Mituna ya Batangi
Lokola baklisto babetaka loterie te, bakoki kondima batiki to kosangana na tombola oyo bakozwa mbala mosusu mabonza na nsuka na yango?
Motuna oyo mobimaka mbala na mbala, na yango esila kolimbolama kati na mikanda na biso. Ba index lokola Publications de la Société Watch Tower— Index 1950-1985 (mpe mosusu oyo esangisi bambula 1986 kino 1989) ezali na nkóta mosusu. Soki ba index wana ezali na lokóta na bino, ekoki kozala na ntina mpo na kozwa nokinoki biyano malamu na mituna na bino.
Motuna oyo mozali awa na likoló, ezali ndakisa moko malamu. Na kotala kati na Index ya 1950-1985, na titre “Questions des lecteurs,” tozali kokuta soustitre “loterie, chrétien peut-il y prendre part?” Batindi motangi na titre “Questions des lecteurs” ya La Tour de Garde ya 1er Juin 1973, nkasa 350, 351.a Batemwe mingi bazali na volume relié (to banimero) ya La Tour de Garde ya 1973; soki bongo te, okoki kotala volume wana kati na biblioteke na mingi na ba Salles du Royaume.
Lisoló oyo libimisamaki na 1973 limonisaki ete baklisto bazali koboya mpenza lisano libengami sweepstake to tombola nyonso oyo esengi kosomba batikɛ (lokola batikɛ ya loterie) to oyo ekotinda bango na kopesa mbongo mpo na kozala na nkónzo ya kozwa libonza. Na maloba mosusu, tozali kosangana te na masano ya mbongo, oyo ozali mpenza lolenge mosusu ya lokoso.—1 Bakolinti 5:11; 6:10; Baefese 4:19; 5:3, 5.
Nzokande, magazini moko to kompanyi moko ekoki kosalela tombola mpo na kosala piblisité. Oyo moto asengeli kosala, ozali bobele kopesa nkombo na ye to kotinda lokasa ya bosangani to tikɛ, kozanga kosomba yango. Tombola esangani na makambo ya piblisité ekani kopesa libonza to mabonza na moto moko kozanga koponapona. Baklisto bakoki kondima libonza na ntango ya tombola oyo esangani te na masano ya mbongo, motindo moko bakoki kondima biloko bapesaka mpamba to mabonza oyo kompanyi moko to magazini moko ezali kopesa mpo na piblisité na yango.
Atako bongo, baklisto mosusu bazali kokima biloko nyonso ya lolenge wana, balingi te kobetisa moto libaku to kotungisa lisosoli ya moto moko, mpo balingi soko moke te ete balengolama na makambo ya Nkónzo (Chance). Lokola Yisaya 65:11 emonisi yango basaleli ya Nzambe, bazali te kokangama na “nzambe ya Makila malamu” to na “nzambe ya Makambo masila kotangama.” Bakolinga mbala mosusu te kosangana na makambo mosusu ya piblisité oyo ekosenga momekano mpo na koluka balongi. Baoyo bazali kokanisa motindo wana, basengoli mpenza te kotanga moklisto to baklisto oyo bazali kosangana na batombola yango na lisosoli malamu.—Tala Baloma 14:1-4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Makambo yango moko motyami na nsé ya ba titres “Affaires,” “Jeux (Dˈargent)” mpe “Publicité”; na yango, lokola Index emonisi makambo polelepolele, kosalisa biso na kozwa makambo oyo tozali na yango mposa.