Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/6 lok. 32
  • Nzoi bakoki kolakisa bango makambo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzoi bakoki kolakisa bango makambo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/6 lok. 32

Nzoi bakoki kolakisa bango makambo

“Na bambula oyo, ba ingénieurs mpe bato na mayele basili mpenza kososola malamu likambo oyo nzoi bayebi yango uta kala: kosalela eloko moko ya botongi, ata soko yango ezali mpenza papalá, ete ezala na madusumadusu mpe na matumu motoba lokola zúmbu ya nzoi, ekobakisa makasi na yango, koleka soki osaleli yango na motindo nyonso mosusu.”​—Zulunalo The New York Times ya 6 octobre 1991.

EZALI likambo na kokamwa te ete bato bazwa litomba na koyekola banyama mike na bozindo. Mokolo moko, Yobo, moto na kondima na ntango na kala, alobaki ete: “Kasi tuna banyama mpe bakolakisa yo mpe bandeke na lola mpe bakoyebisa yo. . . . Nani kati na oyo nyonso ayebi te ete lobɔkɔ na Jéhovah nde esali yango?” (Yobo 12:7-9) Ee, mayele na Mozalisi mamonani polele kati na biloko mpamba lokola oyo ezali na motindo na zúmbu ya nzoi, oyo ezali na matúmu motoba.

Atako madusu ya likambo na nzoi ekoki te kozala na mbinga ya ndambo na misato ya bamilimetele, biloko oyo yango esalemi bizali mpenza makasi. Solo mpenza, ekoki kino komema bozito mbala 30 koleka kilo na yango.

Mayele wana makoki kosalelama, na ndakisa mpo na kosala biloko na kolɛmbisa bisika oyo bilaka mibale bitongani. Biloko motindo wana bizali nkuku kosalelama mpo na kobatela bisaleli ya etumba bisalelami mpo na kobwaka basodá longwa na likoló. Zulunalo The New York Times elobi na ntina yango, ete: “Biloko bizali na bozito lokola jeeps ekangisami na bityelo oyo na nse bisalemi lokola zúmbu na nzoi mpo ete etutana makasi te wana yango ekokita.

Biloko mingi bikoki kosalelama mpo na kotonga bisaleli mosusu ya motindo yango. Papier emonani lokola eloko esalelami mingi. Papier na nsinga makasi na mpaka esalelami mpo na kotonga “zúmbu ya nzoi,” bikɔtisamaka na bisika oyo batyaka mapapu ya mpepo mosusu ya minene. Biloko yango bizali na kilo mingi te, nzokande bizali makasi. Mpo na nini? Etando ekaboli biteni na yango bitondi na mopepe, oyo esali ete kilo ezala mingi te. Lisusu, mopepe etambwisaka lontiliki te.

Nzoi ya moke “ayebi” mpenza nyonso wana te, mpamba te azwi lipolɔmi ya ingénieur te. Nzokande mikolo nyonso akosala mosala na kosaleláká likoki oyo Jéhovah, Mozalisi asili kopesa ye, atako azali kososola yango te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto