Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/14 lok. 7
  • Video ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Video ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • “Balobeli yango na ndenge ya malamu mpenza!”
    Lamuká!—2016
  • Témoins de Jéhovah ezali Nkombo ezali mpe Lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ndenge ya kokɔta mbala moko na site na biso!
    Lamuká!—2013
  • Les Témoins de Jéhovah : organisés pour proclamer la bonne nouvelle
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 4/14 lok. 7

Video ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia

Na site jw.org, bato mingi bazali kotala video moko ya mokuse, oyo ezali na motó ya likambo Mpo na nini koyekola Biblia? Video yango ebongisami mpo na kolendisa bato oyo basepelaka na mateya ya solo bándima koyekola Biblia ofele elongo na biso. Okoki kotala video yango na Internet, soki kaka ofungoli, na nse, esika bakomi “Sɛngá koyekola Biblia,” to soki osaleli kode (QR) oyo ezali na lokasa ya nsuka ya batrakte nyonso ya sika. Tótalela ndenge mosusu oyo tokoki kosalela malamu video yango.

  • Ntango ozongeli moto, okoki koloba na ye boye: “Nakoki kolakisa yo video moko ya mokuse oyo elimboli ndenge oyo okoki kozwa biyano na mituna ya Biblia oyo omitunaka?” Soki andimi, lakisá ye video yango na aparɛyi na yo to na ordinatɛrɛ na ye.

  • Soki opesi moto trakte moko ya sika ntango ozali kopesa litatoli ya libaku malamu to na esika ya bato mingi, lakisá ye kode oyo ezali na lokasa ya nsuka mpe lendisá ye asalela kode yango na aparɛyi na ye. Lokola na minɔkɔ mingi kode yango ezali komema moto mbala moko esika video yango ezali na Internet, okoki kolakisa moto video yango na aparɛyi na yo.

  • Lobelá video yango epai ya baninga ya mosala, ya kelasi, bandeko ya libota, mpe bato mosusu oyo oyebani na bango mpe sɛngá ete olakisa bango yango. Okoki mpe kotindela bango mesaje oyo soki bafungoli ekomema bango na video yango, mpe sɛngá bango bátala yango bango moko.

Soki tosaleli malamu video yango ya sika, tokoki kobanda koyekola na bato ebele Biblia, mpe kosalisa ‘baoyo bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko.’​—Mis. 13:48.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto