Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/6 nk. 28-31
  • Tozali komemya esika na biso ya losambo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali komemya esika na biso ya losambo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bisika ya liboso ya losambo ya baklisto
  • Tosalela esika na biso ya losambo na motindo mobongi
  • Ntango mpe esika ebongisami mpo na kosambela Jehovah
  • Mibali oyo bazali kopesa ndakisa
  • Bisika na biso ya losambo
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Oyo ezali esika na biso ya losambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Tóbatela malamu esika na biso ya losambo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Ndako ya Bokonzi ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/6 nk. 28-31

Tozali komemya esika na biso ya losambo?

“Uta ebandeli ya Evanzile, baklisto bazalaka ntango nyonso na esika ya sikisiki mpe ebongisami mpo na kosambela Nzambe.​—“Boklisto ya solo na ntango ya kala“ (na Lingelesi), ya William Cave.

LIBOTA ya Nzambe lizalaka ntango nyonso na esengo ya koyangana esika moko mpo na kosambela ye. Yango esalemaki na ekeke ya liboso, mpe ezali kosalema na eleko na biso. Uta kala, bakomi mpe bateolojié, lokola Lucien, Clément, Justin mpe Tertulien, bazali koloba ete baklisto bazalaki koyangana mbala na mbala mpo na kosambela Nzambe na bisika ya sikisiki.

Biblia endimi likambo yango, mpo ete mbala mingi ezali kolobela makita oyo mazalaki kosalema mbala na mbala na bituluku ya Baklisto. Bituluku wana ebengamaki ete masangá. Yango ebongi mpenza mpamba te, liloba “lisangá“ na nkóta ya ebandeli oyo Biblia ekomamaki, ezali komonisa etuluku ya bato bayangani mpo na kokokisa mokano moko to mosala moko.

Bisika ya liboso ya losambo ya baklisto

Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosala nini ntango bazalaki koyangana? Biblia elobeli ndambo ya makita yango mpe emonisi ete koteyama ezalaki likambo ya ntina mingi. (Misala 2:42; 11:26; 1 Bakolinti 14:19, 26) Ezalaki na bibongiseli mpo na kolakisa, elongo na badiskur, masoló ya kolendisa, mpe bazalaki kotalela na likebi mikanda miutaki na collège central ya Yelusaleme to oyo miutaki na ntoma moko.

Na Misala 15:22-35, tozali kotanga ete nsima ya kotanga moko ya mikanda yango, oyo etindamaki na etuluku ya baklisto na Antiokia, Yuda mpe Sila “bayikisaki bandeko mpiko na masoló mingi mpe balendisaki bango.” Lisoló mosusu eyebisi ete ntango ntoma Paulo mpe Balanaba bakomaki na Antiokia “mpe wana bayanganisaki lisangá, bayebisaki makambo mingi Nzambe asalaki na nzela na bango.” Kobondela Jéhovah ezalaki mpe likambo mosusu ya ntina kati na makita ya baklisto.​—Misala 14:27.

Bisika masangá ya ekeke ya liboso mazalaki koyangana mpo na losambo, ezalaki mindondo te lokola bandakonzambe mingi ya baklisto ya lokuta na mikolo na biso. Mbala mingi, baklisto ya liboso bazalaki koyangana na bandako ya bato. (Baloma 16:5; 1 Bakolinti 16:19; Bakolose 4:15; Filemona 2) Mbala mingi, bazalaki kosalela biteni ya ndako na likoló to bisika ya likoló ya bandako ya bato. Ezalaki na esika ya likoló na ndako nde Elambo ya Nkolo esalemaki. Ezalaki mpe na esika ya likoló nde bayekoli 120 bapakolamaki na elimo santu na Pantɛkɔte.​—Luka 22:11, 12, 19, 20; Misala 1:13, 14; 2:14; 20:7, 9.

Lelo oyo, ba Témoins de Jéhovah bazali kolanda ndakisa wana ya bantoma. Bisika na bango ya makita eyebani na nkombo Salles du Royaume. Ezali kuna nde bazali kobongisama lokola basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Na Salle du Royaume, bazali lisusu koyekola Makomami, bazali kobondela, mpe kolendisana kati na bango. Yango eyokani na etinda ya Biblia oyo ezwami na Baebele 10:24, 25 (MN) ete: “Totalanaka ete topesana simbisi moko na moko mpo na kolingana mpe na kosala misala malamu; totika koyangana elongo moko te, lokola yango ezali momeseno na basusu, kasi toyikisana mpiko. Bosala boye na koleka, awa emoni bino ete mokolo yango mobɛlɛmi.”

Tosalela esika na biso ya losambo na motindo mobongi

Ozali komikundola maloba oyo ya ntomá Paulo: “Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi ya kimya” mpe, “Tika ete makambo nyonso masalema na motindo na nsoni te mpe na mobulu te”? Soki totaleli maloba mazali nzinganzinga, tokomona ete ntoma Paulo azalaki kolobela motindo oyo makita ya boklisto masengeli kotambwisama. Lokola ezalaki na ekeke ya bantoma, baklisto ya lelo bazali kokengela ete makita na bango masalema na motindo mobongi mpe na kozanga mobulu.​—1 Bakolinti 14:26-40.

La Tour de Garde ya 15 Mai 1971 eyebisaki ete: “Kati na Salle du Royaume, tozali kokuta ezalela moko ya elimo ya peto, euti na esengo ya solo oyo basangani bazali na yango mpo na losambo ya solo mpe malako ya Biblia oyo mazali kopesama na esika yango. Epai mosusu, kokembisama ezangi mindondo mpe ya pepele, ezali kolendisa baoyo bazali wana na kosala boninga mpe kosolola elongo na basusu, na esika ya kobanga na ntina na makambo mineneminene.” Ya solo, bazali mpe kosenzela ete kosalelama ya Salle du Roysume ezala ntango nyonso na limemya mpe na lokumu.

Boklisto ya lokuta esili mpenza kozanga limemya na likambo yango. Mangomba mingi mazali kosalela bisika na yango ya losambo lokola bisika mpo na masano. Bazali kobeta mizike ya rock na losambo, bazali na bisika mpo na kosala masano [ndenge na ndenge], bisika ya kobatela bana mpe bisika ya cinéma. Lingomba moko ekotisaki kati na masano na yango momekano ya catch. Yango ezalaki na boyokani soko moke te na ndakisa oyo bantoma batikaki.

Ntango lisangá moko ya ekeke ya liboso ezalaki kosala na lolenge lobongi te, basengelaki kosembola yango. Na ndakisa, baklisto mosusu ya lisangá ya Kolinti bazalaki kosalela kokomisama ya Elambo ya Nkolo lokola libaku mpo na kolya mpe komela. Bazalaki koya na bilei na bango mpo na kolya liboso to na boumeli ya likita; basusu bazalaki kolya mpe komela koleka ndelo. Yango ezalaki malamu te. Ntoma Paulo akomelaki bango ete: “Bozali na ndako te mpo na kolya mpe komela?”​—1 Bakolinti 11:20-29.

Na boyokani na toli oyo ya ntomá Paulo, ba Témoins de Jéhovah bazali kosala makasi na kotalela makambo na bango moko epai na bango to na esika mosusu, kasi na Salle du Royaume te. Ya solo, makita na biso mazali kopesa biso libaku ya komona bandeko na biso mingi na mbala moko. Nzokande, Salle du Royaume esalemi mpo na Jéhovah, na yango esengeli kosalelama bobele mpo na losambo na ye. Tosengeli te kosalela libaku oyo tozali na yango na esika wana mpo na kolobela makambo ya mosuni to makambo na biso ya mombongo.

Lisusu, lisangá esengeli te kosalela Salle du Royaume mpo na masano, mpo na kokongola mbongo to mpo na kobongisa misala lokola kobatela bana. Ezali na bisika mosusu oyo moto akoki kosala makambo na ye moko to makambo ya mombongo.

Kati na Salle du Royaume moko, bankulutu bamonaki ete basangani ya lisangá bazalaki na momeseno ya kodefisana biloko mpe kozongisanela yango na makita. Bazalaki mpe kopesana bakesete video na Salle du Royaume. Atako likambo wana ezalaki mombongo te, bankulutu basalisaki bango na kokanga ntina, soki likoki ezali, ya kosala makambo wana epai na bango.

Mpo na kopengola makambo oyo makoki kopesa makanisi mabe mpe mpo na kondimisama ete Salle du Royaume esalelami na motindo mobongi, moko na moko asengeli komituna motuna oyo: ˈEzali na makambo na ngai moko oyo nasalaka yango na Salle du Royaume mpe oyo nakokaki kosala yango na ndako na ngai moko?ˈ Na ndakisa, ntango tozali komibongisa mpo na kokende kotambola elongo na baninga to mpo na elambo, ekozala malamu te ete tolobela yango na ndako na biso? Tokoki kosalela telefone to kokende kotala baoyo tolingi kolobela bango. Lokola ntomá Paulo, tokoki koloba ete: ˈTozali na ndako te mpo na kobongisa makambo na biso wana?ˈ

Ntango mpe esika ebongisami mpo na kosambela Jehovah

Biblia eyebisi kati na Mosakoli 3:1 ete: “EIoko na eloko ezali na ntango na yango, ee, likambo na likambo lizali na ntango na yango na nse na moi.” Ntango tozali koyangana na makita na Salle du Royaume, tokoki komipesa mobimba kati na makambo matali mosala ya boklisto. Ezali ntango ebongisami mpo na kosambela Jéhovah.

Yakobo, ndeko na Yesu, apesaki toli ete esengeli te kozala na koponapona kati na lisangá ya boklisto. (Yakobo 2:1-9) Lolenge nini tokoki kosalela toli wana kati na ba Salles du Royaume ya biso? Ntango tozali kopesa polele lokasa ya libyangami mpo na elambo moko elongo na baninga, tokoki kopesa likanisi ete tozali na koponapona. Kati na lisangá moko, momeseno ezalaki ya kotya mabyangami motindo wana kati na saki to na Biblia ya baoyo bazalaki wana. Ya solo, ezali malamu kotinda yango na poste to komemela bango yango na ndako. Nzokande, nini ezali mayoki ya baoyo bazali kozwa mabyangami yango te mpe baoyo bamonaki ndenge yango ezalaki kokabolama? Yango ekoki kopesa likanisi ete koponapona ezali, boye te?

Ya solo, esengeli te kotya mibeko makasi oyo mikopekisa ete moto ayebisa likambo na moto mosusu te to apesa liboke na moto mosusu te na ntango azali kati na Salle du Royaume; kati na Salle du Royaume, ezali mpe mabe te na kolobela misala mpe makambo mazali koleka na mokili, na kobyanga moto to kosenga na moto na kozala elongo na biso mpo na kominanola. Kasi yango esengeli kosalema ntango nyonso te mpe esengeli kosalema na lolenge ete eyebana te. Makambo na biso masengeli te kobungisela biso mokano mpo na yango tozali koyangana na Salle du Royaume, oyo ya kolendisana na elimo.​—Matai 6:33; Bafilipi 1:10.

Mibali oyo bazali kopesa ndakisa

Bankulutu mpe basaleli na misala bazali kopesa ndakisa na molende nyonso mpo na oyo etali komonisa limemya na Salle du Royaume. Mbala mingi, nkulutu moko to bankulutu mibale to basaleli na misala baponamaka mpo na oyo etali kobongisama ya Salle du Royaume. Epai kuna, masangá mingi mazali kosalela bobele salle moko, comité moko ya bankulutu ezali na mokumba ya kotalela likambo yango.

Atako mingi kati na bango baponami mpenzampenza mpo na kotalela misala wana, basaleli na misala nyonso mpe bankulutu basengeli komibanzabanza mpenza mpo na salle. Bayebi ete Salle du Royaume esalemi mpo na Jéhovah mpe esalelami mpo na losambo na ye.

Soki ezali na bisika mosusu bisengeli kobongisama, bankulutu basengeli te koumisa yango. (2 Ntango 24:5, 13; 29:3; 34:8; Nehemia 10:39; 13:11) Kati na masangá mosusu, batalelaka mbala na mbala Salle du Royaume mpo na kosala nokinoki misala wana ya kobongisama. Ba inventaires esengeli kosalema mpo na kondimisama ete biloko bisengeli bisili kozwama mpe bizali wana. Soki ezali na esika moko ebongisami mpo na kobomba biloko ya mosala: kongo, pao, kombo, mbeli mpe bongo na bongo, bankulutu mpe basaleli na misala nyonso basengeli komibanzabanza na lolenge yango ezali mpe kopetola yango malamu. Baoyo bazali kosala na bisika babombaka mikanda mpe bazulunalo bakoki komonisa ete batalelami na likambo yango, na kosenzela ete bakarto ya mpamba ezala na salle te.

Na kopesaka ndakisa, bankulutu mpe basaleli na misala bakoki kosalisa basangani mosusu ya lisangá na kozala na molende mpo na Salle du Royaume. (Baebele 13:7) Banso basengeli komonisa limemya oyo esengeli na kosangana na bopeto ya salle mpe na komibanzabanza na lolenge na yango na mobimba.

Yesu alobaki na Matai 18:20 ete: “Wana mibale to misato bayangani mpo na nkombo na ngai, ngai nazali kati na bango.” Ee, Yesu azali kotalela makambo tozali kosala ntango tozali elongo mpo na kosambela Jéhovah. Azali mpe kotalela makita oyo tozali kosala na ndako na biso mpe na koyangana monene lokola na ba assemblées.

Mpo na bamilió ya ba Témoins de Jéhovah, ezali na esika moko te oyo eleki na motuya kati na mitema na bango lokola Salle du Royaume, esika oyo bayanganaka mbala na mbala mpo na losambo. Bazali komonisa limemya libongi na esika yango. Bazali kobatela yango na molende, mpe bazali kosala makasi ntango nyonso ete basalela yango na motindo mobongi. Tika ete, yo mpe, olanda toli oyo Jéhovah ye moko apesi: “Batela makolo na yo wana okokota na ndako ya Nzambe ya solo.”​—Mosakoli 5:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto