Komekana ezali nzela ya Bolóngi?
“KOLÓNGA ezali likambo bobele moko ya ntina, eloko moko te ekokani na yango.” Lelo oyo, bato mingi bazali kolanda maloba wana, oyo mbala mingi bakanisaka ete mauti na Vince Lombardi, molakisi na babɛ́ti motópe ya mboka Amerika. Lelo oyo, mikili oyo kala mizalaki ya communiste misangani mpo na kokumisa komekana. Elobamaki ete kokɔ́tisa komekana kati na nkita na bango ekoki kokómisa bango na bozwi mingi. Na mikili mingi ya Ɛ́sti, baboti bazali kopusa bana na bango na komekana elongo na bana mosusu mpe bazali kofutela bango balakisi mosusu mpo na kobongisa bango na kolónga mimekano. Baboti oyo bamipesi mingi na likambo yango, bakanisi mpenza ete kokɔ́ta biteyelo ya lokumu ezali mwango ya kozala na bozwi na mikolo mikoya.
Bato mingi bazali kokanisa ete, komekana ezali mwango mpo na kolónga. Engebene makanisi na bango, bato bakólaki na komekanáká moko na mosusu. Motango ya 65,9% ya bakambi ya ndambo monene ya bakompanyi baoyo batunamaki na lisangá Japan’s Federation of Economic Organizations, balobaki ete: “Komekana mpo na kozwa mpɛ́tɛ ezali liziba ya nguya ya bakompanyi ya mboka Japon.” Mpe emonani lokola ete bakompanyi ya Japon esili kolónga mpo na mwa ntango. Kasi, komekana ezali solo mwango mpo na kolónga?
Ezali solo kopesa mbano?
Bato oyo bazali komekana elongo na basusu bazali komonisa elimo ya moimi, ya koluka liboso matomba na bango moko. Bazali na esengo wana makambo mazali kobebela bato mosusu, kokanisáká ete ekotómbola bango. Mpo na koluka matomba na bango moko, bakoki kosalela myango oyo mikoki kopesa basusu mpasi. Motindo wana ya koluka elónga na nzela ya komekana mozali komema na likambo nini? Yasuo, oyo amikɔ́tisaki ye moko kati na emekaneli mpo na kokóma moto monene kati na kompanyi epai azalaki kosala, amikundolaki etamboli na ye ya kala mpe alobaki ete: “Lokola natondaki na elimo ya komekana mpe na makanisi ya kozwa mpɛ́tɛ, namikokanisaki na basusu mpe namonaki ete naleki bango nyonso. Ntango bato yango batyamaki na etelemelo eleki oyo ya ngai, nazalaki komitungisa mpe komilelalela mokolo na mokolo na ntina na bakambi ya kompanyi. Nazalaki mpenza na baninga ya solo te.”
Elimo ya komekana ekoki lisusu komema moto na liwa ya nokinoki. Ndenge nini? Zulunalo moko ya Japon Mainichi Daily News ekangisi karoshi, to kokufa mpo na kosala mingi koleka, na bato oyo babéngami ete comportement type-A (ezaleli ya motindo-A). ezali komonisa lolenge ya bato oyo bazali kolónga kobulungana ya makanisi mpo na kowela ntango, kolónga komekana, mpe mikakatano. Minganga ya bokɔnɔ ya motema, Friedman mpe Rosenman, bango bato ya Amerika, bakangisi ezaleli ebéngami comportement type-A na bokɔnɔ bosilisaka makila na misisa oyo mimemaka makila kati na motema. Ee, elimo ya komekana ekoki komema na liwa.
Komekana na esika ya mosala ekoki lisusu komema mikakatano mosusu ya nzoto mpe ya makanisi lokola. Tozali na ndakisa ya Keinosuke, oyo azwaki esika ya liboso mpo na botekisi mituka kati na moko ya bakompanyi minene ya mituka na Japon. Alóngaki na kotekáká mituka 1 250. Batyaki fɔtɔ́ na ye na etánda mpe bakakisaki yango na esika bakambi kompanyi bayanganaka na biro monene ya kompanyi. Atako ayinaki likambo ya kosalela baninga na ye ya mosala lokola elekelo mpo na kozwa mpɛ́tɛ́ na mosala, kompanyi epusaki ye na kosala bongo. Na nsuka, kati na mbula wana abelaki mpota ya libumu mpe ya likundu. Bobele na mbula yango, bakambi 15 ya kompanyi yango bakɔtaki lopitalo, mpe mokambi moko amibomaki.
Na ndako, ezaleli ya koluka kokokana na baninga ya pembeni, ezali kopusa bato mingi na komekana ntango nyonso mpo na oyo etali kolakisa bozwi na bango ya mosuni. (1 Yoane 2:16) Yango ezali kopesa matomba bobele na bato ya mombongo, kopesáká mosolo na bato ya mombongo ya mokili.—Kokanisa na Emoniseli 18:11.
Atako elimo ya bowelani mpe ya komekana ekoki kokólisa mayele ya mosala, ezali likambo ya kokamwa te wana mokonzi Solomo amonisaki ete: “Ngai namɔni ete misala yɔnsɔ na mayɛlɛ yɔnsɔ kati na mosala iuti na kolulela na moto oyo akolulelaka mojalani na ye. Oyo mpe ejali mpamba mpe koluka kokwa mopɛpɛ.” (Mosakoli 4:4) Na bongo, ndenge nini tokoki kobatela kimya ya makanisi wana tozali kobika kati na mokili oyo etondi na komekana? Mpo na koyeba yango, tika totalela naino epai wapi likanisi ya komekana ebandaki.