Biblia—Ebatelamaki na Nzambe kino na mikolo na biso
LELO oyo, bato mingi bazalaka na momeseno ya kobenga Makomami oyo ekomamaki na lokota ya Liebele mpe ya Alameyé ete “Libulá ya kala.” Likanisi yango ezwi moboko na yango na botangi ya 2 Bakolinti 3:14 kati na libongoli ya lokota ya Latin, Vulgate mpe King James Version. Nzokande, lolenge ya kobongola oyo ete “libulá ya kala” elongabani te. Liloba ya Greke di·atheʹkes oyo esalelami awa elimboli “kondimana,” lokola emonisami kati na bisika mosusu 32 epai kuna esalelami kati na makomi ya Greke. Mabongoli mingi ya mikolo na biso ebongoli yango na lolenge elongobani ete “kondimana na kala.”—Tala Biblia Lingala Haut-fleuve.
Ntoma Paulo azali te kolobela mpo na Mokomami ya Liebele mpe ya Alameyé na mobimba na yango. Alobi mpe te ete makomi mapemami ya boklisto mazali “libulá (to kondimana) ya sika.” Ntoma Paulo azali nde kolobela kondimana ya kala ya mibeko, oyo Mose akomaki kati na etuluku ya mikanda mitano ya liboso ya Biblia mpe oyo ezali bobele eteni moko ya Makomami oyo ekomamaki liboso ya kobotama ya Klisto. Ezali mpo na ntina wana nde alobi katikati na molɔngɔ́ ya kotanga oyo elandi ete, “wana mokanda na Mose ejali kotangama.”
Na yango, ezali na moboko moko te ya solo oyo ekoki kopesa biso nzela na kobenga Makomi ya Liebele ete “Libulá ya kala” mpe makomi ya Greke ete “Libulá ya sika.” Yesu ye moko abengaki kosangisama ya mokomi nyonso ya bulee ete “[Makomami, NW].” (Matai 21:42; Malako 14:49; Yoane 5:39) Ntoma Paulo abengaki yango nyonso ete “[Makomami, NW] mosantu,” “[Makomami, NW],” “makomi mosantu.”—Baloma 1:2; 15:4; 2 Timɔtɛ 3:15.
Kokabolama ya Biblia na mikapo mpe na milɔngɔ́ ya kotanga (King James Version ezali na mikapo 1 189 mpe milɔngɔ́ ya kotanga 31 102) ezalaki te na ntango bakomi na yango mpenza bakomaki yango, kasi ezalaki mwango moko kitoko oyo eyaki kobakisama na bikeke oyo elandaki na nsima. Mikanda 66 nyonso ya Biblia esali búku bobele moko mpe ezali ya kokoka. Lokola bilembo ya mokapo mpe ya molɔngɔ́ ya kotanga ezali bobele lisalisi oyo ebongi mpo na koyekola Biblia mpe esalemi te na mokano ya kobebisa bomoko ya mobimba na yango, bobele bongo mpe kokabolama ya Biblia na biteni, oyo esalemi engebene lokota ya moboko oyo esalelami kati na maniskri oyo ekomi kino na mikolo na biso.
Na yango, lelo oyo, tozali na Makomami ya Liebele mpe ya Greke, oyo ya Greke ebengami lisusu ya “boklisto” mpo na kokesenisa yango na libongoli ya La Septante oyo ezali bongo eteni ya Makomami ya Liebele ebongalami na monoko ya Greke.
Soko bakomeli 40 nde basalelamaki na Nkolo-mokanda moko mpo na kokoma liloba lipemami ya Yehova. “Makomami nyonso mapemami na Nzambe,” mpe kati na yango makomi ya oyo ezwami kati na Makomami ya Greka ya boklisto, bakisa mpe “makomi mosusu lokola.”—2 Timoté 3:16, NW; 2 Pɛtɛlɔ 3:15, 16.
Elobeli “mapemami na Nzambe,” ebongolami longwa na liloba the·oʹpneu·stos, elimboli “Nzambe apesi mpema.” Na ‘kopesáká mpema, epai na bato na sembo, Nzambe asalaki ete elimo na ye, to nguya na ye oyo ekosalaka mosala, ebanda kosala mosala kati na bango mpe elakisa nzela na ntina na oyo azali na mposa na yango ete ekomama, mpamba te, ekomami ete “esakweli moko te ebimaki na mokano na moto, kasi bato bauti na Njambe balobi wana ejalaki bango kopusama na [elimo santu, NW].” 2 Pɛtɛlɔ 1:21; Yoane 20:21, 22.
Tokoki kozala na botondi mpo ete Nzambe-Mozwi-na-nyonso atalelaki yango ete ezali maloba na ye ya solo oyo ekomami na elobeli oyo ya petepete mpo na kososola yango mpe kobongola yango na nkóta nyonso. Ekozala malamu mpo na biso “kotia mitema na yango, lokola mwinda oyo ejali kopela na esika na molili” na ekeke oyo ya 20. (2 Pɛtɛlɔ 1:19; Njembo 119:105) Ya solo, moto oyo “mposa na ye ejali kati na mobeko na [Yehova]; akokanisaka mpe mobeko na ye butu na moi” mpe azali kosalela makambo oyo azali kotanga, ye wana akokóma na bozwi mpe na esengo.—Njembo 1:1, 2.