‘Makoló mazali kosakola . . .’
Na ntaka ya bakilometele soko 150 000 000 na esika ozali sikawa, moi mozali kongala na kongenga monene kati na makoló. Etalelami na boumeli ya bankoto ya mbula lokola nzambe, nzokande moninga na biso ya makoló ezali litatoli ya nguya monene ya Mozalisi, “Mokeli ya likoló mpe mabelé.” (Nzembo 115:15) Kongenga na yango mpe molungé na yango ezali na ntina monene mpo na bomoi na mabelé. Makambo oyo bato na mayele basili koyekola na ntina na yango mazali kokamwisa biso mingi.
Bazali koyebisa biso ete moi ezali kobimisa móto mingi. Oyebaka ete bobele katikati ya ndambo moko ya miliare ya kongenga mpe molunge ya moi nde ezali kokóma na mabelé? Atako bongo, nguya oyo ezwami ezali mpenza mingi, penepene na 180 000 000 000 000 ya ba kilowatts na minute moko moko.
Lolenge nini moi mozali kobimisa mɔ́tɔ nyonso wana? Na nzela na litumbu monene oyo ezali na katikati na yango mpe, oyo ezali kobimisa mɔ́tɔ na kozikisaka penepene na 3,6 milió ya tonnes ya hydrogène na seconde moko. Likambo na esengo mpo na bato ezali ete, moi ezali na bipeliseli wana mingi mpo na kolandisa mosala na yango na boumeli ya bamiliare mingi ya bambula.
Makambo mosusu oyo bato na mayele basili koyekola mazali kobimisa mituna misusu. Na ndakisa, moi mozali ntango nyonso kotetemeka, lokola linzanza oyo etutami na marto. Mpo na nini? Lisusu, tala likambo oyo: eteni eleki mɔ́tɔ kati na moi ezali motema na yango oyo ezali kopela, soki eteni moko ezali mosika na motema, molungé na yango ezali moke. Kasi soki tokómi na loposo oyo ezali mpenza libanda, oyo ebyangami couronne, makambo mazali lisusu bongo te. Couronne ezali na mɔ́tɔ makasi koleka biteni oyo bizali penepene na motema. Mpo na ntina nini?
Lisusu, wana—lokola mabelé—moi mozali kobaluka zingazinga na yango moko, biteni na yango bizali kobaluka na lomango ndenge moko te. Na ndakisa, biteni oyo bizali libanda bizali kobaluka mbangu mingi koleka biteni ya kati. Mpo na nini? Mpe lolenge nini ezali kosalema bongo? Ezali mpe na oyo ebyangami matutu ya moi. Matutu yango likoló na moi mazali kobima mpe kolimwa engebene ebongiseli moko ya sikisiki ya mibu 11. Mpo na nini mazali kobongwana na lolenge wana ya kokoka?
Atako ezali na makambo mingi tosengeli koyekola na ntina ya moi, nzokande oyo toyebi ezali kotinda biso na kosanzola Mozalisi na yango, Jéhovah. Ntango nyonso oyo tozali komona moi, tozali kokanisa ete “Makoló mazali kosakola nkembo na Nzambe; etando ekoyebisaka misala na maboko na ye.”—Nzembo 19:1.