Okolinga ete ba témoin de jéhovah baya kotala yo?
Ezali na esengo mpenza nde Témoin de Jéhovah moko akoya kotala yo mpo na kosalisa yo na koyeba lisusu makambo mingi likoló na Nzambe, likoló na Bokonzi na ye mpe likoló na mikano na ye mikomami kati na Biblia. Tondimisami ete malako yango makozala na ntina mpo na yo, mpamba te ezali kopesa biyano ya solo mpo na mikakatano oyo tokokutanaka na yango mikolo nyonso. Ba Témoins de Jéhovah bapesaka mateya ya Biblia kozanga lifuti, ezala epai na moko moko to mpe epai na etuluku na bato.
Bongo soki olingi ete moto moko ya makoki aya kotala yo na ndako na yo to mpe na esika mosusu oyo esepelisi yo, tokozala na esengo ya kosala nyonso mpo na yango. Okozwa te bobele biyano na mituna na yo na Biblia, kasi okozwa lisusu lisalisi mpo na kolonga mikakatano oyo kosalelama ya mitinda na Biblia ekosilisaka. Soki ondimi yango, luka ba Témoins ya mboka na bino.
Nalingi koyeba makambo mingi na ntina na Biblia. Bolukela ngai moto moko ete aya kotala ngai.