Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/6 nk. 28-30
  • Dioclétien abundisi boklisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Dioclétien abundisi boklisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kowelana kati na bopakano mpe boklisto
  • Mibeko
  • Boklisto na ekeke ya minei
  • Lolenge nini boklisto ya lokuta ekómaki eteni ya mokili oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Baanganaki kondima na bango te!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Baklisto ya ebandeli mpe Letá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Ndenge oyo Biblia ebatelamá tii na mikolo na biso
    Lamuká!—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/6 nk. 28-30

Dioclétien abundisi boklisto

NA MOKOLO ya 23 février ya mobu 303 ya ntango na biso, na elambo ya Terme, nzambe na Baloma, oyo esalemaki na engumba Nicomédie, kapitale ya sika na Bokonzi ya Loma, na Asie Mineure, bato bazalaki kowelana mpo na komonisa bolingo na bango mpo na ekólo. Kasi etuluku ya baklisto, oyo bakómaki mwa mingi, ezalaki wana te.

Longwa na esika moko ezali likoló mpenza na ndako na bango, mokonzi Dioclétien mpe Galère, mokambi ya basodá na ye, bazalaki kotala esika oyo baklisto ya engumba wana bazalaki koyangana. Na elembo bapesanaki, basodá mpe basali ya Leta bakɔtaki na makasi kati na ndako, bapunzaki yango mpe batumbaki ba Biblia oyo bakutaki kuna. Na nsuka, babukaki ndako.

Motindo wana nde eleko moko ya monyoko ebandaki, yango etyaki elembo mabe na boyangeli ya Dioclétien. Bakomi na makambo na kala babéngaki yango ete “monyoko monene ya nsuka,” “monyoko moleki makasi” mpe nkutu ete “ezali bobele kolimwisama ya nkombo moklisto.” Botaleli ya makambo oyo mamemaki kino na mpasi yango monene ezali komonisa yango malamu.

Kowelana kati na bopakano mpe boklisto

Dioclétien abotamaki na Dalmatia, etúka oyo na nsima ekómaki mboka Yougoslavie, mpe azwaki etelemelo ya lokumu wana azalaki komata pɛtɔ na mosala ya sodá kati na limpinga ya Loma. Atyamaki mokonzi na mobu 284 ya ntango na biso, ayebanaki mingi mpo na mbongwana oyo asalaki na makambo na politike: asalaki tétrarchie, boyangeli bosalemi na bato minei mpo na kokamba bokonzi. Dioclétien akotisaki Maximien, moninga na ye kati na mosala ya sodá, ete azala mokonzi ya mibale kati na bokonzi, Auguste ya mibale, mpe atyaki ye mpo na koyangela eteni ya Bokonzi epai moi elalaka. Dioclétien mpe Maximien bazalaki moto na moto na mokambi ya basodá na ye, Mokonzi, oyo azwaki lotómo ya kokitana ye. Constance Chlore azalaki Mokonzi oyo azwaki lotómo ya kokitana Maximien, nzokande Galère, moto ya Thrace, azwaki lotómo ya kokitana Dioclétien.

Motindo moko na Dioclétien, Galère azalaki mosambeli monene ya banzambe ya bapakano. Na mposa makasi ya kokitana mokonzi, Galère alingaki te ete azanga sembo epai na basodá. Alingaki te bopusi makasi ya basodá oyo bazalaki komitanga baklisto. Mpo na mokonzi, ezaleli na bango ya koboya kosangana na losambo na bopakano elimbolaki kotemela bokonzi na ye. Bongo Galère apusaki Dioclétien ete akamata bibongiseli nokinoki mpo na kolimwisa boklisto. Na eleko na malili ya mobu 302​—303 ya ntango na biso, mokonzi amityaki na ngambo na ye mpo na koyina baklisto mpe andimaki kolongola bato yango na limpinga na basodá mpe na ndako na mokonzi. Kasi Dioclétien azwaki meko ya kopekisa ete basopa makila te, mpamba te azalaki kobanga noki bato mosusu bakotɛmɛla ye libela, likoló na kobomama ya baklisto.

Atako bongo, Dioclétien asepelaki te na motindo oyo balobelaki likambo wana, na yango atunaki makanisi ya bakambi na basodá mpe bakonzi ya Leta, kati na bango Hiéroclès, moyangeli na etuká ya Bithynie. Moto wana ayekoli makambo mingi ya Bagreke, asanganaki na mobulu moko makasi mosalemaki mpo na kobundisa baklisto. Lisungi oyo Dioclétien azalaki kopesa epai na banzambe na bankoko na Baloma, ebimisaki etumba mpo na kotɛmɛla boklisto. Engebene mokanda moko (Diocletian and the Roman Recovery, ya Stephen Williams), ebimisaki “etumba makasi kati na banzambe na Loma mpe nzambe na baklisto.”

Mibeko

Mpo na kokóba mosala na ye ya monyoko, Dioclétien abimisaki mibeko minei, moko nsima na mosusu. Mokolo molandaki mobulu mosalemaki na Nicomédie, apesaki etinda ete babebisa bisika nyonso ya makita ya baklisto mpe biloko na bango ya losambo, mpe ete mikanda mosantu mipesama na bakonzi mpe mitumbama. Baklisto oyo bazalaki bato minene na Leta, bakitisamaki.

Ntango mbala mibale oyo ndako na mokonzi epɛlaki mɔ́tɔ, ngambo ememisamaki na baklisto oyo bazalaki kosala kuna. Likambo yango ebimisaki mobeko ya mibale, oyo mapesaki etinda ya kokanga baepiskopo nyonso, bakɛngɛli mpe badiakono, mpe kotya bango na bolɔkɔ. Kopesa ndingisa ya monyoko soki yango esengelaki, mobeko ya misato mopusaki bato yango na kopɛngwa na kosɛngisáká ete bapesa mbeka epai na banzambe ya Baloma. Mobeko ya minei mozalaki makasi koleka mpe ekataki etumbu ya kufa mpo na moto na moto oyo azali kolanda boklisto.

Monyoko makasi molandaki nsima, mobimisaki motindo na bato oyo bapesaki bango nkombo ya kotuka, ete ba traditores (oyo elimboli “baoyo bokokabaka bato”); basanganaki Nzambe mpe Klisto, mpo ete balukaki kobikisa bomoi na bango na kopesáká mikanda na bango ya Makomami epai na bakonzi. Tala oyo tozali kotanga na mokanda na mokomi na makambo na kala Will Durant: “Ebele na bato bazongaki nsima . . . Kasi mingi na banyokwami batikalaki sembo, mpe komona bango to koyoka lisolo ya bosembo na bango monene kati na mpasi, lilendisaki kondima na baoyo bazalaki kotengatenga, mpe ezangaki te kobenda bato ya sika na masangá epai bato mingi babomamaki.” Baklisto ya Phrygie, ya Capadoce, ya Mezopotami, ya Fenisia, ya Ezipito, mpe ya ndambo monene na biteni mosusu na bokonzi na Loma, babomamaki lokola martyrs.

Eusèbe moto na Kaisalia, oyo akomaki lisoló ya Eklezia, akanisaki ete bankoto na baklisto bakufaki na boumeli na monyoko. Epai mosusu, Edward Gibbon, mokomi ya mokanda Histoire du déclin et de la chute de l’Empire romain, akanisi ete bato oyo bakufaki baleki nkoto mibale te. Elimbolamaki ete: “Gibbon azali kolobela makambo yango na mwa ntembe, mpamba te euti na baklisto baoyo bayebisaki yango na motindo malamu, mpo ete balingaki mpenza kopesa lokumu na baoyo babomamaki lokola martyrs mpe balingaki kolendisa bandimi. Ntembe ezali te ete bakomi balekisi ndelo wana ezali bango kobongola mwa bakufi na ‘bibele’; bazali kokesenisa te kati na bato oyo babomamaki lokola martyre nzokande bakanaki yango te mpe baoyo babomamaki mpo ete bango moko balukaki yango; mpe bazali koyebisa lolenge oyo banyama mabe bapasolaki basali nyonso mosusu na mabe kati na bisika na masano, kasi basimbaki baklisto te mpo ete bapekisamaki na ‘nguya moko eleki monene.’ Ata soki tondimi ete nyonso ezali solo te, kasi ndambo oyo etikali ezali mpenza nsɔmɔ.” Ntembe ezali te ete monyoko makasi mobimaki mpenza, mpe nzeté na kobakisa bato, kotumbama likoló na nzeté, mfimbo mpe tenaye ezalaki bisaleli mpo na monyoko.

Bato mosusu na mayele bakanisi ete ezalaki Dioclétien te, kasi Galère nde azalaki mobandisi na monyoko. Molakisi William Bright alobaki na mokanda na ye L’Age des pères (angl.) ete: “Ezali mpenza na ndimbola monene ete molende mosalemaki na nguya ya bapakano na mokili mobimba mpo na kolimwisa Bokonzi oyo bouti na mokili oyo te ete emema nkombo ya Dioclétien, na esika na komema nkombo ya Galère, ye oyo abandisaki yango mpenza.” Nzokande, ata kati na bayangeli minei, Dioclétien azalaki na bokonzi boleki monene, lokola Stephen Williams andimi yango ete: “Ntembe ezali te ete Dioclétien azalaki kozwa ekateli nyonso ya monene kati na Bokonzi kino na mobu 304, mpe azali na mokumba moleki monene kati na monyoko kino na mbula wana.” Dioclétien azwaki maladi mpe, na mobu 305, atikaki bokonzi. Na boumeli na bambula soko motoba lisusu, monyoko molandanaki kosalema, komonisáká koyina makasi ya Galère epai na moto nyonso oyo azalaki moklisto.

Boklisto na ekeke ya minei

Makambo na nsomo oyo mabimaki na ebandeli na ekeke ya minei mandimisaki maloba ya ntóma Paulo mpe ntóma Petelo, mpe bakomi mosusu bapemamaki na Nzambe. “Motyoli na mibeko,” oyo asakolamaki mpe amonisi kelasi na bakonzi na mangomba oyo bazali likoló na baklisto ya nkombo mpamba, bapalanganaki bipai na bipai na ntango wana, lokola yango emonisami na mibeko mibimisamaki na Dioclétien, mingimingi mobeko ya mibale. (2 Batesaloniki 2:3, 4; Misala 20:29, 30; 2 Petelo 2:12) Na ekeke ya minei, misala na lipɛngwi misilaki mpenza kopalangana mingi. Mingi kati na baoyo bazalaki komitanga baklisto bazalaki kosala na limpinga na Loma. Ezalaki ata na moklisto moko te oyo atikalaki sembo na “motindo na maloba na lobiko” mapesamaki na bantoma?​—2 Timote 1:13, MN.

Eusèbe atangi nkombo na ndambo na banyokwami, mpe alobeli polele minyoko oyo bayokisaki bango, na mpasi na bango, mpe na nsuka alobelaki baoyo babomamaki lokola martyrs. Sikawa tokoki koyeba te soki baoyo nyonso babomamaki, bakufaki sembo engebene solo oyo elakisamaki na ntango wana. Ekoki kozala ete basusu basimbaki makebisi oyo Yesu apesaki na ntina na koboya kosala mikabwano, na kobwaka pite mpe ete baangana kondima na bango te. (Emoniseli 2:15, 16, 20-23; 3:1-3) Emonani ete basembwi mosusu oyo babikaki, balobelami te kati na Lisoló na bato. (Matai 13:24-30) Meko oyo ekamatamaki mpo na kopekisa ete losambo na boklisto esalema na polele te, ezalaki mpenza makasi na boye ete, elembo moko ya ekaniseli ya mboka Espagne na eleko wana, ezali kokumisa Dioclétien mpo ete ‘alimwisaki biyambayamba ya Klisto.’ Kasi, milende misalemaki mpo na kokanga mikanda ya Makomami mpe na kotumba yango, mosala monene mokokisamaki na botɛmɛli ya Dioclétien epai na boklisto, elongaki te kolimwisa Liloba na Nzambe mpo na libela.​—1 Petelo 1:25.

Lokola alongaki te kolimwisa losambo na boklisto, na mayele mabe, Satan le Diable, mokolo na mokili, alandaki kosalela mokonzi Constantin, oyo ayangelaki kobanda mobu 306 kino mobu 337. (Yoane 12:31; 16:11; Baefese 6:11, Traduction du monde nouveau, ebimeli ya Lingelesi ya 1984 elongo na mitindami.) Mokonzi mopakano wana abundisaki baklisto te. Kasi, amonaki mpenza malamu ete asangisa bindimeli na bapakano na oyo ya baklisto mpo na kosala lingomba ya sika ya Ekólo.

Oyo nde likebisi monene mpo na biso nyonso! Wana tokutani na monyoko makasi, bolingo na biso mpo na Nzambe ekosunga biso ete tobebisa lisosoli na biso te mpo na komibatela mwa ntango moke longwa na mpasi na nzoto. (1 Petelo 5:9) Bobele bongo, tokopesa nzela te na ntango ya kimya ete elɛmbisa bokasi na biso ya boklisto. (Baebele 2:1; 3:12, 13) Na kokangamáká makasi na mitinda ya Biblia, tokotikala sembo epai na Jéhovah, Nzambe oyo ayebi kobikisa libota na ye.​—Nzembo 18:25, 48.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 28]

Musei Capitolini, Roma

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto