Osili kotanga motuya?
“NINI! Olingi koboya lipesi ya kitoko lokola oyo?” Kalaki mokonzi azalaki na mpasi mpo na kondima likambo oyo auti koyoka. Mosali oyo azalaki nsima na ye, mwasi moko oyo amemyami mingi mpo na makoki mpe etamboli kitoko na ye, auti koboya likabo ya kokende na mokili ya bapaya koyekola mpo na mbula mibale na mbongo na kompanyi. Mpo na nini asalaki bongo?
Mwasi yango alimboli ete, kondima lipesi wana elimbolaki kokabwana na mobali mpe bana na ye mibale mpo na bambula mibale. Alingaki kozanga bango mpo na ntango molai. Mingi koleka, alingaki kosundola mikumba mipesameli ye na Nzambe, ya kozala mwasi ya libala mpe mama kati na libota. Asengelaki kofuta motuya monene mpo na bamposa ya mayoki mpe ya elimo. Na yango, nsima na kotanga motuya, azwaki ekateli ya koboya lipesi yango.
Soki ozalaki na esika na ye olingaki kosala nini? Ntembe ezali te ete bato nyonso te bakoki kosepela na ekateli oyo mwasi moklisto wana azwaki. Basusu, lokola baninga na ye ya mosala, bazali kokanisa ete, na koboya libaku wana kitoko azali kobungisa mwango malamu ya kopusama liboso kati na mosala na ye. Bato mosusu bakoki mpe koloba mabe mpo na ye ete azali kokanisa te mpo na avenir ya libota na ye, mpo ete mbula mibale ekokaki koleka nokinoki. Nzokande, ekateli na ye ezalaki te ya mbala moko kozanga kokanisa to bobele ya mayoki mpamba. Ekateli na ye ezwamaki nsima na kokanisa malamu mpe na boyokani na mitinda ya mayele. Mitinda nini?
Eleki kokanisa malamu
Kati na moko na masese na ye, moto oyo alekaki bato nyonso na mayele awa na mabelé, Yesu Klisto, alakisaki nzela oyo ebongi kolanda. Abimisaki motuna oyo: “Nani kati na bino, soko alingi kotonga ndako molai akofanda naino te kotanga motuya na yango, kotala soko azali na mosolo ya kosilisa yango?” “Soki boye te, akotya moboko, mpe soki akoki kosilisa yango te, bango nyonso bakotala yango bakobanda koseka ye ete, ‘Moto oyo awa abandaki kotonga nde akokaki kosilisa yango te.’”—Luka 14:28-30.
Moto nyonso akondima ete ezali likambo na mayele kotanga motuya liboso na kozwa ekateli ya kosala likambo nyonso ya ntina mingi. Na ndakisa, soki moto moko alingi kosomba ndako, akomibwaka nokinoki na kotya maboko na mikanda ya boyokani kozanga ata koyeba motuya na yango to komindimisa ete azali na mosolo ya kosomba yango? Soki asali bongo, ekomonana solo lokola ebebe. Ya solo, mayele ezali kosenga ete moto nyonso oyo alingi kobanda mosala moko atanga liboso motuya na yango.
Bongo, likambo nini ya ntina Yesu alingaki komonisa kati na lisese na ye? Mwa moke liboso na kopesa lisese yango alobaki: “Ye oyo akomema nzete na ye ya mpasi te mpe akolanda ngai te akoki kozala moyekoli na ngai te.” (Luka 14:27) Bongo, na kotalela zingazinga na lisolo, Yesu azalaki te kopesa bobele toli ya mayele na makambo na biso, lokola makambo matali misala ya mokolo na mokolo. Kasi azalaki nde kolobela kotanga motuya na boyokani na likambo ya kokoma moyekoli na ye.
Kati na lisese na ye, Yesu amonisaki ete kokoma moyekoli na ye ezali kotinda na kosala mbongwana mpe kondima komipesa. Mpo na nini? Mpo ete ebongiseli ya biloko ya ntango oyo ezali bobele na mokano ya mosuni mpe etambwisami na moimi. Ntalo monene na bato babendami mpenza epai na kokokisama ya bamposa na bango ya mosuni, mpe bazali kotya likebi bobele moke to mpe te na mposa na bango ya elimo mpe na boyokani na bango elongo na Nzambe. (2 Timoté 3:1-4) Nzokande, ezalela to elimo motindo yango ekeseni mpenza na oyo Yesu amonisaki. Alobaki ete, “Mwana na moto ayaki, te mpo basalela ye, kasi mpo na kosalela mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato mingi.” Apesaki motuya mingi koleka na makambo na elimo kasi na biloko ya mosuni te, mpe alobaki: “Ezali elimo nde ekopesaka bomoi; mosuni ezali na lisungi moko te.”—Matai 20:28; Yoane 6:63.
Mpo na yango, wana Yesu apesaki toli na baoyo balingaki kokoma bayekoli na ye ete batanga motuya, azalaki kolobela liboso mpenza mpo na motuya na biloko ya elimo, kasi mpo na biloko ya mosuni te. Nini ezalaki na matomba mingi mpo na bango: bozwi ya mosuni oyo mokili ezali kopesa, to matomba ya elimo oyo mazwami mpo ete bazali bayekoli na Yesu? Yango wana nsima na koyebisa lisese yango mpe lisese mosusu oyo eyokanaki na yango, Yesu asukisaki ete: “Bobele bongo, [soko] moto na moto kati na bino akotika te biloko nyonso bizali na ye, akoki kozala moyekoli na ngai te.” (Luka 14:33) Ye oyo alingi kokoma moyekoli na Yesu akondima komipesa motindo yango, to motuya yango moleki makasi mpo na ye?
Kozala na bokatikati
Atako biloko ya mosuni bikoki kopesa nokinoki matomba oyo mazali komonana, nzokande matomba ya kokangama na makambo ya elimo mazali koumela mpe kosepelisa mingi koleka. Yesu amonisaki likanisi oyo: “Bomibombela biloko na motuya na nse te, awa nyama ya mike mpe mabanga ekolyaka, mpe awa miyibi bakokotaka mpe bakobotola. Kasi, bomibombela biloko na motuya na likoló, esika nyama mike mpe mabanga ekolyaka te, mpe esika miyibi bakokonaka te mpe bakobotola te.” (Matai 6:19, 20) Na mikolo na biso, kokita ya mosolo, kobeba ya nkita, kokwea ya ba banques, mpe bongo na bongo epesaki mpasi mingi na ebele ya bato oyo batyaki motema mobima na bozwi ya mosuni. Nzokande ntomá Paulo alendisaki biso “na kotya miso na biso, te likoló na biloko bizali komonana, kasi likoló na biloko bikomonanaka te. Mpo ete biloko bizali komonana bikoumelaka te, kasi biloko bikomonanaka te bikoumela seko.” (2 Kolinti 4:18) Bongo, lolenge nini tokoki kolona ezaleli ya elimo motindo yango?
Tokoki kosala bongo na komekolaka ndakisa na biso, Yesu Klisto. Ntango azalaki na mabelé, azalaki koboya bisengo nyonso te, lokola yango emonisami na likambo oyo ete azalaki mbala mosusu kosangana na bilambo ya mabala mpe na mabaku ya bolei epai na bato. Nzokande, apesaki na makambo ya elimo esika ya liboso kati na bomoi na ye. Mpo ete akokisa mokano na Tata na ye, azalaki ata komipimela makambo mosusu ya ntina mpo na bomoi. Na libaku moko alobaki: “Nkaza bazali na mabulu, ndeke na likolo bazali na ndako, nde Mwana na moto azali na esika na kolalisa motó na ye te.” (Luka 9:58) Atalelaki kokokisama na mokano ya Tata na ye lokola likambo ya ntina monene mpe ya kopesa esengo, kino alobaki na mayoki ya mozindo ete: “Bilei na ngai ezali kokokisa mokano na motindi na ngai mpe ya kosilisa mosala na ye.”—Yoane 4:34.
Yesu amonisaki biloko nini azalaki kopesa na yango motuya mingi ntango aboyaki masenginya ya Satana. Satana alingaki kobenda Yesu ete asalela nguya oyo Nzambe apesaki ye mpo na kozwila yango matomba na Ye moko, mpo na kokokisa bamposa na ye ya mosuni mpe koluka nkembo mpe koyebana mingi kati na mokili. Yesu ayebaki malamu ete akokaki kozwa oyo ezali kobyangama ete matomba bobele na lifuti eleki monene—kobungisa kondimama na Nzambe—motuya monene koleka oyo alingaki kopesa mpo ete abateli boyokani malamu elongo na Tata na ye liboso na makambo mosusu. Yango wana, na motema moko, aboyaki lipesi na Satana kozanga kokakatana.—Matai 4:1-10.
Na ntembe te, lokola tozali bayekoli na Klisto, tolingi kotalela motuya na biloko na motindo na Nkolo na biso. Na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo etambwisami na Satana, biloko mingi bikoki komonana lokola bikopesa matomba malamu, nzokande ekoki solo kobebisa boyokani na biso elongo na Nzambe. Makambo lokola koluka etelemelo na lokumu kati na mosala, kolanda bakelasi milai mpo na kotombola etelemelo na biso, koluka kobalana elongo na moto azangi kondima to komikotisa kati na mobongo ezangi kolongobana ekoki noki komema biso na kobungisa kondima mpe na nsuka kobungisa ngolu na Jéhovah. Tosengeli kotanga malamu motuya ntango tokutani na komekama motindo yango.
Mayele ya solo ezali libateli
Esili koleka mwa bambula, elenge mobali moko moklisto, mofandi na engumba moko monene epai na ebimelo ya ntango, azwaki libaku ya kokende na mokili mosusu kokolisa boyekoli na ye. Atako azalaki moto oyo atangaki mingi mpe azalaki na mosala oyo ezali na lifuti malamu, amonaki ete ekoki te; alingaki kobongisa ezalela na bomoi na ye. Baninga na ye baklisto bamekaki kotalela elongo na ye makanisi ya Makomami oyo touti kolobela, kasi alingaki kobongola makanisi na ye te mpe alandaki kokokisa mokano na ye. Atako na ebandeli amekaki kokangama na kondima na ye, mokemoke abandaki kobungisa mposa na ye mpo na solo ya Biblia, mpe ntembe ebandaki kokotela ye. Nsima na mbula bobele moko, to penepene na yango, abungisaki kondima na ye nyonso mpe akomaki koloba ete ayebi te soko Nzambe azali to azali te. Ya solo, azwaki mpenza mapolomi eleki monene kati na biteyelo ye mokili, likambo oyo epesaki ye mwa bosepeli. Kasi, oyo nde motuya monene ye afutaki mpo na lokumu ya mwa ntango moke—kozindisama ya kondima na ye mpe likama ye kobungisa bomoi na seko!—1 Timoté 1:19.
Epai mosusu, baoyo bazali kolinga te ete eloko moko etya na likama boyokani na bango elongo na Nzambe basili kozwa mapamboli mingi epai na Jéhovah.
Tozali na ndakisa ya elenge mobali moko oyo azalaki na mwa kompanyi ya bobongisi bandako, bobele na engumba moko oyo tolobeli awa na likolo. Bobele mwa basanza nsima na kobanda boyekoli elongo na ba Témoins de Jéhovah, akutanaki na lipesi moko oyo ezalaki lokola komekama mpo na ye—kosala mosala moko ya kobongisa ndako ya kala mpo na lifuti ya 80 000 dollars [US]. Nzokande, mosala yango ezalaki kosenga ete abuka mibeko ya botongi mpe asala ndako na motindo mopekisami na mibeko na bakonzi. Lokola asilaki koyekola ete baklisto basengeli kotosa mibeko, asosolaki ete kondima mosala yango elimbolaki kobungisa kondimama na ye epai na Nzambe. (Baloma 13:1, 2) Nsima na kotalela malamumalamu likambo yango, aboyaki lipesi wana. Epesaki ye litomba nini? Misala wana ya kondima misalaki bopusi makasi likoló na kondima na ye. Na boumeli na mbula yango, asalaki bokoli oyo ememaki ye na komipesa mpe na kozwa batisimo. Atekaki mwa kompanyi na ye mpe azwaki mosala oyo ezali kotikela ye ntango mingi mpo na kolanda bokoli na ye ya elimo. Sikawa azali kosalela Jéhovah na esengo mpe na molende.
Bilenge yango nyonso mibale bazangaki motuya. Nini etye bokesene kati na liponi na bango? Mayele mauti na Nzambe! Ndenge nini? Mayele mazali makoki ya kosalela boyebi na motindo ete epesa ntango nyonso matomba ya koumela, mpe mayele mauti na Nzambe malimboli kosalela boyebi na boyokani na mokano na Nzambe mpo na biso. Atako bilenge yango nyonso mibale bazalaki na boyebi ya Biblia, nzokande kosalelama na yango ememi bango na bosukisi bokeseni. Mokanda na Masese elobi: “Ntango mayele ekokota na motema na yo mpe boyebi ekoyokama malamu na molimo na yo, makoki ya kokanisa ekobatela yo, bososoli yango moko ekozala libateli na yo, mpo na kolongola yo na nzela mabe.”—Masese 2:10-12, MN.
Liloba na Nzambe, Biblia, lizali liziba ya mayele ya solo epai okoki komibalola mpo na kozwa litambwisi ntango olingi kokamata bikateli ya minene. Na esika ya komimona yo moko moto na mayele, landa toli oyo: “Talela Jéhovah na motema na yo mobimba mpe ndima bososoli na yo moko te. Na nzela na yo nyonso, talela ye mpe ye akosembola bilekelo na yo.” (Masese 3:5, 6) Tosengeli kozala na komikitisa mpe kolinga ete tolakisama, toboya elimo ya motó makasi mpe ya lipanda oyo ezali koyangela mokili lelo.
Ya solo, tokoki koboya te kobuka oyo tozali kolona, mpo ezali bobele likambo na sembo mpe ya boyengebene ete tozwa matomba na bikateli oyo biso moko toponaki. (Bagalatia 6:7, 8) Yango wana liboso na kosala likambo nyonso tosengeli kotanga motuya. Kopesa nzela na eloko moko te oyo ezali komonana lokola ete ezali litomba ebebisa elimo na yo to boyokani na yo elongo na Jéhovah Nzambe. Bondela ete ozwa mayele mpe esoswelo mpo na kokamata bikateli ya malamu, mpamba te bikateli oyo ozali kozwa sikawa ekolimbola bomoi to liwa mpo na libela!—Tala Deteronome 30:19, 20.
[Bililingi na lokasa 28]
Alingaki kotya matomba ya elimo na esika ya liboso to mosala na ye ya mosuni?