Masoló ya basakoli na Bokonzi
Azalaki mamelo na boumeli ya mibu 25, nsima ayebaki solo
Biblia esila koyebisa na esakweli ete “ebele monene na bato” na mabota nyonso bakoya kosambela na temple ya elimo na Jéhovah. (Emoniseli 7:9) Yango ezali kokokisama lelo, mpe tozali na esengo na komona ebele na bato kokangwa na mangomba ya lokuta na lisalisi ya solo oyo emonisami na Nzambe. Likambo oyo lilandi ezali ndakisa malamu.
◻ Mwasi moko mofandi na Rorne alobi boye: “Uta bomwana na ngai, mposa na ngai monene ezalaki ya kokóma mamelo. mpo ete nalingaki kosalela Nzambe na motema mobimba. Wana nakómaki na mibu 32 nde nakokisaki mposa na ngai na le 8 Décembre 1960, ntango nalapaki ndai na ngai ya yambo mpo na botósi, kondima bobólá mpe kozala na bizaleli ya peto. Nazalaki na mosala ya kosalisa butu na moi, bana 30 baoyo batikamaki na baboti na bango, bana bakufela baboti to mpe bana na bato oyo bakótá boloko. Nazalaki kosepela mingi na mosala yango.
“Nsima na mibu zomi ya mosala, kondima na ngai ebebisamaki likoló na kowelana oyo ezalaki kosalema kati na esika nazalaki kosala. Namitunaki ete ndenge nini Nzambe akokaki kopesa nzela ete koswana mpe mobulu ezala kati na ndako na ye, soki azalaki solo mpenza kokamba biso.”
Mamelo wana azalaki na ndeko na ye ya mwasi oyo azalaki Témoin de Jéhovah na France. Témoin yango apesaki mamelo litatoli na nzela na mokanda mpe atindelaki ye Les Saintes Écritures—Traduction du monde nouveau. Mamelo amikundoli ete: “Nsima na kolekisa mibu 23 lokola mamelo, namonaki solo mpo na mbala ya yambo.” Andimaki boyekoli ya Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Kasi totika ye moko alanda lisoló na ye: “Mokemoke ntango nazalaki kolanda koyekola, nayebaki Jéhovah, masengami na ye mpe bizaleli na ye kitoko. Natungisamaki mpenza wana nayokaki ete, ye aboyi bikeko na losambo, mpamba te esika nazalaki kosala etondaki mpenza na bikeko ya motindo nyonso. Nasosolaki ete, mpo nasepelisa Jéhovah, nakokaki te kotikala na esika motindo wana. Nsima na mibu 25 lokola mamelo, namonaki solo. Napesaki préavis na ngai le 1er Octobre 1985, basángó mpe baepiskopo baokaki mawa mingi.
“Kotondáká na bolingo, bandeko mibali mpe bandeko basi basalisaki ngai, ezala na elimo mpe na mosuni. Kozaláká na botondi epai na Jéhovah mpe lisangá na ye, nazwaki batisimo na le 30 Août 1986, komikotisáká bongo na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.”
Jéhovah apamboli milende ya elenge mwasi moko
◻ Molakisi mwasi moko Mobrezilié, ye Témoin de Jéhovah, atangaki wana azalaki kosembola badevuare ya bana kelasi ete, elenge moyekoli mwasi moko ya mibu 14 alingaki koyeba Nzambe koleka. Molakisi mwasi abandaki bongo koyekola Biblia elongo na moyekoli mwasi wana, oyo azali kosala bokóli malamu. Kasi baboti na ye batemelaki boyekoli wana mpe babebisaki mikanda mikolimbolaka Biblia ya mwana mwasi yango. Elenge moyekoli mwasi alandaki koyekola Biblia na eteyelo, na ntango ya bopemi, kasi baboti bayaki koyeba yango. Asengelaki kolanda boyekoli na nzela na mikanda Kasi baboti bakutaki mikanda oyo elenge mwasi azalaki kozwa mpe batumbaki yango. Tata na ye abendaki ye na makasi ete akenda na misa. Akendaki solo, kasi kati na buku na ye ya mabondeli, abombaki Mosenzeli oyo azalaki kotanga yango na boumeli ya misa. Ezalela wana eumelaki sanza motoba, kino mokolo oyo alongwaki na ndako na kobombama mpo na kokende na Salle du Royaume. Na boumeli ya likita, tata na ye ayaki kotuna epai na bandeko ete bayebisa ye soki mwana na ye ya mwasi azali na kati, mpe ete akobeta ye ntango akozonga na ndako. Bandeko bamekaki kososola elongo na ye, kasi ayokaki bango te.
Lobi lolandi, kotondáká na esengo, elenge mwasi akendaki kotala bandeko. Alakisaki bango bilembo ya kobeta oyo bizalaki na nzoto na ye. Kasi mpo na nini azalaki na esengo? Ntango tata na ye alongwaki na Salle du Royaume, akendaki koyebisa bato mingi kati na bango guvernere ya engumba, mpo na makama oyo mwana na ye azalaki na yango soki akómi Témoin de Jéhovah. Guvernere ya engumba alobaki na ye ete ba Témoins de Jéhovah bazali bato malamu mpe babongi na kotyela motema. Abakisaki ete ba Témoins bazali na bizaleli kitoko mpe ete ezali malamu na kozala na mwana oyo akangami na mitinda na bizaleli miye mitombwami mpe oyo akeseni bongo na bilenge nyonso mosusu.
Atako bongo, tata abetaki mwana na ye ya mwasi. Kasi, alimbolaki ye ete abetaki ye mpo abimaki na ndako kozanga kosenga nzela. Mpe abakisaki ete, akobeta ye soki atiki koyekola Biblia to mpe soki akotalela kosangana na makita ya ba Témoins de Jéhovah na bopotu. Elenge mwasi wana azali lelo mosakoli ya molende, mpe basangani mingi ya libota na ye bazali kosepela na solo.
Lokola emonisami na likambo oyo, na ntembe te Jéhovah azali kopambola bilenge oyo bazali na mposa mpenza ya kosalela ye.—Nzembo 148:12, 13.