Oyo ezalaki lopitalo ya kala, ekomi lelo Salle du Royaume ya kokamwa
NA MOBU 1770, lieutenant James Cook, ye mongelesi, azalaki koyekola mikili miyebani te, azalaki kotambola na masuwa ebengami Endeavour, masuwa ya ba tonnes 369 oyo epusami na mopepe. Ezalaki kotyola pembenipembeni, epai ya est ya mokili Australie, na eteni oyo eyebanaki naino te. Na mpokwa ya 11 juin, masuwa etutanaki na libanga ya pauni, mosika epai ya Nord ya mokili yango. Nsonge na masuwa, oyo esalemaki na nzete ebengami chêne ebebaki mabe mpenza. Mpo na kobika, esengelaki babongisa yango nokinoki. Penepene wana, esika mongala moko ekoti na mai monene, bamonaki epemelo ya kitoko mpo na kobongisa masuwa yango, mosala moumelaki poso motoba. Nsima na mibu mokama na misato, wolo ezwamaki na etuka yango. Boluki ya wolo ebandaki kobenda bato! Bankoto na bato bayaki koluka bozwi, mpe bongo engumba ya Cooktown ebotamaki.
Na 1879, bakonzi bapesaki ndingisa ya kotonga lopitalo moko wana mpo na kopesa nkisi na bato na bokono mpe na bato bazoki na makama ya libulu ya mine. Na mokolo ya 1er juillet ya mbula wana, na ngambo mosusu ya mokili, nimero ya liboso ya Zion’s Watch Tower (Mosenzeli) ebimaki. Kobanda wana, zulunalo yango ezali kosenzela na kolongono ya elimo ya ba millions na bato oyo bazali kobanga Nzambe. Nani akokaki kokanisa ete ndako ya lopitalo ya Cooktown ekokaki mokolo mosusu kozala na boyokani na zulunalo yango?
Nsima na mbula ya mosala koleka mokama, ndako ya lopitalo ya Cooktown esengelaki kolongolama. Lokola mosolo ya kotonga ndako ya sika ezalaki, bapanzaki nsango mpo na koluka bato oyo balingi kolongola ndako ya kala ya lopitalo mpe kotya yango esika mosusu. Kompanyi moko ya kobatela bisika mpe bamonima ya etuka Queensland esepelaki mingi na ndako yango ya kalakala. Kasi, emonanaki ete motuya ya kolongolisa mpe kobongisa ndako yango elekaki mingi. Lipesi esalamaki te.
Bobele na mwa eleko yango, ba Témoins de Jéhovah ya lisangá moke ya Cooktown bazalaki koluka esika na bango moko mpo na makita. Bazalaki ata na lopango moko te mpe bobele na mbongo 800 dollars ya mboka Australia. Lolenge nini bakoki kotonga Salle du Royaume? Bamonisi ya lisangá bamonisaki mposa ya kolongola ndako wana, mpe kozanga kosenga lifuti. Motindo nini Jéhovah alingaki kotambwisa makambo? Ezalaki nsango ya kokamwa likanisi na bango endimamaki.
Mokakatano mosusu ezalaki ya kozwa esika ya kotya ndako yango. Bakonzi bayebisaki na ba Témoins de Jéhovah ete soki ndako yango ebatelami malamu mpe ebongisamaki, bakopesa bango esika mpo na kotya yango kozanga ete bafuta. Nzokande, bobele na ntango wana ndambo na bato ya engumba, bayini, bazalaki kotemela lipesi yango. Batambolisaki mokanda moko kati na bato mpo na kopekisa kokokisama na mokano ya Batemwe. Nsango ya lokutá epanzanaki ete ba Témoins de Jehovah bakozwa Cooktown, bakokanga ba hôtels mpe bandako ya masano nyonso mpe bakopekisa botekisi makaya. Ezali polele ete, likambo motindo yango esalamaki te, kasi ekomaki mpasi mingi mpo na kobongisa boyokani ya kozwa esika mpe kozwa ndingisa ya kotonga. Wana mokolo ya kolongola ndako ezalaki kobelema, Batemwe basengaki na Leta ya Queensland ete asalisa bango. (Tala Baloma 13:2.) Ndingisa ya kosalela esika oyo bakonzi ya engumba bapesaki ezwamaki nokinoki mpe ndingisa ya kotonga epesamaki. Sikawa Batemwe bazwi na mbala moko esika mpe ndako ya kala ya lopitalo, likambo nini elingaki kosalema nsima?
Uta bipai nyonso ya Mboka Queensland etuluku ya bankama ya Batemwe, bato bameseni misala ya botongi mpe basali mosusu, bayaki mpe na motema mobimba bapesaki ntango na bango kozanga kosenga lifuti. Batemwe wana basilaki kokoma bilombe na mwango ya kotonga nokinoki ba Salles du Royaume. Mosala wana esengaki kolonga mwa ntembe: komema eteni na eteni lopitalo ya étage moko kino esika na yango ya sika, mpe kobongisa yango. Mopepe makasi ebyangami mousson esilaki kobelema, kolimbola ete mbula ya makasi elingaki kobanda. Mosala wana malingaki kosila na ntango malamu? Bato mosusu ya engumba bazalaki na ntembe. Kasi na nsuka, oyo bato mosusu bamonaki ete ezali mpasi ekokisamaki nokinoki. Na avril 1986, ndako monene wana elongolamaki, mpe na nsima ezwaki lisusu kitoko na yango ya ebandeli.
Misala wana nyonso mibombamaki te na miso na bato, lokola emonisami na maloba oyo mazwami na zulunalo Anglican Newsletter ya Cooktown. Tala mwa ndambo na makambo makoki kotangama kuna: “Na ntembe te, nakotyolama, kasi . . . botala kati na ndakonzambe mpe bomona ete ezali ata pene ya kotonda te. Sikawa botala kuna epai na ebele na bato [ba Témoins de Jéhovah] mpe bomona motindo nini ezali kokola . . . ; ezali Baanglikane mpe Bakatolike nde bazali kotondisa ebele yango. . . . Boyebaki ete lisangá moko . . . esili kosomba lopitalo ya kala mpo na kotonga oyo tokoki kobenga esika ya kosambela ndakonzambe, mpo ete eteyelo [epai bazalaki koyangana] ekomaki moke mpo na kokoka bango? . . . Tomonisi mpenza bolembu lokola totiki likambo motindo yango esalema.”
Mbula na mbula, bankóto ya ba touristes bazali koya kotala Cooktown. Bazali koya kotala kitoko ya zamba monene, ngomba ebyangami la Grande Barrière, mpe koyeba lisolo ya mboka yango Musée (to ebombelo ya biloko ya kala) ebengami capitaine Cook ezali kobenda ebele na bato oyo bazali kosepela na yango. Kobanda 1989, lopitalo ya kala ya Cooktown, kati na mokumba na yango ya sika lokola Salle du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah, ekomi mpe eloko mosusu ya ntina mpo na kotala kati na engumba. Ba magasins ya souvenir bakoma koteka biteni ya bilamba ya kopetola ndako mpe bilamba ya masano oyo ezali na bililingi ya kokanisa lopitalo Cooktown oyo ebongwani Salle du Royaume. Na bileko oyo ba touristes bayaka kotala mboka, bato penepene nkama motoba kino nkoto moko bayaka poso na poso kotala ndako wana ya mobu 1879, oyo lolenge na yango ekeseni na misusu nyonso.
Zulunalo oyo ezali lelo kobyangama La Tour de Garde ezali kokabolama na lifuti te epai na baoyo bazali koya kotala ndako. Kobanda 1879, motuya ya bobimisami ya zulunalo yango, oyo ekobimaka mbala mibale na sanza, ekolaki ntango nyonso kino kokoma millions 15 na nkota 111. Ezali kolobela bilaka ya Biblia oyo bimonisi ete bato mosusu ya libota na 1914 bakomona ntango bato bakozwa kolongono malamu ya nzoto mpe ya elimo. (Yisaya 33:24) Na nzela ya misala na ba millions ya bato na bolingo malamu, mabelé ekobongwana paradis. (Nzembo 37:29) Mpo na nini okokende te kotala Salle du Royaume moko ya zingazinga na yo? Okokuta kuna biloko oyo motuya na yango eleki wolo nyonso oyo esili kotimolama na etúka ya Cooktown.—Masese 16:16.