Mituna na batangi
Lolenge nini ba Témoins de Jéhovah bazali kotalela likambo ya kosomba biloko ya moyibi?
Baklisto bazali koboya kosomba biloko nyonso oyo bayebi ete ezali ya moyibi.
Koyiba ezali mpenza mabe. Mobeko mopesamaki na Yisraele molobaki polele ete: “Osengeli koyiba te.” (Exode 20:15; Levitique 19:11) Moyibi oyo bakangaki, na kotalela likambo na likambo, asengelaki kofuta biloko ayibaki mbala mibale, mbala minei to mitano likolo na oyo ayibaki.
Uta kalakala, miyibi balukaka kolongola biloko oyo bayibaki penepene na bango mpo ete bazwa nokinoki litomba na nzela na yango, mpe ete bakanga bango na biloko yango te. Mpo na yango, mbala mingi, batekisaka biloko yango na ntalo moke mpenza na boye ete basombi mingi bazalaka na mpasi mpo nakoboya yango. Likambo motindo wana limonisami mbala mosusu na Exode 22:1 ete: “Soki moto moko ayibi ngombe, to mpate, mpe abomi yango to atekisi yango, asengeli kofuta ngombe mitano mpo na ngombe moko mpe mpate minei mpo na mpate moko.”
Koyebáká oyo esɛngisamaki na mobeko wana, Abraham Chill, oyo ayekoli mibeko na Bayuda, akomaki ete: “Epekisami kosomba to kozwa biloko ya moyibi, ata soko batalisi biloko yango te ete ezali ya moyibi. Mpo na ntina yango, esengelaki koboya kosomba ntaba epai na mobateli na mpate, mpo ete ye azali mbala mosusu kotɛka biloko wana kozanga ete nkolo na ye ayeba yango mpe azali na likanisi ya kobomba mosolo.”—The Mitzvot—The Commandments and Their Rationale.
Ya solo, mobeko na Nzambe napekisaki te ete ‘[moto] asomba ntaba epai na mobateli na mpate’ bobele mpo ete akoki kokanisela ye mabe ete akobomba mosolo ya nkolo na ye, to mpe akoki kotɛka ntaba ya moyibi. Kasi yango emonisi ete basaleli na Jéhovah basengeli te kosangana na botɛki (ntaba to biloko nyonso mosusu) wana emonani ete motɛki azali nkolo na biloko yango te to soki emonani mbala mosusu ete ayibaki yango. Mobeko na Nzambe emonisi ete Nzambe ayebi lotómo oyo moko na moto azali na yango mpo na kozala na biloko na ye, kasi moyibi aboyi ete moto azala na biloko na ye. Mbala mosusu, moto oyo asombi eloko ya moyibi azali mpenza moyibi te, kasi lokola asombi eloko wana, ezali mpasi ete nkolo eloko akoka lisusu kozwa eloko yango.—Masese 16:19; tala 1 Batesaloniki 4:6.
Biso nyonso tokanisaka ete mosombi alukaka kozwa biloko na ntalo ya malamu. Na mokili mobimba, basi balukaka biloko bikitisami ntalo moke, bazelaka ntango mingi mpo na kosomba yango kino na ntango oyo ntalo na biloko ekokita mingi, to mpe basombaka epai na batɛki na gros to na butike oyo biloko bizali kotɛkama na ntalo malamu. (Masese 31:14) Kasi boluki wana ya biloko na ntalo malamu esengeli kosalama kati na bandelo ya bizaleli malamu. Bato ya sembo na eleka ya Nehemia, bazalaki koboya kosomba biloko mokolo ya sabata, ata soki bakokaki kosala mombongo na mokolo wana. (Nehemia 10:31; tala Amosa 8:4-6.) Ezali bobele motindo moko mpo na baklisto. Lolenge oyo bazali koboya moyibi ezali kosalisa bango na kopekisa mposa nyonso ya kosomba biloko bitɛkisami na ntalo moke, nzokande emonani mpenza ete ezali biloko ya moyibi.
Mbala mosusu, bato mosusu ya mombongo bayebani ete batɛkisaka biloko ya moyibi. Ya solo, ntalo oyo etyamaka mpo na biloko yango ezalaka mpenza moke, na boye ete moto na mayele akosukisa ete biloko yango bizwami na nzela ya mabe. Ata mibeko ya mboka mikoki komonisa ntina ya bososoli malamu. Tala oyo tokoki kotanga kati na mokanda molobeli mitindo ya kosambisa:
“Koluka koyeba ebandeli ya kobuba esɛngisi mpenza te ete ‘mofundami’ amonaki nani bayibi eloko na ye to nani oyo ayibi yango, esɛngi mpe te ete ayeba to esika oyo eloko yango eyibamaki, to mpe mabaku oyo yango eyibamaki; esengelaki bobele ete [mofundami] ayeba ete eloko yango eyibamaki. . . . Mpo na koyeba ebandeli ya bobubi, bisambiselo mosusu batalelaka ntango oyo mofundami azwaki eloko yango kati na mabaku oyo moto nyonso ya bososoli mpe na mayele akoki kokanisa ete eloko yango eyibamaki.”
Wana ezali ntina mosusu oyo moklisto asengeli koboya kosomba biloko ya moyibi. Kosomba biloko motindo wana ekoki kokómisa ye mosali na mabe. Mpamba te, na mikili misusu, moto oyo asombi biloko ya moyibi ata na libaku nini, akweisami na mibeko. Bato mingi bazali komona mabe moko te na kobuka mobeko soki yango ekopesa bango litomba. Esengeli kozala bongo te mpo na baklisto oyo balingi ‘kotósa bakonzi baleki liboso.’ Botósi na bango na mibeko ezali kobatela bango ete balukama te mpo ete basali mabe; lisusu, yango ezali kopesa bango lisosoli malamu liboso na Jéhovah.—Baloma 13:1, 4, 5.
Abalayama, moninga na Jéhovah, atikaki ndakisa moko malamu mpo na oyo etali kozala na lisosoli malamu. Na eleko na ye, bakonzi minei epai na ebimelo na ntango, balongaki bakonzi oyo bazalaki na etuká epai Lota azalaki kofanda, wana bamemaki ebele na biloko ya motuya, oyo tokoki kobénga ete biloko bizwami na etumba. Abalayama alandaki banguna wana mpe alóngaki bango, mpe azwaki biloko nyonso oyo bayibaki. Elukaki ye kopesa mbano, mokonzi ya Sodomo alobaki na Abalayama ete: “Kamata biloko oyo.” Kasi Abalayama azongisaki biloko yango epai na nkolo na yango, kolobáká ete: “Te, nakozwa ata eloko moko te kati na biloko nyonso bizali na yo, mpo oloba te ete: ‘Ezali ngai moto nakomisi Abalayama mozwi.’”—Genese 14:1-24
Baklisto bakolinga te ete bazwa matomba oyo makoki kozwama na biloko ya moyibi. Yilimia akomaki ete: “Lokola esósólo ekofandaka na makei moboti ye te, ezali bobele bongo mpo na ye oyo akozwaka misolo nde na nzela malamu te.” (Yilimia 17:11) Na yango, baklisto bazali bobele komonisa mayele te na kotosáká mibeko ya Kaisala na ntina na moyibi, kasi balingi lisusu kolóngisa boyengebene ya Nzambe na koboyáká kosangana na motindo moko na bokesene oyo ete moyibi to na motindo mosusu. Na ntina na yango, David akomaki ete: “Eloko moke oyo ezali epai na moyengebene eleki biloko mingi oyo ezali epai na bato mabe.”—Nzembo 37:16.