Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/3 nk. 4-7
  • Kimya ya makanisi kati na mokili oyo etóndi na komekana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kimya ya makanisi kati na mokili oyo etóndi na komekana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebandeli ya elimo ya komekana
  • Kozwa elónga kozanga kosalela komekana
  • Lolenge ya kobatela kimya ya makanisi
  • Komekana ezali nzela ya Bolóngi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Bobikisami, na misala kaka te, kasi na nzela ya boboto monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • ‘Okokoba kotambola na elimo’?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Zalá moto oyo atyaka kimya kasi te moto oyo abimisaka kowelana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/3 nk. 4-7

Kimya ya makanisi kati na mokili oyo etóndi na komekana

YESU KLISTO alobaki na bantoma na ye ete: “Sɔkɔ moto nani alingi kojala moto na liboso, ajala moto na nsima mosaleli na bato yɔnsɔ.” Bantoma bazalaki kotyana ntembe mpo na koyeba soki nani alekaki na lokumu kati na bango nyonso. Bayebaki ete Yesu ayini elimo ya lolenge yango. Mokolo moko te azalaki kopusa bayekoli na ye na komekana bamoko na basusu lokola mwango ya kotómbola bokóli ya elimo.​—Malako 9:33-37.

Liboso na koya na mabelé, Yesu Klisto asanganaki na kozalisama ya babalani ya liboso mpe ayebaki lolenge nini basalemaki. (Bakolose 1:15, 16) Bato ya liboso bazalisamaki na makoki ya kokóla kozanga komekana na makasi nyonso elongo na basusu. Bato bazalaki na mposa te ya kobundana kati na bango mpo na koyeba nani akozala mokambi, to komekana elongo na banyama kati na etumba mpo na kobika.​—Genese 1:26; 2:20-24; 1 Bakɔlinti 11:3.

Ebandeli ya elimo ya komekana

Bongo, lolenge nini elimo ya komekana makasi ekómaki nguya monene kati na bato? Koboma moto oyo esalamaki mpo na mbala ya liboso kati na Lisoló ya bato ezali kopesa likanisi mpo na yango. Elimo ya komekana oyo ezalaki na Kaina, mwana mobali ya liboso ya babalani mibale ya liboso, ememaki na mpasi wana monene. Kaina abomaki ndeko na ye Abele mpamba te mbeka ya Abele esepelisaki Nzambe, nzokande oyo ya ye esepelisaki Nzambe te. Mpe Biblia ezali koloba ete Kaina “autaki na oyo mabe mpe abomaki ndeko na ye.”​—1 Yoane 3:12; Genese 4:4-8.

Ee, oyo mabe, Satana Zábolo, azali mobandisi mpe mokólisi ya elimo ya komekana. Atako azalaki anzelu, mwana ya Nzambe oyo azalaki na mabaku mingi ya kitoko, alingaki nde kozwa mingi koleka. (Kokanisá na Ezekiele 28:14, 15.) Ntango asenginyaki Eva, amonisaki elulela na ye. Alobaki ete soki alei mbuma oyo epekisami, “asengelaki kozala lokola Nzambe.” (Genese 3:4, 5, NW) Ya solo, ezalaki Satana nde alingaki kozala lokola Nzambe, kowelanáká na Yehova. Elimo ya komekana na Nzambe ememaki ye na botomboki.​—Yakobo 1:14, 15.

Elimo wana ekoyambanelaka. Na nsé na bopusi ya Satana, kimya ya Nzambe oyo ezalaki kati na libota ya liboso ebungaki. (Genese 3:6, 16) Uta botomboki na ye epai na Nzambe, Satana Zábolo azali koyangela bato, kokólisáká elimo ya komekana, azali nkutu kozimbisa mibali mpe basi na kokanisa ete komekana ya makasi ezali mwango ya kolónga. Nzokande, Biblia elimboli ete: “Esika mpe kowelana ezali, mobulu mozali wana mpe [motindo] nyonso ya makambo mabe.” (Yakobo 3:14-16, NW) Satana alongolaki bongo bolamu mpe kimya ya makanisi oyo moto azalaki na yango.

Kozwa elónga kozanga kosalela komekana

Na kokesena na makanisi ya Satana, Biblia epesi bandakisa na baoyo balóngaki kozanga kosalela komekana. Ndakisa eleki monene ezali oyo na Yesu Klisto. Atako azalaki na motindo na Nzambe, akanisaki soko moke te ete ameka kokokana na Nzambe, kasi akamataki motindo na moombo mpe ayaki na mabelé. Oyo eleki mpenza, amikitisaki mpe amonisaki botosi kino kufa likoló na nzeté ya mpasi. Ezaleli wana ya botosi, oyo ezangi elimo ya bowelani, ememelaki ye ngolu na Nzambe. “Yango wana Njambe anɛtoli ye mingi mpe apɛsi ye nkombo koleka nkombo mosusu yɔnsɔ.” (Bafilipi 2:5-9) Ekelamu nini mosusu akoki kozwa elónga koleka oyo? Asepelisaki Tata na ye na meko oyo ekelamu mosusu te akokaki kosala yango, mpe asalaki yango kozanga elimo ya bowelani to ya komekana.​—Masese 27:11.

Ebele na baanzelu ya sembo oyo bazali na likoló bazali komonisa elimo motindo moko. Atako Yesu, oyo azalaki mokonzi na baanzelu, akómaki mwa moke na nsé na bango wana ayaki na mabelé, basalelaki ye na motema malamu. Ezali polele ete, likanisi moko te liyelaki bango ete basalela etelemelo na bango mpo na kobotola esika na ye ya mokonzi ya baanzelu. ​—Matai 4:11; 1 Batesaloniki 4:16; Baebele 2:7.

Nsɔ́mɔ na bango mpo na elimo ya komekana emonani lisusu polele soki totali lolenge bayanolaki na mokano na Nzambe ya kotombola mwa ndambo na bato bazangi kokoka mpo na kozala na bomoi ya elimo oyo ezangi kufa kati na makóló, epai “bakosambisa banje.” (1 Bakɔlinti 6:3) Baanzelu basili koumela mingi kati na mosala ya Yehova mpe bazali na makoki mingi ya kosala malamu koleka bato ya kozanga kokoka. Atako bongo, baanzelu bazali na esengo ya kosalela bapakolami oyo bazali awa na mabelé, bazali na zuwa te mpo na mbano oyo bakozwa. (Baebele 1:14) Elimo kitoko, ezangi komekana oyo bazali na yango ezali kosalisa bango na kolanda kosala liboso na kiti na bokonzi ya Nkolo Moyangeli Yehova.

Bongo, kanisá basaleli ya Nzambe ya sembo ya ntango ya kala oyo bakosekwisama na mabelé. Abalayama azalaki ndakisa monene ya kondima mpe atangamaki ete “tata na bango yɔnsɔ bazali na kondima.” (Baloma 4:9, 11) Yobo atikaki ndakisa malamu ya mpiko. (Yakobo 5:11) Mose, oyo “azalaki na [kosɔkema, NW] mingi, na koleka bato yɔnsɔ bajalaki na nse,” akambaki libota na Yisraele na bonsomi. (Mituya 12:3) Nani kati na bato ya kozanga kokoka apesaki ndakisa ya kondima, ya mpiko, mpe ya kosokema koleka mibali wana? Nzokande, bazali na molɔngɔ́ na baoyo bakosangola Bokonzi ya Nzambe na mabelé. (Matai 25:34; Baebele 11:13-16) Lokola Yoane Mobatisi, bakoleka te “ye oyo aleki mokɛ kati na Bokonji na Likolo.” (Matai 11:11) Bakokanisa ata moke mpo na komilelalela, komonisáká ete kondima na bango, mpiko na bango mpe kosɔkɛma na bango ekokanaki to mpe elekaki oyo ya bato oyo bapesameli bomoi kati na makoló? Soko moke te! Bakozala bayangelami ya esengo na nsé ya Bokonzi ya Nzambe.

Na mikolo na biso mpe, ezali esengo na kozala elongo na bato oyo bazangi elimo ya komekana. Yasuo, oyo tolobelaki liboso kati na lisoló amikɔtisaki kati na ebele na nyongo wana alukaki kosala mombongo ya wolo mpe abungisaki biloko na ye nyonso. “Baninga” na ye bakimaki ye. Lokola mwasi na ye asilaki kobanda koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova, akendeki na makita mpo na kotungisama ya motema na ntina na mpasi oyo ye apesaki na libota na ye. Na nsima, atikaki momeseno ya komekana mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Lelo oyo, azali na esengo ya kozala elongo na baninga baklisto, motindo na bato oyo bazali na bolingo ya kosunga ye na ntango ya mikakatano.

Lolenge ya kobatela kimya ya makanisi

Ezalaka ntango nyonso likambo ya petee te kobatela kimya ya makanisi kati na bato oyo bazangi mawa, baoyo batóndi na komekana. Tosengeli koyeba ete Biblia ekweisi “koyinana, nkaká, zuwa, nkanda, koswana, bokabwani, mikabwano, bilulela” lokola “misala ya nzoto” oyo mikopekisa bato na kosangola Bokonzi ya Nzambe. Misala wana nyonso mizali kokende nzela moko elongo na elimo ya komekana. Ezali likambo ya kokamwa te soki ntoma Paulo alendisaki Bagalatia ete: “Tozala miimi te, na koyeisáká komekana moko elongo na mosusu, na kolulana moko na mosusu.”​—Bagalatia 5:19-21, 26, NW.Kati na likambo oyo, mokanda wana ya Paulo mozali mwango mpo na kolónga komekana oyo euti na moimi. Alobaki ete: “Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, komipekisa. Ezali na mobeko te oyo mokotemela makambo motindo yango.” (Bagalatia 5:22, 23, NW) Mbuma ya elimo ekosalisa biso na kolongola bowélani na makanisi na biso. Na ndakisa totalela ezaleli ya bolingo. Paulo alimboli ete: “Bolingo ejali na juwa tɛ, ekomikumisaka tɛ, ezali na lolendo tɛ, ekosalaka na nsɔni tɛ, ekolukaka malamu na yango mpenja tɛ, ejali na nkanda tɛ.” (1 Bakɔlinti 13:4-7) Na kolonáká bolingo, tokoki kolongola zuwa, nguya makasi oyo ezali kopɛlisa elimo ya komekana. Bambuma mosusu ya elimo ezali mpe kosalisa biso na kolimwisa bilembo nyonso ya elimo mabe ya komekana kati na motema mpe na makansi na biso. Na bongo, mpo na komipekisa, masɛnginya nyonso ya komekana na basusu ete tolónga na myango nyonso, ekoki kolimwa nokinoki!​—Masese 17:27.

Nzokande, mpo na kolóna bizaleli wana, tosengeli kopesa elimo na Nzambe nzela ya kosala mosala kati na biso. Tokoki kolendisa mosala yango ya ntina mingi ya elimo santu wana tozali kolendendela kati na mabondeli mpe wana tozali kosenga elimo na Nzambe ete esalisa biso. (Luka 11:13) Nzambe akopesa biso nini, mpo na koyanola na libondeli na biso? Biblia eyanoli ete: “Bomitungisa mpɔ na likambo mɔkɔ tɛ nde kati na makambo yɔnsɔ tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Njambe na mabɔndɛli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimia na Njambe oyo eleki makanisi yɔnsɔ ekosɛnjɛla mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.”​—Bafilipi 4:6, 7.

Likambo yango limonanaki polele epai na bantoma na Yesu. Ata nsima wana Yesu asilaki kobanda Elambo ya mpokwa ya Nkolo na butu ya nsuka oyo alekisaki elongo na bantoma, bazalaki naino koswana mpo na koyeba soki nani kati na bango amonani mpenza ete aleki monene. (Luka 22:24-27) Na mabaku makeseni, Yesu amekaki kosalisa bango na kosembola lolenge na bango ya kokanisa, kasi elimo wana ya komekana esilaki mpenza kokɔtela bango. (Malako 9:34-37; 10:35-45; Yoane 13:12-17) Nzokande, ntango bazwaki elimo santu soko mikolo 50 nsima ya koswana na bango ya nsuka, ezaleli na bango ebongwanaki. Koswana ezalaki lisusu te na ntina na ye oyo asengelaki komonisa bango mpo na koloba na ebele na bato oyo bayanganaki mpo na koluka koyeba likambo likómaki mokolo ya Pantekote wana.​—Misala 2:14-21.

Moto moko te azalaki na ndingisa ya koyangela likoló na lisangá ya boklisto. Ntango basengelaki kobongisa mokakatano moko na ntina na kokáta ngenga, Yakobo oyo azalaki naino moyekoli te na ntango ya liwa na Yesu, akambaki likita wana ya ntina mingi. Elembo moko ya koswana ezali te mpo na oyo etali ye oyo asengelaki kokamba likita wana ya lisangani ya mikóló-bakambi ya lisangá ya boklisto. Oyo nde mbongwana monene soki tokanisi ntango oyo bantoma babebaki na elimo ya komekana! Na lisalisi ya elimo santu, bamikundolaki mateya na Yesu mpe babandaki kokanga ntina na malako na ye.​—Yoane 14:26.

Ekoki mpe kosalema bongo mpo na biso lelo oyo. Na lisalisi ya elimo santu, tokoki kolónga mposa nyonso ya komekana elongo na basusu na mokano ya koleka bango. Na kokesena, tokoki nde kozwa kimya ya elimo oyo eleki makanisi nyonso. Biblia endimisi biso ete mosika te, mobandisi ya komekana ya mabe, Satana Zábolo, akobwakama na libulu mozindo, akosala lisusu likambo moko te. (Emoniseli 20:1-3) Bowéli bokozala lisusu te kati na bato oyo bafandi esika moko. Ekozala nde etuluku ya bato oyo bakosala bokóli te? Ezali bongo te! Bato bakotombolama kino na ezaleli ya kokoka, na nzela na komekana te kati na bango, kasi na nzela na kokokisama na mbeka ya lisiko ya Yesu epai na bango.​—1 Yoane 2:1, 2.

Keinosuke, oyo tolobelaki na ebandeli, oyo azwaki lokumu ya elónga ya botekisi motuya monene ya mituka kati na mokili mobimba, amilembisaki na makanisi mpe na nzoto, kasi na nsima atikaki mosala na ye. Alobaki ete: “Sikawa, bomoi na ngai etóndi na esengo ya solo.” Ayaki kososola ntina oyo bomoi na Yesu ezalaki na elónga ya solo. Sikawa azali kozwa bopemi kati na nyonso oyo akoki kosala na kati na lisangá ya Nzambe na mokili mobimba. Na yango, azali komibongisa mpo na mokili ya sika, oyo ekozala na komekana te. Yo mpe okoki komona elilingi ya mokili wana ya sika soki okei na Ndako ya Bokonzi oyo ezali na etúká na bino mpe soki osangani elongo na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 7]

Bato bakosepela na kimya mpe boyokani kati na mokili ya sika ya Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto