Kosakolama ya nsango malamu na Maputo—Mboka-mokonzi kitoko ya Mozambique
Na 1991, mosala ya ba Témoins de Jéhovah endimamaki na bakonzi ya mboka Mozambique. Kobanda ntango wana, mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ezali kokola na motindo ya kokamwa kati na mokili wana ya moi makasi, oyo ezali na sud-est ya Afrique, penepene na mai monene. Lisolo lilandi ekolimbola motindo mosala ya koteya Biblia ezali kosalama na Mozambique, mingi mpenza zingazinga na Maputo, mboka-mokonzi.
MPO na bopusi na mai monene océan Indien oyo mai na yango ezali na mwa moto, ezali kotinda mopepe kitoko na Mozambique, molunge mingi te, malili mpe mingi te. Penepene na mai monene, ezali na mabóngo kitoko oyo na pembeni na yango baloni banzeté na mbila mpe elandani na bangomba ya pauni. Ekoteli monene oyo ezali epai na ngele epesi nzela ete mboka-mokonzi. Maputo, etyama na esika wana kitoko.
Nzokande, kitoko mpe kimya ya mokili wana ekeseni mpenza na lisolo na yango ya kala oyo etondi na makambo ya mabe. Na boumeli na bikeke mingi, Mozambique ebundaki mpo na kotemela boyangeli ya bapaya, liboso oyo ya Baarabe mpe nsima ba Portugais. Ba Portugais bazwaki lisungi na Lingomba ya Katolike mpo na kopunza mokili wana na bozwi na yango: pembe na nzoku, wolo mpe baombo. Na nsuka, nsima na bikeke mingi bonyokoli ya ba Portugais, kowelana makasi ya bana mboka ebandaki, oyo etindaki na lipanda ya ekolo na 1975. Kasi na mawa, mbongwana yango epesaki kimya te mpo ete ekolo ekotaki kati na etumba ya bana mboka. Ebele na bato banyokwamaki na likama yango, mingi mpenza bafandi na bamboka oyo basali likambo moko te.
Maputo, mboka-mokonzi
Na boumeli na bambula zomi oyo euti koleka, ebele na ba Mozambicains bakimaki epai na bingumba oyo bizali na libateli. Likambo yango lizali mpenza komonana na Maputo, epai okokuta bandako na etongeli ya ba Portugais, oyo ezali kobenda likebi, mpe mitindo ya Afrika, bosangani oyo ezali kopesa engumba nguya na yango. Wana ozali kotambola na balabala minene oyo na bapembeni na yango baloni banzeté na Maputo, likambo ya liboso oyo ekobenda likebi na yo ezali ebele na bato bazali kokende na misala na bango. Kasi okososola bokesene moko. Rodrigo, oyo azali misionere na Maputo amonisi, “Ata motuya monene na bato mpe mikakatano na bomoi, bazali ntango nyonso na bilongi na esengo.” “Okoki mpenza te kokutana na bato bazangi bonkonde.” Ba Mozambicains bazali solo na lokumu malamu ya kozala na móto mpe na boninga mingi.
Ezali polele ete, bato bakutanaka mingi na zando, lokola bipai nyonso na mikili ya Afrika. Mpo na kokende na zando, osengeli komata na Chapa 100, nkombo epesami na ebele na mituka ya komema bato. Lokola na momeseno, emonani ete libanda na motuka bato bazalaka mingi koleka na kati. Mbala mosusu kotambola na makolo eleki malamu.
Bafandi na Mozambique bamipesi mingi na mombongo. Na Maputo, mopaya akozanga te komona molende na bango ya kotanda biloko na maboke ya mike mingi pembeni na balabala mpe na bizwanelo ya banzela. Ozali na mposa ya kosomba mbuma ya kitoko, ndunda, matiti ya solo kitoko to pilipili? Eleki mpenza mingi. Okangisi nini mpo na soso ya bomoi, ndika ya pome, to kekele mpo na kotonga ndako na yo? Bazali pene na kosala nyonso mpo na yo mpe na esengo. Bakosenga ete batya cirage na sapato na yo to basukola motuka na yo. Na ebende moko ya moto elongo na plastique, bilenge mibali bakoki kosenga ete batya mikanda na yo ya motuya mingi kati na plastique mpo na kobatela yango.
Mpo na koloba solo, mibeko na mboka mipesi nzela te na mombongo oyo ezali kosalema na balabala. Batekisi oyo bandimami na mibeko te babyangami dumba nenge, oyo elimboli “mibikisa na makolo na yo.” Ezali bongo mpamba te soki bakonzi bayei kotala makambo, basengeli kokima nokinoki mpo na kobatela mwa mombongo na bango.
Bobele na nsolo, okoyeba mpenza ete zando ya mbisi ezali mosika te! Penepene na mabongo ya Costa do Sol, okoki komona nsima na midi, na pwasa bato ebele bakei kotondana pene na esika mas·wa ya koloba mbisi ememi mbisi oyo bakangaki na mokolo yango. Longola bambisi ya monene ndenge na ndenge mpe ya lolenge ndenge na ndenge, okokuta lisusu mangáto, minsania ya minene, mpe mingi mpenza minsania ya Mozambique, oyo miyebani mingi. Atako bongo, okoki mbala mosusu kosepela na motindo mosusu ya koloba mbisi oyo ezali kosalema na Maputo mpe zingazinga na yango.
“Balobi na bato”
Kobanda bandimamaki na mibeko na Mozambique, ba Témoins de Jéhovah bazali koyambama malamu na bato. Mobali moko amonisaki bosepeli na ye mpo na Batemwe na maloba oyo: “Na Londres, nazalaki komona ebele ya ba Témoins de Jéhovah na balabala. Epai nyonso nazali kokende nazali kokutana na bango. Nazali na esengo ya komona bino awa mpe.”
Lokola bato bazali kozwa Biblia mpe mikanda mikolimbola Biblia na monoko ya portugais mpe ya tsonga, minoko milobamaka na mboka, emonisi ete bazali na mposa na makambo na elimo. Paula, oyo azali mpe misionere, ayebisi ete mokolo na pɔsɔ na ntɔngɔ, okoki kokabola kino bazulunalo 50 na zando monene. Mokanda Les jeunes s’interrogent—Réponses pratiques elingami mpenza mingi koleka. Bilenge mingi balongwa na bamboka na bango to batikala bitike mpo na bitumba, emonani ete bazali kosepela mingi na motindo na bomoi moyebisami kati na mokanda yango mpe na batoli oyo ezali kopesa.
Na motindo ya Afrika, elingi koloba pwasa, bituluku na bato mingi oyo bazali kosepela na nsango ya bokonzi, bakozingaka misionere moko mpo na koyoka ye. Biyanganelo motindo yango epesaka mbala mingi nzela na masolo kitoko ya Biblia. Ndeko mwasi moko azali komikundwela likambo moko ya kosepelisa.
“Mokolo moko, wana nazalaki kosakola na balabala mpe jeep moko ya basoda eyaki kotelema na mbala kaka penepene na ngai. Nabangaki makasi lokola naino ekomela ngai te. Soda moko elenge angangaki epai na bato bazalaki wana: ‘Hé, bino kuna, boloba na mwasi wana aya awa.’ Ntango nabelemaki pene na ye, soda yango azalaki na elongi ya esengo mpe alobaki na ngai: ‘Bozali bato malamu. Tozali na esengo ete bozali awa. Nakanisi bozali na mokanda moko kitoko oyo ezali kolobela na ntina na bilenge. Ngai mpe nazali koluka ete nazwa moko na yango.’ Nayanolaki ye ete nazalaki lisusu na yango te, mpe nalakaki ye ete soki tozwi yango nakomemela ye moko.”
Dépót ya kokabola mikanda
Mpo na kokokisa lisengi monene ya mikanda oyo ezali ntango nyonso kokola, filiale ya la Société Watch Tower na Afrique du Sud ezali kotinda mikanda na dépôt ya Maputo mbala mibale na sanza. Misionere moko, Manuel, azali kobatela dépôt mpe azali na mokumba ya kobongisa kokabolama ya mikanda.
Mokolo moko na ntɔngɔ, mobali moko ya mibu soko ntuku mitano azalaki koleka penepene na dépôt mpe atunaki Manuel soki esika yango ezalaki mpo na mosala nini. Manuel alimbwelaki ye ete ezalaki dépôt ya mikanda mikolimbolaka Biblia. Mobali yango alandaki nzela na ye, kasi naino minute moko esilaki te azongaki lisusu.
Atunaki: “Olobi ete ezali mikanda ya kolimbola Biblia, boye te?”
Manuel azongiselaki ye, “Ezali bongo.”
Atunaki lisusu, “Ezali ya lingomba nini?”
Manuel azongiselaki ye ete: “Ya ba Témoins de Jéhovah,” mpe abakisaki: “Tozali kotinda mikanda yango na masangá oyo mazali awa na mboka.”
“Ah! ba Témoins de Jéhovah!” Elongi na ye efungwanaki. “Epai moko, nalingaka mingi mosala oyo bozali kosala, kasi epai mosusu ezali na likambo moko oyo nalingaka te epai na bino.”
Manuel atunaki ye na mayele, “Ah solo! Bongo nini oyo olingaka?”
Mobali yango alimbolaki ye ete “Namonaka ete mikanda oyo bonyataka mizali mpenza na makambo kitoko mpe ya kopesa mayele. Nzokande, likambo nalingaka te, ezali ete nakokaka te kozwa yango na lolenge oyo ngai nalingi. Kanisa naino motindo nini, biso awa na Maputo, tozali na mposa na mikanda lokola oyo bozali na yango.” Na nsima, abimisaki liste etandami na mikanda minyatami na la Société, oyo azangaki, kati na yango ebele na banimero ya bazulunalo Mosenzeli mpe Réveillez-vous!
Ayebisaki na Manuel ete, “Nazalaka na liste yango ntango nyonso. Na motindo yango, mbala nyonso oyo nakutanaka na ba Témoins de Jéhovah, nalukaka kosomba mikanda nyonso oyo bazali na yango. Soki okolukela ngai oyo etyami awa na liste, nazali koleka yo ete nakosomba yango ata ezali motuya boni.”
Lisolo elandanaki. Na nzela yango nde Manuel ayaki koyeba ete mobali yango akutanaki na ba Témoins de Jéhovah mpo na mbala ya liboso na bambula 1950, ntango atangaki mokanda Création. Kasi lokola mosala na ba Témoins de Jéhovah epekisamaki na nse ya boyangeli ya ba Portugais, asalaki bokoli bobele moke.
Na nsima, ntango Manuel akendeki kotala mobali yango na esika na ye ya mosala, amonaki ete mikanda nyonso ya la Société oyo azalaki na yango etyamaki malamu na molongo kati bikangelo na plastique. Manuel amemelaki ye mikanda oyo azali koluka mpo na kobakisa mikanda oyo mizangaki na ebombelo na ye, mpe azwaki bibongiseli mpo na kobanda boyekoli na Biblia elongo na mobali yango mpe libota na ye.
Mosala nyonso ya kolona mpe komwangisa mai na elimo ebandi kobota mbuma mingi, mpo ete Nzambe azali kolanda ‘kokolisa yango.’ Ezali polele ete kobuka mbuma na bato na motema sembo ezali kokola na motindo ya kokamwa na Mozambique.—1 Bakolinti 3:6; Yoane 4:36.
Bokoli ya teokratike atako bankaka ezali
Atako lelo oyo masangá mazali koleka 50 na Maputo mpe zingazinga na yango, nzokande moko te ezali na Salle du Royaume. Mpo na nini bongo? Mpo na nkaka ya makambo na nkita, masangá makokaki te kotonga ba salles, atako mingi bazwaki bisika bambula mingi liboso.a
Nzokande, bankaka motindo yango elongi te kopekisa bokoli. Lelo oyo boyekoli ya Biblia koleka 5 000 ezali kotambolisama na sud ya Mozambique. Bato oyo bazali koluka koyekola Biblia baleki mingi, yango wana esengeli kotalela esika matomba mazali mingi: Soki moto asengi koyekola Biblia, emonani mbala mingi lokola ete asengeli mpe kosangana na makita nyonso ya lisangá.
Lisangá moko ya basakoli ya nsango malamu 71 oyo ezali na kartyé ya bobola ezwaki kala mingi te motango ya bato 189 na makita na mokolo ya yenga. Etuluku wana monene eyanganaki na esika ya polele kati na lopango ya moto moko. Esika yango ezipami na manzanza mpe na lokala zingazinga na lopango. Liboso na likita nyonso libanda lizali kokombama, mpe mingi kati na bayangani, ata mikolo, bazali kofanda na matoko ya kekele matyami na mabelé. Mpe bazali kolanda boyekoli na likebi monene! Kati na bato ya sika, mingi bazalaka na Mosenzeli te mpo na kolanda boyekoli, yango wana bazali komimesenisa na kolanda botangi ya baparagrafe na likebi monene, mpe mingi na bayangani bazali kotombola mosapi mpo na koyanola na mituna oyo motambwisi azali kotuna.
Lisangá mosusu ya basakoli 59 ezali kozwa mbala na mbala bayangani 140. Bazali koyangana na libanda liboso ya ndako. Kasi na ntango na mbula, lisangá mobimba bazali kotondona kati na biteni mibale ya ndako moko moke. Bato oyo batikali bazali kotelema na bilekelo, na kuku mpe na veranda. Awa lisusu, bosepeli mpe likebi na moto na moto, ata ya bana, mpo na kolanda boyekoli ezali mpenza komonana.
Na ba assemblée nde makoki ya bokoli monene na mikolo mizali koya mamonanaka polele. Kala mingi te, assemblée moko ya circonscription esalamaki na esika ya kala ya masano na katikati na engumba. Kanisa kokamwa na basakoli soko 3 000 ntango bamonaki bato koleka 10 000 oyo bayaki na assemblée.
“Mosala ya kobuka mbuma ezali monene”
Makambo lokola oyo mazali komonisa polele ete mosala monene ezali naino na Mozambique. Masangá mosusu mauti bobele koyamba mpo na mbala ya liboso bakengeli ya zongazonga oyo batindami na bureau ya filiale. Bandeko bazali kozwa lisalisi mingi mpo na lolenge malamu ya kobongisa masangá.
Masangá mazali mpe kosepela mingi na bamisionere ya Galaad oyo bauti kokoma kala mingi te. Francisco, nkulutu moko ya Maputo, alobaki: “Oyo ezali mpo na biso litambe ya ntina mingi mpo na kokende liboso. Tozalaki na molende. Tozalaki na bolingo. Kasi totikalaki nsima mpo na makambo matali myango mibongi mpo na kotambwisa masangá. Oyo tozali na yango mpenza mposa, ezali moto oyo akomonisa biso motindo nini makambo masengeli kosalama. Sikawa, tozali na esengo ya kozala na bamisionere elongo na biso.”
Bamisionere mpe bazali na esengo ya kosalela bandeko na bango. Hans, nsima na kosala mibu 20 ya mosala ya misionere na mokili ya Brezile, auti kotindama na Mozambique, mpe amonisi na mokuse likambo yango na lolenge oyo: “Kosala na teritware ya Mozambique ezali mpenza libaku malamu! Tozali komona ete bokoli moko monene elingi kosalema awa. Mosala ezali mingi. Bobele na Maputo bamisionere ata 10 to 20 bakozala na ntina mingi awa.”
Bokoli na mosala ya teokratike oyo ezali kosalama sikawa na Mozambique ezali kokundwela maloba oyo ya Yesu: “Mbuma na elanga eteli mingi mpenza, kasi basali bazali mingi te. Bobondela Nkolo na elanga ete atinda basali kati na elanga na mbuma na ye.” (Matai 9:37, 38) Tozali na bantina nyonso ya kondimisama ete Jéhovah akoyoka bileli mpo na basaleli na ye na Mozambique.
Bankóto na ba Témoins de Jéhovah balekisaki mibu 12 to koleka na babolokɔ na nord-ouest ya Mozambique. Ntango bamoko na bango bautaki kozonga kala mingi te na Maputo, biloko nyonso ya mosuni oyo bazalaki na yango ezalaki mwa eteni ya elamba oyo bakangaki na loketo. Bozwi mingi oyo bazalaki na yango ezalaki kondima! Makabo ya bilei mpe bilamba mapesamaki na bolingo na bandeko na bango Batemwe ya mikili ya zinganzinga, mpo na kosunga bango na kozwa ebandeli malamu kati na bomoi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ata soki moto moko akoki kozwa mosala, lifuti na ye ya sanza ezali katikati na ba dollars 20 mpe 30 (Zaïres 12 000 000 mpe 18 000 000).
[Elilingi na lokasa 23]
Kati na masangá, ebele na bandeko basanganaka na mosala ya kopesa litatoli mokolo na pɔsɔ na ntɔngɔ
[Bililingi na lokasa 24]
Toluka koyeba Jaimito, mwana na mbula mitano. Abotamaki na bolokɔ. Lelo oyo, baboti na Jaimito bazali na esengo ya kozonga na Maputo. Poso na pɔsɔ, Francisco, tata na Jaimito, azali kobongisa libota mobimba mpo na boyekoli ya Biblia. Baboti nyonso mibale bazali kopesa ntango mingi mpo na kosunga bana na bango na kokoma bateyi malamu kati na mosala ya kosakola. Jaimito asepelaka mingi na kokabola mikanda na zando monene
[Elilingi na lokasa 25]
Atako masangá mazali na Salle du Royaume te, bokoli na yango epekisami te. Mbala mingi, motuya na bayangani na makita elekaka mbala mibale motuya na basakoli