Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/2 lok. 29
  • Mituna na batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna na batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Tyá likebi na liloba ya esakweli ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tótya likebi na liloba ya esakweli
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Tósimba ngwi kondima na biso ya motuya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Bimonaneli ya Bokonzi ya Nzambe ekokisami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/2 lok. 29

Mituna na batangi

◼ Mpo na nini kati na Saintes Ecritures—Traduction du monde nouveau, 2 Petelo 1:19 ebongolami motindo moko te lokola na ba Biblia mosusu?

Kolobeláká motuya ya liloba lipemami na Nzambe, ntoma Petelo akomaki ete: “Mpe tozali na liloba ya esakweli oyo limonani mpenza solo, yango nde bozali kotalela lokola mwinda oyo mozali kongenga kati na esika na molili, kino ntongo ekotana mpe monzoto na ntongo mokobima kati na mitema na bino.”​—2 Petelo 1:19, MN.

Tomoni ete maloba na kotombela oyo ete “kino ntongo ekotana mpe monzoto mokobima kati na mitema,” makabwani na maloba mosusu ya molongo yango na nzela na virgule, nzokande ezali bongo te na mabongoli mingi.

Na ndakisa, Traduction oecuménique de la Bible ebongoli eteni ya nsuka ya verset wana na motindo oyo: . . . mwinda mokopelaka kati na esika na molili, kino ntongo etani mpe monzoto na ntongo mobimi kati na mitema na bino.” Mabondeli motindo oyo mazali kolakisa ete monzoto na ntongo mozali kongenga kati na mitema ya bandimi, lokola soko nde bazwi engengiseli na elimo.

Nzokande, esakolamaki uta eleko ya Moïse ete, ‘monzóto mokobima na Yakobo.’ (Mituya 24:17, MN; tala Nzembo 89:34-37.) Yesu alobaki polele mpenza ete ye nde azalaki “libota na Davidi, mpe monzóto mokongengaka na ntongo.”​—Emoniseli 22:16.

Motindo wana ya kolakisa “monzóto na ntongo” eyokani na mikapo ya zingazinga na lisolo oyo lisalemaki na Petelo. Auti kolobela ebongwaneli (transfiguration), emonaneli oyo azwaki eleki soko mwa bambula 30. (Matai 16:28 kino 17:9) Emonaneli yango kitoko emonisaki eleko oyo Yesu ‘akokoma mokonzi,’ na elobeli mosusu ntango akokembisama kati na nguya na Bokonzi. Makambo oyo Petelo amonaki, alobelaki motuya na liloba na Nzambe; bobele bongo lelo, esengeli na baklisto ete batya likebi mingi na liloba ya esakweli.

Lokola mitema na bato mizalaki kati na molili na eleko wana​—ata mpe na mikolo na biso—​ezali mpenza bongo mpo na baklisto ya solo. Ezali lokola nde mwinda mozali kongenga kati na esika ya molili, na elobeli mosusu: mitema na bango. Petelo ayebaki ete na kotalelaka liloba na esakweli na Nzambe, oyo lizali kongenga, baklisto bakokengela mpe bakongengisama kino kotana ya mokolo na sika. Ekozala bongo eleko oyo “monzóto mokongengaka na ntongó” akoyangela kati na nguya na Bokonzi.

Tala oyo E. Bullinger akomaki na ntina na 2 Petelo 1:19: “Awa, emonani polele ete esengeli kozala na paranthèse moko, mpamba te pole oyo ezali kongenga ezali nde esakweli; Monzóto na ntongo mpe Ntongó ekotána ezali bongo Klisto mpe koya na ye. Yango elimboli te ete tolendisami na kotalela liloba ya esakweli kino Klisto akomonana kati na mitema na biso! Boye te, kasi tosengeli kotalela liloba wana ya esakweli, kino ekokokisama na ntango Klisto akoya, kino ekobima Ye oyo abengami ‘Monzóto na ntongó.’”—Figures de style utilisées dans la Bible (angl.), 1898.

Tala ntina oyo mabóngoli mosusu mazali kosalela ba paranthèses na 2 Petelo 1:19.a Traduction du monde nouveau mpo na yango, ezali kotósa lolenge oyo maloba na greke matyami na molongó; kasi, na nzela na ba virgules, Traduction du monde nouveau ezali kokabola maloba na kotómbela oyo ete “kino ntongo ekotána mpe monzóto na ntongó mokobima” elongo na maloba mosusu ya molongó, maye mazali kosenga baklisto ete batalela liloba lokola mwinda oyo mozali kongenga kati na esika na molili, kati na mitema na bango.’

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na ndakisa, tala mikanda The Twentieth Century New Testament (ebimeli ya 1904), The Emphatic Diaglott (ebimeli ya 1942), Concordant Literal New Testament (1976).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto