Lisolo ya basakoli na Bokonzi
Ntango mokonzi akamati maloba
EZALI elendiseli na komona ete bato minene bazali lisusu awa na mabele oyo bazali koboya lokuta mpe bazali kolinga boyengebene mpe bazali ata kolobela makasi bizaleli yango. Ndakisa moko epesameli biso na mokonzi moko ya Afrike oyo azali kofanda mboka moko epai kuna mosala ya ba Témoins de Jéhovah epekisami. Tala oyo eyebisameli biso mpo na yango:
“Basangani ya mangomba mingi, bakatolike, bato ya misioni mpe ba pentecotistes”, bayanganaki kala mingi te na likita moko esangisaki mangomba ebele. Na nsuka ya likita yango, Mokonzi monene abyangamaki mpo na kozwa liloba. Bato nyonso bakamwaki na ndenge alendisaki bayoki bamekola bosembo mpe etamboli malamu ya ba Témoins de Jéhovah, kobakisaka ete soko moto nyonso azalaki lokola bango, mboka ekokoma kimya.
“Mokolo elandaki, mwa bakonzi ya Mangomba oyo bamonisamaki na likita, bakendaki na ndako ya mokonzi mpe balobaki makasi na ndenge akumisaki ba Témoins. Batunaki ye soko ayebaki te ete ba Témoins bapekisami kati na mboka. Mokonzi ayanolaki ete ayebaki, mpe alobaki ete amonaki likambo moko ya mabe te na etamboli ya ba Témoins. Alobaki lisusu: Uta nakoma Mokonzi Monene, Témoin moko te asili kofundama mpo na libunga monene. Nzokande, soki manyoko eyibami na bilanga, moyibi azalaka mingimingi mokatolike, soki bayibi mbala, moyibi azali moto ya misioni. Bato ya mangomba na bino basili kobebisa mboka na ngai na ndenge bazali kosopa zemi, nzokande ata Témoin de Jéhovah moko te asila kokota boloko mpo na mabe motindo yango. Mibeko ya Nzambe mizali kopekisa te misala motindo oyo, to Mangomba ezali lisusu kolanda mibeko ya Nzambe te? Bakonzi ya mangomba bazangaki ata eyano.
“Nsima na yango, Mokonzi Monene abengisaki bamonisi ya ba Témoins de Jéhovah mpe ayebisaki bango ete basenzela ntango nyonso na etamboli na bango, mpo ete babwaka nsoni te likolo na nkombo ya Nzambe na bango mpe na nkombo ya mokonzi, mpamba te akotelaki ba Témoins de Jéhovah.”
Bayebisi biso ete sikawa, bato mingi bazali koyamba solo. Témoin moko alobi ete abandaki koyekola Biblia elongo na bakonzi misato ya régio yango, kati na bango Mokonzi Monene oyo alobelaki ba Témoins, mpe ete bango misato bazali koyangana na makita ya ba Témoins de Jéhovah.
Jéhovah azali komona bango balingi solo mpe boyengebene mpe bazali kolobela basaleli na ye.—Matai 10:42.