Mituna na Batangi
Moklisto akoki kosala nini soki azali kokoka kozwa te mobalani oyo abongi na ye?
Atako tozali baklisto basila komipesa, tokoki kotungisama soki eloko oyo tozalaki kolikya na endimiseli nyonso ezangi kosalema. Mayoki na biso mamonisami malamu na Masese 13:12, oyo elobi ete: “Elikya oyo ekokisami te epesaka motema mpasi.” Yanga ezali mayoki oyo baklisto basusu bazalaka na yango, wana bazali na mposa ya kobala kasi bazali kozwa te babalani oyo babongi na bango. Yango ezali solo mingimingi epai na baoyo ntóma Paulo alobelaki ete “bazali kozika na mposa.”—1 Bakolinti 7:9.
Jéhovah atyaki kati na mobali mposa ya kozwa kati na basi mosungi mobongi na ye mpenza. Na bongo, ezali likambo na kokamwa te ete bamposa motindo wana ezali makasi epai na baklisto mingi oyo bazali minzemba. (Genese 2:18) Liyoki oyo, ekoki kokweisama te, ezali komonana mingi kati na bamboka oyo bapesaka motuya mingi na libala (to kobala na mbula boye), to ntango baklisto minzemba bazali komona kati na lisanga ya boklisto baninga na bango basili kobala mpe bazali na esengo mingi na mabala na bango. Nzokande, ezali malamu te na kopesa nzela na mposa makasi ete eumela ntango molai. Mpo na yango, lolenge nini baklisto ya sembo bakoki kolonga ezalela wana kozanga ete babulungana mingi?
Yango ezali likambo ya petɛɛ te, mpe basusu basengeli te kotalela likambo yango lokola nde ezali bobele kolekisa ndelo to lokola likambo moko oyo lizangi ntina. Kasi na meko mosusu, likoki ya kolonga to kosilisa ezalela wana etaleli bibongiseli oyo monzemba ye moko akoki kokamata.
Tozali kokuta lilako kati na motinda oyo ya Biblia: “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” (Misala 20:35) Maloba oyo malobamaki na mobali oyo azalaki monzemba, Yesu Klisto, mpe ayebaki oyo azalaki koloba. Mpo na kolonga mayoki ya mawa oyo mauti na kozanga kokokisama ya eloko tozalaki kozela, mwango malamu ezali ya kosala eloko mpo na bato mosusu na elimo ya komipesa. Yango elimboli nini na ntango oyo likamba yango litaleli moklisto monzemba?
Kosala milende mpo na komoniso misala ya boboto mpo na libota na yo moko mpe mpo na basusu kati na lisangá, mpe kokolisa mosala na yo kati na mosala ya kosakola. Toli wana esuki te bobele na koloba ete: ‘Omipesa na mosala, mpe okobosana mposa ya kobala.’ Te. Kasi soki omipesi kati na misala wana ya boklisto oyo mizali kobota mbuma, okomona mbala mosusu ete okomi kotelema ngwi na motema na yo, kozalaka na bokonzi likolo na mokano na yo mpe okoki kosalela ezalela na yo ya sikawa na litomba nyonso.—1 Bakolinti 7:37.
Basusu baoyo bazali na mposa makasi ya kobala bapesi nzela na yango ete ekoma lobanzo na bango ya liboso. Bakomi mosika mpenza kino kokende kopesa mayebisi ya koluka mobalani kati na bazulunalo. Nzokande, ekozala litomba mingi, na kotya likebi koleka na bolamu oyo okoki komizwela na boumeli ya eleko oyo ozali monzemba.—Tala masolo “Basaleli ya Nzambe oyo bazali minzemba bazangi eloko te” mpe “Kotikala monzemba: lolenge moko ya bomoi epambolami” na Mosenzeli ya 15 juin 1988 mpe “Libala ezali nzela bobele moko ya kozwa bolamu?” na Mosenzeli ya 15 mai 1992.
Bondela Jehovah ete asalisa yo na koyika mpiko kati na ezalela wana ya monzemba. (Bafilipi 4:6, 7, 13) Baklisto mingi oyo bazali minzemba baoyo bazali kosalela ntango na bango na koyekola mpe na kokanisa mozindo likoló na Liloba na Nzambe mpe na koyangana mpe kosangana kati na makita ya boklisto, bazali komizwela ‘kopema mpo na milimo na bango,’ lokola Yesu Klisto alakaki yango epai na bayekoli na ye. (Matai 11:28-30) Yango ezali kosalisa bango na bokoli ya elimo oyo ekopesa bango nzela na kozala mibali mpe basi malamu na ntango bakozwa babalani oyo babongi na bango.
Tobosana te ete Jéhovah ayebi ezalela ya minzemba nyonso oyo bazali kosalela ye. Ayebi ete ezalela na yo ya lelo, mbala mosusu ezali te oyo olingi mingi. Tata na biso ya likoló ya bolingo ayebi lisusu nini ekozala litomba mpenza mpo na yo na ntango molai, ezala na elimo to na mayoki. Mpo na oyo etali yo, ezali na likambo oyo okoki komindimisa ete: Na kozalaka na motema molai mpo na kotalela Jéhovah mpe na kosalelaka mitinda ya Liloba na ye na bomoi na yo ya mokolo na mokolo, okoki kondimisama ete akokokisa bamposa na yo ya ntina mpo na bolamu na yo ya seko.—Tala Nzembo 145:16.