ndeko Glass amonisaki ete: “Motindo ya bomoi na biso mozali ntango nyonso kobongwana, mosusu na yango mokoki mpenza kobulunganisa biso mingi.” Kozanga ete bamizela na yango, bamisionɛrɛ mosusu bakutanaki na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, na bokɔnɔ mpe na mikakatano ya libota oyo epusaki basusu na kotika mokumba na bango. Ndeko Glass alobaki ete: “Atako makambo makanelami te makoki kozala nini, toyebi ete Yehova azali koyeba yango malamu mpe azali komibanzabanza mpo na yango. Toyebi ete soki totaleli ye, tokolónga!”
Lisukúlu moko oyo ezalaki na motó ya likambo “Batyami pɛmbɛni mpo na mosala ya misionɛrɛ” esukisaki masukúlu oyo masalemaki na ntɔ́ngɔ́. Theodore Jaracz ya Lisangani ya Mikóló-bakambi nde abimisaki motuna oyo mozali na ebandeli, ete “Misionɛrɛ azali nani?” Kati na eyano na ye, atalelaki Misala mokapo 13 mpe mokapo 14 oyo elobeli mosala ya misionɛrɛ oyo Paulo mpe Balanaba basalaki. Ezali polele ete, mosala yango motalelaki te kosilisa mikakatano ya bato, kasi motalaki ‘kosakola nsango malamu.’ (Misala 13:32) Ndeko Jaracz atunaki ete: “Bóndimi ete Paulo mpe Balanaba bamonisaki polele soki lolenge nini misionɛrɛ ya solo asengeli kozala?” Misionɛrɛ moko ya eksperianse mingi, Robert Tracy ya Mexico abyangamaki mpo na koyebisa na bayangani makambo ya esengo oyo ye akutanaki na yango lokola mopalanganisi ya nsango malamu.
Likambo ya ntina mingi oyo esukisaki manáka ya ntɔ́ngɔ́ ezalaki bongo na ntango ndeko Schroeder akabolaki mapɔlɔ́mi ya banakelasi 48. Bayangani basepelaki mingi na koyoka nkombo ya mikili 21 epai bamisionɛrɛ batindamaki: Barbade, Bénin, Bolivie, Costa Rica, Côte d’Ivoire, Équateur, Estonie, Guinée-Bissau, Guinée équatoriale, Honduras, Île Maurice, Îles Sous-le-Vent, Lettonie, Mozambique, Nicaragua, Paraguay, Pérou, République Centrafricaine, Sénégal, Taiwan, mpe Venezuela.
Nsima ya bopemi moke mpo na bilei ya midí, babyangami bayanganaki lisusu mpe basepelaki mingi na boyekoli moko kitoko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo etambwisamaki na Robert P. Johnson, ya Biro oyo etalelaka mosala. Baoyo batángaki na kelasi ya 98 bayanolaki na mituna. Yango elandanaki na ebongiseli ya mituna mpe biyano oyo ekambamaki na batambwisi ya Galadi. Bayangani balendisamaki mingi ntango baoyo bazwi mapɔlɔ́mi babandaki koyebisa makambo oyo bakutanaki na yango kati na mosala ya kosakola mpe wana bamonisaki maoki na bango na ntina na bisika epai batindami na mikili ya bopaya.
Na boumeli ya mibu motoba na ndambo, Galadi ezalaki na bandako ya la Société Watchtower na Wallkill, na etúká ya New York. Nzokande, na Apríli 1995, eteyelo yango etindamaki na lopango ya sika na Esika monene ya la Société Watchtower mpo na mateya, na Patterson, oyo etongami sika na etúká ya New York. Nini ezalaki maoki ya basangani ya libota ya Betele oyo basalaka na Wallkill, na ntina na mbongwana yango? Na libaku oyo ya kopesama ya mapɔlɔ́mi basusu kati na bandeko oyo bautaki na Wallkill batunamaki. Maloba ya kosimba motema oyo babimisaki mamonisaki polele ete banakelasi ya Galadi bazalaki na bopusi mozindo likoló na bango. Ya solo, mibali mpe basi wana ya bolingo malamu bazali bamisionɛrɛ ya solo—bato na komikitisa, ya komipimela, baoyo bazali komibanzabanza mozindo mpo na kosunga bato mosusu.
Wana molulu ya kopesa mapɔlɔ́mi mozalaki kobɛlɛma na nsuka na yango, bayangani nyonso bandimisamaki mpenza ete Eteyelo ya Galadi ekolanda ntango nyonso kosala oyo yango esili kosala koleka mibu 50—kobongisa bamisionɛrɛ ya solo!
[Etanda na lokasa 18]
Makambo matali banakelasi:
Motuya ya bikólo epai bauti: 8
Motuya ya bikólo epai batindami: 21
Motuya ya bayekoli: 48
Mwayene ya mbula ya kobotama: 32,72
Mwayene ya mbula balekisi kati na solo: 15,48
Mwayene ya mbula balekisi kati na mosala ya ntango nyonso: 10,91
[Elingi ya lokasa 18]
Kelasi ya 98 ya Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower
Kati na bankombo oyo ezali awa na nsé, milɔngɔ́ mitángami kobanda na liboso kino na nsima, mpe bankombo etángami kobanda na lobɔkɔ ya mwasi kino na lobɔkɔ ya mobali.
(1) Eszlinger, A.; Mann, T.; Rivera, G.;Baruero, M.; Vaz, M.; Durga, K.; Silweryx H.; Alvarado, D. (2) Toth, B.; Segarra, S.; Hart, R.; Rooryck, I.; Escobar, P.; Ejstrup, J.; Sligh, L.; Rivera, E. (3) Archard, D.; Snaith, S.; Marciel, P.; Koljonen, D.; Waddell, S.; Blackburn, L.; Escobar, M.; Archard, K. (4) Hart, M.; Toth, S.; Koljonen, J.; Bergman, H.; Mann, D.; Blackburn, J.; Park, D.; Vaz, F. (5) Segarra, S.; Sligh, L.; Leslie, L.; Bergman, B.; Baruero, W.; Alvarado, J.; Leslie, D.; Park, D. (6) Silweryx, K.; Eszlinger, R.; Waddell, J.; Snaith, K.; Durga, A.; Rooryck, F.; Ejstrup, C.; Marciel, D.