Lingomba ezali mpenza kokokisa bamposa na yo?
MOPEPE, mai, bilei, efandelo—wana ezali biloko oyo bitalelami bipai binso lokola bamposa ya bato. Soki ozangi biloko wana, okozala na bosɛngá mpe okokufa. Nzokande, eleki ntango mingi mpenza, Mose, mokambi ya Bayisraele abendaki likebi likoló na mposa mosusu ya bato, oyo ezali na ntina mingi koleka ata bilei to mpe mai. Mose alobaki ete: “Moto akobika bobele na mampa te, kasi moto akobika na maloba nyonso mabimi na monoko ya Yehova.”—Deteronome 8:3, NW.
Na maloba oyo ya mozindo, Mose amonisaki ntina ya bamposa na biso ya losambo to ya elimo. Alakisaki ete bomoi na biso ya solo etalelami na kokokisama ya bamposa wana! Na boumeli ya mibu 40 ya mobembo na bango na mokili mokauki, Bayisraele babikaki mpenzampenza na nzela ya ‘maloba nyonso mabimaki na monoko ya Yehova.’ Babikaki na makambo oyo masengelaki komema na liwa. Na etindá ya Nzambe, bilei oyo bibéngamaki mána biutaki longwa na makoló na likamwisi. Mai mabimaki na mabangá mpo na kosilisa mposa na bango. Kasi Nzambe asalaki likambo oyo lileki mpenza komibanzabanza na bamposa na bango ya mosuni. Mose alobaki ete: “Lokola moto akopamelaka mwana na ye, boye [Yehova] Njambe na yɔ akopamelaka yɔ.”—Dutɛlɔnɔmɛ 8:4, 5; Exode 16:31, 32; 17:5, 6.
Bayisraele bazalaki te kolukaluka bango mpenza mpo na koyeba kosala oyo ezali sembo to mabe, oyo eyokani na bizaleli malamu to oyo eyokani na losambo. Bazwaki litambwisi longwa na Nzambe ye moko. Apesaki bango Mibeko ya Mose, mibeko malamu mingi mpo na kobatela kɔlɔngɔnɔ ya nzoto, mibeko mpo na bopɛto, mpe mitindá ya bizaleli malamu mpe na losambo. Bongo, Nzambe apesaki motuya mingi na bolamu ya nzoto mpe ya elimo ya Bayisraele. Babikaki na ‘maloba mabimaki na monoko ya Yehova.’
Yisraele ekesenaki mpenza na mabota mosusu. Na mikolo ya Mose, Ezipito eyangelaki lokola nguya monene ya mokili mobimba. Ezalaki mboka na losambo ndenge na ndenge. Búku World Book Encyclopedia elobi ete: “Baezipito ya kala bazalaki kondima ete banzambe (banzambe-mibali mpe banzambe-basi) ndenge na ndenge ebimisaki mitindo ya makambo makeseni mpe misala ya bato mikeseni. Na bongo, basambelaki banzambe mingi . . . Na engumba mpe na mboka mokomoko ya Ezipito, bato bazalaki kosambela nzambe na bango ya ntina mingi, bakisa mpe banzambe ya minene.”
Losambo wana ya ebele ya banzambe ekokisaki bamposa ya elimo ya Baezipito? Te. Ezipito ekɔ́taki kati na biyambayamba mpe na bizaleli mabe mpo na kosangisa nzoto. Na esika ya kotalela bomoi mpe kɔlɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na motuya mingi, lolenge oyo Baezipito bazalaki kosalela bomoi ememaki “malali mabe.” (Dutɛlɔnɔmɛ 7:15) Na yango, ezali mwa likambo ya kokamwa ete Biblia elobelaki banzambe ya Ezipito na lityó, kobéngáká bango ete “mbindo na bikeko.”—Ejekiele 20:7, 8.
Likambo motindo moko lizali kosalema lelo. Bato mingi bazali na mwa lolenge ya kondima epai na Nzambe; bobele moke nde bazali komiloba ete bazali bandimi te. Atako bongo, emonani mpenza ete mangomba malóngi te mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya bato. Soki bato bazalaki kobika “na maloba nyonso mabimi na monoko ya Yehova” mbɛlɛ lelo oyo tozali na bitumba, koponapona mposo, bosɛngá, mpe bobólá monene? Soko moke te! Atako bongo, bobele bato moke nde bazali kokanisa mpo na koluka lingomba mosusu. Ya solo, nkutu basusu bazali kondima te mpo na kosolola makambo ya losambo to mpo na kotya likebi na makanisi ya sika mpo na losambo!
Na ndakisa, mobali moko ya mboka Ghana, na Afrika ya Wɛ́sti, alobaki na moklisto mosakoli moko, ete: “Nandimi ete Nzambe asili komimonisa ye moko epai na biso bato ya Afrika na nzela ya banganga-mibali mpe banganga-basi na biso ya nguya mingi, lokola amimonisaki ye moko epai na Bayuda na nzela ya basakoli. Ezali likambo ya mawa ete bamoko kati na biso bato ya Afrika baboyi kondima banganga na biso mpenza, kasi bazali nde kolobela Yesu, Mahommed, mpe basusu.”
Na bisika mosusu ya Afrika, Boklisto etalelami lokola lingomba ya mindɛlɛ—ebongiseli euti na mboka mosusu oyo ezali kosala mabe mingi koleka malamu. Kasi ezaleli wana ya koboya kondima makanisi ya sika ezali kosalisa yo to ezali kolɛmbisa milende na yo ya kokokisa bamposa na yo ya elimo? Lisese moko ya Afrika lilobi ete: “Okotya mabɔ́kɔ nyonso mibale te kati na saáni ya bilei bobele mpo ete ozali na nzala.” Momeseno wana ya kolya ezali malamu te mpe esalemaki mbala mingi te—mingi mpenza soki oyebi te biloko oyo bizali na saáni! Atako bongo, bato mingi bazali kopona lingomba na bango na botaleli malamu te, kasi na kolanda mayoki to momeseno ya libota.
Losambo oyo lokokokisa bamposa na yo ya elimo losengeli kozala ‘mosala na bulee elongo na makoki ya bososoli na yo.’ (Baloma 12:1, NW) Esengeli kosala liponi libongi, oyo ya mayele. Na bongo, tika ete tótalela moko na lolenge ya kopona mangomba na Afrika. Nzokande, makambo oyo malandi makozala na ntina mingi mpo na batángi na bipai nyonso.
[Elilingi na lokasa 3]
Mose amonisaki ntina ya bamposa na biso ya elimo
[Elilingi na lokasa 4]
Makambo oyo makómelaki bamisionere ya boklisto ya lokuta mazipi makanisi ya bato mosusu epai na Biblia