Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/8 nk. 10-15
  • Tolanda kolendisana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tolanda kolendisana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tobwaka maloba ya bosoto
  • Tosala mpo na kolendisa bato mosusu
  • Tolendisa engebene nzela na Nzambe
  • Bankulutu oyo bazali kolendisa
  • Tótosaka mibeko ya Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Zaláká na maloba oyo “ezali malamu mpo na kotonga”
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Bimisáká maloba oyo “ezali malamu mpo na kotonga”
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Molato na biso mpe ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato ezali na ntina
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/8 nk. 10-15

Tolanda kolendisana

“Tika ete maloba na bosato mabima na minoko na bino te kasi bobele yango mazali malamu mpo na kolendisa.”​—BAEFESE 4:29.

1, 2. (a) Mpo na nini ebongi na koloba ete lokutá ezali eloko moko ya kokamwa? (b) Likambo nini ebongi kosenzela na yango ntango tozali kosalela lolemo na biso?

“LOKOTA ezali nsinga na kokamwa oyo ekoyokanisaka baninga, mabota mpe bato. . . . Na lisalisi ya boongó ya moto mpe na batutami ya liboke na misisa [ya lolemo], tozali kobimisa maloba ya bolingo, maloba ya kolula, maloba ya limemya . . . maloba ya motindo na mayoki nyonso oyo ekozalaka na bato.”​—L’ouïe, le goût et l’odorat (angl.).

2 Lolemo na biso ezali te bobele eteni ya nzoto oyo ezali kopesa biso nzela mpo na komela to komeka biloko; kasi ezali mpe kopesa biso nzela na koyebisa makambo oyo tozali kokanisa mpe oyo tozali kooka. Yakobo akomaki ete, “Lolemo ezali eteni moke ya nzoto.” “Na yango tokokumisaka Jéhovah. Tata, mpe na yango tokofingaka bato bazalisami na elilingi na Nzambe.” (Yakobo 3:5, 9, MN) Solo, tokoki kosalela lolemo na biso na lolenge mingi ya malamu, ndakisa mpo na kokumisa Jéhovah. Nzokande, lokola tozangi kokoka, ezali na biso mpasi te na kosalela yango mpo na kobimisa maloba mabe to maloba makoki kolendisa te. Yakobo alobaki lisusu ete: “Bandeko na ngai, ekoki te ete makambo mazala bongo.”​—Yakobo 3:10.

3. Wapi makambo mibale oyo tosengeli kosenzela na yango na ntina etali maloba na biso?

3 Atako moto moko te akoki mpenza kopekisa malamumalamu lolemo na ye, ezali solo ete tokoki kosala milende mpo na komisembola. Ntóma Paulo apesi toli oyo: “Tika ete maloba na bosoto mabima na monoko na bino te kasi bobele yango mazali malamu mpo na kolendisa, pelamoko ezali bosenga, ete mapesa bayoki ngolu.” (Baefese 4:29) Tososola ete etinda oyo ezali na masengi mibale: makambo oyo tosengeli kosala makasi mpo na kolongola mpe makambo oyo tosengeli kosala makasi mpo na kokokisa. Totalela masengi oyo mibale.

Tobwaka maloba ya bosoto

4, 5. (a) Etumba nini baklisto basengeli kobunda na ntina etali maloba ya bosoto? (b) Elilingi nini ekoki kosalelama mpo na komonisa “maloba na bosoto”?

4 Baefese 4:29 epesi biso libosoliboso toli oyo: “Tika ete maloba na bosoto mabima na monoko na bino te.” Mbala mosusu yango ezali mpenza petee te. Ya solo, maloba ya nsoni mazali kolobama mingi kati na mokili oyo ezingi biso. Bilenge baklisto mingi bazali koyoka mafinga kati na minoko ya baninga na bango ya kelasi, baoyo mbala mosusu bazali kokanisa ete yango ezali kopesa kilo na maloba na bango to ezali kopesa bango nzela na kozala bato na makambo “makasi.” Ntango mosusu tokokoka te kokima koyoka maloba na nsoni, kasi tokoki​—mpe tosengeli—​kosala molende ya solo mpo ete tomekola yango te. Yango ezali na esika te ezala na elimo na biso to na monoko na biso.

5 Likebisi na Paulo esimbami na liloba moko ya greke oyo lizali na boyokani na eloko oyo epoli: mbisi to mbuma. Tokanisa na likambo oyo: mobali moko akomi na motema likoló mpe asuki na kotomboka makasi. Abandi kongala, mpe tomoni mbisi ya kopola ebimi na monoko na ye. Na nsima ezali bambuma ya nsolo mabe mpe ebeba ezali kopunzwapunzwa uta na monoko na ye mpe ebebisi bato nyonso. Moto yango azali nani? Ekozala mabe mpenza soki ezali moko kati na biso! Nzokande, lisese oyo likozala solo soki ‘maloba na bosoto mazali kobima kati na monoko na biso.’

6. Lolenge nini Baefese 4:29 ezali kotalela matongi mpe maloba na kolembisa?

6 Lolenge mosusu tokoki kosalela Baefese 4:29 ezali oyo ya koboya kozala ntango nyonso batongi. Ezali solo ete, biso nyonso tozalaka na makanisi na ntina na makambo oyo tolingaka te to tondimaka te, kasi tosila kokutana na moto oyo ezangaka likambo moko te (to makambo mingi) ya kotyola moto nyonso, to esika nyonso to mpe eloko nyonso oyo etalelami? (Tala Baloma 12:9; Baebele 1:9.) Na maloba na ye, azali kobeta, azali kolembisa to koboma. (Nzembo 10:7; 64:2-4; Masese 16:27; Yakobo 4:11, 12) Mbala mosusu azali koyeba te kino na meko nini azali kokokana na bato na matongi oyo Malaki alobelaki. (Malaki 3:13-15) Oyo nde mpasi akoyoka soki motali moko ayebisi ye ete mbisi ya kopola to mbuma ebeba ezali kobima na monoko na ye!

7. Na likambo nini moto na moto kati na biso asengeli komitalela?

7 Ezali mpasi te na komona ete moto moko azali ntango nyonso na maloba ya kolembisa to ya matongi, kasi biso moko tosengeli komituna boye: ‘Nazalaka na momeseno ya kozala lolenge yango?’ Ekozala malamu, mbala na mbala, kokanisa na elimo ya maloba na biso. Ezalaka mpenzampenza ya kolembisa to ya matongi? Tozalaka lokola babondisi misato ya Yobo? (Yobo 2:11; 13:4, 5; 16:2; 19:2) Mpo na nini te koluka lisolo moko ya kosepelisa mpo na koloba? Soki lisolo lizali mpenza ya kotonga, mpo na nini te kobongola yango na lisolo moko ya kolendisa?

8. Na ntina etali maloba na biso, toli nini tozali kokuta kati na Malaki 3:16, mpe lolenge nini tokoki komonisa ete tozali kotya likebi na toli yango?

8 Malaki amonisaki likeseni oyo: “Baoyo bakobangaka Jéhovah balobanaki moto na moninga na ye mpe Jéhovah atyaki likebi mpe ayokaki bango. Bongo, mokanda na kokanisama mokomamaki liboso na ye mpo na baoyo bakobangaka Jéhovah, mpe mpo na baoyo bakokanisaka nkombo na ye.” (Malaki 3:16, MN) Omoni lolenge nini Nzambe ayanolaki na maloba na kolendisa? Lisoló wana likokaki kozala na bopusi nini epai na baoyo basanganaki na yango? Biso moko tokoki kozwa liteya na yango na maloba na biso ya mokolo na mokolo. Ezali mpenza malamu mpo na biso mpe mpo na bato mosusu ete masolo na biso ya mokolo na mokolo mamonisa ‘mbeka na biso ya masanzoli epai na Nzambe.’​—Baebele 13:15.

Tosala mpo na kolendisa bato mosusu

9. Mpo na nini makita ya boklisto mazali kopesa biso mabaku kitoko ya kolendisa baninga na biso?

9 Makita ya lisangá mazali kopesa biso mabaku kitoko ya koloba “maloba mazali malamu mpo na kolendisa, pelamoko ezali bosenga, ete mapesa bayoki ngolu.” (Baefese 4:29) Tokoki kosala yango na ntango tozali kopesa diskur etongami likoló na Biblia, na ntango tozali kosangana na elakiseli moko to na ntango tozali kopesa komantere moko na libaku ya lisolo na mituna mpe biyano. Bosolo ya Masese 20:15 ezali bongo kokokana epai na biso, ete: “Bibebu na boyebi ezali eloko na motuya monene.” Lisusu, nani ayebi mitema boni misimbami to milendisami na maloba na biso?

10. Nsima na kokanisa likoló na bato oyo tomeseni kosolola na bango, mabongwani nini ekozala ntango mosusu malamu ete tosala yango? (2 Bakolinti 6:12, 13)

10 Liboso mpe nsima na makita, tozali na libaku ya kolendisa bazalani na biso na maloba na biso oyo mazali mpo na litomba na bango. Ekozala mpasi te mpo na kolekisa ntango yango na masolo kitoko elongo na libota na biso mpe na mwa baninga oyo tomiyokaka malamu liboso na bango. (Yoane 13:23; 19:26) Kasi, na boyokani na Baefese 4:29, mpo na nini te komeka kosolola elongo na basusu? (Tala Luka 14:12-14.) Tokoki komizwela liboso ekateli ya kosolola mwa mingi na esika ya kosuka bobele kopesa mbote na libaku moko​—mbangumbangu—​epai na bato mosusu ya sika, epai na mibange mosusu to na bilenge mosusu; ekoleka malamu ata kofanda elongo na bilenge yango mpo ete toyeba mpenza komitya na esika na bango. Bolingo ya solo oyo tozali komonisa epai na bato mosusu mpe bantango malamu oyo tozali kolekisa mpo na kosolola elongo na bango, ekosalisa bango na kozala lisusu na mayoki na Davidi oyo mamonisami na Nzembo 122:1.

11. (a) Na ntina etali bisika kati na Salle du Royaume, momeseno nini bato mingi basili kozwa yango? (b) Mpo na nini bato mosusu bamonaka malamu te ete bafandaka ntango nyonso bobele na esika moko?

11 Oyo ekoki kosalisa biso na kozala na masolo ya kolendisa, ezali mpe likambo oyo ya koboya kofandaka bobele na esika moko na ntango ya makita. Mama elongo na bébé akoki kozala na mposa ya kofanda pene na twalete, ndeko moko oyo azali andikapé na nsuka ya nzela, kasi ezali boni mpo na biso? Mbala mosusu tomeseni kofanda bobele na kiti moko to na ngambo bobele moko na salle; kozanga esoswelo ndeke akozongaka bobele likoló na etape ya nzeté oyo ye ameseni kofanda wana, boye te? (Yisaya 1:3; Matai 8:20) Na bongo, lokola tokoki kofanda ata na esika nini, mpo na nini tokoki mpenza kosanzé te, mpe kofanda ntango mosusu na loboko ya mobali, ntango mosusu na loboko ya mwasi, na liboso, mpe bongo na bongo? Yango ekosalisa biso na koyebana malamu elongo na bandeko nyonso. Atako yango ezali mobeko te, bankulutu mpe baklisto mosusu bateli baoyo bakofandaka ntango nyonso bobele na esika moko te bamonaka ete ezali na bango mpasi te na kolendisa bandeko mingi, na esika na kosala yango bobele epai ya baninga na bango ya motema.

Tolendisa engebene nzela na Nzambe

12. Liyoki nini ya mabe esili komonisama na boumeli ya Lisolo na bato?

12 Mposa oyo moklisto azali na yango mpo na kolendisa baninga na ye baklisto, esengeli kopusa ye na komekola Nzambe kati na likambo yango na esika ya kolanda liyoki ya bomoto na kotyáká ebele ya mibeko.a Uta kala, bato bazangi kokoka bazalaka na mposa ya koyangela baoyo bazali zingazinga na bango, mpe ata basaleli mosusu na Nzambe basilaki kokwea kati na likambo yango. (Genese 3:16; Mosakoli 8:9) Na eleko ya Yesu, bakonzi na mangomba ya Bayuda ‘bazalaki kokanga mikumba na bozito mpe kotya yango na mapeka na bato nde bango mpenza balingaki kotombola yango ata na mosapi na bango te.’ (Matai 23:4) Bazalaki kobongola mimeseno ya bonkoko oyo mizalaki malamu kino kokomisa yango mibeko oyo bazalaki kosenga ete bato batosa yango na makasi. Na lobanzo na bango makasi ya mibeko na bato, bazalaki kotika pembeni makambo oyo Nzambe azalaki kotalela ete ezali na ntina mingi. Moto moko te alendisamaki na ebele na mitinda oyo miuti na Biblia te; na yango, banzela na bango ezalaki banzela na Nzambe te.​—Matai 23:23, 24; Malako 7:1-13.

13. Mpo na nini ebongi te na kotya mibeko mingi mpo na baninga na biso baklisto?

13 Baklisto balingaka mpenza kotosa mibeko na Nzambe na motema moko. Nzokande, ata biso, tokoki komekama mpo na kopesa mibeko ebele mpe ya kilo mingi. Mpo na nini? Ya liboso, mpo ete bamposa mpe boponi ekeseni; mpe bamoko bakondimaka makambo oyo basusu balingaka te mpe balingi ete bapekisa yango. Baklisto bakeseni mpe kati na bokoli na bango mpo na kotela na elimo. Kasi ezali na kopesaka ebele na mibeko nde tokosalisa moto moko engebene nzela na Nzambe na kokola kino kotela? (Bafilipi 3:15; 1 Timoté 1:19; Baebele 5:14) Ata soki moto moko azali na etamboli moko oyo ezali kotengatenga to ya mabe mingi, nzela malamu ezali ya kotya bipekiseli? Nzela na Nzambe ezali, mpo na baoyo bazali na bizaleli ya elimo, ete bameka kosembola moto oyo azali komitika kozimbisama na kosololaka elongo na ye kati na elimo ya bopolo.​—Bagalatia 6:1.

14. Mibeko oyo Nzambe apesaki na Yisraele ekokisaki mikano nini?

14 Ya solo, ntango Yisraele ezalaki libota na ye, Nzambe apesaki ebele na mibeko mpo na losambo na ye oyo esalemaki na tempelo, mpo na kopesa mbeka mpe ata mpo na bopeto ya bato. Yango ebongaki mpo na libota oyo esengelaki komikesenisa na mabota mosusu; lisusu, mibeko mingi mizalaki bisakweli mpe mipesaki nzela mpo na kokamba Bayuda epai na Masiya. Paulo akomaki ete: “Mibeko ezalaki molakisi na biso kino ekoya Klisto, ete tolongisama na kondima. Nde awa esili kondima koya, tozali lisusu na nse na molakisi te.” (Bagalatia 3:19, 23-25) Nsima wana Mibeko milongolamaki likoló na nzeté ya mpasi, Nzambe apesaki te epai na baklisto molongo ya mibeko likoló na makambo mingi ya bomoi, lokola nde yango ezalaki nzela ya kosalisa bango na kolanda kolendisa kondima na bango.

 15. Litambwisi nini Nzambe apesaki epai na basambeli na ye baklisto?

15 Ya solo, tozangi mibeko te. Nzambe azali kosenga biso ete toboya losambo na bikeko, pite mpe ekobo, mpe toboya kosalela makila na lolenge mabe. Apekisi mpenza koboma moto, lokuta, ndoki mpe masumu mosusu. (Misala 15:28, 29; 1 Bakolinti 6:9, 10; Emoniseli 21:8) Lisusu, kati na Liloba na ye, asili kopesa batoli ya polele mpenza na ntina na makambo mingi. Nzokande, biso tozali na mokumba ya koyekola mpe kosalela mitinda na Biblia koleka Bayisraele. Bankulutu bakoki kolendisa baninga na bango na kosalisaka bango ete baluka koyeba mitinda yango mpe batelelaka yango, na esika ya koluka mibeko to mpe kotya yango.

Bankulutu oyo bazali kolendisa

16, 17. Bantóma bapesaki ndakisa nini malamu kati na likambo ya kopesa mibeko epai na baninga na bango baklisto?

16 Paulo akomaki ete: “Kasi ata esika nini esili biso kokóma, tolanda kotambola na botosi mpenza.” (Bafilipi 3:16, MN) Na boyokani na likanisi oyo ya Nzambe, ntóma azalaki kosala makambo na lolenge na kolendisa bato mosusu. Na ndakisa, motuna motunamaki mpo na koyeba soki bakokaki kolya nyama euti na tempelo, oyo epesami lokola mbeka epai na nzambe ya bikeko. Nkulutu wana apesaki nde mobeko oyo bato nyonso kati na masangá ya eleko wana basengelaki kolanda, mbala mosusu mpo na kobatela bomoko to bopeto? Te. Ayebaki ete baklisto wana, baoyo bango nyonso bazalaki na boyebi motindo moko te mpe bazalaki na bokoli motindo moko te kati na elimo, bakokaki kozwa ekateli ekeseni. Mpo na oyo etalaki ye, azwaki ekateli ya kopesa ndakisa malamu.​—Baloma 14:1-4; 1 Bakolinti 8:4-13.

17 Makomami na Greke ya boklisto mamonisi ete bantóma bapesaki batoli malamu na ntina na makambo mosusu matali moto ye moko, lokola molato mpe kokata nsuki, kasi batyaki mibeko mpo na bato nyonso te. Wana ezali ndakisa malamu mpo na bakengeli baklisto ya ntango na biso, baoyo bazali na mposa ya kolendisa etonga. Mpe yango ezali na boyokani na lolenge oyo Nzambe asalaki mpenza epai na Yisraele ya kala.

18. Mibeko nini Jéhovah apesaki na Yisraele mpo na oyo etali bilamba?

18 Nzambe apesaki te epai na Bayisraele mibeko ya sikisiki likoló na lolenge ya kolata. Emonani lokola ete, mibali mpe basi bazalaki kolata kazaka ya molai to nzambala ekokani na yango, atako bongo oyo ya basi ekokaki kotyama malenda na nse to kozala na langi ya makasi mingi. Basi mpe mibali bazalaki mpe kolata sadhin, oyo ezalaki bongo elamba ya kati. (Basambisi 14:12; Masese 31:24; Yisaya 3:23) Mibeko nini Nzambe apesaki na ntina na molato? Mobali asengelaki te kolata elamba oyo ekokaki komonisa ye lokola mwasi mpe mwasi asengelaki te kolata elamba oyo ekokaki komonisa ye lokola mobali, likambo oyo likokaki kotinda bango na kosangisa nzoto mibali na mibali to mpe basi na basi. (Deteronome 22:5) Mpo na komonisa ete bakabwanaki na bapakano oyo bazingaki bango, Bayisraele basengelaki kotya malenda na nse ya bilamba na bango, elongo na nsinga ya bulé likoló na malenda mpe mbala mosusu na mwa mayaka na nsuka na elamba. (Mituya 15:38-41) Bobele yango nde Mibeko elobaki na ntina na molato.

19, 20. (a) Litambwisi nini Biblia ezali kopesa epai na baklisto mpo na oyo etali kolata mpe kokata nsuki? (b) Lolenge nini bankulutu basengeli kotalela mitinda mitali libanda ya nzoto ya moto na moto?

19 Atako baklisto bazali na nse na Mibeko te, Biblia ezali na mibeko misusu ya sikisiki mpo na lolenge oyo tosengeli kolata mpe kokata nsuki? Emonani lokola ezali te. Nzambe asili kopesa biso mitinda malamu oyo tokoki kosalela. Paulo akomaki ete: “Basi bazala na molato mobongi, ete bakembisa nzoto na bopɔlɔ mpe na makanisi malamu, na kotongatonga nsuki te, na wolo te, na mabanga na ntalo te, na bilamba na motuya moleki ndelo te.” (1 Timoté 2:9, MN) Petelo apesaki basi baklisto toli ete batya likebi na bango, likoló na libanda na nzoto te, kasi likoló “na bomoto ebombami na motema, kitoko oyo ekobeba te, oyo na elimo na bopolo mpe na kimya.” (1 Petelo 3:3, 4) Soki etinda wana ekomamaki, ezali mbala mosusu mpo ete baklisto mosusu ya ekeke ya liboso bazalaki na mposa ya komonisa bopɔlɔ mingi mpe bokatikati kati na lolenge na bango ya kolata mpe kokata nsuki. Kasi, na esika ya kosenga​—to ya kopekisa—​midele mosusu, bantóma bamonaki malamu kopesa batoli ya kolendisa.

20 Ba Témoins de Jéhovah basengeli komemyama mpo na bomoto na bango ya bopɔlɔ, mpe, mingimingi, bazalaka bongo. Atako bongo, midele mizali kokesena engebene mikili, mpe mbala mosusu ata na etúka bobele moko mpe na lisangá bobele moko. Ya solo, ekoki kokóma ete nkulutu moko oyo azali na makanisi to na lolenge ya sikisiki oyo ye asepelaka mpo na likambo yango, azwi ekateli mpo na motindo oyo ye na libota na ye basengeli kolata mpe kokata nsuki. Kasi mpo na oyo etali etonga, nkulutu asengeli kobosana te maloba oyo ya Paulo: “Biso tozali kosalela bino lokola mikóló kati na kondima te nde tokosalanaka na bino, mpo bozali kotelema ngwi kati na kondima na bino.” (2 Bakolinti 1:24) Ee, na kotemelaka mposa ya kotya mibeko na lisangá, bankulutu bazali kosala mpo na kolendisama ya kondima na bato mosusu.

21. Lolenge nini bankulutu bakoki kopesa lisalisi ya kolendisa epai na moto moko oyo azali kolekisa ndelo kati na elateli na ye?

21 Lokola na ekeke ya liboso, ekoki kozala ntango mosusu ete moto moko oyo abongwani sika kati na solo to ye oyo alɛmbi kati na elimo asali liponi ya malamu te mpo na oyo etali molato, na kosala monzele to kolata babiju. Esengeli kosala nini? Wana lisusu Bagalatia 6:1 eyebisi likambo mokengeli moklisto oyo alingi mpenza kosalisa moto yango asengeli kosala. Liboso ya kokende kopesa ye toli, ekozala malamu akutana naino na nkulutu mosusu, eleki malamu azwa nkulutu oyo azali mpenza na bamposa to makanisi ndenge moko na ye te. Soki emonani ete basangani mingi ya lisangá basili komekola modɛle moko ya elamba to ya kokata nsuki na lolenge mpenza ya mokili, lisangani ya bankulutu bakoki kotalela lolenge nini eleki malamu mpo na kosalisa lisangá; ekozala mbala mosusu na nzela na diskur moko ya boboto mpe ya kolendisa na ntango ya likita moko to na nzela ya batoli epai na moto na moto. (Masese 24:6; 27:17) Mokano na bango esengeli kozala ya kolendisa ezalela ya elimo oyo emonisami kati na 2 Bakolinti 6:3 (MN): “Tokotyaka libaku na nzela na moto te ete mosala na biso motyolama te.”

22. (a) Mpo na nini esengeli te komitungisa mingi na ntina na bokeseni moke? (b) Ntóma Paulo apesaki ndakisa nini malamu?

22 Bakengeli baklisto, baoyo ‘bazali koleisa etonga na Nzambe oyo ebatelami na bango,’ balingi kosala lokola eyebisaki yango Petelo, ete bakoyangela ‘lokola bakonzi te epai na baoyo bazali libula na Nzambe.’ (1 Petelo 5:2, 3) Kati na mosala oyo bazali kokokisa na bolingo, mituna mikoki kobima mpo na makambo matali boponi. Ntango mosusu na etúka oyo yo ozali, bazali na momeseno ya kotanga baparagrafe ya Mosenzeli na kotelema, na boyekoli ya poso na poso. Makambo mingi matali mosala ya Nzambe, lokola oyo etali makita mpo na mosala ya kosakola, ekoki kobongisama na kotalelaka mimeseno ya mboka na bino. Kasi, yango ekozala mbébá soki moto moko azali kosala makambo na lolenge ya kokesena mwa moke? Bankulutu oyo batondi na bolingo bazali na mposa ete “makambo nyonso masalama na molongo mpe kozanga mobulu,” engebene maloba oyo Paulo asalelaki ntango alobelaki mpo na makabo ya kosala makamwisi. Mikapo ya zingazinga mimonisi ete lobanzo ya liboso ya Paulo ezalaki ya “kolendisa lisanga.” (1 Bakolinti 14:12, 40) Azalaki na momeseno te ya kotya ebele na mibeko, lokola soki nde mokano na ye ya liboso ezalaki ya kopesa nzela ete makambo nyonso masalema mpenzampenza lolenge moko to na mayele ya kokoka. Akomaki ete: “Nkolo apesaki biso [bokonzi] mpo na kolendisa bino kasi mpo na kokweisa bino te.”​—2 Bakolinti 10:8, MN.

23. Tángá mwa mitindo oyo tokoki komekola ndakisa na Paulo mpo na oyo etali kolendisa bato mosusu.

23 Ntembe ezali te ete Paulo asalaki mpo na kolendisama ya bandeko na ye na nzela na maloba oyo mazali kotonga mpe koyikisa mpiko. Na esika ya kotalaka bobele mwa etuluku moke ya baninga, azalaki kosala milende mpo na kotalaka ebele na bandeko mibali mpe basi, ezala baoyo bazalaki makasi kati na elimo mpe baoyo bazalaki mpenza na mposa ya kolendisama. Lisusu, apesaki nzela na bolingo, na esika ya kotya mibeko, mpamba te “bolingo ekolendisaka.”​—1 Bakolinti 8:1.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kati na libota, ekoki kozala malamu na kotya mibeko mikeseni na kotalela makambo mazali kobima wana. Biblia epesi nzela na baboti ete bazwa ekateli mpo na makambo mataleli bana na bango ya mike.​—Exode 20:12; Masese 6:20; Baefese 6:1-3.

Bozongeli

◻ Mpo na nini ebongi ete tobongwana soki tozalaka na ezalela ya kolembisa to ya kotonga kati na maloba na biso?

◻ Tosengeli kosala nini mpo ete tozala bato na kolendisa mingi kati na lisangá?

◻ Nzambe asili kopesa ndakisa nini na ntina etali ezaleli ya kotya ebele na mibeko mpo na bato mosusu?

◻ Nini ekosalisa bankulutu ete batyela etonga mibeko miuti na bato te?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto