‘Tolanda komisembola’
MWASI moko asalaki mobembo na masuwa atunaki na Kapitene ete: “Ondimi mpenza ete tokokóma?” Lokola mwa masuwa yango moke mazalaki kotambola mpe koningana na mipepe mikoningisaka mai na Atlantique Sud na mopanzi ya cap de Bonne-Esperance, mwasi yango abanzaki ete ekozala mpenza likamwisi soko bakokóma na esika yango emonanaki moke na Karte.
Kapitene abengisaki ye ete amata na esika azalaki kotambwisa mpe alimbolaki ye mosala ya biloko bisengeli na kotambwisa masuwa: gyrocompas, radar, récepteur de sisgnaux satellite, ata mpe ordinateur sextant. Bandimbola yango ezalaki mwa mpasi mpo na ye, kasi akangaki ntina na mosala monene ya masuwa: kosembola nzela. Na lisalisi ya biloko wana bisengeli mpo na kotambwisa masuwa, kapitene akokaki kopengola koningana ya mai mpe nguya na mopepe na kosemboláká nzela mbala na mbala. Soko mpo na kosembola ya nzela wana te, mingi na basali mobembo bakokóma te na bisika bazali kokende.
Baklisto bakokani na masuwa kati na mai-monene ya mokili. Mokano na biso ezali ete “tozwana na (Jéhovah) na kozanga litono mpe na likambo te, mpe kati na kimya.” (2 Petelo 3:14) Kasi motindo moko lokola masuwa, nguya, ya libanda mpe oyo ezali kati na biso, ezali koluka kopengwisa biso. Na yango, maloba oyo Paulo akomaki na Bakolinti ebongi mpenza: ‘Tozali kobondela mpo na oyo ete: bomisembola. Bolanda komisembola.’—2 Bakolinti 13:9, 11, MN.
Oyo esengami mpo na komibongisa
Liloba na greke libongolami na verset wana na ‘kosembola’ elimboli kozongisa ‘na nzela malamu.’ (Tala Traduction du monde nouveau, ebimeli ya lingelesi elongo na mitindami ya 1984, note na nsé na lokosa) Kati na Biblia, liloba yango lisalelami mpe mpo na koloba na ntina na kozongisa eloko na ezalela malamu. Na ndakisa, na Matai 4:21, ezali liloba likokani oyo lisalelami mpo na koloba na ntina na “kobongisama” ya minyama. (Traduction interlinéaire du Royaume) (Angl.). Kasi komisembola elimboli nini mpo na moklisto?
Toloba na ntina na baklisto na Kolinti baoyo Paulo akomelaki mokanda oyo. Kati na mokanda ya liboso, abendaki likebi na bango likoló na makambo mabongi te oyo mazalaki kosalema kati na lisangá: kokabwana, pité, kofundana na bisambiselo kati na bandeko, kozanga botosi mpo na elambo na Nkolo, ata mpe na makita na mobulu. (1 Bakolinti 1:10-13; 5:1; 6:1; 11:20, 21; 14:26-33) Basengelaki “kobongisa” likambo yango, na elobeli mosusu, basengelaki kozongisa makambo “na nzela malamu” elongo na mitinda na Nzambe.
Mokanda ya mibale oyo Paulo atindelaki bango emonisi ete babongisaki likambo yango. (2 Bakolinti 7:11) Nzokande, Paulo ayebaki ete bopusi ya mokili bopusi na Satana mpe mposa mabe na bango ekokenda kopengwisa bango ntango nyonso. Yango wana apesaki bango toli makasi na ntina na ‘kolanda komisembola.’
Mposa ya kosembolama na eleko na biso
Na eleko na biso, Ba Témoins de Jéhovah, bango mpe basengeli komisembola. Satan le Diable azali ‘kobundisa’ bango na kosaláká nyonso ete ebebisa bosembo na biso. (Emoniseli 12:17; Baefese 6:12) Tozingami mpe na ebongiseli ya biloko mabe ya mokili mobimba oyo bizali kobila “mokóló na nguya na mopepe”. Baninga na biso ya mosala mpe baninga na biso ya kelasi bazali mbala mosusu bato oyo bazali ‘komitambwisa engebene bamposa ya mosuni na bango, kosaláká mikano na mosuni’. (Baefese 2:2, 3) Tosengeli mpe ntango nyonso kobundisa bamposa mabe na biso kozanga kotika (Baloma 7:18-25) Soki tozangi komisembola ntango nyonso, tokoki mpenza kopengwa kozanga nkaka.
Ndakisa na Petelo emonisi malamu mpenza likambo yango. Nsima wana ayebaki Yesu ete azali “Klisto, Mwana na Nzambe ya bomoi,” akumisamaki boye ete: “Esengo na yo Simona, mwana na Yona, mpamba te mosuni mpe makila emonisi yango na yo te, kasi Tata na ngai na likoló.” (Matai 16:16, 17) Emonani mpenza ete Petelo akanisaki sembo. Nzokande, nsima na mwa ntango, elobelami na ba versets motoba oyo elandi ete, Petelo apamelamaki makasi mpenza na Yesu. Wana eyokaki ye ete Klisto asengelaki ‘konyokwama mpe kobomama,’ Petelo alobaki na Yesu ete: “Soko moke te, Nkolo! Oyo ekokomela yo te!” Nokinoki Yesu alobi na ye ete: “Leka nsima na ngai, Satana! Ozali libaku liboso na ngai mpo ete ozali kokanisa lokola Nzambe te kasi lokola bato.”—Matai 16:21-23.
Petelo atalelaki makambo na lolenge ya mosuni. Makanisi na ye mpe etamboli na ye ezalaki na mposa na kosembolama. Yango mpe ekomelaka biso mbala na mbala. Boye te? Mbala na mbala totalelaka makambo na lolenge na biso kasi na lolenge na Nzambe te. Boye te? Yango wana tozali na mposa na kosembolama na ntango moko to mosusu. Lokola mpo na masuwa na mai-monene, mbala mosusu kosembolama ekozalaka moke, lokola eloko ezangi ntina. Kasi yango ekoki kokata likambo ya kokóma na esika mpe kozinda na elimo. Kosembolama moke ekoki nkutu kopengola ete nsima osala te mabunga maleki minene, oyo mbala mosusu ekozala mpasi mingi.
Mitinda na Nzambe
Soki biloko bisengeli mpo na kotambwisa masuwa bisalelami na sikisiki te, nzela ekoki komonana mpenza malamu te. Bobele bongo, soki tolingi kotambwisa bomoi na biso malamu, tozali mpenza na mposa na mokambi ya sikisiki oyo ezali bongo Liloba na Nzambe, Biblia. “Makomi nyonso mapemami na elimo na Nzambe, makoki na kopesa litomba na mateya, na mpamela, mpo na kosembola.” (2 Timoté 3:16) Liloba yango lipemami na Nzambe ezali komonisa mitinda na Nzambe mpo na oyo etali etamboli mpe lolenge na kokanisa. Ezali na ntina ete totangaka yango mbala na mbala mpo na kolanda “banzela ya boyengebene.”—Nzembo 23:3.
Mitinda misusu mipesameli biso na “moombo na sembo mpe na mayele”, kelasi ya baklisto bapakolami. Elimo ya Jéhovah ezali kosalisa bango na kososola mokano na ye mokemoke. (Matai 24:45-47; Masese 4:18) Na yango, ntango mitinda mikoutaka na lisangá ya Jéhovah, tomonisaka elembo ya mayele na kotosáká yango, wana eyebi biso ete Jéhovah azali kotambwisa biso mpo na bolamu na biso ya seko.—Yisaya 48:17.
Kasi, mbala mosusu yo moko ozali na mposa ya lisalisi mpo na kokóba kolanda nzela malamu. Na Bagalatia 6:1, Paulo apesi etinda oyo ete: “Bandeko, soko moto azwami na likambo, bino bato na elimo, bobutwisa ye na elimo na bopolo.” Bankulutu mpe basaleli na misala bazali kati na bato yango oyo bazali na bizaleli ya elimo. Mbala mingi, bato yango babendaka likebi na yo likoló na makambo oyo kati na yango osengeli kobongwana.
Osengeli kosala milende
Ezali ntango nyonso petee te na kosala mbongwana kati na bomoi na biso. Totalela lisusu likambo ya Petelo. Lokola azalaki Moyuda na kobotama, Petelo abokwamaki na ezaleli ya kokanisela mabota mosusu mabe. Alobaki na Korneye, ye oyo azalaki Mopakano ete: “Bino boyebi ete ekoki na mobali Moyuda kosangana soko kobelema na bato ya libota mosusu te.” Kasi, nsima wana asosolaki ete Nzambe alingaki ete alakisa boklisto ya solo epai na moto yango mpe libota na ye, Petelo akabaki na nsuka ete: “Na solo namoni solo ete Nzambe akokabolaka bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”—Misala 10:28, 34, 35.
Petelo asalaki mbongwana monene na lolenge na ye ya kotalela bato ya mabota mosusu mpe na etamboli na ye epai na bango. Kasi emonani ete, azalaki na mposa ya kolanda komisembola kati na likambo yango, mpamba te, mwa bambula na nsima, amitikaki kopusama na Bayuda mosusu mpe azangaki limemya epai na Bapakano bandimami. Ntoma Paulo apamelaki ye na maloba makasi mpo na kosalisa ye ete abongisa lisusu lolenge na ye ya kotalela makambo.—Bagalatia 2:11-14.
Bobele bongo na mikolo na biso, ekoki kozala ete moklisto moko akolaki na esika epai kuna ezalela ya koponapona ezalaki mingi. Nsima na koyekola basolo ya Biblia, ekoki mbala mosusu kokóma ete, atako ayebi na makanisi na ye ete Nzambe akokabolaka bato te, kasi ezalela ya kokanisa mabe mpo na bato mosusu elonami naino kati na ye. Akomimonisa monguna na bato yango te, kasi akotalela mpenzampenza mabunga mosusu ya bato yango lokola ezalela ya mboka na bango. Akotya motema molai na bango na komekama na kolobáká maloba mabongi te oyo mamonisi koponapona to mpe makanisi mazali kolobela mbala na mbala bikolo to mpe bokeseni ya mposo. Ekoki kokóma mbala mosusu ete moto yango aboya batoli ya elimo euti na moklisto moko oyo azali kolobela ye yango te na motindo boye to boye, mpo ete atangi mingi te to mpo ete azali na bozwi mingi te na mosuni. Na ndenge emonani, moto wana akosala milende minene mpo na kosembola makanisi na ye mpo eyokana na oyo na Jéhovah.a
Kasi ezala ata mpo na koponapona, mpo na mposa ya mosolo, mpo na baninga na eteyelo to na mosala, to mpo na ntina ya kosangana na makita na boklisto, tosengeli komitya na nsé na litambwisi ya Nzambe na nzela ya Liloba na ye mpe ya lisangá na ye. Tosengeli kokanisa te ete batoli kitoko euti na Makomami etali biso te, to mpe kotya yango pembeni. Tomikundola ete Bayuda bazangi bosembo bazalaki koloba ete: “Nzela na Jéhovah ezali na boyengebene te.” Ezali biso nde tosengeli kolanda banzela ya Jéhovah, boye te?—Ezekiele 18:25.
Tozali na esengo lokola Jéhovah azali kosepela mpenza na lolenge oyo tozali kotambola liboso na ye, mpe lokola azali ntango nyonso kosembola libota na ye. Tozali komona kokokisama ya esakweli na Yisaya: “Mpe matoi na yo makoyoka liloba na nsima ete: ‘Oyo ezali nzela, tambola na yango,’ wana ekobongwana yo na liboko ya mobali to mpe na liboko ya mwasi.” Okoki mpo na yo kolanda litambwisi litondi na bolingo oyo Jéhovah azali kopesa, mpe ‘komilengele mpo na kotosa yango.’ (Yisaya 30:21; Yakobo 3:17) Ee, tolanda komisembola mpo ete nzela tozali kotambola emema biso na nsuka: Yango kondimama na Nzambe libela na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala masolo na ntina na makanisi mabe mpo na bato mosusu (préjugés), maye mabimaki kati na Réveillez-vous! ya 8 Février 1985, zulunalo oyo ebimisami mpe na bakomi ya zulunalo oyo. Tala mpe na Mosenzeli ya 15 Décembre 1988, lokasa 10 kino lokasa 20