Zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ ya Yehova
“[Yehova], nkombo na ye zúwa-na-kobatela azali Nzambe na zúwa.”—EXODE 34:14.
1. Wapi ezaleli monene ya Nzambe, mpe na ndimbola nini yango ezali na boyokani na zúwa na ye?
YEHOVA amimonisi ete azali “Nzambe na zúwa.” Okoki komituna soki mpo na nini bongo, mpamba te liloba “zúwa” ezali na bandimbola ya mabe. Ya solo, ezaleli monene ya Nzambe ezali bolingo. (1 Yoane 4:8) Mayoki na ye nyonso ya zúwa masengeli bongo kozala mpo na bolamu ya bato nyonso. Ee, tokomona ete zúwa ya Nzambe ezali na ntina mpo na kotya kimya mpe boyokani kati na molɔ́ngɔ́.
2. Wapi mwa mitindo mikeseni ya kobongola maloba ya Liebele oyo elimboli “zúwa”?
2 Liloba ya Liebele oyo ekokani na “zúwa” ezali komonana mbala 80 kati na Makomami ya Liebele. Pene na katikati ya bambala nyonso oyo esalelami ezali kolobela Yehova Nzambe. G. H. Livingston ayebisi ete: “Wana esalelami epai na Nzambe, liloba zúwa elimboli liyoki ya mabe te, kasi, ezali nde, komipesa mpenza mobimba na losambo ya Yehova.” (The Pentateuch in Its Cultural Environment) Na yango, Traduction du monde nouveau ebongolaka mbala mosusu liloba yango na “kosɛnga ntango nyonso komipesa mobimba.” (Ezekiele 5:13) Lolenge mosusu malamu ya kobongola yango ezali bongo “molende.”—Nzembo 79:5; Yisaya 9:7.
3. Na mitindo nini mikeseni zúwa ekoki mbala mosusu kosalelama mpo na mokano moko ya malamu?
3 Moto azalisamaki na likoki ya koyoka zúwa, kasi kokwea oyo bato bakweaki kati na lisumu ebimisi bongo zúwa ya mabe. Atako bongo, zúwa ya moto ekoki kopusa ye na kosala malamu. Ekoki kopusa moto ete abatela molingami na ye na makambo ya mabe. Lisusu, bato bakoki komonisa zúwa ya malamu mpo na Yehova mpe mpo na losambo na ye. (1 Mikonzi 19:10) Mpo na kopesa ndimbola ebongi na zúwa wana mpo na Yehova, liloba ya Liebele ekoki kobongolama ete “kozanga kotika nzela na bombanda” mpo na ye.—2 Mikonzi 10:16.
Mwana na ngɔmbɛ ya wolo
4. Mobeko nini motaleli zúwa ya malamu emonanaki mingi kati na Mibeko oyo Nzambe apesaki epai na Yisalaele?
4 Ndakisa moko ya zúwa ya malamu ezali likambo oyo libimaki nsima wana Bayisalaele bazwaki Mibeko na Ngomba Sinai. Mbala na mbala, bazalaki kopesamela likebisi oyo ete básambela te banzambe oyo bato basali. Yehova ayebisaki bango ete: “Ngai [Yehova] Nzambe na yo nazali Nzambe-na-zúwa na kobatela [to, “Nzambe oyo akondimaka bombanda te”].” (Exode 20:5; kokanisá na Exode 20:22, 23; 22:20; 23:13, 24, 32, 33.) Yehova asalaki kondimana elongo na Yisalaele, alakaki ete alingaki kopambola bango mpe kokɔtisa bango kati na Mokili ya Ndaka. (Exode 23:22, 31) Mpe bato balobaki ete: “Tokosala yango nyonso elobi [Yehova], mpe tokotosa.”—Exode 24:7.
5, 6. (a) Lolenge nini Bayisalaele basalaki lisumu monene wana bazalaki na ngomba Sinai? (b) Lolenge nini Yehova mpe basámbeli na ye ya sembo bamonisaki zúwa ya malamu na Sinai?
5 Nzokande, mosika te, Bayisalaele basalelaki Nzambe lisumu. Bazalaki naino na nsé ya Ngomba Sinai. Mose amataki na ngomba esilaki koleka mikolo mingi, azalaki kozwa malako mosusu oyo mazalaki kouta na Yehova, mpe bato bapusaki ndeko mobali ya Mose, Alona, ete asalela bango nzambe. Alona andimaki mpe asalaki ekeko ya mwana na ngɔmbɛ na lisalisi ya wolo oyo bato bapesaki. Balobaki ete ekeko wana ezalaki bongo komonisa Yehova. (Nzembo 106:20) Na mokolo molandaki bapesaki mbeka mpe bakóbaki “kosambela yango.” Na nsima “basepelaki.”—Exode 32:1, 4, 6, 8, 17-19.
6 Mose akitaki na ngomba wana Bayisalaele bazalaki kosepela. Na komonáká ezaleli na bango wana ya nsɔ́ni, angangaki ete: “Nani azali na ngámbo ya Yehova?” (Exode 32:25, 26, NW) Bana na Lewi bayangani epai na Mose, mpe ayebisaki bango ete bákamata mipanga mpe báboma basambeli na bikeko. Na komonisáká zúwa na bango mpo na losambo ya pɛtɔ ya Yehova, Balewi babomaki bandeko na bango soko 3 000 oyo bazalaki na ekweli. Yehova alendisaki ekateli yango na kotindáká bolɔ́zi likoló na baoyo babikaki. (Exode 32:28, 35) Na nsima Nzambe azongelaki etindá oyo ete: “Okosambela nzambe mosusu te, mpo ete [Yehova], nkombo na ye zúwa-na-kobatela, azali Nzambe na zúwa.”—Exode 34:14.
Baala na Peolo
7, 8. (a) Lolenge nini Bayisalaele mingi bakweaki na losambo ya bikeko na kosambela Baala na Peolo? (b) Lolenge nini etumbu eutaki na Yehova esukaki?
7 Bambula ntuku minei na nsima, na ntango libota ya Yisalaele ezalaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, basi kitoko ya Moaba mpe ya Madiani balɛngolaki Bayisalaele mingi ete bákende mpe báfanda epai na bango. Mibali wana mbɛlɛ basengelaki kopɛngola kozala na boyokani ya penepene elongo na basambeli ya banzambe ya lokuta. (Exode 34:12, 15) Nzokande, bakendeki lokola bampate epai na babomi, basalaki pite elongo na basi wana mpe basanganaki na bango na losambo ya Baala ya Peolo.—Mituya 25:1-3; Masese 7:21, 22.
8 Yehova atindaki bolɔ́zi mpo na koboma baoyo basangani kati na likambo wana ya nsɔ́ni ya kosambela binama. Nzambe apesaki mpe etindá epai na Bayisalaele oyo bazalaki sembo ete báboma bandeko na bango oyo bazalaki na ekweli. Na ezaleli ya nsɔ́ni mpe ya botomboki, nkumu moko ya Yisalaele oyo abéngamaki Zimili amemaki mwana mwasi moko ya mokonzi ya Madiani kati na hema na ye mpo ete akende kosangisa na ye nzoto. Na ntango Finease nganga na kobanga Nzambe amonaki bongo, abomaki bato wana mibale ya ezaleli ya mbindo. Na bongo, etumbu esukaki, mpe Nzambe alobaki ete: “Finease . . . abongoli nkanda na ngai na bato na Yisalaele, awa esalaki ye zúwa lokola zúwa na ngai kati na bango, bongo nabebisi bato na Yisalaele na zúwa na ngai te.” (Mituya 25:11) Atako libota mobimba libomamaki te, Bayisalaele soko 23 000 bakufaki. (1 Bakolinti 10:8) Babungisaki elikya na bango ya kokɔta na Mokili ya Ndaka, elikya oyo basimbaki makasi uta kala.
Liteya ya kokebisa
9. Nini ekómelaki bato ya Yisalaele mpe ya Yuda lokola bazangaki zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ ya Yehova?
9 Na mawa nyonso, mosika te Bayisalaele babosanaki makambo yango. Bamonisaki ete bazalaki na zúwa te mpo na losambo ya pɛtɔ ya Yehova. “Bapesaki [Nzambe] zúwa na motema na ye mpo na bikeko na bango.” (Nzembo 78:58) Likambo oyo libimaki mpo na yango ezali oyo ete, Yehova atikaki ete mabota zomi ya Yisalaele ekamatama na boombo na mabɔ́ko ya Baasulia na mobu 740 L.T.B. Mabota mibale oyo matikalaki ya bokonzi ya Yuda mazwaki mpe etumbu motindo moko, na ntango mboka-mokonzi na bango ebomamaki na mobu 607 L.T.B. Bato mingi babomamaki, mpe baoyo babikaki bakamatamaki na boombo na Babilone. Oyo nde ndakisa ya kokebisa mpo na baklisto nyonso lelo oyo!—1 Bakolinti 10:6, 11.
10. Nini ekokómela basambeli na bikeko oyo babongoli motema te?
10 Eteni moko likoló na misato ya bafándi na mabelé—soko milió 1 900—bazali lelo komiloba ete bazali baklisto. (1994 Britannica Book of the Year) Mingi na bango bazali kati na mangomba oyo mazali kosalela bililingi, bikeko, mpe ekulusu kati na losambo na bango. Yehova abatelaki te libota na ye moko oyo batumolaki zúwa na ye wana bamikɔtisaki na losambo ya bikeko. Akobatela mpe te baoyo bazali komitánga baklisto mpe bazali kosambela ye na lisalisi ya bikeko. Yesu Klisto alobaki ete: “Nzambe azali [elimo, NW] mpe ekoki na basambeli na ye ete básambela ye na [elimo, NW] mpe na solo.” (Yoane 4:24) Lisusu, Biblia ezali kokebisa baklisto ete bámibatela na losambo ya bikeko. (1 Yoane 5:21) Basambeli na bikeko oyo baboyi kobongola motema bakosangola bokonzi ya Nzambe te.—Bagalatia 5:20, 21.
11. Lolenge nini moklisto akoki kokweisama mpo na losambo na bikeko kozanga kongumbamela ekeko moko, mpe nini ekosalisa biso na kopɛngola losambo ya bikeko? (Baefese 5:5)
11 Atako moklisto ya solo akongumbama soko moke te liboso na ekeko moko, nzokande asengeli koboya makambo nyonso oyo mazali na boyokani na losambo ya bikeko, oyo mazali mbindo, mpe mazali masumu. Na ndakisa, Biblia ekebisi biso ete: “Bóboma bizaleli na bino biuti na nsé: pite, mbindo, mposa na nzoto, mposa mabe mpe bilulela oyo ezali losambo na bikeko. Nkanda na Nzambe ezali koya mpo na makambo na ndenge yango.” (Bakolose 3:5, 6) Mpo na kotosa maloba oyo esengeli liboso ete tóbwaka bizaleli ya mbindo. Yango ezali kosɛnga koboya lolenge ya kominanola oyo ebongisami mpo na kolamwisa mposa ya nzoto. Na esika ya kokokisa mposa motindo wana, baklisto ya solo bazali na zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ.
Bandakisa mosusu ya zúwa ya malamu
12, 13. Lolenge nini Yesu atikaki ndakisa monene na komonisáká zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ ya Nzambe?
12 Ndakisa eleki monene ya moto oyo amonisaki zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ ya Nzambe ezali bongo Yesu Klisto. Na mbula ya liboso ya mosala na ye ya kosakola, amonaki bato na mombongo ya lokoso kotekisa biloko na bango kati na lopango ya tempelo. Bayuda oyo bazalaki kouta na bamboka mosusu bakokaki kozala na mposa ya kosombitinya mosolo na bango ya bapaya mpo na kozwa mosolo oyo mokokaki kondimama mpo na mpako ya tempelo. Bazalaki mpe na mposa ya kosomba nyama to ndɛkɛ mpo na kopesa mbeka oyo esɛngamaki na Mibeko ya Nzambe. Lolenge wana ya mombongo esengelaki kosalema na libandá ya lopango ya tempelo. Likambo ya mabe koleka ezalaki oyo ete, bato na mombongo bazalaki kobúba bandeko na bango na kotyáká ntálo oyo eleki ndelo. Lokola azikaki na zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ ya Nzambe, Yesu asalelaki fimbo mpo na kobengana bampate mpe bibwele. Akweisaki mpe bamesa ya basombotani na mosolo, alobaki ete: “Zalisá ndako na Tata na ngai esika na zando te!” (Yoane 2:14-16) Na yango, Yesu akokisaki maloba ya Nzembo 69:9: “Mposa [to, “zúwa,” Bynton] mpo na ndako na yo elei ngai.”
13 Bambula misato na nsima, Yesu amonaki lisusu basáli na mombongo ya lokɔsɔ kosala mosala na bango kati na tempelo ya Yehova. Alingaki kopɛtɔla yango lisusu mpo na mbala ya mibale? Zúwa na ye mpo na losambo ya pɛtɔ ya Yehova ezalaki makasi motindo moko oyo azalaki na yango na ntango abandaki mosala na ye. Abenganaki batéki mpe basómbi. Mpe apesaki ntina makasi ya misala na ye, na kolobáká ete: “Ekomami te ete, ndako na ngai ekobyangama ndako na mabondeli mpo na mabota nyonso? Nde bino bosili kozalisa yango esika na bayibi.” (Malako 11:17) Oyo nde ndakisa kitoko ya kolendendela mpo na oyo etali komonisa zúwa ya malamu!
14. Lolenge nini zúwa ya Yesu mpo na losambo ya pɛtɔ esengeli kozala na bopusi likoló na biso?
14 Bomoto ya Nkolo Yesu oyo asili kokembisama ebongwani te. (Baebele 13:8) Na ekeke ya 20, azali bobele na zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ ya Tata na ye motindo azalaki na yango na ntango azalaki awa na mabelé. Yango ekoki komonana kati na nsango oyo atindaki na masangá nsambo, oyo elobelami kati na mokanda ya Emoniseli. Oyo kokokisama monene na yango ezali komonana lelo oyo, na boumeli ya “Mokolo ya Nkolo.” (Emoniseli 1:10; 2:1–3:22) Kati na emonaneli, ntoma Yoane amonaki Yesu Klisto oyo akembisami, “miso na ye lokola epeleli na mɔ́tɔ.” (Emoniseli 1:14) Yango ezali komonisa ete eloko moko te ezangi komonana na miso ya Klisto wana azali kotalatala masangá mpo na koyeba soki bazali kobatela bopɛtɔ mpe babongi mpo na mosala ya Yehova. Baklisto ya mikolo na biso basengeli kobosana te likebisi oyo Yesu apesaki likoló na likambo litali kosalela bankólo mibale—Nzambe mpe bozwi. (Matai 6:24) Yesu ayebisaki bato ya lisangá ya Laodikia oyo bamipesaki mingi na biloko ya mosuni ete: “Bongo awa ezali yo na mwa mɔ́tɔ moke, nde na mɔ́tɔ te, na mpiɔ mpe te, etikali moke nakosanza yo na monɔkɔ na ngai . . . Na bongo ozala na mɔ́tɔ mpe bongolá motema.” (Emoniseli 3:14-19) Na maloba mpe na ndakisa, bankulutu baponami kati na masangá basengeli kosalisa baninga na bango bandimi ete bápɛngola motambo ya ezaleli ya komipesa mingi na biloko ya mosuni. Bankulutu basengeli mpe kobatela etongá na kobeba ya bizaleli oyo ezali kati na mokili oyo emipesi mingi na makambo ya kosangisa nzoto. Lisusu, basaleli ya Nzambe bakotika nzela soko moke te na bopusi ya lolenge moko to mosusu ya moto oyo akokani na Yesabele kati na lisangá.—Baebele 12:14, 15; Emoniseli 2:20.
15. Lolenge nini ntoma Paulo amekolaki Yesu na komonisáká zúwa mpo na losambo ya Yehova?
15 Ntoma Paulo azalaki momekoli ya Klisto. Mpo na kobatela baklisto oyo bauti kozwa batisimo uta kala mingi te ete bázwama te na bopusi ya elimo ya mabe, alobaki ete: “Nazali na zúwa mpo na bino, zúwa oyo eyokani na mokano ya Nzambe.” (2 Bakolinti 11:2, NW) Liboso na yango, zúwa ya Paulo mpo na losambo ya pɛtɔ epusaki ye na kopesa lisusu malako epai na lisangá yango ete bábimisa mosáli moko na pite oyo aboyaki kobongola motema mpe oyo akokaki kobebisa basusu. Malako mapemami na Nzambe oyo mapesamaki na libaku wana mazali lisungi monene epai na bankulutu wana bazali kosala makasi mpo na kobatela masangá koleka 75 500 ya Batatoli ya Yehova.—1 Bakolinti 5:1, 9-13.
Zúwa ya Nzambe ezali na litomba mpo na libota na ye
16, 17. (a) Na ntango Nzambe apesaki etumbu na Yuda ya kala, ezaleli nini mabota bamonisaki? (b) Nsima ya mibu 70 ya boombo ya Yuda, lolenge nini Yehova amonisaki zúwa na ye mpo na Yelusaleme?
16 Libota ya Yuda batyolamaki na ntango Nzambe apesaki bango etumbu na kotikáká ete bákenda na boombo na Babilone. (Nzembo 137:3) Na zúwa ya koyina, bato ya Edome basungaki nkutu bato ya Babilone ete báyeisa mpasi likoló na libota ya Nzambe, mpe Yehova amonaki likambo yango. (Ezekiele 35:11; 36:15) Wana bazalaki na boombo, baoyo babikaki babongolaki motema, mpe nsima ya mibu 70 Yehova azongisaki bango na mboka na bango.
17 Na ebandeli, libota ya Yuda bazalaki na mawa monene. Engumba Yelusaleme mpe tempelo na yango esilaki kobebisama. Kasi mabota ya zingazinga batɛmɛlaki milende nyonso oyo basalaki lisusu mpo na kotonga tempelo. (Ezela 4:4, 23, 24) Lolenge nini Yehova amiyokaki mpo na yango? Lisoló lipemami lilobi ete: “[Yehova na bibele alobi ete, NW] Nayoki zúwa mpo na Yelusaleme mpe mpo na Siona nazali na zúwa monene. Ngai nayoki mabe mpo na mabota baoyo bafandi na kimya, mpo ete nasilikaki bobele moke nde balekisaki minyoko. Bongo, [Yehova] alobi boye ete, Nabutwi epai na Yelusaleme na mawa mingi; [Yehova] na bibele alobi ete, Ndako na ngai ekotongama wana mpe nsinga ekosembolama likoló na Yelusaleme.” (Zekalia 1:14-16) Azalaki sembo na elaka na ye, tempelo mpe engumba ya Yelusaleme etongamaki lisusu.
18. Likambo nini baklisto ya solo bakutanaki na yango na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?
18 Lisangá ya solo ya boklisto ekutanaki mpe na likambo motindo yango na ekeke oyo ya 20. Na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Yehova apesaki etumbu epai na libota na ye mpamba te bazalaki na bokatikati mpenza te kati na bowelani ya mokili. (Yoane 17:16) Nzambe atikaki ete banguya ya politike enyokola bango, mpe bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba basepelaki mpo na likambo wana ya mawa. Bakonzi ya mangomba bazalaki na molɔngɔ́ ya liboso mpo na kopusa bakonzi ya politike ete bápekisa mosala ya Bayekoli ya Biblia, lolenge bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na eleko wana.—Emoniseli 11:7, 10.
19. Lolenge nini Yehova amonisaki zúwa mpo na losambo na ye uta 1919?
19 Nzokande, Yehova amonisaki zúwa mpo na losambo na ye mpe atɛlɛmisaki lisusu basaleli na ye oyo babongolaki motema na mobu 1919 nsima ya etumba. (Emoniseli 11:11, 12) Mpo na yango, motángo ya basanzoli ya Yehova ebakisamaki kolongwa na 4 000 na 1918 kino koleka bamilió 5 lelo oyo. (Yisaya 60:22) Mosika te, zúwa ya Yehova mpo na losambo na ye ya pɛtɔ ekomonana polele na lolenge ya kokamwa mingi koleka.
Misala ya zúwa ya Nzambe na mikolo mikoya
20. Mosika te Nzambe akosala nini mpo na komonisa zúwa mpo na losambo ya solo?
20 Na boumeli ya bikeke mingi mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba mazali kolanda nzela ya Bayuda ya lipɛngwi oyo batumolaki zúwa ya Yehova. (Ezekiele 8:3, 17, 18) Mosika te, Yehova Nzambe akosala eloko na kotyáká likanisi ya koyina makasi kati na mitema ya batambwisi ya mikili oyo misangani kati na Mabota Masangani. Yango ekopusa banguya wana ya politike na koboma boklisto ya nkombo mpamba mpe mangomba mosusu ya lokuta. (Emoniseli 17:16, 17) Basámbeli ya solo bakobika na etumbu wana ya nsɔ́mɔ. Bakoyanola na maloba ya bikelamu ya likoló oyo bizali koloba ete: “Lobiko, na nkembo, na nguya na Nzambe na biso! . . . Mpo ete akweisi mwasi na pite yango monene [mangomba ya lokuta] oyo abebisaki mokili na pite na ye [mateya na ye ya lokuta mpe lisungi na ye epai na bakonzi ya politike]; abukanisi ye mpo na makila na baombo na ye.”—Emoniseli 19:1, 2.
21. (a) Satana mpe ebongiseli na ye bakosala nini nsima ya kobomama ya lingomba ya lokuta? (b) Nzambe akosala nini mpo na yango?
21 Nini ekosalema nsima na kobebisama ya lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta? Satana akopusa banguya ya politike ete bábundisa basaleli ya Yehova kati na mokili mobimba. Nzambe ya solo akosala nini mpo na likambo wana oyo Satana akosala mpo na komeka kolimwisa losambo ya solo awa na mabelé? Ezekiele 38:19-23 eyebisi biso ete: “[Ngai Yehova] nalobi oyo na kati na zúwa na ngai mpe na kopela na nkele na ngai ete, . . . Nakosambisa ye na maladi mpe na makila; mpe nakonokisa na likoló na ye, mpe na likoló na bibele na ye, mpe na likoló na mabota mingi mazali na ye elongo, mbula monene mpe matandala minene mpe mɔ́tɔ na sufulu. Boye nakomonisa lokumu na ngai mpe bulɛɛ na ngai, mpe nakomiyebisa na miso na mabota mingi, mpe bakoyeba ete ngai nazali [Yehova].”—Talá mpe Sefania 1:18; 3:8.
22. Lolenge nini tokoki komonisa ete tozali na zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ ya Yehova?
22 Ezali mpenza likambo ya kobɔndisa na koyeba ete zúwa ya Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba ebatelaka basámbeli na ye ya solo! Mpo na botɔ́ndi mozindo oyo tozali na yango na ntina na bolamu na ye boleki monene, tiká ete tózala na zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ ya Yehova Nzambe. Na molende nyonso, tiká ete tókóba kosakola nsango malamu mpe tózela na elikya nyonso mokolo monene na ntango Yehova akokembisa mpe akobulisa nkombo na ye monene.—Matai 24:14.
Makambo ya komanyola
◻ Kozala na zúwa mpo na Yehova elimboli nini?
◻ Liteya nini tokoki kozwa kati na ndakisa oyo Bayisalaele ya kala batikaki?
◻ Lolenge nini tokoki kopɛngola kotumola zúwa ya Yehova?
◻ Lolenge nini Nzambe mpe Klisto bamonisaki zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ?
[Etanda na lokasa 12]
Bolingo ezali na zúwa te
NA NTINA na zúwa, Albert Barnes, nganga-mayele na boyekoli ya Biblia na ekeke ya zomi na libwa akomaki ete: “Ezali moko ya balolenge oyo mbala mingi motema mabe emonisamaka, mpe ezali komonisa polele libebi mozindo oyo moto azali na yango kati na ye.” Alobaki lisusu ete: “Ye oyo akoki kolandela bitumba mpe koswana mpe myango nyonso ya mokili uta ebandeli na yango—ata mikano nyonso ya baoyo bazali komitánga baklisto, oyo ezali mpenza kobebisa lokumu ya lingomba na bango mpe ezali kopusa bango na kokanisa na lolenge ya mokili, soki akoki kolandela kino eutelo na yango—akokamwa na komona ete mingi na makambo nyonso wana mautaka na zúwa. Toyokaka motema mpasi ete basusu bazwi bomengo mingi koleka biso; tolingaka kozala na biloko oyo bizali na basusu, atako tozali na lotómo te likoló na yango; mpe ezaleli wana ememeka na myango mabe ndenge na ndenge mpo na kokitisa bosepeli oyo bazwaka na yango, to mpo ete biso moko tózwa yango, to tolingi komonisa ete bazalaka nkutu na biloko mingi te lokola ekanisamaka. . . . mpo ete zúwa oyo ezali kati na biso esepela.”—Baloma 1:29; Yakobo 4:5.
Na kokesana, Barnes amonisaki likambo moko ya ntina mingi litali bolingo, ete yango “ezali na zúwa te.” (1 Bakolinti 13:4) Akomaki ete: “Bolingo ekoyokela baninga zúwa te mpo na esengo oyo bazali na yango; ekosepelaka na bolamu na bango; mpe lokola esengo na bango ezali kobakisama . . . , baoyo bapusami na bolingo . . . bakokitisa yango te; bakoyokisa bango nsɔ́ni te na ntina na bozwi na bango; bakokitisa esengo yango te; bakoimaima te to bakomilelalela te ete bango bazwaki te libaku lileki kitoko bongo. . . . Soki tolingi basusu—soki tozali kosepela mpo na bolamu na bango, mbɛlɛ tokoyokela bango zúwa te.”
[Elilingi na lokasa 10]
Finease azalaki na zúwa mpo na losambo ya pɛtɔ ya Yehova