Masoló ya basakoli na bokonzi
Solo ya Biblia esikoli mamelo moko ya mboka Bolivie
EBELE na bato ya motema sembo bazali kokima mangomba ya lokutá, bazali koyekola solo ya Biblia mpe bazali kosambela Jéhovah, Nzambe ya solo. Baoyo basalaki bongo, bazali koleka bato 7 600 na mboka Bolivie, mamelo moko mpe azali kati na bango.
M——akutanaki na Témoin de Jéhovah moko mpo na mbala ya liboso wana azalaki bobele na mibu libwa. Akendaki kofungola ekuke mpo na Temwe oyo ayaki epai na ye mpe, ezalaki mbala ya liboso oyo ayokaki nkombo ya Nzambe, Jéhovah. Yango etikalaki kati na makanisi na ye.
Lokola azalaki bobele ye moko mwana mwasi na libota na bango, bazwaki ekateli ete akóma mamelo. M——alobaki ete: “Nazalaki na esengo mingi wana nayokaki ete nakosalela Nzambe—wana makanisi oyo nazalaki na yango.” Kasi na komonáká bokesene mpe koponapona kati na ndako na bamamelo, esengo na ye ebongwanaki mawa. Ayebisi ete: “Ntango mosusu nakobosana te makambo wana mazalaki kopesa ngai maladi ya makanisi mpe konyokola ngai na nzoto mpe na elimo, oyo ememaki ngai na kotalela Nzambe lokola Moto oyo akopesaka bitumbu kozanga motema mawa, kasi lokola Ye oyo azali na bolingo te.”
Alandi koloba ete: “Na ntango nakómaki mamelo, namonaki nkombo ya Jéhovah kati na Biblia te. Nazalaki komona bobele ‘Yahweh,’ mpe yango ezalaki kotungisa ngai mingi. Mokolo moko, nakendaki nkuku koluka baoyo bazalaki kolobela Jéhovah, kasi namonaki ata moto moko te.
“Na nsima, mokolo moko, namonaki likomi ‘Salle du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah’ wana ezalaki ngai kokenda kotala baboti na ngai. Nalingaki koloba na Batemwe yango ete bazalaki basakoli ya lokutá, kasi moto moko te azalaki na salle yango. Nazongaki esika wana na mokolo ya eyenga. Likita moko lizalaki kosalema, mpe bato mosusu bakamwaki na komona mamelo koyangana na likita elonga na bilamba na ye ya losambo. Nsima na likita, namekaki kobima nokinoki. Kasi, Temwe moko ya mwasi apesaki ngai mbote; mpe natunaki ye ete: ‘Mpo na nini bozali kotuka Mosantu na komema nkombo oyo?’ Lisoló na Biblia libandaki, mpe nasalaki bibongiseli mpo ete mwasi wana aya kotala ngai epai na biso. Baboti na ngai babénganaki ye. Atako bongo, tokutanaki lisusu nsima na basanza mibale, mpe abyangaki ngai epai na ye mpo na koyekola Biblia. Oyo ye ayebisaki ngai, ekamwisaki ngai: amonisaki ngai ete baklisto basengeli kosalela nkombo ya Nzambe. Ezali elembeteli wana nde epesaki ngai makasi mingi mpo na kotika mateya nyonso mazangi ntina oyo balakisaki ngai na ntango nazalaki mamelo.
“Nazali komikundola makambo mingi oyo nakutanaki na yango na ndako na bamamelo. Na ndakisa, na eleko moko, nazalaki na mposa na bilei mingi. Bongo, nakomelaki baboti na ngai mokanda ete batindela ngai yango, nde nayebaki te ete bazalaki kotalela mikanda na ndako na bamamelo liboso ete etindama. Na ntango toyaki kolya lisusu, bapesaki ngai ebele ya mampa mpe confiture, mpe basɛngisaki ngai na makasi ete nasilisa yango nyonso. Bilei bizalaki mpenza mingi liboso na ngai. Nayebisaki baninga na ngai, mpe moko na bango alobaki na ngai ete nafinafina mampa oyo nazalaki kokoka kolya yango te, mpe nabwaka yango na nsé. Na ntango nasalaki bongo, mamelo moko ayaki noki kokanga ngai, abwakaki ngai na nsé mpe apesaki ngai etinda ete napɛtola esika yango nyonso na lolemo na ngai. Esika yango ezalaki monene. Wana ezalaki ngai kosala bongo, nazalaki sé koyoka konganga mpe kosɛka, kasi ata elembo na motema mawa te.
“Nazali na esengo mingi lokola nasikolami na makambo nyonso wana. Lokola namizelaki na yango, kosikolama yango esɛngaki ete nasala milende. Libosoliboso, tata na ngai abénganaki ngai na ndako. Nzokande, liboso na kobima na ndako na bamamelo, nasalisaki bilenge bamamelo mosusu na koyeba solo. Nakoki koloba na esengo nyonso ete bamoko kati na biso basili komipesa epai na Jéhovah Nzambe!
“Nsima wana nalongwaki na ndako na bamamelo, tata na ngai azalaki koyeba te ntina oyo nazalaki koboya misala ya kozwa mosolo mingi nde mizalaki kosɛnga ntango mingi. Nzokande, nalingaki kozala na ntango mingi mpo na kosalela Nzambe. Nazali sikawa pionnier permanent, nde nazali na bomoi ya pɛpɛlɛ kasi ezali kosepelisa ngai mingi. Mpe, nazali na esengo mingi mpo ete mama na ngai mpe bandeko na ngai mibale ya mibali basili kolanda ngai kati na mosala ya Jéhovah.”
Ee, solo ya Biblia ezali kosikola bato longwa na mangomba ya lokutá ya mokili oyo, mpe ezali kopesa esengo mpe bolamu ya seko.—Yoane 8:32.