Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/6 lok. 24
  • Nzambe azali na koponapona te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali na koponapona te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Masolo mosusu
  • Nazali kozela bokonzi oyo ezali “ya mokili oyo te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Nazali na botɔndi ndenge nasaleli Yehova, ata na kati ya mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Tosalisa bazalani na biso bayeba kosambela Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Korneyi azwi Elimo santu
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/6 lok. 24

Masoló ya Basakoli na Bokonzi

Nzambe azali na koponapona te

ESILI koleka mibu 1 900, ntoma Petelo apesaki litatoli oyo epai na Koloneli, mokonzi moko ya basodá, ete: “Na sɔlɔ namɔni ete Njambe akokabolaka bato tɛ; kasi kati na mabota yɔnsɔ, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyɛngɛbɛnɛ ayambami na ye.” (Misala 10:34, 35) Koloneli amonisaki kobanga Nzambe mpe bolingo mpo na boyengebene. Andimaki litatoli lipesamaki na Petelo, mpe akómaki moklisto.

Likambo yango lizali mpe solo na mikolo na biso​—Nzambe akoponaponaka te. Tozali komona yango na likambo oyo lisalemaki na mboka Allemagne. Lapólo elobi ete:

“Kati na teritware ya lisangá na biso, ezali na bandako minene ya basodá mpe ya mabota na basodá ya mboka Russie. Na 1989, mwa moke nsima ya kolongolama ya Efelo ya Berlin, bankulutu batunaki soki ezalaki na basakoli oyo bayebi lokótá Russe. Tozalaki mwa ndambo na bato oyo toyebaki yango, mpe tokendeki kosakola na teritware wana, oyo epesaki mpenza esengo monene. Oyo elandi ezali moko na makambo mingi oyo tokutanaki na yango kuna.

“Nazalaki elongo na mosakoli moko ya mobali oyo azwi naino batisimo te (oyo sikawa asili kobatisama) wana tosololaki na komandá. Komandá yango ayokaki makambo oyo toyebisaki ye mpe asɛngaki biso ete tósolola na basodá na ye. Ayebisaki biso ete basengeli mpe koyoka makambo matali Nzambe mpe Biblia, mpo na yango tolakanaki mpo na kozonga lisusu.

“Tosɛngaki na ndeko mwasi moko oyo ayebi koloba lokótá Russe malamu ete abongola makambo oyo tozalaki koloba. Kati na eyanganelo ya káa, totandaki mikanda na biso mpe tosololaki elongo na basodá 68 mpe toyanolaki na mituna na bango. Na nsima bazwaki na esengo nyonso babúku 35 mpe bazulunalo 100. Ntango tozalaki kobima na eyanganelo, tomonaki mwa bituluku oyo bizali kolobana na ntina na mikanda yango.

“Tolakanaki mpo na kozongela bango na Yúli 4, 1992. Ntango tokómaki na 10:50  ya ntɔ́ngɔ́, bakɛngɛli ya ekɔteli ya káa bayebisaki biso ete basodá bazali kozela biso. Mokonzi moko na basodá amemaki biso na eyanganelo, mpe tomonaki ete mwasi moko oyo, na mbala ya liboso azwaki mikanda epai na biso mpo na bibliotɛkɛ, asilaki kotya mokanda ya boyebisi boyei na biso kati na káa. Bandeko misato basalaki masukúlu mikuse na ntina na mosala na biso na mokili mobimba mpe bamonisaki mpo na nini tosengeli kondimela Biblia. Na nsima toyanolaki na mituna ya bayoki, toyanolaki yango na lisalisi ya Biblia. Kati na mituna na bango, mosusu mozalaki ete ‘Etelemelo ya Batatoli ya Yehova ezali nini na ntina na mosala ya sodá, mpe basusu na bango bazali basodá?’ Yango epesaki mosakoli oyo azwaki naino batisimo te, oyo azalaki elongo na ngai, libaku ya kolobela mibu 25 ya mosala na ye ya sodá kati na limpinga ya Allemagne ya Est, oyo na nsuka na yango azalaki Kapitɛni ya limpinga ya basodá oyo babundaka na mpepo. Amonisaki lolenge nini ayekolaki na ntina na Nzambe mpe Biblia mpe sikawa alingi kokóma Motatoli ya Yehova. Basodá bakamwaki mingi na oyo bayokaki. Bobele na miniti nsambo mikanda nyonso oyo tomemaki mizalaki na mabɔkɔ ya basodá, mpe mingi kati na bango balingaki kozwa Biblia. Tozwaki Biblia nsambo na lokótá Russe na esika batekisaka mikanda, mpe bazwaki yango na esengo nyonso. Ezalaki esengo ya solo ya kopesa na baoyo bazali na nzala ya elimo mateya ya Biblia, mpe tozali kolikya ete bakosalela yango.”

Ya solo Nzambe azali na koponapona te. Kati na Liloba na ye azali kobyanga bato na motema molongobani, ata bazali banani to ata bafandi epai wapi. Azali kobyanga bango na koyekola makambo matali ye mpe Mwana na ye, Yesu Klisto, mpe mingi oyo bauti na mitindo nyonso ya bomoi bazali kosala yango.​—Yoane 17:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto