Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/6 nk. 23-27
  • Jéhovah abongoli ntango mpe bileko na mboka Roumanie

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Jéhovah abongoli ntango mpe bileko na mboka Roumanie
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Lisolo moko molai
  • Mikakatano milandi
  • Kosakola lisusu na polele
  • Makambo minene masalemi na bisika mike
  • Ba pionniers spéciaux bafungoli nzela
  • Bilikya kitoko mpo na mikolo mizali koya
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/6 nk. 23-27

Jéhovah abongoli ntango mpe bileko na mboka Roumanie

MBONGWANA esalemaki na Europe de lˈEst na 1989. Na mwa basanza, biyangeli oyo kala bizalaki lokola bandako makasi oyo ekoki kokwea te, bikweaki lokola banzeté ememami na mopepe makasi. Mbongwana oyo esalemaki na makambo ya politike ememaki mpe mbongwana kati na makambo ya bato mpe ya nkita, mpe oyo ezali na ntina mingi mpo na ba Témoins de Jéhovah, ezali mbongwana na makambo ya losambo. Na bamboka ekeseni, ba Témoins de Jéhovah bandimamaki na mibeko ya Leta mpe bapesaki bango bonsomi ya kozongela misala na bango ya losambo.

Kasi, emonanaki ete makambo mazalaki ndenge moko te na Roumanie. Guvernemá etyaki bato na nse ya bopusi makasi oyo emonanaki ete mbongwana oyo esengelaki kozala bobele moke. Ntango ba Témoins de Jéhovah ya Roumanie bayokaki makambo oyo mazalaki kosalema na mikili misusu ya Europe de lˈEst, bamitunaki: ˈTokokoka kozwa bonsomi ya losambo liboso ya Armagedon?ˈ Bazalaki kozela mokolo oyo bakokaki koyangana elongo na bandeko na bango ya elimo na makita ya baklisto, kosakola na polele nsango malamu, mpe koyekola na polele mikanda mikolimbolaka Biblia, kozanga kobombabomba yango ntango nyonso. Nyonso wana emonanaki ete ezali bobele ndoto mpamba.

Na nsima ndoto ekomaki likambo ya solo! Ezalaki na Décembre 1989. Kozanga komizela na yango, boyangeli ya Ceauşescu ekweaki na lolenge ya kokamwa. Na mbala moko, bandeko na biso babondisamaki. Na 9 Avril 1990, ba Témoins de Jéhovah bandimamaki na mibeko lokola lingomba na Roumanie. Jéhovah abongolaki ntango mpe bileko mpo na Batemwe ya molende 17.000 oyo bazali na mboka wana.​—Tala Danyele 2:21.

Lisolo moko molai

Na 1911, Carol Szabo mpe Josif Kiss bazongaki na Roumanie; kolongwa na Etats-Unis, epai bayekolaki solo ya Biblia mpe bapesaki bomoi na bango epai na Jéhovah mpo na kosala mokano na ye. Balingaki koyebisa nsango malamu epai ya baninga na bango. Ntango bakomaki na Roumanie, babandaki nokinoki kosakola. Wana Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki, bakangamaki na ntina na mosala oyo bazalaki kosala. Nzokande, mbuma ya Bokonzi oyo bakonaki, ebandaki kobimisa matomba. Na 1920, ntango mosala mobongisamaki lisusu, basakoli ya Bokonzi bazalaki soko 1800 kati na Roumanie.

Na eleko wana, elimo ya mbongwana oyo ezalaki na Balkans ezalaki komonana mingi na Roumanie, mpe mobulu ezalaki. Atako ezalaki eleko ya mikakatano, bandeko na biso ya elimo balandaki mosala. Na 1924, Societe Watch Tower efungolaki biro moko na balabala Regina Maria No. 26, na Cluj-Napoca, mpo na kotalela mosala na Roumanie, na Hongrie, na Bulgarie, na Yougoslavie mpe na Albanie.

Nzokande, ezalela ya makambo na politike ezalaki se kondongwana, longola mikakatano oyo mizalaki kouta epai na bakonzi, ezalaki lisusu na mikakatano kati na lisanga. Annuaire 1930 (na Lingelesi) eyebisi ete: “Na ntina na kozanga sembo ya moto moko oyo la Société atindaki kuna, bandeko bapanzanaki mpe bokangami na bango ebandaki kolemba. La Société alukaki lolenge ya kopesa lisusu molende na mosala kati na mboka wana, kasi bakonzi ya mboka bapekisaki makambo nyonso, mpe tosengelaki kozela kino Nkolo akofungola nzela ya malamu koleka.” Na nsima, na 1930, Martin Magyarosi, Temwe ya mbeka Roumanie oyo azwaki batisimo na 1922, aponamaki mokengeli ya filiale ya sika, mpe na nsima, biro etyamaki na balabala Crisana No. 33, na Bucarest. Nsima ya kobunda etumba oyo eumelaki mingi, na 1933, la Société endimamaki na Leta lokola lingomba.

Mikakatano milandi

Mikakatano makasi mizalaki kokomela Batemwe na Roumanie. Annuaire 1936 eyebisi ete: “Ntembe ezali te, ezali na esika moko te oyo bandeko bazali kosala na nse ya mikakatano mingi koleka na Roumanie.” Atako mikakatano wana, rapport ya mbula ya mosala 1937 elobelaki masanga 75 mpe basakoli 856 na Roumanie Lisusu, bato 2.608 bayanganaki na Ekaniseli.

Etumba ya Mibale ya mokili mobimba eningisaki Roumanie. Na Septembre 1940, General Ion Antonescu akamataki bokonzi mpe abandaki koyangela lokola Hitler. Makambo ya nsomo mazalaki kosalema mingi. Bankáma na bandeko na biso bakangamaki, babetamaki mpe banyokwamaki. Ndeko Magyarosi akangamaki na Septembre 1942, kasi longwa na boloko, akokaki kotambwisa mosala na Transylvanie.

Minyoko milandaki kosalema ntango basodá ya Hitler bakamataki mboka na 1944. Rapport oyo eutaki na Bucarest elobelaki ezalela oyo ezalaki na nse ya boyangeli ya Nazi: “Kati na mboka oyo, ba Témoins de Jéhovah banyokwamaki makasi mpenza. Tokangamaki esika moko na ba communistes, tofundamaki na bakonzi ya mangomba ya Hitler ete tozalaki bato mabe koleka ba communistes, mpe mingi kati na biso, bakweisamaki na boloko mibu 25, na boloko bomoi na bango mobimba to na etumbu ya liwa.”

Na nsuka, etumba esilaki mpe, na le 1er Juin 1945, biro ya la Société oyo ezalaki na Bucarest ezongelaki misala na yango. Atako mikakatano mizalaki mpo na kozwa ba papiers, bandeko oyo bamipesi banyataki ba brochures koleka 860.000 mpe baekzamplere koleka 85.000 ya Mosenzeli na lokóta Roumain mpe lokóta Hongrois. Jéhovah apambolaki mingi mosala na bango wana ya makasi. Na 1946, bato ya sika soko 1.630 bazwaki batisimo. Likambo ya monene na mbula wana ezalaki assemblée nationale oyo esalemaki na Bucarest le 28 mpe 29 Septembre. Bakonzi ya mangomba basalaki nyonso mpo ete assemblée esalema te, kasi balóngaki te, mpe bato soko 15.000 bayanganaki na diskur piblike. Ezalaki mbala ya liboso ete bandeko ya Roumanie bakoka kosala assemblée motindo wana.

La Société atindaki ndeko Alfred Rutimann, longwa na filiale ya Suisse ete akenda na Roumanie. Na Août 1947, akokaki koloba na bandeko koleka 4.500, na bisika 16 bikeseni, mpe alendisaki bango na ntina na makambo oyo balingaki kokutana na yango. Batemwe basengelaki lisusu kokutana na minyoko, kasi mbala oyo eutaki na boyangeli ya ba communistes. Na Février 1948, bakonzi ya mboka bapekisaki konyatama ya mikanda mpe mosala ya kosakola. Na nsima, na Août 1949, bapolisi bakendaki kosala boluki na biro oyo ezalaki na balabala Alion No. 38. Nsima na yango, bandeko mingi, bakisa mpe ndeko Magyarosi, bakangamaki. Mbala oyo, bafundamaki ete bazalaki ba imperialistes (bato ya Empereur), batindamaki na boloko to ba camps ya misala makasi. Mosala ya kosakola mopekisamaki na boumeli ya mibu 40 oyo milandaki mpe ba Témoins de Jéhovah banyokwamaki mingi. Mobulu oyo ezalaki kobimisama na monguna na kati ya lisangá ezalaki bobele kobakisa mpasi na bango. Na nsuka, na 1989, boyangeli ya Ceauşescu ekweaki: bandeko bazwaki bonsomi! Sikawa, basengelaki kosala nini na bonsomi na bango wana?

Kosakola lisusu na polele

Bandeko babungisaki ntango te. Babandaki nokinoki kosakola ndako na ndako. Kasi yango ezalaki petee te mpo na bato oyo, na boumeli ya bambula mingi, balandaki kopesa litatoli ya libaku malamu na kobombama na mpiko nyonso. Lokola bakokaki sikawa kosakola na polele, bazalaki komitungisa. Mingi kati na bango naino basala yango te, mpe ezalaki na nsuka ya mobu 1940 nde basusu kati na bango basukisaki kosakola ndako na ndako. Litomba nini bazwaki? Totala yango.

Ebongi kobanda na Bucarest, mbokamokonzi oyo ezali na bafandi 2,5 milió. Esili koleka mibu mibale, ezalaki bobele na masanga minei kati na engumba wana. Sikawa ezali na masanga zomi, mpe bato koleka 2.100 bayanganaki na Ekaniseli oyo esalemaki na 1992. Soki totaleli boyekoli mingi ya Biblia oyo ezali kotambwisama, mosika te, masanga ya sika makosalema.

Craiova ezali engumba oyo ezali na bafandi soko 300.000, ezali na sud-ouest ya mboka. Kino na 1990, ezalaki bobele na Batemwe soko 80 na engumba mobimba. Na nsima, elimo ya pionnier ekolaki mpe mosala mokolaki. Bobele na 1992, bato 74 bazwaki batisimo, mpe koleka 150 boyekoli ya Biblia etambwisamaki. Lokola bazali sikawa na basakoli koleka 200, bandeko bazali koluka kozwa esika moko malamu mpo na kotonga Salle du Royaume.

Na Tîrgu Mureş, ndeko mwasi moko mpe bandeko mibali mibale bakendaki kotala sango ya Orthodoxe mpo na kosenga ye ete alongola nkombo na bango kati na mikanda ya Lingomba. Ntango ayebaki ntina ya boyei na bango, sangó akotisaki bango, mpe basololaki malamu. Na nsima, sangó alobaki ete: “Nazali kolula bino, kasi na lolenge ya mabe te. Tosengelaki kokokisa mosala oyo bino bozali kosala. Ezali likambo ya mawa mingi na komona ete Lingomba Orthodoxe ezali lingomba monene ya mpamba”! Andimaki kozwa brochure Osengeli kondima Trinite? mpe ekzemplere moko ya Mosenzeli. Ndeko mwasi azali na esengo mingi lokola azali lisusu te mosangani ya “lingomba monene ya mpamba.”​—Emoniseli 18:4.

Ezali likambo ya ntina na komona ete mingi kati na baoyo bazali kondima solo lelo, bazali bilenge. Mpo na nini? Emonani ete bazalaki kozela mbongwana ya makambo mingi na nzela ya boyangeli, kasi bazwaki eloko te. Bazali na esengo na koyeba ete bobele Bokonzi ya Jéhovah nde ekoki kosilisa mikakatano na biso nyonso mpo na libela.​—Nzembo 146:3-5.

Makambo minene masalemi na bisika mike

Ocoliş ezali mboka moko moke oyo ezali na nord ya Roumanie. Na 1920, mobali moko nkombo na ye Pintea Moise autaki na Camp oyo ezalaki na Russie epai akangamaki. Kala, azalaka mosangani na lingomba ya Katolike, kasi liboso ya bozongi na ye, akomaki mosangani na lingomba Baptiste. Poso misato na nsima, Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo ba Témoins de Jéhovah bayebanaki na yango na ntango wana, bayaki kotala ye. Na nsima, mobali yango alobaki ete: “Sikawa nayebi solo na ntina na Nzambe!” Na 1924, ezalaki na etuluku ya Batemwe 35 na Ocoliş.

Lelo oyo, mboka wana ya moke ezali na basakoli 170 kati na bafandi 473. Mosakoli moko na moko azwaki bobele teritware ya bandako mibale, mpe bandeko bazalaki lisusu kosakola na bamboka mike oyo ezalaki nzinganzinga. Atako bongo, bazali na elimo ya kolónga. Bauti kosilisa kotonga Salle du Royaume moko kitoko oyo ezali na bifandelo 400. Mosala nyonso mosalemaki na Batemwe ya mboka yango.

Valea Largǎ ezali engumba epai ndeko Szabo mpe ndeko Kiss bafandaki na 1914. Na 1991, kati na bafandi 3.700, ezalaki na masanga mwambe mpe basakoli ya Bokonzi 582. Bato oyo bayanganaki na Ekaniseli esalemaki na 1992 bazalaki 1.082​—pene na mofandi moko likoló na misato na lobwaku wana.

Ba pionniers spéciaux bafungoli nzela

Ba pionniers spéciaux basalaki mosala monene mpo na oyo etali kopalanganisa nsango malamu epai ya bafandi ya bituká oyo bizali mosika mingi. Ntango bonsomi ya mosala ya kosakola epesamaki, Ionel Alban abandaki kopalanganisa nsango malamu yango na bingumba mibale, poso na poso azalaki kolekisa mikolo mibale na Orşova mpe mikolo mitano na Turnu Severin.

Ntango Ionel akomaki, Temwe moko te azalaki na Orşova. Na poso ya liboso, abandaki boyekoli ya Biblia elongo na mwana moko ya mobali ya mibu 14. Ye wana asalaki mabongwani mingi kati na bomoi na ye na boumeli na sanza mibale, kino moninga na ye mpe moto moko oyo afandaki penepene na ye, babandaki mpe koyekola. Roland, moto oyo afandaki pene na ye, oyo azalaki moto ya Katolike, asalaki bokóli ya kokamwa. Bobele nsima na sanza moko na ndambo, abimaki elongo na Ionel kati na mosala ya kosakola, mpe ntango akokisaki sanza mitano, azwaki batisimo. Abandaki nokinoki mosala ya pionnier. Mama na ye mpe abandaki koyekola mpe abatisamaki na 1992 na assemblée de district “Bamemi na pole.” Sikawa ezali na basakoli zomi na Orşova, mpe bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia 30.

Moto ya liboso oyo andimaki solo na Turnu-Severin ezalaki moyambi ya bato (réceptionniste) na hotel epai Ionel azalaki kofanda. Mobali wana akomaki mosakoli oyo azwi naino batisimo te nsima na sanza mibale, mpe na sanza ya misato, azwaki batisimo. Azali sikawa kati na basakoli 32 oyo bazali na engumba wana, baoyo bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia 84.

Pionnier special mosusu, Gabriela Geica, azalaki pionnière permenante ata ntango mosala na biso mopekisamaki. Asepelaki kosala epai mposa ezalaki mingi. Bapesaki ye teritware moko ya monene. Mbala mosusu azalaki kotambola bakilometele 100 kino 160 mpo na kotala bato oyo bazalaki kosepela na nsango malamu. Moko na bingumba epai asalaki ezali Motru, epai Batemwe bazalaki bobele minei. Ayebisi ete: “Na ntina na bokóli ya mosala na Motru, basángó mpe mangomba mosusu babandaki kotemela biso. Bapusaki mokonzi na mboka mpe bapolisi ete banyokola mabota oyo bazalaki kofandisa ngai epai na bango. Babimisaki ngai, mpe uta ntango wana, nasalaki sanza mibale mpo na koluka ndako.”

Gabriela abandaki koyekola na Orşova elongo na mwasi moko oyo andimaka Nzambe te, oyo azalaki koloba ete asepelaka na makambo ya losambo te mpe asepelaka na Biblia te. Kasi, bobele nsima na sanza minei ya boyekoli, abandaki kolongisa Biblia. Atako mobali na ye abenganaki ye na ndako na butu mpe ayebisaki ye ete akoboma libala to akoboma ye, abatelaki bosembo na ye. Liboso nkutu ete azwa batisimo, atambwisaki boyekoli zomi ya Biblia.

Bilikya kitoko mpo na mikolo mizali koya

Na Août 1992, Roumanie ezwaki motuya ya sika ya basakoli 24.752, kati na masanga 286. Bato koleka 66.000 bayanganaki na Ekaniseli. Kati na filiale moke ya Bucarest, ezali na basali 17 oyo bazali kosala na motema moko mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya bandeko na bango. Bazali kozela na motema likoló kotongama ya filiale ya monene na mikolo mizali koya.

Ba Témoins de Jéhovah ya Roumanie basengeli mpenza kokamwa mpo na mbongwana ya nokinoki oyo esalemi na mibu miuti koleka. Bazali kotɔndo Jéhovah Nzambe na ndenge bazali basangani ya lisanga ya mokili mobimba oyo limemi nkombo na ye mpe lizali kokamba bato na boyebi ya sikisiki na ntina na ye mpe mokano na ye oyo mokobongwanaka te. Nsima ya bambula mingi ya mikakatano mpe ya minyoko, bazali mpenza kotɔndo Jéhovah na lolenge azali solo kobongola ntango mpe bileko na mboka Roumanie!

[Karte na lokasa 23]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

HUNGARY

ROMANIA

Bucharest

Cluj-Napoca

Craiova

Tirgu-Mures

Orşova

Turnu-Severin

Motru

Turda

BULGARIA

[Bililingi na lokasa 24, 25]

1. About 700 Witnesses gathered in the woods in 1947

2. Handbill for a public talk in 1946

3. A recent assembly in Romania

4. Witnessing in Cluj-Napoca today

5. Kingdom Hall near Turda

6. Bethel family in Bucharest

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto