Lolenge na yo ya kosambela ezali na ntina?
NA 12HOO, mboka moko moke ya Afrika ezalaka na nsé na moi makasi. Longwa na lobwako moko ya penepene, okoki koyoka konganga makasi, nzembo, mpe kobɛta mabɔkɔ na esengo. Kasi yango ezali mpo na bato banso te. Ezali nde losambo ya bonkɔ́kɔ na Afrika. Nzokande, konganga mosusu elongo na makɛlɛlɛ makasi euti na lingomba moko ya charisma ya penepene. Kuna, bandimi na yango bakosalaka makamwisi na “kobikisa bato” mpe bakolobaka na minoko miyebani te. Na nsuka mosusu ya mboka wana, ezali bongo na lolenge mosusu ya losambo: mbelá ya muezzin moko azali kobyanga bandimi Bamizilimá mpo na kobondela.
Ya solo, bandimi ndenge na ndenge oyo bamipesi bakoki komonana kati na bingumba mpe bamboka mingi ya Afrika. Na bileko mingi, Baafrika bazalaki kolanda losambo na bango ya bonkɔ́kɔ. Na nsima, bamisionere ya boklisto ya lokuta bayaki, elongo na mapinga ya basodá ya bikólo bikeseni ya Mpótó, mpe bango banso babongolamaki na makasi kati na “boklisto”—ata mpe nkombo na bango.
Matomba nini mabimaki? Kobotama ya lingomba oyo lisangisi bindimeli mpe mimeseno ya bonkɔ́kɔ ya Afrika elongo na bindimeli ya lingomba ya bopaya. Lelo oyo, “baklisto” mingi bazali naino kosalela bikelákela mpe bankisi ya bonkɔ́kɔ. Lisusu, bamisionere ya mangomba mabéngami ete ya boklisto bamonisaki boklisto ya solo na lolenge mabe mpenza, mpe batungisami mpo na yango te. Na nyonso wana, bango nde bapesi nzela na ezaleli ya koboya kondima Biblia oyo ezali lelo epai na bamoko na Baafrika.
Atako bongo, mitindo mingi ya “boklisto” ezali naino kosalelama. Na bambula oyo euti koleka, bituluku ya lingomba ya charisma bikómaki na bato mingi mpenza; kondima na nguya ya kobikisa bato ezali kopalangana. Zulunalo moko elobeli makambo ya basi, elimbolaki mbelá ya mangomba wana na komonáká ete ‘likanisi oyo ya Afrika mpo na losambo epalangani na bato banso. Mpo na Baafrika, lingomba esengeli mpenza kozala na likoki ya kopesa biloko ya mosuni mpo na kosepelisa bomoi ya moto. Na yango, mpo na Moafrika oyo azali kondima ete bansango ya elimo ezali na ntina soko kati na makambo nyonso, motindo na kosala na mangomba ya elimo [to ezali na kondima kati na kobikisa bato] eyokani na masɛngami ya etamboli na ye. Kasi, na mawa nyonso, mangomba mingi ya charisma masili mpenza kokóma lokola mwa bakompanyi ya mombongo.
Lelo oyo, na Afrika, ezali na mangomba ya mikemike koleka 6 000. Ntango mosusu, ozalaki kokanisa ete mangomba nyonso wana mpe oyo ya mikemike, esimbi fungóla ya lobiko. Kasi motuna ya ntina ezali oyo ete, Makanisi ya Nzambe mazali nini?
‘Ekoki kozala na lingomba oyo lizali kosepelisa Nzambe?’
Solo mpenza, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ asengelaki te kozanga kopesa biso litambwisi kati na likambo oyo. (Amosa 3:7; Misala 17:26, 27) Mpe elembeteli ezali polele ete litambwisi ya Nzambe likoki kozwama kati na Biblia. Biblia ezali búku ya mindɛlɛ soko moke te lokola basusu bakobéngaka yango bongo. Ya solo, moto moko te—moindo soko mondɛlɛ—akoki koloba ete ye nde akomaki yango. 2 Timoté 3:16 elobi ete: “Makomami manso mapemami na Nzambe.” Bosolo ya Biblia, mateya matali nsé na mabelé, ntango oyo yango eumeli, kolónga na yango liboso na botɛmɛli makasi, bisakweli na yango ya sikisiki mpe kopalangana na yango oyo ekokani na mokanda mosusu te—ezali bilembeteli bimonisi ete euti na Nzambe.
Mokanda yango mozali koteya biso nini? Lisusu, elobi na biso ete ezali na “Nzambe ya solo” bobele moko. (Yoane 17:3) Na likambo oyo, lolenge nini ekoki kosalema kati na mangomba nyonso? Mangomba mazali kotɛmɛlana na ntina na likambo litali koyeba Nzambe mpe lolenge na ye, boye te? Yakobo, mokomi na Biblia alobelaki “lingomba ya pɛto mpe ya solo.” (Yakobo 1:27, Today’s English Version) Soki esengeli koyeba lingomba ya solo, boye esengeli mpe kozala na lingomba ya lokuta to oyo ya mabe. Yango esengeli kotɛmɛla likanisi oyo ete mangomba nyonso mazali nzela ekeseni mpo na kobelema epai na Nzambe.
Mitinda ya Mozalisi mpo na losambo
Wapi lolenge malamu ya kosambela Nzambe? Biblia ezali koteya biso ete losambo ya solo etongami kati na boyebi ya sikisiki. Yesu Klisto, mosakoli monene alobaki na mwasi moko Mosamalia, ete: “Bino bojali kosambela yango eyebi bino tɛ.” (Yoane 4:22) Ntango mosusu yango ezali mpe motindo moko mpo na yo? Basili koteya yo ete Yehova ezali mpenza nkombo ya Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso? (Basauma 83:18, Biblia Uele) Oyebi mikano na ye mpo na moto mpe mabelé? (Matai 6:9, 10; Baefese 1:9, 10; 3:11) Lingomba na yo lizali mpenza kopesa yo elikya ya solo mpo na mikolo kitoko mizali koya? Mpe soki okanisi ete ozali moklisto, okoki mpenza kolimbola bindimeli na yo na lisalisi ya Makomami, to yango ezali bobele lisangó oyo ozwaki kozanga kotalela yango?
Soki yo moko omoni ete ozangi boyebi ya sikisiki, okoki kozwa yango na nzela ya boyekoli ya Liloba ya Nzambe, Biblia. Yehova Nzambe azali komizela ete basambeli na ye bámesana na makambo oyo mateyami na Búku na Bulee. Oyo eleki mpenza, azali komizela ete básalela yango kati na bomoi na bango. Ezaleli na biso esengeli kozala lolenge moko na oyo ya mokomi na Nzembo, oyo alobaki ete: “Liloba na yɔ ejali mwinda na makaka na ngai mpe pole na njela na ngai.” (Njembo 119:105) Kino na meko nini lingomba na yo esili kosalisa yo mpo na koyeba mpe kososola Biblia?
Likambo mosusu ya ntina oyo lizali komonisa losambo ya solo ezali kondima kati na Yesu Klisto, bobele lokola mosakoli monene te, kasi lokola Mwana bobele moko ya Nzambe. Makomami mayebisi polele ete Yesu azali “Mokonzi na bomɔi.” (Misala 3:15; 4:12) Mingi bazali koloba ete bazali na kondima epai na Yesu, kasi kondima na bango ezali mpenza lolenge nini? Kondima ya solo epai na Klisto esɛngi kotosa mitinda na ye. Nzambe ye moko alendisaki yango wana alobaki ete: ““Oyo Mwana na ngai, molingami; bóyoka ye.” (Malako 9:7, NW) Basambeli ya solo bandimi bongo kolanda matambé na Yesu na lolenge ekoki. (2 Petelo 2:21) Moko na myango oyo bazali kosala yango, ezali na komipesáká kati na mosala ya kosakola oyo ye abandaki. (Matai 4:17; 10:5-7) Lingomba na yo lizali kolendisa yo na kosangana kati na mosala yango?
Lisɛngami mosusu ya losambo ya solo ezali bolingo. Yehova Nzambe amonisami mpenza na bolingo, mpe Yesu alobaki na bayekoli na ye ete basengelaki koyebana mpo na bolingo oyo bazalaki komonisa kati na bango. (Yoane 13:34, 35; 1 Yoane 4:8) Na kotaleláká bamilió ya bato oyo bazali lelo koloba ete bazali baklisto, mokili mbɛlɛ etondani na bolingo, boye te? Nzokande, na solo mpenza, mokili na biso momonisi ete ezangi mpenza bolingo. Bobele na ekeke oyo, bitumba bisili koboma bamilió ya bato. Mabe mpe mobulu ezali sé koyikana. Ómituna ete, ‘Soki bato nyonso balandaki lingomba na ngai, mokili mbɛlɛ ezali ya bolingo mingi?’
Na nsuka, Biblia emonisi ete basambeli ya solo basengeli kokabwana na mokili oyo moyebi Nzambe te. Ntango aponaki libota ya kala ya Yisraele lokola babateli na losambo ya pɛto, Nzambe akebisaki bato na ye ete básangana te na mabota na mbindo oyo mazalaki zingazinga na bango. (Deteronome 7:1-6) Na Yoane 17:16, Klisto Yesu alobaki lolenge moko na ntina na bayekoli na ye, ete: “Bajali bato na mokili tɛ pelamɔkɔ ngai najali moto na mokili tɛ.” Basambeli ya solo ya Nzambe bakosanganaka te kati na politiki, na pite, na mombongo ya lokoso, to na mateya nyonso oyo mazangi kokumisa Nzambe. (Yoane 18:36; 1 Yoane 2:15-17) Bazali kotosa etindá oyo ezwami na Baloma 12:2, ete: “Bobilaka makambo na ntango oyo tɛ.” Ezali yango nde elendisami na lingomba na yo?
Lisungi lizali
Ya solo, lolenge ya losambo na yo ezali na ntina mpo na Nzambe. Mpo na ye, ezali bobele na lingomba moko ya solo. (Baefese 4:4-6) Lisoló na biso ya mokuse elobeli mwa makambo ya ntina oyo mateyami na Biblia. Mpo na nini te kondima koyekola mingi?
Ata malako ya lingomba na yo mazali nini, Batatoli ya Yehova bakoki kosalisa yo kati na likambo wana. Bayebani na mokili mobimba mpo na mosala na bango monene ya kolakisa Biblia. Bazali na mokumba ya kosalisa bato ya mposo nyonso mpe mangomba nyonso mpo na kozwa bososoli mozingo ya Biblia. (Masese 2:1-6) Bazali kobimisa mikanda mikolimbolaka Biblia oyo mikoki kosalisa yo kati na likambo oyo.a Na yango, bakoya bongo kati na ndako na yo mpo na kolakisa yo Biblia kozanga kofuta mbongo. Bamilió ya bato na mokili mobimba bazali sikawa kozwa matomba na boyekoli ya Biblia. Mpo na nini ozali kosala yango te? Ya solo, ezali na ntina ete ósala yango mpo ete lolenge ya losambo na yo ezali na ntina.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Moko na babúku yango ezali L’humanité à la recherche de Dieu, oyo ebimisamaki na 1990 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc. Bato mingi basepelaki na masoló na yango ya mayele mpe ya bososoli na ntina na mangomba minene ya mokili.
[Elilingi na lokasa 5]
Bamisionere ya mangomba mabéngami ete ya boklisto bamonisaki boklisto ya solo na lolenge mabe mpenza
[Elilingi na lokasa 5]
Mangomba mingi ya charisma masili mpenza kokóma lokola mwa bakompanyi ya mombongo
[Elilingi na lokasa 6]
Kondima kati na Yesu, likambo ya ntina mingi ya losambo ya solo
[Elilingi na lokasa 7]
Batatoli ya Yehova bazali kosalisa bamilió ya bato na kozwa boyebi ya sikisiki na nzela ya boyekoli ya Biblia na ndako