Tosepela na matomba ya kominanola na etuluku, topengola mitambo na yango
“Likambo lileki malamu mpo na moto te, bobele ete alya mpe amela mpe azwa esengo kati na mosala na ye.”—MOSAKOLI 2:24.
1. Na likambo litali kominanola, motindo nini litambwisi na Nzambe lizali kosalisa basaleli na ye?
Litambwisi na Jéhovah lizali kopesa matomba mingi epai na basaleli na ye. Ezali yango nde ezali komonana kati na likambo litali kominanola. Litambwisi na Nzambe lizali kosalisa baklisto ete balekisa ndelo te na ngambo moko to na ngambo mosusu. Epai moko, basambeli mosusu na lokuta, oyo bazali kotya mibeko mpo na molato mpe etamboli, bazali mpenza kotalela kominanola nyonso lokola lisumu. Epai mosusu, bato mingi bazali koluka bisengo, ata oyo ekweisami na mibeko mpe na mitinda na Jéhovah.—Baloma 1:24-27; 13:13, 14; Baefese 4:17-19.
2. Uta ebandeli, likambo nini limonisaki likanisi na Nzambe na ntina na kominanola?
2 Kasi, ezali boni mpo na libota na Nzambe? Bato mingi oyo bazali kobanda koyekola Biblia bazali kokamwa na koyoka ete Nzambe azalisaki moto na makoki ya kosepela na bomoi. Apesaki epai na baboti na biso ya liboso mosala moko ya kokokisa, kasi yango ekesenaki na mosala makasi mpe ya kolembisa oyo bato bazangi kokoka bazali kosala yango na boumeli ya bomoi na bango. (Genese 1:28-30) Kanisa na mitindo mingi oyo bafandi nyonso na paradis na mabelé bakokaki kozala na bomoi ya peto mpe na esengo. Kanisa esengo oyo basengelaki kooka na kotalaka banyama na zamba oyo ekokaki kosala bango mabe moko te, bakisa mpe lolenge na banyama nyonso ya mboka oyo bakokaki kozala na yango elongo! Mpe bilei ya motindo nini mbele bakokaki kolamba, na lisalisi ya “nzeté nyonso kitoko mpo na kotala mpe yango malamu mpo na kolya!”—Genese 2:9; Mosakoli 2:24.
3-5. (a) Kominanola esengeli kokokisa mokano nini? (b) Mpo na nini tokoki kondimisama ete Nzambe azalaki kopekisa Bayisraele te ete basepela?
3 Ya solo, tokoki kotalela misala yango lokola kominanola oyo ntina na yango esengelaki kozala bobele moko kati na Paradis mpe lelo oyo: esengelaki kozala na nguya ya kobongisa nzoto mpe ya kozongisa makasi mpo na misala misusu ya kobota mbuma, mosala ya sika. Wana kominanola ekokisi mokano oyo, ezali mpenza malamu. Yango elimboli ete, atako bakoti naino na Paradis te, basaleli na losambo ya solo bakoki kominanola kati na bomoi na bango? Ee. Tala oyo tokoki kotanga kati na mokanda La perspicacité grâce aux Ecritures (angl.) na ntina na kominanola kati na basaleli na Jéhovah na ntango ya kala:
4 “Lisolo na Biblia liyebisi bobele makambo moke na ntina na kominanola ya Bayisraele. Atako bongo, ezali komonisa ete, yango etalelamaki lokola likambo malamu mpe libongi wana ezalaki na boyokani na mitinda na losambo ya ekólo. Miziki, nzembo, mabina, masolo mpe masano mosusu ezalaki makambo oyo bazalaki kosalela mpo na kominanola. Masese to sambolé mpe mituna makasi ezalaki kosepelisa bango mingi.—Bas. 14:12.”—Volume 1, page 102.
5 Mokolo moko Davidi azalaki kozonga na mboka nsima na kolonga etumba, basi bazalaki kosepela (Liebele sahaq), babetaki ngomo mpe mbonda. (1 Samwele 18:6, 7) Liloba na liebele oyo lisalelami awa elimboli mpenzampenza “koseka”; nkutu, tozali kokuta kati na mabongoli mosusu ete “basi bazalaki kozongisama maloba na koseka” (Segond) to “basi bazalaki kobina.” (Liloba lya Nzambe; Haut-fleuve) Na ntango bazalaki komema Sanduku ya Mibeko, “Davidi na bato banso ba Israel babimeli (Jéhovah) . . . babeti miziki ndenge na ndenge.” Mikala, mwasi na Davidi, atalelaki likambo yango na lolenge malamu te, mpamba te akinolaki Davidi to atyolaki ye mpo ete asanganaki na kominanola motindo wana. (2 Samwele 6:5, 14-20, Liloba lya Nzambe) Nzambe asakolaki ete baoyo bakouta na boombo na Babilone, bakosangana na milulu ya esengo ya motindo moko.—Yilimia 30:18, 19; 31:4; tala Nzembo 126:2.
6. Makomami na greke ya boklisto mazali kosalisa biso na kozala na likanisi nini likoló na kominanola?
6 Biso moko tosengeli koluka bokatikati na likambo litali kominanola. Na ndakisa, Yesu azalaki te moto oyo amitangolaki na bato: toyebi likambo yango? Azalaki kozwa ntango ya kolya bilei kitoko elongo na bato mosusu, ndakisa na ntango “na elambo monene” oyo esalemaki epai na Levi. Mpe ntango Bafalisai bafundaki ye ete azalaki kolya mpe komela, akweisaki bifundeli na bango mpe lolenge na bango ya kosala. (Luka 5:29-31; 7:33-36) Tomikundola lisusu ete Yesu ayanganaki bobele na elambo ya libala te, kasi apesaki mpe lisungi na ye na limpati. (Yoane 2:1-10) Yuda, ndeko na Yesu, alobeli “bilambo na bolingo” oyo baklisto bazalaki kosala; emonani ete ezalaki bilambo oyo na boumeli na yango babola bakokaki kolya, mpe kosepela mpe kooka esengo elongo na baninga malamu.—Yuda 12.
Kominanola na etuluku: na ntango na yango mpe na esika na yango
7. Lolenge nini Liloba na Nzambe lizali kolendisa bokatikati na likambo litali kominanola?
7 Mosakoli 10:19 ezali koloba malamu na ntina na ‘limpa mpo na koseka ya mosali mpe vinyo oyo ezali kosepelisa motema.’ Maloba oyo mamonisi te ete kominanola ezali mpenza mabe. Nzokande, tozali kotanga bobele na mokanda oyo moko ete: “Eloko na eloko ezali na ntango na yango, . . . ntango mpo na [mawa] mpe ntango mpo na koseka; ntango mpo na kolela mpe ntango mpo na kobina.” (Mosakoli 3:1, 4, MN) Na yango, atako ezali te kokweisa kominanola oyo ebongi, Biblia ezali kosenga biso ete tozala na bokengi. Ezali mpe kosenga biso ete totya kominanola na etuluku na esika na yango na ntina etali ntango oyo tozali kolekisa mpe komonisa makámá oyo mbala mingi makobimaka na bituluku bileki minene.—2 Timoté 3:4.
8, 9. Mpo na nini eleko oyo tozali kobika mpe mokumba oyo Nzambe asili kopesa biso esengeli kozala na bopusi likoló na kominanola na biso?
8 Tomonaki ete Bayuda oyo bautaki na Babilone, mpe oyo bazalaki na mosala mingi ya kosala, bazalaki kominanola na esengo. Nzokande, Yilimia alobaki liboso ete ye ‘akofanda na koyangana na batyoli te mpo abanda kosepela.’ (Yilimia 15:17) Azwaki etinda ya koyebisa nsango etalaki lisambisi oyo esengelaki koya nokinoki, na bongo, yango ezalaki ntango te mpo na kominanola.
9 Baklisto ya lelo basili kozwa epai na Nzambe mokumba ya kosakola nsango ya elikya, mpe kosakola bikateli oyo Nzambe asili kozwa mpo na ebongiseli mabe ya Satana. (Yisaya 61:1-3; Misala 17:30, 31) Na bongo emonani mpenza polele ete tosengeli te kotika kominanola kozwa esika monene kati na bomoi na biso. Tokoki komonisa likanisi yango na elobeli ya elilingi na mwa mungwa to eloko mosusu oyo ekobakisaka elengi ya bilei. Ekozala boni soki tosopi nde kopo mobimba ya mungwa kati na bilei, kino ete elengi ya bilei ezali kookana lisusu te? Na ntembe te tokoki kosala bongo te. Na boyokani na maloba na Yesu oyo mazwami na Yoane 4:34 mpe na Matai 6:33, lobanzo na biso ya liboso—bilei na biso—esengeli kozala ya kosala mokano na Nzambe. Kominanola ekokani bongo na mwa mungwa ya kotya na bilei mpo na kopesa elengi. Mokano na yango ezali mpo na kobongola makanisi na biso, ya kopema moke, kasi mpo na kolembisa biso te to mpe komela biso mobimba te.
10. Mpo na nini moko na moko na biso asengeli kotalela ntango oyo azali kolekisa na kominanola?
10 Kasi tokanisi boni: bato mingi bakoloba ete bakopesaka bobele mwa ntango mpe ntina moke na kominanola. Soki likanisi na bango ezali motindo wana te, mbele basengeli kobongola lolenge na bango ya kosala. Yango emonisi te ete moko na moko kati na biso asengeli komituna na motema moko mpe na solo likoló na esika oyo kominanola ezali mpenza kozwa kati na bomoi na ye? Mbala mosusu esili mpenza kozwa esika monene kozanga ete toyeba yango? Na ndakisa, towelaka kopelisa televizyo ntango tozongaka epai na biso na ndako? Tosila kobongisa mokolo moko ya sikisiki, poso na poso, na ndakisa mpokwa mobimba ya vendredi to samedi mpo na kominanola lokola yango esengeli? Tomituna mituna misusu mibale: mokolo molandi elambo, emonanaka ete tolalaki na ngonga malamu te to totambolaki bakilometele mingi mpe ete tolembi, kino mbala mosusu kozanga kosangana na mosala ya boklisto to kokokisa mosala malamu mpo na patron na biso? Soki kominanola na biso ekozalaka boye mbala na mbala, tokoki mpenza kotalela yango lokola likambo ya esengo mpe ya bokatikati?—Tala Masese 26:17-19.
11. Mpo na nini ezali malamu ete totalela lisusu lolenge ya kominanola na biso?
11 Mpe, ekozala mbala mosusu malamu ete totalela lisusu mitindo ya kominanola na biso. Ezali te mpo tozali basaleli na Nzambe nde kominanola na biso ezali nyonso malamu. Tala oyo Petelo akomaki epai na baklisto bapakolami: “Mpo ete liboso bosalaki mokano ya bapakano; wana ezalaki bino na etamboli mabe, na bilulela, na kolangwa vinyo, na bilambo ya lokoso, na bimeli, mpe na kosambela bikeko.” (1 Petelo 4:3, MN) Ntóma afundaki bandeko na ye te ete bazalaki komekola bato ya mokili. Nzokande, ezali na ntina mpo na baklisto (lelo lokola mpe na eleko wana) ete basenzela, mpamba te ezali mpasi te mpo na komitika kozwama na mitindo mabe ya kominanola.—1 Petelo 1:2; 2:1; 4:7; 2 Petelo 2:13.
Mitambo oyo tosengeli kopengola
12. 1 Petelo 4:3 ezali kokebisa biso na mitambo nini?
12 Liboso na mitambo nini tosengeli mpenzampenza kozala na bokengi? Kati na makambo mosusu, Petelo atangaki “kolangwa vinyo, bilambo ya lokoso mpe bimeli.” Molimboli moko Moalemá alimbolaki ete maloba na greke oyo masalelamaki “mazalaki kotalela mpenzampenza masangá oyo mamelami na ntango ya bilambo minene.” Molakisi moko Mosuisse akomaki ete na eleko wana mimeseno yango mipalanganaki mingi: “Awa, esengeli kozala koyangana oyo ebongisamaki to bituluku minene epai bazalaki komipesa na misala oyo ya nsoni.”
13. Na likambo nini kosalela masanga makasi ezali likámá na bilambo? (Yisaya 5:11, 12)
13 Masangá makasi oyo makabolamaka na ntango ya bilambo minene ezalaka likámá oyo bato mingi balongaki te mpo na kopengola yango. Tokoki koloba te ete Biblia epekisi komela masangá yango na bokatikati mpamba te elobi bongo te. Nkutu Yesu asalaki vinyo na elambo ya libala na Kana. Basengelaki komela na koleka ndelo te, soki bongo te mbele Yesu alandaki te toli na Nzambe oyo epekisi kozala kati no balangwi. (Masese 23:20, 21) Kasi totalela naino likambo oyo: mokambi na elambo alobaki ete, kati na bilambo mosusu, bazalaki kopesa liboso vinyo malamu, ‘na nsima wana bato balangwi, bakopesa oyo ezali malamu mingi te.’ (Yoane 2:10) Ezalaki bongo kosalema mbala mingi ete Bayuda bazalaki kolangwa kati na mabala oyo vinyo ezalaki mingi mpo na bato nyonso.
14. Na lolenge nini baoyo bazali kobyanga baklisto bakopengola likámá oyo likoki kouta na masanga makasi?
14 Na yango, baklisto mosusu bazali kozwa ekateli ya kokabola bière to masanga mosusu ya makasi bobele soki bango moko bakoki kosenzela likoló na oyo babyangami na bango bazali komela. Soki ye oyo ayambi bato akoki te komona makambo nyonso mazali koleka mpo ete bato baleki mingi, lokola kati na mabala ya Bayuda oyo touti kolobela, ebele na masangá makasi oyo makabolami wana, ekoki kozala likámá monene. Kati na babyangami, ekoki kozala na moto oyo azalaki momeli monene mpe asilaki kolonga mbeba yango. Nzokande, na ntango akomona masangá ebele makabolami kozanga epekiseli, akoki komekama na komela mingi, likambo oyo likobebisa elambo mpo na bato nyonso. Tata moko ya libota na Allemagne, oyo azali mokengeli moklisto, alobaki ete basangani ya libota na ye bazwaka litomba monene na bokutani kitoko elongo na baninga na bango kati na kondima, na bantango ya kominanola. Kasi abakisaki ete, makámá mazalaka mingi soki ebele ya masangá ekabolami wana.
15. Tokoki kosala nini mpo ete bantango ya kominanola na etuluku etambwisama malamu?
15 Na libala na Kana, ezalaki na “mokambi ya elambo” to “directeur du festin.” (Yoane 2:8) Yango elimboli te ete soki libota moko libengisi etuluku na bato mpo na kolya to mpo na kolekisa ntango elongo, ekosengela kopona directeur mpo na libaku yango. Ezali mobali nde akozala na mokumba ya kotambwisa makambo. Kasi ata ezali mabota mibale to etuluku moko eleki monene, esengeli ete moto moko azala mokengeli na makambo nyonso mazali koleka wana. Mpo na yango, baboti mingi batunaka epai na moto oyo abengisi mwana na bango ya mobali to ya mwasi ndenge makambo makoleka kuna. Bakotunaka ye nani akotambwisa makambo na boumeli ya mokolo to ya mpokwa mobimba, mpe yango kino na nsuka. Baboti mosusu baklisto bazali ata pene na kobongola programme na bango mpe kokende esika ebongiseli yango ekosalema, mpo ete bilenge mpe mikóló bakoka kosepela elongo.
16. Likambo nini esengeli kotalela na ntina na motuya ya babyangami na elambo?
16 Filiale ya la Société Watch Tower na Canada, ekomaki ete: “Batoli oyo ezali kosenga kotya ndelo na motuya ya babyangami na ebongiseli moko kati na baninga, ememi bankulutu na kosukisa ete bilambo minene ya mabala ezali koboya batoli yango. Balobaki ete soki bapesi biso toli ya kominanola na bituluku mike, oyo ezali mpasi te mpo na kosenzela yango, ezali mabe na kobyanga bato 200 to 300 na libala.”a Na esika ya kotya mibeko oyo milongobani te, esengeli kosenzela liboso, ata babyangami bazali boni, na kotambwisa elambo na lolenge malamu. Ebele ya vinyo oyo Yesu apesaki emonisi ete bato bazalaki mingi na libala na Kana, kasi emonani ete elambo etambwisamaki malamu. Na eleko wana, bilambo mosusu bizalaki motindo wana te; mbala mosusu likoló na motuya mingi ya babyangami. Soki bato baleki mingi, kosenzela ekozala mpe mpasi, mpamba te baoyo bayebi komipekisa te, bakoki koluka kolya mingi mpe komela mingi. Soki moto moko azali te mpo na kotambwisa ebongiseli, ekoki kozala ete bato yango bakobimisa makambo oyo mabongi te.—1 Bakolinti 10:6-8.
17. Ndenge nini tokoki komonisa bokatikati na boklisto na ntango tozali kobongisa elambo?
17 Mpo ete elambo etambwisama malamu, esengeli bibongiseli. Ezali na ntina te na koluka kosala likambo moko ya kafukafu ete tokómisa ntango yango eloko moko ya monene to oyo esengeli kotikala libela kati na makanisi ya bato; yango ekomema na komekola mokili, na ndakisa, na kosala bilambo elongo na milato ya mindondo. Tokoki kokanisa ete Bayisraele na sembo, kati na Mabelé na Ndaka, mbele bakokaki kosala elambo moko epai moto na moto akokaki kolata lokola Baezipito to bapakano mosusu? Mbele bakokaki kobongisa mabina oyo mazali kolamusa mposa ya nzoto to miziki makasi oyo mbala mosusu, ezalaki na lokumu mingi epai na bapakano? Na ngomba Sinaï, babetaki miziki mpe babinaki mbala mosusu na kolandaka mitindo ya Baezipito. Toyebi lolenge nini Nzambe mpe mosaleli na ye Moize, oyo azalaki mobali ateli, batalelaki kominanola yango. (Exode 32:5, 6, 17-19) Na ntina yango, ye oyo abongisi to azali kotambwisa elambo moko asengeli komituna soki miziki mpe mabina ekozala; soki ekozala, asengeli komindimisa ete mitinda na boklisto mikotosama.—2 Bakolinti 6:3.
18, 19. Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ete Yesu abyangamaki na libala moko, mpe motindo nini tokoki kosala soki tozali na mposa ya kobongisa limpati to elambo?
18 Nsuka na yango, tozali komikundola ete ‘Yesu mpe bayekoli na ye babyangamaki na elambo ya libala.’ (Yoane 2:2) Ya solo, moklisto moko to libota na baklisto bakoki kokende kotala baninga mpo na kolekisa ntango malamu elongo mpe kolendisana. Kasi na ntina etali bilambo bibongisami, makambo masili kosalema mamonisi ete, ebongi kopona babyangami mpo na kopengola mikakatano. Nkulutu moko afandaka na mokili na Tennessee, na États–Unis, oyo bana mibali mpe bana basi bazali kati na mosala ya pionnier, azali ntango nyonso kotalela likambo yango na likebi. Liboso ete mwasi na ye to ye moko bandima libyangami moko mpo na bango moko to mpo na bana na bango, bazalaki kokutana naino na moto oyo abyangi bango mpo na koyeba motindo nini na bato ye abyangi mpo na ebongiseli yango. Na bongo libota na ye libatelamaki na mitambo oyo bato mosusu bakutanaki na yango na ntango libyangami lipesamaki epai na bato nyonso, ezala mpo na kolya, mpo na piki-niki to mpo na lisano moko ya konyolisa nzoto, na ndakisa kobeta ndembo.
19 Yesu alendisaki biso ete tobyanga te bobele basangani ya libota na biso, baninga na biso oyo tomeseni mingi na bango to baoyo bakokani na biso na mbula to baoyo ezweli na bango ekokani na oyo ya biso. (Luka 14:12-14; tala Yobo 31:16-19; Misala 20:7-9.) Soki toponi babyangami na biso na likebi nyonso, ekozala na biso mpasi te mpo na kokotisa kati na molongo na babyangami na biso baklisto ya mbula nyonso mpe baoyo ezalela na bango ekeseni na basusu. (Baloma 12:13; Baebele 13:2) Bamoko kati na bango bakoki kozala baklisto oyo bazali na bolembu kati na elimo to bato ya sika, mpe kozala esika moko elongo na baklisto bateli ekomemela bango matomba malamu.—Masese 27:17.
Totya kominanola na esika na yango
20, 21. Mpo na nini kominanola ezali na esika na yango kati na bomoi na biso?
20 Ebongi ete biso oyo tokobangaka Nzambe, tokanisa na kominanola na biso, topona oyo ezali malamu, mpe ete ezala na bokatikati mpo na oyo etali ntango oyo tozali kolekisa na yango. (Baefese 2:1-4; 5:15-20) Ezali yango nde ekanisamaki na mokomi na mokanda ya Mosakoli, oyo apemamaki na Nzambe, ete: “Mpe nazali kolobela esengo mpo ete moto azali na likambo lileki oyo na malamu na nse na moi te, bobele kolya mpe komela mpe kosepela. Mpo ete yango ekozala na ye elongo kati na mosala na ye na mikolo mikopesa Nzambe na ye na nse na moi.” (Mosakoli 8:15) Bisengo wana ya bokatikati bikoki kopesa biso nzela na konyolisa nzoto, mpe kosalisa biso na kobosana mikakatano mpe makambo makookisaka nkanda mpe makopesaka mawa oyo ezali komonana mingi kati na ebongiseli ya ntango oyo.
21 Mpo na komonisa bosolo ya likambo yango, tala oyo pionnier moko ya mwasi ya mboka Autriche akomaki epai na moninga na ye ya mwasi oyo bayebani na ye uta kala: “Mokolo moko, tosalaki mobembo moko kitoko. Tozalaki bato ntuku mitano mpo na kokende pene na Ferlac, epai kuna libéké moke lizalaki. Ndeko B. . . nde azalaki liboso na biso na motuka na ye ya moke; amemaki bitumbelo misato, bakiti oyo egumbamaka, bamesa mpo na koleila, mpe ata mesa moko mpo na kobeta ping-pong. Yango esepelisaki biso mingi. Ndeko mwasi moko amemaki accordéon na ye mpe abetelaki biso ebele ya ba cantiques du Royaume. Bandeko mibali, bilenge mpe mikóló, basepelaki mingi mpenza na kozala esika moko.” Moklisto mwasi wana azalaki komikundola ntango malamu ya kominanola oyo etambwisamaki malamu epai balongaki kopengola mitambo ya masangá makasi to ya kozanga komipekisa.—Yakobo 3:17, 18.
22. Ata tozali kosepela na kominanola na etuluku, toli nini moto na moto kati ma biso asengeli kobosana yango te?
22 Paulo apesi biso toli ete tosenzela mpo ete tokwea te na bamposa ya nzoto ezangi kokoka, mpe tosala te mikano oyo mikotya biso liboso na komekama. (Baloma 13:11-14) Yango ezali ntina mpo na mikano na biso ya kominanola na etuluku. Soki tolandi toli ya Paulo kati na likambo yango, tokoki kopengola ete tomikotisa te kati na makambo oyo mamemaki basusu kino kozinda kati na elimo. (Luka 21:34-36; 1 Timoté 1:19) Na esika na kosala bongo, tokozala nde na mayele ya kopona kominanola ya peto oyo ekosalisa biso na kobatela boyokani malamu elongo na Nzambe. Na bongo tokozwa bantango ya kominanola na etuluku oyo ekokoka kotalelama lokola likabo na Nzambe.—Mosakoli 5:18.
[Maloba na nse ya lokasa]
a La Tour de Garde ya 15 juillet 1984 (Mosenzeli ya 15 juillet 1985) ezalaki na batoli mingi ya bokatikati na ntina na mabala mpe bilambo oyo bizali kosalema mpo na yango. Ba fiancés mpe baoyo bakosunga bango bakoki kotala lisusu makanisi yango mpo na kozwa litomba yambo ya kosala bibongiseli.
Bozongeli
◻ Likanisi nini ya bokatikati na ntina na kominanola na etuluku tozali kokuta kati na Biblia?
◻ Mpo na nini tosengeli kotalela lolenge ya kominanola mpe ntango oyo tozali kolekisa na yango?
◻ Tanga mwa makambo oyo makoki kosalama na moklisto oyo abongisi elambo mpo na kopengola mitambo.
◻ Soki kominanola etikali na esika na yango mpe ezali na bokatikati, matomba nini ekoki kopesa epai na baklisto?
[Elilingi na lokasa 18]
Ye oyo abongisi to azali kotambwisa elambo azali na mokumba ya kosenzela ete apengola mitambo nyonso mpo na babyangami na ye