Tomibatela na lolenge nyonso ya losambo ya bikeko
“Boyokani nini bozali kati na tempelo ya Nzambe mpe bikeko?”—2 BAKOLINTI 6:16.
1. Tabernakle ya Yisraele mpe batempelo ezalaki elilingi ya nini?
JÉHOVAH azali na tempelo oyo ezali ata na ekeko moko te kati na yango. Emonisamaki na tabernakle ya Bayisraele oyo etongamaki na Moize mpe na tempelo oyo etongamaki na nsima na Yelusaleme. Bandako wana emonisaki “hema ya solo,” tempelo monene ya elimo ya Jéhovah. (Baebele 8:1-5) Tempelo wana ezali ebongiseli mpo na kobelema na Nzambe kati na losambo likolo na mobɔko ya mbeka na lisiko ya Yesu Klisto.—Baebele 9:2-10, 23.
2. Banani bakomi makonzi kati na tempelo monene ya elimo ya Nzambe, mpe lolenge nini ebele monene batalelami?
2 Moklisto mopakolami moko na moko akomi “likonzi kati na tempelo [ya Nzambe],” kozwaka esika kati na likolo. “Ebele monene” ya basambeli mosusu ya Jéhovah bazali “kosalela [Nzambe] mosala ya bulee” kati na oyo emonisamaki na lopango ya Bapakano na tempelo oyo etongamaki na Herode. Na ntina na kondima na bango kati na mbeka na Yesu, bazali na etelemelo ya sembo oyo ekosala ete babatelama na bolozi monene.”—Emoniseli 3:12; 7:9-15.
3, 4. Lisangá ya baklisto bapakolami oyo bazali na mabelé likokisami na nini, mpe na mbindo nini basengeli komibatela?
3 Lisanga ya baklisto bapakolami na mabele ekokani na tempelo mosusu oyo esukwami na losambo ya bikeko. Epai na bato yango baoyo ‘batyami elembo na elimo santu,’ ntóma Paulo alobaki ete: “Botongami likolo na moboko ya bantóma mpe ya basakoli, Yesu Klisto ye moko azali libanga ya moboko. Ezali kati na ye nde ndako mobimba ekangani esika moko, ezali kokola mpo na kozala tempelo mosantu mpo na Jéhovah. Ezali kati na ye nde bino mpe, botongami mpo na kozala esika Nzambe akofandaka kati na elimo.” (Baefese 1:13; 2:20-22) Bato 144 000 oyo batyami elembo bazali “mabanga na bomoi” mpo ete “batongami ndako ya elimo mpo na kozala bonganga ya bulee.”—1 Petelo 2:5; Emoniseli 7:4; 14:1.
4 Lokola banganga balandi wana bazali “ndako na Nzambe,” ye akoki kopesa nzela te ete tempelo yango ebebisama. (1 Bakolinti 3:9, 16, 17) Ntóma Paulo akebisaki ete: “Bokangana na ekanganeli mabe te elongo na bato bazangi kondima. Mpo ete, kokokana nini ezali kati na boyengebene mpe kotyola mibeko? To mpe bosangani nini bozali kati na pole mpe molili? Epai mosusu, boyokani nini bozali kati na Klisto mpe Beliala? To mpe likabo nini mosembwi azali na yango elongo na moto azangi kondima? Mpe boyokani nini bozali kati na tempelo na Nzambe mpe bikeko?” Baklisto bapakolami baoyo bazali bato na “Jéhovah Mozwi na Nguya Nyonso,” basengeli kokima losambo ya bikeko. (2 Bakolinti 6:14-18) Baoyo bazali kati na ebele monene basengeli mpe komibatela na lolenge nyonso ya losambo ya bikeko.
5. Koyebaka ete Jéhovah azali kosenga bokangami mobimba, baklisto ya solo basengeli kosala nini?
5 Losambo ya bikeko ezali na mitindo na yango ya polele mpe ya kobombama. Na yango, losambo ya bikeko esuki te bobele na losambo ya banzambe ya lokuta ya mibali mpe ya basi. Ezali losambo epesami na eloko nyonso to na moto mosusu nde na Jéhovah te. Lokola azali Moyangeli ya Molongo Mobimba, na bosembo nyonso Jéhovah azali kosenga mpe abongi na bokangami mobimba. (Deteronome 4:24) Koyebaka yango, baklisto ya solo bazali kolanda makebisi ya Makomami na ntina ya lolenge nyonso ya losambo ya bikeko. (1 Bakolinti 10:7) Totalela mitindo misusu ya losambo ya bikeko oyo esengeli koboyama na basaleli na Jéhovah.
Losambo ya bikeko ya boklisto ya lokuta emonisamaki liboso
6. Makambo nini ya mbindo Ezekiele amonaki kati na emonaneli?
6 Na mobu 612 L.T.B., mosakoli Ezekiele oyo ntango yango azalaki na boombo na Babilone azwaki emonaneli ya makambo na mbindo oyo mazalaki kosalema na Bayuda bapengwi kati na tempelo ya Jéhovah na Yelusaleme. Ezekiele amonaki “ekeko ya zuwa.” Mikolo ntuku nsambo bazalaki kopesa mpaka na malasi kati na tempelo. Basi bazalaki kolela nzambe ya lokuta. Mpe mibali 25 bazalaki kosambela moi. Misala ya bapengwi wana mizalaki na ndimbola nini?
7, 8. “Ekeko ya zuwa” ekokaki kozala nini, mpe mpo na nini yango epusaki Jéhovah na koyoka zuwa?
7 Makambo na mbindo oyo Ezekiele azwaki emonaneli na yango mamonisaki losambo ya bikeko ya boklisto ya lokuta. Na ndakisa, mosakoli alobaki ete: “Tala epai na likoló longwa na ekuke na etumbelo ezalaki na ekeko ya zuwa kati na ekotelo. Mpe [Jéhovah Nzambe] alobelaki ngai ete: ‘Mwana na moto, ozali komona makambo minene ya mbindo oyo bazali kosala, makambo oyo ndako na Yisraele ezali kosala awa mpo ete nalongwa na esika na ngai mosantu?’”—Ezekiele 8:1-6.
8 Ekeko ya zuwa ekokaki kozala likonzi mpo na losambo oyo emonisaki nzambe mwasi ya lokuta oyo bato na Kanana bazalaki kotalela lokola mwasi ya nzambe na bango Baala. Atako lolenge nini, elembo yango epusaki Jéhovah na zuwa mpamba te yango ekokaki kopesa nzela te na Yisraele ete basambela ye, kobukaka bongo mitinda na ye oyo ete: “Nazali Jéhovah Nzambe na yo . . . Osengeli kozala na banzambe mosusu te liboso na ngai. Osengeli kosala ekeko mpo na yo te to elilingi ya eloko na lola na likoló to na mokili na nse to na mai na nse ya mabelé. Osengeli te kofukamela yango to kosalela yango, mpo ete ngai Jéhovah Nzambe na yo nazali Nzambe oyo azali kosenga bokangami mobimba mpo na losambo.”—Exode 20:2-5.
9. Lolenge nini boklisto ya lokuta epusaki Nzambe na koyoka zuwa?
9 Kosambela ekeko ya zuwa kati na tempelo na Nzambe ezalaki moko na makambo minene ya mbindo mazalaki kosalema na Bayisraele oyo bapengwaki. Bobele bongo, bandako-nzambe ya boklisto ya lokuta esili kobebisama na bilembo mpe bililingi oyo bizali kotuka Nzambe mpe oyo epekisi bango na komonisa bokangami mobimba epai na Ye oyo bazali koloba ete bazali kosalela. Nzambe apusami lisusu na koyoka zuwa mpo ete bakonzi ya mangomba bazali kobwaka Bokonzi na ye lokola elikya bobele moko ya bato mpe bazali kosambela O.N.U.—“eloko ya mbindo . . . oyo etelemi na esika mosantu,” epai yango esengelaki kotelema te.—Matai 24:15, 16; Malako 13:14.
10. Ezekiele amonaki nini kati na tempelo, mpe lolenge nini yango ekokani na oyo ezali kosalema na boklisto ya lokuta?
10 Na bokoti na tempelo, Ezekiele ayebisi ete: “Tala, ezalaki na ndenge nyonso ya biloko bikolandaka mpe nyama na mbindo, mpe bikeko nyonso ya ndako na Yisraele bizalaki na bitutu nyonso. Mpe mibali ntuku nsambo kati na mikólo na ndako na Yisraele batelemaki liboso na yango . . . Moto na moto azalaki na mbeki na ye na kotumba mpaka na malasi na loboko na ye, mpe lipata na molinga na mpaka na malasi ezalaki kobuta.” Kanisa naino! Mikólo na Yisraele kati na tempelo ya Jéhovah, bazali kopesa mpaka na malasi na banzambe ya lokuta oyo emonisami na bikeko ya mbindo kati na bitutu. (Ezekiele 8:10-12) Motindo moko, bandeke mpe banyama na yauli basalelami lokola bilembo ya mikili misusu ya boklisto ya lokuta, oyo bato bazali kopesa yango losambo. Lisusu, bakonzi mingi ya mangomba bazali kozimbisa bato, mpamba te bazali kolakisa liteya ya lokuta oyo elobi ete moto abimaki na evolution longwa na mitindo ya banyama, oyo ezali na nse ya moto, na esika ete bandima lisoló ya Biblia oyo elobi solo ete biloko nyonso bizalisami na Jéhovah Nzambe.—Misala 17:24-28.
11. Mpo na nini basi Bayisraele oyo bapengwaki bazalaki kolela Tamuzu?
11 Na bokoti na ekuke ya ndako na Jéhovah, Ezekiele amonaki basi bapengwi na Yisraele bazalaki kolela Tamuzu. (Ezekiele 8:13, 14) Bato na Babilone mpe na Sulia bazalaki kotalela Tamuzu lokola nzambe na bitoele oyo bikolaka na eleko ya mbula mpe bikufaka na boumeli ya eleko ya elanga. Kokufa na yango ezalaki komonisa kokufa ya Tamuzu, oyo basambeli na ye bazalaki kolela mbula na mbula na eleko ya moi makasi. Na ntango bitoele bikobanda kobima lisusu na eleko na mbula, bazalaki kokanisa ete Tamuzu azongi longwa na bakufi. Amonisamaki na lɛtɛle ya liboso ya nkombo na ye, tau ya kala oyo ezalaki moko na mitindo ya ekulusu. Yango ezali kokundwela biso malamu losambo oyo boklisto ya lokuta ezali kopesa na ekulusu.
12. Ezekiele amonaki mibali 25 ya Yisraele oyo bapengwaki bazali kosala nini, mpe makambo nini ya motindo moko mazali kosalema kati na boklisto ya lokuta?
12 Na lopango ya kati ya tempelo, Ezekiele amonaki na nsima mibali 25, Bayisraele bapengwi, baoyo bazalaki kosambela moi—kobukaka bongo mobeko na Jéhovah mopekisi losambo motindo wana ya bikeko. (Deteronome 4:15-19) Liboso ya zolo ya Nzambe, basambeli na bikeko wana bazalaki lisusu kosimba etape ya nsoni, oyo mbala mosusu ezalaki komonisa enama ya mobali. Likambo na kokamwa ezali te soki Nzambe akokaki te koyanola na mabondeli na bango; bobele bongo, boklisto ya lokuta ekoluka lisalisi na Nzambe na boumeli ya “bolozi monene,” kasi akozwa yango te. (Matai 24:21) Lokola Bayisraele batomboki wana basambelaki moi, eutelo na pole, na kopesaka tempelo na Jéhovah makongo, bobele bongo, boklisto ya lokuta ezali kopesa makongo na pole oyo ezali kouta epai na Nzambe, ezali koteya mateya ya lokuta, ezali kosambela mayele ya mokili mpe ezali kokanga miso liboso na makambo ya mbindo. —Ezekiele 8:15-18.
13. Lolenge nini ba Témoins de Jéhovah bazali kobwaka mitindo ya losambo ya bikeko oyo Ezekiele amonaki na emonaneli?
13 Ba Témoins de Jéhovah bazali koboya lolenge nyonso ya losambo ya bikeko esalemi kati na boklisto ya lokuta, oyo Yelusaleme ezalaki elilingi na yango, oyo Ezekiele azwaki emonaneli na yango liboso. Tosengeli te kokumisa bilembo oyo bizali kotuka Nzambe. Atako tosengeli komonisa limemya epai na bayangeli lokola “bakonzi baleki liboso,” nzokande botosi na biso epai na bango ezali na ndelo. (Baloma 13:1-7; Malako 12:17; Misala 5:29) Motema na biso epesami mobimba na Nzambe mpe na Bokonzi na ye. Tosengeli te kokitanya liteya ya évolution na esika ya Mozalisi mpe bozalisi na ye. (Emoniseli 4:11) Tosengeli soko moke te kosambela ekulusu to mpe mayele ya mosuni, soki mpe filozofi to mitindo misusu ya mayele ya mokili. (1 Timote 6:20, 21) Lisusu, tozali komibatela na mitindo nyonso ya losambo ya bikeko. Wapi mwa mitindo yango misusu?
Mitindo misusu ya losambo ya bikeko
14. Etelemelo ya basaleli na Jéhovah ezali nini liboso na “nyama na yauli” oyo alobelami na Emoniseli 13:1?
14 Baklisto bazali kosambela “nyama na yauli” te lokola bato mosusu na ntango oyo bazali kosala yango. Ntóma Yoane alobaki ete: “Namonaki nyama na yauli kobima kati na mai monene, azalaki na maseke zomi mpe na mitó nsambo, mpe na maseke na ye mitɔlɛ na bokonzi zomi . . . Baoyo nyonso bafandi na mokili bakosambela ye.” (Emoniseli 13:1, 8) Banyama bakoki kozala elembo na “mikonzi,” to banguya na politike. (Danyele 7:17; 8:3-8, 20-25) Na bongo, mitó nsambo ya nyama na yauli ya elilingi ezali banguya elekaki makasi oyo ebimaki na mokili: Ezipito, Asulia, Babilone, MedoPerse, Grece, Loma, mpe Anglo-Américain, lisangani ya Angleterre mpe Etats-Unis d’Amérique. Bakonzi na mangomba ya boklisto ya lokuta bazangi mpenza limemya mpo na Nzambe mpe Klisto na kopusaka bato na kosambela ebongiseli ya politike ya Satana, “mokonzi ya mokili oyo.” (Yoane 12:31) Ba Témoins de Jéhovah bazali baklisto oyo bakotaka na makambo ya mokili te; bazali nde balongisi ya Bokonzi [ya Nzambe]; mpo na yango, bazali kobwaka losambo motindo wana ya bikeko.—Yakobo 1:27.
15. Lolenge nini libota na Jéhovah litalelaka bavedete ya mokili, mpe Temwe moko alobaki nini na kotalela likambo yango?
15 Libota na Nzambe lizali mpe koboya kosambela bato ya lokumu na miziki, na mabina mpe na masano. Nsima na kokóma Témoin de Jéhovah, mobeti miziki moko alobaki ete: “Mabina mpe miziki ekoki ... kolamwisa bamposa mabe. Mosali na nzembo akoyembaka na ntina na bolamu mpe bolingo oyo mbala mosusu ebele na bayoki bazali komona yango te epai na babalani na bango. Mbala mingi bakoyebaka mosali na nzembo na maloba ya nzembo na ye. Nayebi basali na nzembo baoyo mpo na ntina wana, bayebani epai na basi mingi. Soki moto amipesi na makanisi mpamba wana, akoki kosambela mosali na nzembo. Yango ekoki kobanda lokola nde ezangi likama, na kolukaka kozwa kasete to palaki ya nzembo oyo moyembi abimisaki lokola suvenire. Kasi basusu bakomaka kino kotalela mosali na nzembo lokola ndakisa na bango, mpe na kopesaka ye lokumu, bazali kokomisa ye eloko na bango ya losambo. Bakotyaka fɔtɔ ya moto yango na etutu mpe bakobanda kolata mpe kokata nsuki lokola ye. Baklisto basengeli kobatela na makanisi na bango ete losambo ezali bobele mpo na Nzambe.”
16. Nini emonisi ete baanzelu ya sembo balingaka losambo ya bikeko te?
16 Ɛɛ, bobele Nzambe akoki na losambo. Ntango Yoane “akweaki mpo na kosambela liboso na makolo ya anzelu” oyo azalaki komonisa ye makambo ya kokamwa, ekelamu wana ya elimo aboyaki na makasi ete asambela ye. Kasi alobaki ete: “Keba! Kosala bongo te! Nazali moombo moninga na yo mpe ya bandeko na yo baoyo bazali basakoli mpe ya baoyo bazali kotosa maloba ya mokanda oyo. Sambela Nzambe.” (Emoniseli 22:8, 9) Kobanga Jéhovah, to limemya mozindo mpo na ye, ezali kotinda biso na kosambela bobele ye. (Emoniseli 14:7) Na bongo, bizaleli ya solo ya moto na Nzambe bikobatela biso na losambo ya bikeko. —1 Timote 4:8.
17. Lolenge nini tokoki komibatela na pite oyo ezali bongo losambo ya bikeko?
17 Pite ezali lolenge mosusu ya losambo ya bikeko oyo eboyami na basaleli ya Jéhovah. Bayebi ete “moto na pite to moto na bosota to moto na bilulela—elingi koloba mosambeli na bikeko—azali na libula te kati na Bokonzi ya Klisto mpe ya Nzambe.” (Baefese 5:5) Ekozala lokola kosambela ekeko ntango mposa makasi mpo na bisengo ya mbindo ekomi eloko ya losambo. Bizaleli ya moto na Nzambe bibebisamaka na bamposa mabe ya kosangisa nzoto. Na kotyaka miso mpe matoi na ye na mikanda to biloko mosusu bikolakisaka bolumbu ya basi mpe mibali, moto azali kotya na likama boyokani oyo akokaki kozala na yango elongo na Nzambe mosantu, Jéhovah. (Yisaya 6:3) Mpo na komibatela na losambo na bikeko motindo wana, basaleli na Nzambe basengeli koboya mikanda mpe biloko mosusu bizali kolakisa bolumbu ya basi mpe mibali mpe miziki ya mabe. Basengeli kokangama na makambo ya elimo mazwami kati na Makomami, mpe basengeli kobatela “bomoto ya sika bozalisami na boyokani na mokano ya Nzambe kati na boyengebene mpe bosembo ya solo.”—Baefese 4:22-24.
Toboya lokoso mpe bilulela
18, 19. (a) Lokoso mpe bilulela ezali nini? (b) Lolenge nini tokoki komibatela na lokoso mpe bilulela oyo ezali bongo losambo ya bikeko?
18 Baklisto bazali lisusu komibatela na lokoso mpe bilulela, oyo ezali mitindo misusu mikangani na losambo ya bikeko. Lokoso ezali mposa makasi to eleki ndelo, mpe bilulela ezali mposa makasi mpo na eloko oyo ezali ya moto mosusu. Yesu akebisaki bato na ntina na bilulela; mpe alobelaki bilulela ya moto moko mozwi oyo, na liwa na ye akokaki kozwa litomba te na biloko na ye mpe azalaki na mawa mpo na kozanga kozala “mozwi epai na Nzambe.” (Luka 12:15-21) ntóma Paulo, na lolenge lobongi apesaki toli na baninga na ye baklisto ete: “Boboma binama na nzoto na bino oyo bizali na mabele mpo na oyo etali . . . bilulela, oyo ezali losambo ya bikeko.”—Bakolose 3:5.
19 Baoyo bamipesi na mposa ya mosolo, na lokoso mpo na bilei mpe masanga, to na mposa ya kozala moto monene, bazali kokomisa bamposa wana bikeko na bango. Lokola ntóma Paulo amonisaki yango, moto na lokoso azali mosambeli na bikeko mpe akosangola Bokonzi na Nzambe te. (1 Bakolinti 6:9, 10; Baefese 5:5) Na yango, bato babatisami baoyo bazali kosalela losambo na bikeko na kozalaka bato na lokoso bakoki kobimisama na lisanga ya boklisto. Nzokande, na kosalelaka Makomami mpe kobondelaka na motema moko, tokoki kobwaka ezaleli ya lokoso. Masese 30:7-9 elobi ete: “Nasengi makambo mibale epai na yo [Jéhovah Nzambe], oboyela ngai yango te liboso ete nakufa. Longola mosika na ngai lolendo mpe lokuta. Pesa ngai bobola te mpe bozwi te. Leisa ngai bilei bikoki na ngai, ete natonda te mpe boye nawangana yo te, naloba te ete: ‘Jéhovah azali nani?’ mpe ete nazala mobola te, mpe nayiba te ete nabebisa nkombo ya Nzambe na ngai te.” Elimo motindo oyo ekoki kosalisa biso na komibatela na losambo ya bikeko lomonisami na mitindo oyo mibale ete lokoso mpe bilulela.
Tokeba ete tomisambela te biso moko
20, 21. Libota ya Jéhovah bazali kosala nini mpo ete bamisambela te bango moko?
20 Libota na Jéhovah bazali lisusu kokeba ete bamisambela te bango moko. Kati na mokili, komisambela to kosambela mokano na yo moko ezali komonana mingi. Mposa ya koyebana mingi mpe ya lokumu ezali kopusa bato mingi na kolanda banzela mabe. Balingi ete mokano na bango esalema, kasi ya Nzambe te. Kasi tokoki te kozala na boyokani na Nzambe soki tokomisambela biso moko, na kolukaka, na lolenge mabe ete mokano na biso moko esalema mpe na kolukaka ete tozala bakonzi likolo ya basusu. (Masese 3:32; Matai 20:20-28; 1 Petelo 5:2, 3) Lokola tozali bayekoli na Yesu, tosili kotika makambo oyo mokili ezali kosala na nkuku.—2 Bakolinti 4:1, 2.
21 Na esika ya koluka kozala moto monene, to moto ayebani mingi, libota na Nzambe lizali nde kotosa likebisi oyo ya ntóma Paulo: “Ezala ete bozali kolya, bozali komela to kosala mosala nini, bosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe.” (1 Bakolinti 10:31) Lokola tozali basaleli na Jéhovah, tokoluka te bobele kolongisa bamposa na biso—oyo ekoki kozala losambo ya bikeko; kasi tokosepela nde kosala mokano na Nzambe, kondimaka litambwisi ya “moombo na sembo mpe na mayele” mpe kosala na boyokani mpenza elongo na lisanga ya Jéhovah.—Matai 24:45-47.
Tolanda komibatela!
22, 23. Tokoki kosala nini mpo na komibatela na lolenge nyonso ya losambo ya bikeko?
22 Lokola tozali libota na Jéhovah, tosengeli te kofukama liboso na biloko oyo bizali bikeko, ezala ya ebende, ya nzete to ya libanga. Tokomibatela lisusu na mitindo mibombami ya losambo ya bikeko. Ya solo, tosengeli kolanda kobwaka lolenge nyonso ya losambo ya bikeko. Na yango, tolanda toli oyo ya Yoane ete: “Bomibatela na bikeko.”—1 Yoane 5:21.
23 Soki ozali moko kati na basaleli na Jéhovah, salela ntango nyonso lisosoli na yo liteyami na Biblia mpe mayele na yo. (Baebele 5:14) Na bongo, okomibebisa te na elimo ya mokili oyo emipesi na kosambela bikeko, kasi okokokana na Baebele misato oyo bazalaki na kondima mpe na baklisto ya ekeke ya liboso oyo batikalaki sembo. Okomonisa bokangami makasi epai na Jéhovah, mpe ye akosalisa yo na kolanda komibatela na lolenge nyonso na losambo ya bikeko.
Bozongeli
◻ Lolenge nini ba Témoins de Jéhovah bazali kobwaka mitindo ya losambo ya bikeko oyo Ezekiele amonaki na emonaneli?
◻ “Nyama na yauli” ya Emoniseli 13:1 ezali nini, mpe etelemelo nini basaleli na Jéhovah bazali kozwa liboso na yango?
◻ Mpo na nini tosengeli komibatela ete tosambela te bavɛdɛtɛ ya masano to ya miziki?
◻ Tokoki kosala nini mpo ete tomisambela te biso moko?
◻ Mpo na nini tosengeli komibatela na lolenge nyonso ya losambo ya bikeko?
[Bililingi na lokasa 26]
Oyebi ete makambo ya mbindo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli ezalaki elilingi ya losambo ya bikeko oyo ezali kosalema kati na boklisto ya lokuta?
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Artwork (upper left) based on photo by Ralph Crane/Bardo Museum