Témoins de Jéhovah ezali Nkombo ezali mpe Lisangá
MOKOLO ya le 6 octobre 1990, likambo moko ya kokamwa lizalaki kozela ebele ya bato soko 5 000 oyo bayanganaki mpo na likita ya nsuka ya mbula ya la Société Watch Tower na Salle d’assemblées ya ba Témoins de Jéhovah na engumba Jersey City, kati na etuká ya New Jersey, na États-Unis. Mokambi ya likita yango, John E. Barr, ayebisaki na bayangani bobimi ya kasete video ya minutes 55 na motó na likambo Témoins de Jéhovah—ezali Nkombo, ezali mpe Lisangá. Ezalaki kasete video ya liboso oyo la Société abimisaki, kasi ezali ya nsuka te.
Kasete yango ezali komonisa lolenge nini libota na Jéhovah libongisami mpo na kotatola nkombo na Nzambe mpe kosakola “nsango malamu ya Bokonzi.” (Matai 24:14) Biro monene ya Brooklyn, New York, mpe bisika ya mosala na ferme ya la Société Watchtower emonisami polele. Bakasete koleka 500 000 esili kobisama na Lingelesi, mpe ezali sikawa (to ekobima mosika te) na nkota mosusu 26.a
Ebimisaki mayoki nini epai na bato?
Lolenge nini bato oyo bazali ba Témoins de Jéhovah te batalelaki kasete yango? Moto moko ya mombongo akomaki:
“Namonaki ete kasete yango ezali mpenza malamu mingi. Oyo esimbaki ngai ezali lolenge ya malamu mpe ya mayele oyo bililingi bibongisami. Nazalaki mbala na mbala kobosana ete ezalaki kasete mpe kokanisa ete ezali film. Kasete oyo ekozala mpenza na ntina monene mpo na kolimbola malamu mokano ya biro na bino ya monene, na New York. Longonya mpo na esaleli oyo ya kitoko.”—J. J.
Baoyo bazali koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah basili kozwa matomba na kasete yango. Masolo oyo malandi mazali kolimbola mpo na nini:
“Nazali koyekola Biblia elongo na elenge mobali moko ya mibu 20 oyo azali kotanga na université. Ezalela ya kobeba ya mokili ezali kotungisa ye mingi. Kasi, nsima na kotala kasete mpe komona bilenge mibali mingi ya Béthel, baoyo bazali na mokano kati na bomoi, abongolaki makanisi na ye. Ayanganaki na assemblée spéciale ya mokolo moko mpe asengaki ete boyekoli na ye ya Biblia esalama mbala mibale na poso moko. Moyekoli mosusu ya Biblia, molakisi ya mwasi na lycée, asengaki kasete mpo na kolakisa yango na bandeko na ye. Bazalaki liboso kokanisa ete ba Témoins de Jéhovah bazalaki bobele mwa lisangá moko ya mpamba, eyebani mingi te mpe ya moke. Bakamwaki na lolenge ya mosala na biso oyo ezali na mokili mobimba mpe bonene na yango. Matondi mingi na Jéhovah.”—J. B.
“Maloba mazangi mpo na kolimbola esengo naokaki wana namonaki mwasi oyo nazali koyekola Biblia elongo na ye kolela na esengo mpe botondi nsima na komona kasete wana. Alobaki na kolela nyonso: ‘Lolenge nini kososola te ete oyo ezali lisangá ya Nzambe ya solo, Jéhovah? Nayebaki te ete libota motindo oyo likoki kozala.’ Mpe abakisaki ete: ‘Nalingi kozwa batisimo.’”—C. D.
“Tozwaki matomba mingi na kosalela kasete video epai na bayekoli na biso ya Biblia. Mokolo moleki na mpokwa, mobali ya moyekoli ya Biblia ya mwasi na ngai ayaki na ndako na biso. Azalaki motemeli monene. Atalaki kasete video. Na nsima atunaki mituna mpe na bozongi na ye amemaki Biblia mpe mokanda ya boyekoli Biblia Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis. Nzokande liboso atumbaki mikanda nyonso mikolimbolaka Biblia oyo mwasi na ye azalaki na yango!”—D. H.
Bilenge mpe bamonaki ete kasete wana ezali mpenza kosimba motema, lokola emonisami na maloba oyo malandi:
“Nazali na mibu motoba na ndambo. Nasepelaki na eteni oyo ezali komonisa ba Biblia mpe wana bakarto ezali koleka mbango.”—K. W.
“Bana na biso ya mike balobaki ete ezali kitoko koleka bililingi nyonso bilakisamaka na televizio.”—R. C.
“Nsima ya kolanda mpo na mbala ya mibale kasete video, mwana na biso ya mobali ya mibu 5, oyo alandaki yango na likebi mingi, atunaki, ‘Tokoki kotala yango mikolo nyonso?’ Mwana na biso ya mwasi ya mibu 3 andimaki yango na kolobaka ete: ‘Nalingi kokende na Bethel kosala mikanda!”’—M. E.
“Bana na ngai, Robin mpe Shannan, oyo bazali na mibu 12 mpe 9, bazali kotala kasete yango mbala na mbala. Nsima na kotala kasete yango, mwana na ngai ya nsuka ya mwasi alobaki, ‘Nalingaka mingi mosala ya kosakola. Ezali mpenza kosepelisa.’ Tomoni ete kasete oyo esili kosala bopusi makasi likoló ya bomoi na libota na biso. Oyo nde kobondisama na kofungola televizio na yo mpe kolanda yango na kimya nyonso!”—N. B.
“Nazali na mibu zomi na misato na ndambo. Kasete oyo ya sika esalisi ngai na kokanga ntina ete nazalaki kopesa motuya mingi te na bibongiseli kitoko ya Jéhovah. Ezali libaku malamu kozala kati na libota ya Nzambe.”—K. W.
“Nazali na mibu 16, mpe kasete oyo esungi ngai na kososola ete mosala moko ya mokili mobimba mozali kosalama.”—A. M.
“Bana na biso bamonaki ete bibongiseli ya televizio bizali lisusu kitoko te uta basilaki komona lolenge kominanola ya teokratike ekoki kozala. Ekolisaki mpe mposa na bango ya kokota na mosala ya pionnier.”—L. M.
Ata baoyo basili kokóma ba Témoins de Jéhovah uta mibu mingi bakamwaki na oyo bamonaki.
“Soki kasete video oyo ezali na bopusi lolenge wana likoló na biso baoyo tozali kati na libota ya Jéhovah, tokoloba boni mpo na basusu? Wana namoni ete ebongiseli oyo ekómi mpasi mingi na koyikela yango mpiko, nakolekisa ngonga moko mpo na kotala Béthel na esengo nyonso wana efandi ngai na salon na ngai.”—K. B.
“Nsima ya komona lolenge eteni moko na moko ya mosala ezali kosalema na bokengi nyonso, nazali kooka mposa ya kokota na ndako mpo na pepwa mikanda na ngai oyo mikolimbolaka Biblia.”—L. P.
Tozali kolendisa yo ete, ozwa mpe ntango ya kolanda kasete Témoins de Jéhovah—ezali Nkombo, ezali mpe Lisangá. Ekosalisa yo na komonela bomoi na lolenge mosusu mpe ekosunga yo na kokolisa elikya malamu mpo mpo na mikolo mizali koya.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Allemand, arabe, basque, cantonais, catalan, coréen, croate, danois, espagnol, finnois, français, grec, hongrois, italien, japonais, mandarin, néerlandais, norvégien, polonais, portugais (Brésil), portugais (Europe), roumain, slovaque, suédois, tchèque mpe elobeli ya bimimi na américain.